2010–2019
Bosikoli
Sánzá ya mínei 2013


Bosikoli

Ntango tolandi Klisto, tokoluka kosala elongo na mpe kokoba na mosala mwa Ye ya bosikoli.

Na ntango ya banoko, mposa ya kozwa basali ezalaki na bosenge bonene na Amerika. Na bikeke ya 18 mpe ebandeli ya 19, baluki mosala na mokili ya bapaya bazwamaki na Grande Bretagne, Allemagne, mpe bikolo mosusu ya Poto, kasi mingi oyo balingaki kokende bakokaki kofuta ntalo ya mobembo te. Ezalaki momeseno mpo na bango ya kosala mobembo mpe bayokana mpo na kofuta nsima ya kokoma mpo na mwa ntango na kozanga lifuta lokola ntalo ya nzela na bango. Basusu bayaki na elaka ete moko na bango libota asila kokoma na Amerika alingaki kofuta tike nsima ya kokoma, soki yango esalemaki te bawuta ya sika basengelaki kofuta tike na bango na kosalaka kingamba. Maloba basalelaki mpo na kolimbola basali mibembo miye ya kingamba ezalaki “basikoli” mpo basengelaki kosikola ntalo ya mobembo na bango, na lolenge moko kosomba bonsomi na bango, na mosala na bango.1

O ntei ya bankombo eleki na ntina ya kolimbola Yesu Klisto ezali Mosikoli. Lokola elakisami na nwa nsango ya “basikoli bawuta, liloba kosikola elingi koloba kofuta lotomo to niongo. Kosikola ekoki lisusu kolinga koloba kobikisa to kopesa bonsomi na kofutaka lisiko. Soki moto moko asali mbeba mpe nsima asemboli yango to afuti lomande, tokoloba amisikoli. Moko na moko ya bantina oyo elakisi biteni ya Bosikoli bonene bosalemaki na Yesu Klisto na nzela ya bosikoli bwa Ye, oyo ekwi, na maloba ma dictionnaire, “kobikisa na lisumu mpe lomande la yango, na nzela ya libonza lisalama mpo na masumu.” 2

Bosikoli ya Mobikisi ezali na biteni mibale. Yambo, ezweli etumbu mpo na bobuki mobeko ya Adama mpe mbano ya bokwei ya moto na komatelaka bikela semba ya bokwei—liwa ya nzoto mpe ya molimo. Liwa ya nzoto eyebani malamu; liwa ya molimo ezali bokabwani ya moto na Nzambe. Na maloba ma Paulo, “Jambi lokola na Adama yonso bakokufaka, boye na Klisto yonso bakojua bomoi” (1 Bakolinti 15:22). Bosikoli boye na liwa ya nzoto mpe molimo ezali ya mokili mobimba mpe ezangi bosenge.3

Lolenge mosusu ya Bomikabi ya Mobikisi ezali bosikoli na oyo ekokaki kobiangema malandi oyo eyaka mbalqa moko te uta na bokwei—masumu na bisomei oyo ekeseni na bobuki mobeko ya Adama. Na ntina ya bokwei yango tobotami na mokili ya kufa wapi lisumu—elingi koloba, kozanga botosi na mobeko etiama na Nzambe, ezali kopanzana mbangu mpenza. Kolobaka mpo na biso banso, Nkolo alobi:

“Atako ntango babandi kokola, lisumu ebotami na motema mwa bango, mpe bameki bololo, ete bakoka koyeba ntalo ya bolamu.

“Epesameli bango koyeba bolamu uta na mabe; yango wana bazali basali mpo na bangomei” (Moses 6:55–56).

Mpamba te tozali bayanoli mpe tokosalaka maponi, bosikoli na masumu ma bisomei ezali na masengeli—esengelami na kotubela mpe kosundola lisumu mpe kobaluka na bomoi ya bozambe, to na maloba masusu, esengelami na boyamboli (tala D&C 58:43). “Yango mwana,” etindi Nzambe, “teya yango na bana ba yo, ete bato bango, bisika binso, basengeli koyambola, to bakoki na lolenge moko te kosangola bokonzi ya Nzambe, mpo eloko moko te ya mbindo ekoki kovanda kuna, to kovanda na miso na ye” (Moses 6:57).

Mpasi ya Mobikisi na Getesemane mpe bolozi bwa ye na ekulusu esikoli biso na lisumu na kosepelisaka bisenge oyo boyengebene ezwi likolo na biso. Ye alakisaka mawa mpe alimbisaka baoyo bayambolaka. Bomikabi mpe esepelisaka niongo na biso na boyengebene na kobikisaka mpe kopesaka biso lifuta mpo na mpasi nyonso tozwa na kozanga mabe. “Mpo tala, akoyoka bolozi mpo na bato banso, iyo, bolozi bwa ekelamo na ekelamo ya mokili, babali basi banso lokola, mpe bana, baye bazali ba libota lya Adama.” (2 Nefi 9:21; tala lisusu Alama 7:11–12).4

Ntango tolandi Klisto, tokoluka kosala elongo na mpe kokoba na mosala mwa Ye ya bosikoli. Lisalisi lileki monene tokoki kopesa na basusu na bomoi oyo, kobandaka na baye ya libota lya bisomei, ezali komema bango na Klisto na Nzela ya bondimi mpe boyamboli mpo bakoka koyoka Bosikoli na Ye—kimia mpe esengo lelo, mpe bozangi kufa mpe bomoi bwa seko in mokili mokoya. Mosala mwa bamisionele ezali kolakisa na lokumu bolingo ya kosikola ya Nkolo. Lokola bamemi nsango ya ye ya ndingisa, bakopesa mapamboli ya komekisa te ya bondimi na Yesu Klisto, boyamboli, libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu, kofungolaka nzela na mbotama ya sika mpe bosikoli ya molimo.

Tokoki lisusu kosalisa na bosikoli bwa Nkolo ya boye na ngambo mosusu ya lilita. “Bampaka ba botongono ba eleko oyo, ntango balongwi na bomoi ya kufa, bakokoba misala mya bango na koteyaka nsango malamu ya boyamboli mpe bosikoli, na nzela ya likabo ya Mobotami se Moko wa Nzambe, o ntei ya baye bazali na molili mpe na nse ya moniololo ya lisumu na mokoli monene ya milimo ya bawa” (D&C 138:57). Na litomba ya milulu tokopesa bango na batempelo ya Nzambe, ata bango baye bakufaki na moniololo ya masumu bakoki kozwa bonsomi. (5

Ntango ndenge ileki na motuya ya bosikoli etali boyamboli mpe bolimbisi, ezali na lolenge moko ya ntango ya ntina mpenza lisusu. Yesu elobelami akendeki kosalaka bolamu (tala Misala10:38), oyo ikwi kobikisaka babeli mpe batengoli, kopesaka bilei na bato ebele na nzala, mpe koteyaka nzela eluti malamu mingi. “Mwana ya moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi” (Matai 20:28). Boye, tika ete, na nse ya nguya ya Molimo Mosantu, kokende nzinganzinga kosalaka bolamu na ndakisa ya bosikoli ya Moteyi.

Lolenge ya mosala ya kosikola elingi koloba kosalisaka bato na mikakatano mya bango. Elingi koloba kozalaka moninga ya babola mpe batau, kolembisaka mpasi, kosembolaka mabe, kobatela bosolo, kolendisa nkola ya sika, mpe kotia bozangi makama mpe esengo na ndako. Mingi ya mosala ya bosikoli na mabele ezali kosalisa basusu kokola mpe kokokisa elikia mpe mposa ya bango.

Ndakisa moko uta na mokanda ya Victor Hugo Les Misérables, atako ya solo te, etutaka mpe ekofulaka ngai. Penepene na ebandeli ya lisolo, Episikopo Bienvenu apesi bilei mpe esika ya kolala na butu na Jean Valjean, moto azanga ndako, oyo awutaki kobima na boloko ya mibu 19 mpo ayibaki ndambu ya limpa mpo na koleisa mwana ya ndeko wa ye ya mwasi yo azalaki mpenza na nzala. Na motema makasi mpe nkele, Valjean apesaki boboto ya Episokopo Bienvenu na koyibaka biloko bya ye ya ebende ya mpembe. Nsima ekangamaki ye na bapolisi ya miso makasi, Valjean, oyo asambaki na lokuta ete mpauniezalaki likabo na ye. Ntango bapolisi bazongisaki na makasi na ndako ya episikopo, na bosutuki ya ye monene, Episikopo Bienvenu andimaki lisolo lya ye mpe mpo na kosala malamu alobaki, “‘Kasi ! Napesaki yo bikolo ya mwinda lisusu, oyo ekokani na mosusu, mpe ekoki kotekama franc nkama mibale. Ntina nini okamataki yango te elongo na basani misusu?’ …

“Episikopo abelemaki na ye, mpe alobaki, na mongongo ya nse:

“‘Kobosana te, kobosana mokolo moko te ete olakaki ngai kosalela mpauni oyo mpo na kokoma moto ya bosembo.’

“Jean Valjean, oyo azalaki na likundoli te ya elaka, atelemaki na mobulungano. Episikopo … akobaki, na lipombo:

“‘Jean Valjean, ndeko wa ngai: ozali lisusu te moto ya bobe, kasi ya bolambu. Ezali molimo mwa yo nazali kosombaka mpo na yo. Nalongoli yango na makanisi ya molili mpe na molimo ya libebi, mpe napesi yango na Nzambe!’”

Jean Valjean ya solo akomaki moto moko ya sika, moto ya bosembo mpe mokabi na bato mingi. Na bomoi bwa ye mobimba abatelaki biloko wana mibale ya mwinda mpo na kokundola ye ete bomoi bwa ye esikolamaka mpo na Nzambe. 6

Boko ndenge ya bosikoli ya ntango eyei na bokasi ya kosalaka elongo na baninga. Ezali moko ya ntina Mobikisi akelaki eklezia. Lokola ebongisama na masanga makoki mpe masanga malandi mpe makonzi, bapalwasi, bitape, tokoki kaka te koteyana mpe kolendisana na nsango malamu, kasi tokoki lisusu kotia na litomba bato mpe biloko oyo etali babonsenga ya bomoi. Bato bakosala bango moko to na mangomba elongobani bakoki ntango nyonso te kopesa makoki na etando esengelami mpo na kotelemela mikakatano. Lokola balandi ba Yesu Klisto tozali lingomba moko ya Basantu ebongisami mpo na kosalisa kosikola mposa ya bandeko ba biso Basantu mpe mingi basusu lokola tokoki kokuta na mokili mobimba.

Na ntina ya makasi ya kosalisa bato, oyo elobelami na Mpaka Dallin H. Oaks, mingimingi mibu miye mileki, bato 890.000 na bikolo 36 bazali na mai ya peto, bato 70.000 na bikolo 57 bazali na kiti ya kotambolela, bato 75.000 na bikolo 25 babongisi bomoni, bato na bikolo 52 bazwaki lisungi engebene na lolenge ya makama. Kosalaka na basusu, Eklezia asalisi na kopekisa bokono na penepene na bana efuku 8 mpe esalisi Bato ba Syrie na nganda ya balefize na Turquie, Liban, Jordanie elongo na masengeli ya bomoi. Na ntango se moko wana, bandimi ba Eklezia na bozangi bazwaki bifuku ya badollar na makabo ya bokili bilei mpe bosungi ya bolamu mosusu na mobu 2012. Botondi mpo na loboko pete ya bino.

Nyonso oyo ebandi te na kotanga bikela ya boboto mpe lisungi ya bato—likabo ya bilei, bilamba, mosolo, nkisi, mpe ndenge nkoto misusu ya libondisi mpe lisungi na yango tokoki kosala elongo na mosala bo Klisto ya kosikola. Lokola mwana mobali moko namonaki misala mya mama wa ngaimei mpo na kosikola mwasi moko na bozangi. Mibu mingi mileki, ntango bana ba ye bazalaki bilenge, mama wa ngai azwaki lipaso ya makasi oyo azalaki penepene na kozwa bomoi bwa ye mpe ekangaki ye na mbeto ntango mingi mpo na penepene na mobu moko. Na ntango wana, libota mpe bandimi ba palwasi ya biso basalisaki Mama mpe libota ya biso. Mpo na lisalisi ya kobakisa, mokambi wa Lingomba lya Bamama Basungi, Ndeko mwasi Abraham, atindaki ete baboti ba ngai bazwa na mosala mama moko oyo azalaki mpenza na mposa ya mosala. Na kosangelaka lisolo oyo, nakosalela bankombo ya solo te Sara mpe Annie mpo na mwasi oyo mpe mwana wa ye ya mwasi. Eye ezali lisolo ya mama wa ngai:

“Nakoki komona yango polele lokola soki ezalaki lobi eleki. Nalalaki wana mbeto, mpe ndeko mwasi Abraham amemaki Sara na kisuku ya kolala. Motema mwa ngai mobebaki. Wana etelamaki moto azanga kitoko mingi koleka namona naino te—akonda mingi; malonga te, nsuki ya mobulu, na kunki; moto engumbama kotalaka na nse. Alataki elamba ya ndako ya kala elekaki monene mbala motoba. Akokaki te kotala likolo mpe azalaki koloba malembe mpenza ete nakokaki te koyoka ye. Kobombanaka nsima na ye ezalaki mwa mwana mwasi wa ye ya mibu penepene na misato. Nini na mokili nazalaki mpo na kozala na ekelamo oyo? Nsima ya bango kolongwa kisuku, nalelaki, nalelaki. Nazalaki na mposa ya lisalisi ya mikakatano misusu te. Ndeko mwasi Abraham atikalaki mwa ntango elongo na ye mpe noki bapangusaki ndako malamu mpe balengelaki mwa bilei ya malamu. Ndeko Abraham atunaki ngai mpo na komeka yango mwa mikolo, [kolabaka] ete mwana mwasi wana alekaka mpenza ntango ya mpasi mpe azalaki na mposa ya lisalisi.

“Ntongo elandaki ntango Sara ayaki, na nsuka nakokaki kobengisa ye penepene ya mbeto wapi nakokaki koyoka ye. Atunaki nini nalingaki ye asala. Nalobelaki ye mpe nsima nalobaki, ‘Kasi eloko eleki na motuya ezali bana babali; lekisaka ntango elongo na bango—bazali na motuya mingi koleka ndako. Azalaki molambi ya malamu mpe abatelaki ndako ya peto, esilisaki ye kosukola bilamba, mpe azalaki malamu mpo na bana babali.

“O ntaka ya baposo, nayebaki lisolo ya Sara. [Mpamba te ezalaki mpasi koyoka ye, akokaki kosala kelasi malamu te mpe na nsuka alongwaki. Abalaki na bolenge na mobali moko ya mobulu. Annie abotamaki mpe akomaki esengo ya bomoi bwa Sara. Eleko ya malili moko na butu mobali wa ye azongaki ndako na molangwa, mpe akotisaki Sara mpe Annie na makasi na kati ya motuka na bilamba ya kolalela, mpe abwakaki bango na mpembeni ya balabala ya monene. Bamonaki ye lisusu te. Makolo ngulu mpe na malili makasi, Sara mpe Annie batambolaki bakilometele mingi tii na ndako ya mama wa ye.] Mama wa ye andimaki bango batikala mpo na kosala misala minso ya ndako mpe kolamba; kokengela ndeko wa ye ya mwasi mpe ya mobali oyo bazalaki na secondaire.

“Tomemaki Sara epai ya Monganga moko ya matoyi, mpe azwaki lisungi ya koyoka. … Tokomisaki ye na kelasi ya bakolo, mpe azwaki mokanda ya secondaire. Akendeki na eteyelo ya butu mpe nsima asilisaki mpe ateyaki boyekoli ya bato na bokeseni. Asombaki mwa ndako. Annie abalaki na tempelo mpe azwaki bana baballe. Na nsuka Sara azwaki boko mapaso mpe nsima akokaki koyoka malamu. Mibu nsima apemaki mpe asalaki misio. … Sara atondaki biso mbala mingi mpe alobaki ayekolaki mingi mpenza na ngai, mingimingi ntango nalobelaki ye ete bana ba ngai bazalaki na motuya mingi koleka ndako. Alobaki eteyaki ye kozala lolenge wana na Annie. … Sara azali mwasi moko ya kafukafu.”

Lokola bayekoli ba Yesu Klisto, tosengeli kosala manso tokoki mpo na kosikola basusu na mpasi mpe mikumba. Atako, mosala mwa biso ya monene mingi koleka ezali kokamba bango na Klisto. Na kozanga Bosikoli bwa Ye na liwa mpe na lisumu, tozali bobele na nsango malamu ya boyengebene na lingomba ya bato. Yango ekoki kopesa mwa lisalisi mpe bozongisi bondeko lelo, kasi ezali na nguya ya kokitisa na mabele boyengebene bobongo nie mpe mawa mazanga ndelo. Bosikoli ya nsukansuka ezali na Yesu Klisto mpe na Ye moko. Na bosawa mpe na botondi nandimi Ye lokola Mosikoli o nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Merriam-Webster’s Collegiate Dictionary, 10th ed. (1993), “redemptioner.”

  2. Webster’s New World College Dictionary, 3rd ed. (1988), “redeem.”

  3. “Mwana mobali ya Nzambe azwaki etumbu mpo na elindo ya ebandeli, na yango masumu ya baboti ekoki te koyanolama likola ya mito ya bana, mpo bazali ya kobika uta bokeli ya mokili (Moses 6:54). Na Bosikoli ya Klisto, banso bakolonga liwa ya molimo na kozongisamaka na miso ya Nzambe mpo na kosambisama. Yesu alobaki, “Lokola natombolamaki [likolo ya ekulusu] kutu boye bato bakotombolama na Tata, mpo ya kotelema liboso lya ngai, mpo ya kosambisama na misala mya biso” (3 Nefi 27:14). Baye bapetolamu na lisumu bakotikala elongo na Nzambe na bokonzi ya lola, kasi baye bayamboli te mpe bapetolami te bakoki te kovanda elongo na Nzambe Mosantu, mpe nsima ya Bosambisi basengeli kolongwa mpe na yango koyoka mpasi ya molimo lisusu. Eye etangemi ntango mosusu lokola liwa ya mibale to mpasi ya molimo mbala ya mibale. (Tala Elamani 14:15–18.)

  4. Ezali mpo na masumu ma biso nde makomi malobeli boko oyo bazwi te litomba ya bosikoli:“Moto wa nkuna akotikala lokola soko bosikolami bosamaki te, longola se soko ezali bokangalami bwa nkanga ya liwa” (Alama 11:41). “Ye oyo asaleli te bondimi mpo ya boyamboli amitalisi na mobeko mobimba mwa bisenge bya boyengebene; yango wana bobele eapai ya ye oyo azali na bondimi mpo na boyamboli emememi mpembeni mwango monene mpe mwa seko mwa bosikoli” (Alama 34:16). Soki moto aboyi Bomikabi ya Mobikisi, asengeli kosikola niongo ya boyengebene ye moko. Yesu alobaki, “Mpo tala, ngai, Nzambe nayoki mpasi na makambo oyo, mpo na banso, ete bakoka koyoka mpasi te soki balingi koyambola; kasi soki balingi koyambola te basengeli koyoka mpasi kutu lokola ngai ” (Doctine and Covenants 19:16–17). Mpasi ya moto moko azangi bosikoli mpo na masumu eyabani lokola lifelo. Elingi koloba kozala na bayangeli ya zabulu, mpe elimbolami na masese ya makomi lokola miniololo to liziba ya moto ya fofolo. Lehi abondelaki bana ba ye bapona Bosikoli ya Klisto “kopona te liwa ya seko, engebene na bolingi bwa mosuni mpe bobe boye bazali o mwango, boye bokopesaka molimo ya zabulu nguya ya kokanga, mpe kokweyisa bino o lifelo, mpo ete akoka kokonza likolo lya bino o bokonzi bwa yemei” (2 Nefi 2:29). Atako, na ntina ya Bomikabi bwa Yesu Klisto, limfelo ezali na nsuka moko, mpe baye basengeli koleka na nzela ya yango basikolami “na zabulu [na] bosekwi ya nsuka (Doctrine and Covenants 76:85). Penepene na mwa “Bana babali ya libebi” bazali “baye na bango bobele bosekwi ya mibale ekozala na mwa nguya ya [kowumela]; iyo, ya solo, baye na bango bobele bakosikolama te na ntango esengeli ya Nkolo, nsima ya koyoka mpasi ya nkanda ya ye” (Doctrine & Alliances 76:32, 37–38().

  5. Profeta Joseph Smith asepelaki, “Tika bawa basakola lisanzoli ya seko na Mokonzi Imanuele, oyo atindaki, yambo mokili ezala, nini ekokokisa biso tosikola bango na boloko; mpo bakangemi bakozwa bonsomi” (Doctrine & Alliances 128:22).

  6. Tala Victor Hugo, Les Misérables (1992), 91–92.