2010–2019
Ndako, Eteyelo ya Bomoi
Sánzá ya mínei 2013


Ndako, Eteyelo ya Bomoi

Mateya mateyami na ndako—esika oyo ekoki kokoma eteni ya lola awa na mabele.

Boko baboti bakomisengelaka bolimbisi mpo na mabunga bakosalaka na ndako, kolobaka ete ntina mpo na yango ezali ete ezali na eteyelo te mpo na kozala moboti.

Ya solo, eteyelo ya boye ezali te mpe kasi ekoki kozala ya malamu mingi koleka. Eteyelo eye ezali. ndako.

Na kosalaka mobembo na nsima na mapapu ya bokundoli, namikundoli bangonga ya kitoko nasalaki na mwasi wa ngai. Na kokabolaka makundoli maye elongo na bino, bokoki komona makambo ya bomoi ya binomei—ya esengo mpe ya mawa lokola; tokoyekola uta na mango.

1. Tempelo Ezali Esika

Ntango nawutaki na misio, nakutanaki na elenge mwasi moko na nsuki milai ya moyindo kokita na loketo. Azalaki na miso minene ya kitoko mpenza mpe koseka ya kopumbwela basusu. Nakangamaki na ye na ngonga ya liboso namonaki ye.

Mibu mingi asambelaki na Tata wa ye na Lola, kobondelaka ete akoka kokutana na moninga alongobani oyo alingaki kokende elongo na ye na tempelo. Esengo kani nayokaki ntango nayokaki yango mpamba te nazalaki na ntina moko wana lokola—atako ntango wana, tempelo ya penepene mingi koleka esengaki mobembo ya koleka kilometele 6.400.

Molulu ya libala ya biso ya leta ezalaki ya esengo mpe ya mawa lokola, mpo tobalanaki elongo na mokolo moko ya nsuka. Kalaka ya leta alobaki maloba “Mpe sikawa nasakoli bino lokola balongani,” kasi noki nsima, alobaki, “kino liwa ekokabola bino.”

Yango wana na komibonza tosengelaki kosomba tike ya kokende mpamba na Tempelo ya Mesa na Arizona.

Na Tempelo, kofukamaka na etumbelo, mosali moko na likoki alobaka maloba nazelaki mingi, oyo esakolaki biso balingani mpo na ntango mpe boseko mobimba.

Eyenga elandako, moninga moko amemaki biso na eteyelo ya Eyenga. Na liyangani wana, atelemaki mpe alakisaki biso na kelasi. Ntango liyangani ekomaki na nsuka, ndeko moko mobali abelemaki na ngai mpe apesaki ngai mbote ya loboko, kotikaka lokasa ya dollar 20 na yango. Noki nsima, ndeko mobali mosusu atandaki maboko epai ya ngai lisusu, na bosutuki na ngai, ye lokola atikaki lokasa moko na loboko la ngai. Nokinoki nalukaki mwasi wa ngai, oyo azalaki na ngambo mosusu na kisuku, mpe nagangaki, “Blanquy, pesa mbote ya loboko na moto nyonso!”

Noki tokongolaki mosolo ekokaki mpo na kozonga na Guatemala.

“Na nkembo ya selestiale ezali na balola to bisika misato;

“Mpe mpo na kozwa ya likolo mingi koleka, moto asengeli kokota na molongo oyo ya bonganganzambe .”1

2. Mpo na Kobunda, Esengeli Bato Babale

Moko ya mikano ya mwasi wa ngai ezali “Mpo na kobunda, esengeli bato babale. Mpe na kozala mokolo moko te moko na bango”

Nkolo alimboli na polele ndenge moko esengeli kokamba bozalani bwa biso elongo na bato basusu. Izali bondimisi, motema molai, boboto, bosokemi, mpe bolingo ya bokibisi te.2

Botuki bwa nzoto na libota ezali ezalela moko oyo ezali kokoma mbala mingi te na bato mingi mpe tosepeli na yango. Nzokande, tosili naino mpenza te kolongola botuki ya mayoki. Mabe esalemi na lolenge oyo ya botuki ekofanda na bokundoli bwa biso, ekozokisa bomoto bwa biso, ekolona boyini na mitema mya biso, ekokitisa bolingo bwa bisomei, mpe ekotondisa biso na bobangi.

Kosala elongo na molulu ya libala ya selestiale ezali ekoki te. Tosengeli lisusu kosalela bomoi ya selestiale.

3. Mwana Oyo Azali Koyemba Azali Mwana wa Esengo

Eye ezali mokano mosusu mwasi wa ngai akolobelaka mbala mingi.

Mobikisi asosolaki motuya ya loyembo ya bule; makomi masangeli, “Esili bango koyemba, babimi kokenda na ngomba na Bilaya.”3

Mpe kolobaka na nzela ya Profeta Joseph, Ye alobaki: “Mpo molimo mwa ngai mosepeli na loyembo ya motema; iyo, loyembo ya mosembo ezali losambo epai na ngai, mpe ekoyanolama elongo na lipamboli likolo na mito.”4

“Esengo kani ezali na koyoka loyembo ya mwa mwana oyo bayekolaki na baboti ba ye koyemba, “Nazali Mwana ya Nzambe5

4. Nalingi Oyamba Ngai

Maloba “Nalingi yo,” “Natondi yo mingi mpenza,” mpe “Limbisa ngai” izali lokola mafuta mpo na molimo. Ikobongola mpinzoli esengo. Ikopesa niekese mpo na kolembisa bozito ya molimo, mpe ikondimisa mayoki ma boboto na motema mwa biso.

Namikindoli mikolo ntango tozalaki kotinda mikanda ya bolingo na nzela ya posita to boniboni bokongolaki mwa likuta mpo na kobenga balingami ba biso na telefoni to boniboni tolingaki koyema mpe kokoma nzembo ya bolingo na lokasa.

Lelo nyonso oyo ekomi lokola biloko ya kobomba na ndako ya bikeko!

Masini na mokolo mpe mobu ya lelo epesi biso nzela ye kosala makamwisi. Ya pete kani ezali kotinda mokanda ya moloba ya bolingo mpe botondi! Bilenge bakosala yango ntango inso. Namituni soki bizalela biye mpe misusu mikokoba ntango ndako ya biso esalemi. Moko ya mokanda ya maloba nazwaki uta na mwasi wa ngai elobi lokola boye: “Koyamba moko lokola lola, kompwepwa moko lokola moi, mpe mpokwa moko lokola sanza. Mokolo malamu, nalingi yo.”

Nakoki te koboya koyoka lokola nazali na lola ntango nazwi mokanda ya boye.

Tata wa biso ya Lola azali ndakisa ebonga mpenza mpo na kolakisa bolingo. Ntango alakisaki Mwana Mobali wa Ye, asalela maloba: “Oyo azali Mwana wa ngai wa bolingo, na ye nasepeli.”6

5. Nalingi Buku ya Molomoni mpe Mobikisi wa ngai, Yesu Klisto.

Natondi na mayoki ntango namoni mwasi wa ngai kotanga Buku ya Mormon mokolo na mokolo. Ntango asali yango, nakoki koyoka litatoli ya ye kaka na komonaka esengo na elongo na ye ntango azali kotanga matango oyo etatoli etinda ya Mobikisi.

Bwania kani ezali na maloba ma Mobikisi: “Mozali koluka kati na makomi mpo ete babanji ete na yango bokojua bomoi na seko. Mpe ijali yango mpenza itatoli mpo na ngai.”7

Efulamaki ngai na oyo, nalobalaki na nkoko wa ngai Raquel, oyo ayekolaka kala te kotanga, “Okoki koloba nini mpo na kotia lotomo ya kotanga Buku ya Mormon?”

Eyano ya ye ezalaki, “Kasi, Nkoko, ezali mpasi. Ezali buku monene.”

Nde nasengaki ye atangela ngai lokasa moko. Nazwaki montele mpo na kotanga ngonga. Nalobaki, “Osali bobele minuti misatu, mpe buku ezali na nkasa 642, boye osengeli minuti 1.926.”

Eye ebangisaki ye kutu mingi koleka, yango wana nakabolaki motango wana na minuti 60 mpe nalobelaki ye asengalaki bobeli ngongo 32 mpo na kotanga yango. Moke koleka mokolo moko mpe katikati!

Nde alobaki na ngai, “Yango ezali pete, Nkoko.”

Na nsuka, Raquel, ndeko wa ye ya mobali, mpe bankoko ba biso misusu bazwa ntango mingi koleka oyo mpamba te eye ezali buku oyo esengeli kotangema elongo na molimo ya losambo mpe bomanioli.

Na ntango, toyekolaki kosepela na makomi, tokoganga lokola Mokomi ya Njembo: “Moloba na yo ijali na elengi na lolemo na ngai, ee ileki njoi na elengi na monoko na ngai!”8

6. Koyeba Makomi Ekoki Te; Tosengeli Kosalela Yango

Namikundoli ntango nawutaki misio, mpe kolukaka makomi na etingia, nakanisaki nayebaki yango nyonso. Na ebandeli ya bolingo bwa biso, Blanquy mpe ngai tolingaki koyekola makomi elongo. Nasalela mingi ya nkoma mpe matangi ma ngai mpo na kokabola boyebi ya nsango malamu elongo na ye. Nsima ya libalana nakomaki na koyeba ntango natangaki liteya monene uta na ye. Namekakikoteya ya nsango malamu, kasi ateyaki ngai bonibonikosalela yango.

Ntango Mobikisi asukisaki Esakola na Ngomba, Ye apesaki toli oyo: Yango wana “moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai mpe akotosaka yango akokokana na moto na mayele oyo atongi ndako na ye likolo na mabanga.”9

Baye basaleli mabongisi mazwani na makomi makopesa libondisi na baye bazali na mpasi. Ikomema esengo nab aye bazali ya kolemba, bokambi na baye babungi, kimia na baye batunisami, mpe toli ya sikisiki na baye bazali koluka bosolo.

Na bokuse:

  1. Tempelo ezali esika.

  2. Mpo na kobunda, esengeli bato babale.

  3. Mwana oyo azali koyemba azali mwana wa esengo.

  4. Nalingi oyamba ngai.

  5. Nalingi Buku ya Molomoni mpe Mobikisi wa ngai, Yesu Klisto.

  6. Koyeba makomi ekoki te; tosengeli kosalela yango.

Mateya maye mpe masusu mateyami na ndako moko—esika eye ekoki kokoma eteni ya lola awa o nse.10 Natatoli ete nsango malamu ya Yesu Klisto mpe mwango mwa Tata wa biso ya lola ekopesa bokambi moko ya sikisiki na bomoi mpe elaka ya bomoi ya seko, o nkombo ya Yesu Klisto, amene.