2010–2019
Maloba Tolobaka
Sánzá ya mínei 2013


Maloba Tolobaka

Lolenge tolobaka na bana na biso mpe maloba tosalelaka ekoki kopesa makasi mpe kotombola bango mpe kolendisa bondimi na bango.

Tata moko ya elenge kala te ayokaki liwa ya moteyi na ye ya kafukafu ya kelasi ya mibale. Na bokundoli na ntina na ye, akomaki: “Kati na mayoki mpe makambo namikundola, liyoki oyo nazali kokanisa mingi koleka nyonso ezali ‘libondi.’ Akokaki koteya ngai bokomi, galamele, matematiki, kasi oyo eleki na motuya mingi koleka ateyaki ngai kolinga kozala mwaana. Na kelasi na ye, ezalaki OK ya koloba liloba moko mabe awa mpe kuna; ‘toyekola yango,’ azalaki koloba. Ezalaki OK ya kosoba to kopasola to kokomakoma; ‘tokobongisa yango mpe tokopetola yango,’ azalaki koyanola. Ezalaki Ok komeka, OK ya koniolusa nzoto, OK ya kolota, mpe OK kosepela bisengo oyo eyaka uta na makambo mikemike maye kaka bana nde bamonaka kitoko.”

Moko ya banguya minene koleka nyonso moto akokoki kozala na yango na mokili ezali kozala na nguya na mwana. Babondimi mpe bomilongobanisi ya bana esalamaka na ebandeli ya bomoi na bango. Moto nyonso oyo azali koyoka ngai koloba azali na nguya ya kobutisa elikia ya mwana na yemei mobali to mwasi mpe kobutisa bondimi ya mwana na Tata na Lola mpe Yesu Klisto na nzela ya maloba tolobaka.

Na Helamani, mokapo 5 totangi, “Mpe sikawa, bana babali na ngaai, bomikundola, bomikundola ete ezali na likolo lya libanga lya Mosikoli, oyo azli Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, ete bosengeli kotonga nse na bino.” 1

Eye ezalaki maloba Elamani ateyaki bana na ye. Mpe totangi yango: “Mpe bamikundolaki lisusu maloba ma ye; mpe … bakendeki … kolakisa liloba lya Nzambe o ntei ya bato banso.” 2

Ata kutu bana ya Elamani baniokwamaki mpe batiamaki na boloko, maloba wana bayokaka ekweisaki bango mokolo moko te. babatelamaki mpe bazingamaki mpembeni na likonzi ya moto. Nde mongongo eyaki, kolobaka na bakangi na bango:

“Yambolani,mpe lukani lisusu te kobebisa basali ba ngai. …

“… Ezalaki te mongongo moko mwa kake, mpe mongongo moko mwa makelele ma lokito lonene, kasi tala, ezalaki mongongo mwa kimia mpe elengi ebongi nie, lokola soko ezalaki lisololi lyoko, mpe etobolaki kutu na bozo mpenza.” 3

Tokoki koyekola uta na mongongo euti na lola. Ezalaki makasi te, kongangelaka, to kokitisaka; ezalaki mongongo ya kimia mpe elengi ebongi nie, kopesaka bokambi ya sikisiki nzela moko na kopesaka elikia.

Lolenge tolobaka na bana na biso mpe maloba tosalelaka ekoki kopesa makasi mpe kotombola bango mpe kolendisa bondimi na bango mpo na kotikala na nzela ya kozonga epai ya Tata na Lola. Bayaki na mabele oyo ya kobelema mpo na koyoka.

Ndakisa ya mwana moko oyo azalaki koyoka esalamaki na magazini ya bilamba. Magazini etondaki na basombi ntango ekomaki mpenza na moto nyonso ete mama moko ayokaki nsomo mpamba te abungisaki mwana na ye ya elenge mobali. Na ebandeli, azalaki kobenga nkombo na ye. “Connor,” azalaki koloba ntango na mbalakaka abandaki koatambola nzinganzinga ya magazine. Lokola ntango elekaki mongongo na ye ekomaki makasi koleka mpe ya kolenga koleka. Mbala moko bakengeli mpe moto nyonso kati na magazini akotaki likambo yango na kolukaka mwana. Minuti mingi elekaki na elonga moko te ya komona ye. Mama ya Connor, na bososoli, azalaki kokoma liboma lokola ntango elekaki mpe azalaki noki noki kobelela nkombo na ye mbala na mbala.

Mosungi moko, nsima ya kolobaka losambo moko ya nse, azwaki likanisi ete Connor azalaki ntango mosusu na kati ya magazini mpe akokaki kobangisama wana ezalaki ye koyoka bongangi ya nkombo na ye na mama na ye. Alobaki yango na mama mosusu oyo akotaki na boluki yango, mpe nokinoki basalaki mwango. Elongo babandaki kotambola na katikati ya bamesa ya bilamba kozongela na malembe maloba “Connor, soki okoki koyoka mongongo na ngai koloba, ‘Nazali awa.’” Wana ezalaki bango kotambo malemalembe kokendaka nsima ya magazini kozongelaka maloba wana, solo mpenza, bayokaki mongongo ya malili, ya kimia koloba, “Nazali awa.” Connor azalaki kobombama na katikati ya bilamba ya kozingama na nse ya mesa moko. Ezalaki mongongo ya elengi ebongi nie oyo epesaki Connor makasi ayanola.

Sambela mpo na Koyeba Bamposa ya Mwana

Mpo na koloba na motema ya mwana, tosengeli koyeba bamposa ya mwana. Soki tosambeli mpo na koyeba bamposa wana, maloba nyonso tolobaka ekoki kozala na nguya ya kopesa nguya na mitema na bango. Babokasi na biso ekomisamaka monene ntango toluki bokambami ya Molimo Mosantu. Nkolo alobaki ete:

Tosengeli koloba makanisi maye ye akotia na mitema na biso, …

Ye akopesa biso maye tosengeli koloba na ngonga mpenza tozali na mposa na yango. 4

Kata mpe Yoka na Bolingo

Na mawa, babobendi makanisi libanda ya mokili oyo ezali kopekisa bana mingi koyokaka maloba maye makokaki kopesa nguya na emoneli ya bongomei.

Dr. Neal Halfon, monganga oyo akambaka Ndako mpo na Bana, Mabota, mpe Maangomba ya Konongono ya UCLA, alobeli “botali mpamba ya mikemike ya baboti.” Boyekoli moko oyo etali malamu mwana moko ya sanza 18 mpe baboti na ye:

“‘Mwana na bango amonanaki lokola na esengo, loningi mpe ya komipesa, na polele kolingaka masano mpe kolia Pizza elongo na baboti na ye. … Na nsuka ya elambo monene, Mama atelamaki mpo na kokende kosala etinda moko, kotikaka tata kobatela mwana.’

“Tata … abandaki kotanga nsango ya telefoni wana mwana azalaki kobunda kobenda bokebi na ye na kobwakaka biteni ya nsonge ya pizza. Nde tata amipesaki lisusu, kotalaka mwana na ye mpe kosakanaka elongo na ye. Nokinoki, atako bongo, abandaki kotala video na telefoni na ye elongo na mwana kino mwasi na ye azongaki.

“Na bandakisa nyonso mibale, [Dr.] Halfon amonaki bokiti ya mwinda ya kati ya mwana, bokiti ya mokangano katikati ya moboti mpe mwana.” 5

Biyano na losambo na bison a tina ya lolenge nini tokokokisa bamposa ya bana nabiso ekoki kozala ya kokata mingimingi na tekinolozi. Bangonga ya motuya ya libaku ya kokabola mpe kosolola elongo bana na biso oyo babunga ntango tomipesi na masona. Mpo na nini kopona ngonga te mokolo na mokolo ya kokata na tekinolozi mpe kokangana lisusu elongo? Na pete kanga biloko nyonso. Ntango osali yango, ndako nay o ekoki komonana ya kimia na ebandeli; okoki kutu koyoka lokola oyebi te nini kosala to koloba. Nde, wana ozali kopesa bokebi mobimba na bana na yo, lisolo moko ekobanda, mpe okoki kosepela koyokanaka.

Koma mpo na Kondimisa Bana na Yo

Tokoki lisusu kozala na nguya na bana na bison a nzela ya maloba oyo tokomelaka bango. Nefi akomi, “Mpo tosali na etingia mpo na kokoma, mpo ya kondimisa bana na biso … kondima na Klisto, mpe kozongisa boyokani na Nzaambe.” 6

Mokambi Thomas S. Monson akabolaki mayele ya Jay Hess, mokumbi mpepo oyo babetaki masisi na likolo ya mboka Vietnam ya Nodi na mibu ya 1960: “Na mibu mibale libota na ye eyebaki eloko moko te soki azalaki ya kokufa to ya bomoi. Bakangi na ye na Hanoi na nsuka bapesaki nzela akoma na ndako kasi bakatelaki ye ndelo ya nsango na ye na maloba mingi te koleka 25.” Mokambi Moson atuni: “Nini ekolinga yo mpe ngai kolobela mabota na biso soki tozalaki na likambo ya boye—kozalaka komona bango te mibu mibale koleka mpe koyebaka te soki tokomonaka bango lisusu? Kolinga kopesa eloko moko libota naye ekokaki koyeba lisusu lokola koosilaka kowuta na ye mpe lisusu kolingaka kopesa bango toli ya motuya, Ndeko mobali Hess akomaki [maloba maye]: ‘Makambo oyo ezali ntina: libala na tempelo, misio, lisanga likoki. Yekama likolo, tia bantina, koma mambi ma kala, zwa fotombala mibale na mobu.’”7

Malaba nini okolinga kokomela bana nay o soki ozalaki na maloba 25 to moke?

Tata ya elenge oyo nalobelaki na ebandeli, oyo akomaki na ntina ya makundoli na ye ya moteyi na ye ya kelasi ya mibale, azali sikawa kobokolaka bebe ya mwasi ya kitoko. Azali koyoka elikia ya lola oyo atiamaki kati na ye. Wana ezali ye kokola, nini ekozala lobi lokoya na ye? Nini akoloba oyo ekozinda na nse ya motema na ye? Maloba nini ekopesa ya makasi, ekotombola ye, mpe ekosalisa ye atikala na nzela? Ekosala bokeseni soki ewumeli mpo na koloba na nse, “Ozali mwana wa Nzambe”? Ekokundola ye mokolo mosusu ete tata na ye mbala minge azalaki koloba maloba, “Nalingaka makambo nyonso oyo etali yo”?

Ezali te maye oyo Tata wa biso na Lola azalaki koloba na Mwana wa Ye mpe na biso banso ntango alobaki, “ Oyo mwana na ngai na bolingo” mpe abakisaki nsima, “nasepeli na ye mingi”? 8

Tika maloba tolobaka mpe tokomaka na bana na biso elakisa bolingo Tata wa biso na Lola azali na yango mpo na Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe mpo na biso. Mpe nde ekoki biso kotelema mpo na koyoka, mpamba te mwana azali mpenza na likoki ya kolobaka makambo minene mpe kitoko lokola mbano. Nalobi oyo na nkombo ya Yesu klisto, amene.

Matangi

  1. Elamani 5:12.

  2. Elamani 5:14; biso nde tobeti nsete.

  3. Elamani 5:29–30.

  4. Tala Doctrine and Covenants 100:5–6.

  5. Tala Lois M. Collins, “Baby’s Development Potentially Harmed by Parents Texting,” Deseret News, sanza ya motoba 4, 2012, http://www.deseretnews.com/article/865556895/Babys-development-potentially-harmed-by-parents-texting.html.

  6. 2 Nefi 25:23.

  7. Thomas S. Monson, “Finding Joy in the Journey,” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2008, 86.

  8. Matai 3:17.