2010–2019
Kino Tokutana Lisusu
Sánzá ya mínei 2013


Kino Tokutana Lisusu

Nasambeli ete Nkolo akopambola mpe kobatela bino, bandeko ba ngai mibali mpe basi. Tika ete kimia alakeli biso ezala elongo na biso sikawa mpe ntango nyonso.

Bandeko ba ngai babali mpe basi, likita ya nkembo kani tozwi. Nayebi bokoyakana elongo na ngai ete bitinda ezalaki ya kofulama. Mitema mya biso misimbami, mpe matatoli ma biso ya bonzambe ya mosala oyo elendisami lokola toyakaki molimo ya Nkolo. Tika tomikundola maye toyoki mikolo miye mibale mileki. Nasengi bino bayekola bitinda oyo nsima ntango bikoniatama na mabimisi makoya ya mikanda yaEnsign mpe Liahona

Tolakisi botondi ya bison a moto na moko oyo alobi na biso, lokola bango baye bapesaki nsambo. Na bobakisi, miziki ezalaki ya kotombola mpe ya kofula. Tolingi Bayembi ya Tabelenakele na biso ya kitoko mpe totondi basusu bango baye babeti miziki lokola.

Tosangani elongo na kolakisa botondi na biso na baye ba bokambi mpe basali banene ya bilenge basi oyo bapemisamaki lobi. Mosala mwa bango ezalaki ya kokamwa mpe bomipesa na bango mobimba.

Tosungi, na maboko ya kotombwama, bandeko babali mpe basi baye babengami na bisika ya sika na likita oyo. Tolingi bango banso bayeba ete bozali koluka kosala elongo na bango na mosala ya Nkolo.

Tozali Eklezia moko ya mokili mobimba, bandeko babali mpe basi. Bondimi na biso ezwami na mokili mobimba. Nasengi bino bazala bana mboka ya malamu ya bikolo bisika bovandi mpe bazalani ya malamu na basanga ma bino, kosembolaka maboko epai ya baye ba bondimi mosusu lokola na oyo ya bisomei. Ekoka biso kozala kondina, lokola boboto mpe na bolingo na, baoyo tokabolaka te boyambi na biso mpe mibeko na biso. Mobikisi amemaki na mabele oyo nsango moko ya bolingo mpe bolingi malamu na mibali mpe basi banso. Ekoka biso kolanda ndakisa na Ye.

Nasambeli ete tokoka koyeba bamposa ya baye bazali nzinganzinga na biso. Ezali na boko, mingimingi o ntei ya bilenge, oyo bamikotisi na makama ya lopipi, bonsini, pornogalafi, bongo na bongo. Ezali na baoo bazali se bango moko, lokola basi bakufela mibali mpe mibali bakufela basi, oyo bazali na mposa ya moninga mpe komitungisa mpo na basusu. Ekoka bison tango nyonso ya kolengelama mpo na kosembola na bango loboko moko ya lisalisi mpe motema moko ya bolingo.

Tozali na ntango moko na mambi ya mokili ntango ezali na mikakatano mingi ya mpasi kasi lisusu mabaku minene mpe ntina ya kosepela. Ya solo, ezali na bangonga moko ntango tozwi bosisoi, mpasi na mitema, kutu makama na bomoi na biso. Nzokande, soki tokotii elikia na biso Nkolo, Ye akosalisa biso na bakpokoso na biso, atako nini yango ekoki kozala. Mokomi Nzembo apesaki boyebi oyo: “Kolela ekojala na butu, nde esengo ekoya na ntongo.”1

Bandeko babali mpe basi, nalingi boyeba botondi kani nazali na yango mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto, ezongisami na mikolo miye mya nsuka na nzela ya Profeta Joseph Smith. Ezali fungola ya esengo na biso. Ekoka biso kozala ya bosawa mpe ya losambo, kozalaka na bondimi ete Tata wa biso na Lola akoka kokamba mpe kopambola biso na bomoi na biso.

Napesi litatoli na ngaimei mpe natatoli epai na bino et Nzambe azali na bomoi, ete Ye akoyokaka nsambo ya mitema ya bosawa. Mwana na Ye, Mobikisi mpe Mosikoli na biso alobi na biso moko na moko: Yoka, natelemi na ekuke, mpe najali kobeta; soko nani akoyoka mongongo na ngai mpe akojipola monoko na ndako, nakokota epai na ye.”2 Tika tondima maloba maye mpe tozwa litomba ya elaka oyo.

Lokola likita oyo ekomi sikawa na nsuka, nabeleli mapamboli ya lola likola ya moko na moko na bino. Tika ete bandako na bino etonda na kimia, boyokani, boboto mpe bolingo. Tika ete etonda na Molimo ya Nkolo. Tika bokolisa mpe boleisa matatoli ma bino ya nsango malamu, ete ezala bobateli mpo na bino na kotelemelaka bibotu ya Satana.

Kino tokutana lisusu nsima ya sanza motoba, nasambeli ete Nkolo akopambola mpe kobatela bino, bandeko ba ngai mibali mpe basi. Tika ete kimia alakeli biso ezala elongo na biso sikawa mpe ntango nyonso. Natondi bino mpo nsambo na bino mpo na ngai mpe mpo na Bakambi Banene. Tozali na botondi ya mozindo mpo na bino. Na nkombo ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, oyo tozali kosalela, amene.