2010–2019
Boyei Bolamu
Sánzá ya mínei 2013


Boyei Bolamu na Likita

Nasengi bino mpenza bozala na bokebi mpe boyambi na bitinda oyo tokoyoka. Ete tokoka kosala bongo ezali losambo la ngai.

Bandeko ba ngai ba bolingo babali mpe basi, esengo kani nazali na yango mpo na kotombela bino boyei bolamu na Likita Linene ya Eklezia ya Mobu ya mbala 183.

Sanza motoba uta mbala ya nsuka tokutanaki, ezalaki libaku lya ngai mpo na kosala mwa mobembo mpe kokutana na boko na bino na bisika bya bino. Kolandaka likita linene nasalaki mobembo na Allemagne, wapi ezalaki litomba lya ngai mpo na kokutana na bandimi na bisika mingi na mboka wana lokola na biteni ya Autriche.

Mpe na nsuka ya sanza ya zomi, nabulisaki Tempelo ya Calgary Alberta na Canada, elongo na Mpaka mpe Ndeko mwasi M. Russell Ballard, Mpaka mpe Ndeko mwasi Craig C. Christensen, mpe Mpaka mpe Ndeko mwasi William R. Walker. Na sanza ya zomi na moko, nabulisaki mbala ya mibale Tempelo ya Boise Idaho. Lisusu kosalaka mobembo mpe kosalaka elongo na bolulisi ezalaki Mpaka mpe Ndeko mwasi David A. Bednar, Mpaka mpe Ndeko mwasi Craig C. Christensen, mpe Mpaka mpe Ndeko mwasi William R. Walker.

Bosepeli ya mboka na kosangisaka mabulisi mibale ezalaki kafukafu. Ngaimei nazalaki te na bosepeli ya mboka na Calgary, lokola ezalaki bokundoli ya mibu 85 ya Ndeko mwasi Monson mpe nayokaki ete nasengelaki kozala elongo na ye. Nzokande, ye mpe ngai tozalaki na litomba ya kotala bosepeli na kisuku na biso ya monene na televisio ya bato banso te, mpe nazwaki mpepo mpo na kokende na Calgary na ntongo elandaki mpo na bobulisi.Na Boise bilenge 9.000 ya disitiliki ya tempelo basalaki elongo na bosepeli ya mboka. Ezalaki na bilenge mingi mpenza wana ete ezalaki na esika te mpo na baye mabota mpo na kozala na stade esika wapi bango basakanaki.

Kaka na sanza eleki Mokambi Dieter F. Uchtdorf, elongo na Ndeko mwasi Uchtdorf, Mpaka mpe Ndeko mwasi Jeffrey R. Holland, mpe Mpaka mpe Ndeko mwasi Gregory A. Schwitzer, basalaki mobembo na Tegucigalpa, Honduras, mpo na kobulisa tempelo esili sika kuna. Bosepeli ya monzele ya bilenge esalemaki mpokwa yambo ya bobulisi.

Ezalaki na batempelo misusu oyo esakolami mpe oyo ezali na matambi kilikili yambo ya kobanda yango mpe oyo ebandi kotongama.

Ezali litomba lya ngai kosakola batempelo ya kobakisa, oyo na basanza mpe mibu mikoya ekotongama na bisika biye: Cedar City, Utah, mpe Rio de Janeiro, Brazil. Bandeko mpe Bandeko Basi, botongi tempelo ezali kokoba se kokoba.

Lokola boyebi, na likita linene ya sanza ya zomi nasakolaki mbongwana na mibu kani bilenge babali mpe bilenge basi basengeli kosala lokola bamisionele ya ntango mobimba, elongo na bilenge babali kokokaka sikawa kosala na mibu 18 mpe bilenge basi na mibu 19.

Eyani ya bilenge ezali ya kokamwa mpe ya kofulisa. Na sanza ya minei 4—mikolo mibale mileki—Tozali na bamisionele 65.634 na misio, na koleka 20.000 oyo bazwi mabiangi ma bango kasi oyo bakoti naino te na nganda ya boyekoli mpe koleka 6.000 na nzela ya bosololi elongo na baepisikopo ya bango mpe Bakambi ba makonzi. Esengeli mpo na biso kokela misio 58 ya sika mpo na koyamba mitango mibakisami ya bamisionele.

Mpo na kosalisa na kosimba limpinga oyo ya bamisionele, mpamba te mingi ya bamisionele ba biso bawuti na bizaleli ya bosawa, tobengisi bino, lokola bokoki, mpo na kopesa na liboko pete na General Missionary Fund ya Eklezia.

Sikawa, bandeko babali mpe bandeko basi, tokoyoka bitinda bifulami lelo mpe lobi lokoya. Bango baye bakoloba na biso balukaki na losambo koyeba oyo Nkolo alingi biso koyoka mbala oyo.

Nasengi bino mpenza bozala na bokebi mpe boyambi na bitinda oyo tokoyoka. Ete tokoka kosala bongo ezali losambo la ngai o nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo, amene.