2010–2019
Bozala basokemi mpe na Motema Mokita
Sánzá ya Zómi 2013


Bozala Basokemi mpe na Motema Mokita

Kozalaka mosokemi elingi koloba te botau, elingi koloba kozala na bolamu mpe boboto.

Mormon ateyaki ete moto “akoki te kozala na bondimi mpe elikia, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mokita.”1 Abakisaki ete na kozangaka bizaleli ya bongo, “bondimi mpe elikia ya ye ezali mpamba, mpo moko te ayambami liboso lya Nzambe, longola se soko azali mosokemi mpe motema mokita.”2

Bosokemi ezali lolenge ya baye bazali kobanga Nzambe, basembo, basawa, bateyami, mpe bampikiliki na nse ya mpasi.”3 Baye bazali na lolenge oyo balingi kolanda Yesu Klisto, mpe ezaleli na bango ezali ya kimia, ya botosi, ya kondima, mpe ya kokonzama.

Apostolo Paulo ateyaki ete bosokemi ezali mbuma ya Molimo.4 Yango wana, ekokoka na pete kozwama soki “tozali na Molimo.”5 Mpe mpo na kozala na Molimo, lolenge ya bomoi na biso esengeli kolakisa bosembo liboso na Nkolo.

Ntango tokamati nkombo ya Klisto likolo na biso, ezelaki ete tobunda mpo na komekola bizaleli na Ye mpe kobongola bomoto na biso mpo na kokoma mingi koleka lokola Ye mokolo na mokolo. Mobikisi, kopamelaka bayekoli na Ye, alobaki, “Yango wana bozala bobongo nie, kutu lokola Tata wa bino oyo azali na Lola abonga nie.”6 Soki “toyei epai ya Klisto, … toboyi [bisomei] bozangi bonzambe nyonso; … mpe tolingi Nzambe,” nde na nzela ya ngolu ya Nzambe mokolo ekoya ntango tokokoka kobonga nie na Ye.7

Bizaleli bo Klisto ezali makabo ya Nzambe. [Bizaleli oyo] ekoya ntango [biso] tosaleli boponi na [biso] na bosembo mpe tokolinga mpe tokomitungisa mpe na komibongisa.”8

Bosokemi ezali ya ntina mpo na biso mpo na kokoma mingi koleka bo Klisto. Na kozangaka yango tokoki te kokolisa bolamu mosusu ya motuya. Kozalaka mosokami elingi kolaba te botau, kasi elingi koloba kozala na bolamu mpe boboto, kolakisaka bokasi, kimia, komilinga ya malamu, mpe komikonza.

Bosokemi ezalaki moko ya bizalela efulukaki mingi na bomoi ya Mobikisi. Yemei ateyaki bayekoli na Ye, “Boyekola na ngai; mpo ngai nazali mosokemi mpe motema mokita.”9

Topambolaki kobotama na nkona ya bosokemi na mitema na biso. Tizali na mpoza ya kososola ete tokoki te kokolisa mpe kobakisa nkona wana na mbalakaka kasi kutu na botamboli ya ntango. Klisto asengaki biso “Bomeka ekulusu na bino mokolo na mokolo,” 10 elingi koloba ete esengeli kozala kokangama mpe mposa ya sikisiki.

Mokambi Lorenzo Snow, profeta ya mitano ya eleko na biso, ateyaki, “ezali mokumba na biso komeka kobonga nie, … mpo na komibongisa mokolo na mokolo, mpe kotelela nzela na biso ya pos eleki mpe kosala makambo malamu mingi poso oyo; kosala makambo ya lelo malamu mingi koleka tosalaki lobi.”11 Yango wana litambe ya liboso mpo na kokoma mosokemi esali komibongisa mokolo na mokolo. Mokolo na mokolo tosengeli komeka kozala malamu mingi koleka oyo eleki lokola tozali kokende liboso na nzela ya bokoli.

Mokambi Snow abakisaki ete:

“Tozali na mwa liboma na biso mpe botau na biso; tosengeli komeka kolonga yango noki mpenza lokola tokoki, mpe … tosengeli [koyingisa] mayoki maye na mitama ya bana na biso… ete tokoka koyekola [kozala] bo elongobani liboso na Ye na ntango inso.

“Soki mobali akoki kozala elongo na mwasi na ye mokolo moko na kozanga koswana to na kozanga kozala na ye na bobote te to na kozanga kotuka Molimo ya Nzambe …  ; azati tii wana ya kobonga nie. Nde tika ameka kozala lolenge moko mokolo ekolanda. Kasi soki akokweya na kokemeka ya mokolo ekolanda, yango ezali te ntina nini ye asengeli kolonga ten a kosalaka yango mokolo ya misato.”12

Nsima ya kondima bomipesi mpe molende na biso, Nkolo akopesa biso oyo tokoki te kozwa na ntina bozangi bobongo mpe botau na biso.

Litambe mosusu ya motuya mpo na kokoma mosekomi ezali koyekola kokonza mayoki na biso. Mpamba te moto ya mokili afandi na kati na moko na moko na biso mpe mpamba te tozali na mokili etonda na bofindi, kokonza mayoki na biso ekoki kokoma moko na mikakatano na bomoi na biso. Kanisa mwa ngonga moke boniboni okoyanola ntango moto moko atosi te mposa na yo ntango yo olingi yango. Nini ntango bato bandimi te mokanisi na yo, atako osali na ntembe ata moke te ete yango ezali eyano elongobani na motuna? Nini ezali eyano na yo ntango moto moto moko atuki yo, atongi makasi na yo, to azali bobele na bosengo te mpamba te ye alamuki mabe? Na ntango wana mmpe na ntango mosusu ya mpasi, tosengeli koyekola kokonza mayoki na biso mpe kolakisa mayoki na biso na bompikiliki mpe kondimisa ya boboto. Eye ezali na motuya mingi koleka na kati ya ndako mpe na kati ya mikangano na biso elongo na baninga na biso ya seko. Na mibu 31 nabalani na kamalali na ngai ya motama, ye akopesaka ngai mbal mingi makundoli ya boboto ya yango ntango tokokutanaka na mikakatano mibongisami te ya mokili.

O ntei ya malakisi mazwami na Mokanda ya Mibale na Timote, Apostolo Paulo alobaki:

“Mpe mosali ya Nkolo asengeli kobunda te; kasi kozala boboto mpo na bato banso, akoka koteya, na bompikiliki,

“Na bosokemi kolakisaka baye bazali kokesana bangomei; soki ntango mosusu Nzambe akopesa bango boyamboli mpo na koyeba bosolo;

“Ete bakoki komibikisa.”13

Na kokonzaka biyano na biso, kozalaka na kimia mpe na ndelo, mpe koboya koswana, tokobanda komibongisa mpo na likabo ya bosokemi. Mokambi Henry B. Eyring mbala moko alobaki, “Ntango biso na bondimi tokonzi mayoki na biso mpe tokitisi lolendo na biso, Molimo Mosantu akopesa biso bondimi na Ye, mpe bilaka mpe mayokani ya bule ekokoma sikisiki.”14

Litambe mosusu mpo na kozwa bosokemi ezali kokoma mosawa. Nkolo alakisaki Thomas B. Marsh na nzela ya Profeta Smith, kolobaka, “Zala mosawa; mpe Nkolo Nzambe nay o akokamba yo na lobako, mpe akopesa yo eyano na nsambo na yo.”15

Nandimi, bandeko babali mpe bandeko basi, ete bobele baye bazali basawa bakoki koyeba mpe kososola biyano ya Nkolo na nsambo. Basawa bakoteyama, koyebaki boniboni bazali ya koyekama na Nzambe mpe bazali na mposa ya kokanzama na bolingi na Ye. Basawa bazali basokami mpe bazali na bokoki mpo na kozala na nguya na basusu mpo na kozala lolenge moko. Elaka ta Nzambe mpo na kozala basawa ezali ete Ye akokamba bango na loboko. Nandimi ya solo ete tokokima zunguluke mpe mawa na bomoi na biso mbala inso tokotambola loboko na loboko na Nkolo.

Moko ya ndakisa ya mikolo ya lelo eleki kitoko ya bosokemi oyo nayebi ezali ya Ndeko mobali Moses Mahlangu. Mbongwana na ye ebandaki na 1964, ntango azwaki mokanda moko ya Buku ya Mormon. Asepelaki mingi ntango atangaki buku yango, kasi ezala kino ebandeli ya mibu 70 nde amonaki elembo ya Eklezia ya BMS na efelo ya ndako moko na Johannesburg, South Africa, ntango azalaki kotambola na nzela. Ndeko mobali Mahlangu atungisamaki mpe akotaki na nddako mpo na koyekola mingi etali Eklezia. Bayebisaki ye na boboto ete akokaki kokende na likita to kobatisama te mpamba te mibeko ya ekolo epesaki ndingisa te ntango wana.

Ndeko mobali Mahlangu andimaki mokano na bosokemi, bosawa, mpe na kozanga motema mabe, kasi akobaki kozala na mposa ya makasi mpo na koyekola mingi etali Eklezia. Atundaki bakambi ya Eklezia soki bakokaki kotika moko ya maninisa ya ndako ya losambo ya kofungwana ntango ya Makita mpo ete akoka kofanda libanda mpe koyoka liyangani. Mpo na mibu mingi, libota mpe baninga ya Ndeko mobali Mahlangu bakendeko eklezia mbala na mbala “na nzela ya lininisa.” Mokolo moko na 1980 bayebisaki bango ete bakokaki kokende na eklezia mpe lisusu kobatisama. Nkembo kani ezalaki mpo na Ndeko mobali Mahlangu.

Nsima Eklezia ebongisaki etape moko na nzinganzinga ya Soweto. Yango esalemaki bobele  na ntina ya molende, nkonzo, mpe botongono ya bato lokola Ndeko mobali Mahlangu oyo batikalaki botongono mpo na mibu mingi na bantango ya mpasi.

Moko ya baninga ya Ndeko mobali Mahlangu, oyo asanganaki na Eklezia na ntango wana kaka, ayebisaki lisolo oyo na ngai ntango nakandeki na Likonzi ya Soweto. Na nsuka ya lisolo na biso, ayambaki ngai. Na ntango wana, bandeko babali mpe bandeko basi, nayokaki lokola soki nazingamaki na maboko ya bolingo ya Mobikisi. Bosokemi ewutaki na miso ya ndeko mobali oyo ya malamu. Na motema etonda na bolamu mpe botondi ya mozindo, atunaki ngai soki nakokaki bobele koloba na Mokambi Thomas S. Monson botondi mpe lipamboli kani ye mpe basusu mingi bazalaki mpo na kozwaka nsango malamu na bomoi na bango. Ndakisa ya bosekomi ya ndeko mobali Mahlangu mpe baninga na ye ya solo ezalaki na nguya na bomoi mingi libela—mingimingi mpo na ya ngai.

Bandeko babali mpe bandeko basi, nandimi Mobikisi Yesu Klisto azali ndakisa ya nsuka ya bosokemi. Kutu na ngonga ya nsuka ya bomoi na ye ya bokufi, efundamaki mpe esambisamaki ye lokuta, na bolozi komemaka ekulusi na Ye na Gologota, esekamaki ye mpe elekelamaki ye mabe na banguna na Ye, esundolamaki ye na mingo oyo bayebaki Ye mpe bazalaki banzeneneke ya bikamwa na Ye, Ye abakamaki na ekulusi.

Kutu nsima ye mpasi ya nsomo ya nzoto, Nkolo abalukaki na Tata wa Ye mpe alobaki uta nan se ya bosokemi mpe motema ya bosawa na Ye: “Tata, limbisa bango; mpe bayebi te nini basali.”16 Klisto akutanaki na mpasi ya nzoto mpe ye molimo ya nsuka, kopesaka biso biso libaku mpo na kobongola bomoto na biso ya molimo mpe kokoma basekomi lokola Ye..

Natatoli et Yesu Klisto azali Mobikisi. Natatoli na bino été, na lisalisi ya bolingo na Ye, ekoki kosalema tobongwana. Ekokikosalema totika botau nsima. Ekoki kosalema tobwaka nguya ya mabe na bomoi na biso, tokonza nkanda na biso, tokoma bosokemi, mpe tokolisa bizaleli ya Mobikisi na biso. Ye alakisaki biso nzela. Ye apesaki biso ndakisa ebonga nie mpe atindaki moko na moko na biso mpo na kokoma lokola Ye azali. Libengisi na Ye na biso ezali kolanda Ye, kolanda ndakisa na Ye, mpe kokoma lokola Ye. Ya bosolo oyo natatali na nkombo na Ye ya bule, kutu Yesu Klisto, amene.