2010–2019
Bobiangemi na Ye mpo na kosakola liloba na Ye
Sánzá ya Zómi 2013


Bobiangemi na Ye mpo na Kosakola Liloba na Ye

Bikuke mpe mitema efungwama mikolo minso na nsango malamu—nsango eye epesaka elikia mpe kimia mpe esengo na bana na Nzambe.

Ntango nabengamaki lokola Mokambi Monene na sanza ya minei eleki, nazalaki mokambi ya misio na Inde. Ntango ya mosala na ngai nabandaki kotala mpenza nini mokambi ya kala ya misio alobaka na ngai“bamisionele ba Eklezia eye bazali mpenza ya kokamwa.”1

Moko ya bamisionele ya kafukafu elongo na moko oyo ndeko mwasi Funk mpe ngai tokambaki ezalaki Mpaka Pokhrel awutaki na Nepal. Nsima ya kozala mondimi ya Eklezia mpo na mibu Mibale, ye abengamaki mpo na kosala na Misio moko ya Inde Bangalore, Misio ya lokota ya Angele. Akokaki koyebisa yo ete amibongisaki malamu te. Yango ekokaki kososolama. Amonaka misionele mokolo moko te kino azalaki misionele ya ymbo. Ayebaki kotanga Angele malamu te mpo na kososola mikano ya mosala ya libiangi na ye. Ntango akomaki na nganda ya koyekola ya bamisionele, esika ya komema patalo ya kitoko, simisi ya mpembe mpe kalavati, ye amemaki“patalo mitano ya jeans, mpe bapolo mibale, kisi ya zazu mpo na nsuki.”2

Atako azwaki bilamba esengelaki, ayokaki akokaki te mikolo nionso mwa baposo oyo ezalaki ya ebandeli. Ye alimbolaki mikolo wana ya misio na ye: “kaka te Angele ezalaki mpasi, kasi mosala ezalaki ya mikakatano…Na likolo ya nyonso wana, nazalaki na nzala, ya kolemba, mpe na mposa ya ndako… Atako makambo ezalaki mpasi, nazwaki mokano. Nayokaki kolemba mpe nakokaki te. Nalingaki kosambela mpo ete Tata wa biso ya Lola asunga ngai. Na ntembe te, ntango nionso nasambelaki, nayokaki bolendisi.”3

Atako mosala ya misio ezalaki ya sika mpe mikakatano mpo na Mpaka Pokhrel, asalaki mosala yango na bondimi mpe bondimi koleka, nakolukaka kososola mpe kolanda maye azalaki kotanga na makomi, Preach My Gospel, mpe bakambi na ye ya misio. Akomaki misionele ya nguya ya nsango malamu—na Angele—mpe mokambi malamu koleka. Nsima ya misio na ye mpe mwa ntango na Nepal, azongaki na Inde mpo na kozongela kelasi na ye. Uta sanza ya yambo ye asalaki lokola Mokambi ya etape na New Delhi. Na ntina ya bokoli asalaki lokola misionele, akobi na bokoli ya Eklezia na Inde.

Ndenge nini elenge mobali oyo amonaki mokolo moko te misionele akoma na kondima bokasi ya molimo boye? Lolenge nini okozwa nguya ya molimo lokola misonele mpo na kofungola bikuke, bae-mail, mpe mitema ya baye bazali na misio wapi okosala? Bo momesano, biyano bizali na kati ya makomi mpe maloba ya baprofeta mpe bapostolo.

Ntango nsango malamu eteyamaki mbala ya yambo na Angletere na sanza ya nsambo na 1837, Nkolo abimisaki, “Oyo bokotinda na nkombo na ngai, na mongongo ya bandeko na bino, bapostolo, bakozwa etinda elongobani mpe bazwi ndingisa mpo na bino, bakozwa nguya ya kofungola ekuke ya bokonzi na ngai na ekolo bisika binso bokotinda bango.”4

Bisika binso botindami, na misio nionso wapi botiami, boyeba ete moko ya ba Zomi na Babale apesi etinda elongobani na mosala wana mpe bobengami na profeta ya Nkolo. Bobengami “na lisakoli, mpe na botiami maboko.”5

Nkolo nde apesi mikano mpo na elaka eye ekokisama. Mpe alobaki, “Mbala inso [elingi koloba elaka ekokokisama soki] bango [elingi koloba bamisionele oyo batindami] bakozala basawa liboso na ngai, mpe [2] batikali na liloba na ngai mpe [3] bayokameli mongongo ya molimo na ngai.”6

Bilaka ya Nkolo bizali polele. Mpo na tozwa nguya ya molimo esengelami mpo na kofungola ekuke ya Bokonzi ya Nzambe na ekolo na yango botindami, bosengeli kozala na bosawa, botosi, mpe kozala na bokoki ya koyoka mpe kolanda Molimo.

Bizalela misato eye bizali penepene ekangani. Soki bozali basawa, bokozala na botosi. Soki bozali na botosi, okoyoka Molimo. Molimo mozali na ntina mpenza mpo, lokola Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki, “Soki bozangi Molimo, bokolonga soki moko te kotala te batalanta na mpe bokoki na bino.”7

Lokola mokambi ya misio moko, na libaku nasololaki na bamisionele oyo babundaki mpamba te bazali peto mobimba te. Bazalaki na nse ya bokoki na bango ya molimo. Atako basalaki makasi to bolamu bango basalaki, bakokaki te koyoka kimia mpe kosepela mobimba na kimoninga ya Molimo Mosantu kino bamikitisaki, bayambolaki mobimba, bakabolaki ngolu mpe mawa ya Mobikisi.

Nkolo ateyaki basali na ye bazala na bosawa, mpamba te mosala ya kobikisama na molimo ekobanda na motema ya kobukana. Bokanisa bolamu eye ewutaka na biloko ebukana: mabele ebukana mpo na kolona ble. Ble ebukani mpo na kosala lipa. Lipa ebukani mpo na kokoma bilembo ya elambo. Ntango moko oyo ayamboli akaboli elambo na motema ya kobukana mpe molimo ya mawa, ye akomi mobimba.8 Ntango toyamboli mpe tokomi mobimba na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto, tozali na mingi koleka mpo na kopesa na Mobikisi ntango tosaleli Ye. “Iyo, boya epai na ye, mpe bobonzela milimo na bino mobimba lokola libonza epai na ye.”9

Soki bozali na mokumba ya masumu mpe na mposa ya boyamboli, nasengi bino bosala yango nokinoki. Ntango Yesu abikisaki baye batungisamaki, Ye mbala mingi abengisaki bango kotelema. Makomi elobi ete basalaki yango na lombango, to nokinoki. 10 Mpo na kobikisama na mitungisi ya molimo, nasengi bino bondima libengisi na ye mpo na kotelema. Na kozela te, solola na episikopo na yo, mokambi ya etape, to mokambi ya misio mpe banda mosala ya boyamboli sikawa.

Nguya ya kobikisa ya Bomikabi ekomema kimia na molimo na yo mpe ekopesa bino nzela ya koyoka Molimo Mosantu. Libonza ya mobikisi eleki motuya, kasi masumu na biso, atako mingi mpe makasi, ekoki kolobama mpe koyambolama, kotikama mpe kolimbisama. “Mpe esengo monene kani ezali esengo na ye na molimo oyo eyamboli!”11

Elaka eye na Doctrine et Alliance ezali na nguya: “Tika bolamu ekembisa makanisi na yo, nde bondimi na yo ekola makasi liboso ya Nzambe.”12 Lokola bomoi na bino ezali ya malonga, bokoyoka bondimi ya kimia na botelemi na bino liboso ya Nzambe mpe okozala na nguya ya Molimo mpo na kozala na yo elongo.13

Baye bazali bandimi ya sika na Eklezia to bazali bazongi na mosala mobimba bakoki koloba, “Nazali sikoyo na bolongobani mpe nazali na mposa ya kosala, kasi nayebi te soki nayebi ya kokoka. ” Na sanza ya minei, Mokambi Thomas  S. Monson ateyaki, “boyebi ya bosolo mpe biyano na mituna na biso ya minene mingi koleka eyelaka epai na biso lokola tozali kotosa mitindo ya Nzambe.”14 Ya bobangi lisusu te kani ezali koyeba ete na nzela ya botosi na biso nde tozwaka boyebi.

Misusu bakoki kokanisa ete bazali na batalanta, bokoki, to mayele esuka mpo na kobonza. Soki ozali na matungisi ya boye, mikundola likambo ya Mpaka Pokhrel. Milengela malamu lokola okoki, mpe yeba ete Tata wa biso ya Lola akokomisa monene bokasi ya bosawa mpe ya botosi na yo. Mpaka Richard G. Scott apesaki toli oyo kolendisa: “Ntango totosi mitindo ya Nkolo mpe tosaleli bana na Ye na ofele, mbano ekolanda mpenza ezali nguya ewuti na Nzambe—nguya ya kosala mingi koleka oyo tokoki kosala bisomei. Makanisi na biso, batalanta na biso, bokoki na biso ekotandolama mpamba te tozwaki bokasi mpe nguya ewuti na Nkolo.”15

Lokola bolikiami na Nkolo mpe bolingo na Ye, Nzambe Wa Bokasi Bonso akopambola bana na Ye na nzela na bino.16 Mpaka Hollings ya Nevada ayekolaki yango na ebandeli ya misio na ye. Nsima ya bokomi na ye na Inde, akendaki mobembo elongo na Ndeko Mwasi Funk mpe ngai na Rajahmundry, etuka na ye ya yambo. Mpokwa wana Mpaka Hollings mpe Mpaka Ganaparam bakendaki kotala mondimi moko ya Eklezia mpe mama na ye. Mama alingaki koyekola na ntina ya Eklezia, mpamba te amonaki lolenge nini nsango malamu epambolaki bomoi ya mwana na ye ya mwasi. Ndeko Mwasi Funk asanganaki na bango mpo na mpo na kosala bondeko. Mpamba te liteya elingaki koteyama na Angle mpe mama alobaki kaka Telugu, ndeko moko ya etape azalaki wana mpo na kobongola maye mateyamaki.

Mosala ya mpaka Hollings na bokutani ya liteya na ye ya yambo ezalaki koteya Limoni ya Yambo, kosalelaka maloba ya Joseph. Na esika wana ya liteya, abalukaki na Ndeko Mwasi Funk mpe atunaki, “esengeli ngai koloba yango liloba moko na moko?”koyebaka maye ekobongolama.

Ye azongisaki, “Loba yango liloba moko na moko mpo ete Molimo ekoka kotatola maye okoloba.”

Ntango misionele oyo ya sika ateyaki na bosolo Limoni ya Yambo, nakosalelaka maloba ya Profeta, elongi ya ndeko mwasi wana wa bolingo ebongwanaki. Mpizoli ebimaki ye. Ntango Mpaka Hollings asilisaki nsangowana ya nkembo, mpe yambo maye ye alobaki ebongolama, atunaki na kati ya mpizoli na ye na lokota na ye ya mbotama, “Ekoki ngai kobatisama? Mpe bokoteya mwana na ngai ya mobali?”

Baninga na ngai bilenge basali, bikuke mpe mitema ezali kofungwama mikolo na mikolo na nsango malamu—nsango moko oyo ememi elikia mpe kimia mpe esengo na bana ya Nzambe na mokili mobimba. Soki bozali na bosawa, botosi, mpe boyokemeli mongongo ya Molimo, bokozwa esengo monene na mosala na bino lokola misionele.17 Eleko kitoko kani ezali kozala misionele—ntango moko oyo Nkolo azali kowelisa mosala na Ye!

Natatoli na ntina ya Mobikisi na biso mpe “etinda ya Nzambe”18 ya “kokende, mpe koteya bikolo binso.”19 Oyo ezali Eklezia na Ye. Ye azali kokamba yango na nzela ya baprofeta mpe bapostolo ya bomoi. Na ngonga ekolanda, Bokambi bwa Yambo ekoteya biso. Tokoki kozala“mbangu na kotala,”20 lokola Mormon azalaki, boye ntango libiangi liye, tozala ya kolongobana mpe ya kokoka mpo na kosakola na nguya ya Molimo: “Tala, nazali moyekoli ya Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe. Nabiangemaki na ye mpo ya kosakola liloba o ntei ya bato ba ye, ete bakoka kozwa bomoyi bwa libela.”21 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Masolo elongo na Dennis C. Brimhall, mokambi Misio ya Kentucky Louisville, 2005–8.

  2. Ashish Pokhrel, “My Name Is Ashish Pokhrel and This Is My Story” (unpublished personal history, ya sanza ya libwa. 2011).

  3. Pokhrel, “Nkombo Nangai Ezali Ashish Pokhrel.

  4. Doctrine et Alliances 112:21.

  5. Biteni ya Bondimi 1:5.

  6. Doctrine et Alliances 112:22.

  7. Ezra Taft Benson, na Precher Mon Evangile: A Guide to Missionary Service (2004), 176.

  8. Makanisi mazwami uta na lisolo epesamaki na Mpaka Jeffrey  R. Holland na likita ya Likonzi ya Bountiful Utah North, Sanza ya Motoba 8–9, 2013.

  9. Omini 1:26.

  10. Tala Malako 5:41–42;Yoane 5:8–9.

  11. Doctrine et Alliances 18:13.

  12. Doctrine et Alliances 121:45.

  13. Tala Doctrine et Alliance 121:46.

  14. Thomas  S. Monson, “Obedience Brings Blessings,” Ensign to Liahona, ya sanza ya mitano 2013, 89.

  15. Richard  G. Scott, “For Peace at Home,”Ensign to Liahon, ya sanza ya Mitano 2013, 30.

  16. Nakolimbolaka nini bamisionele ya sika basengeli kosala, Mpaka Russell  M. Nelson alobaki: “Bakosala maye bamisionele basalaka ntango inso. Bakoteya nsango malamu! Bako ambola bana ya Nzambe wa Bokasi Bonso!” (“Catch the Wave,” Ensignto Liahona,ya sanza ya mitano 2013, 45).

  17. Tala Precher Mon Evangile,v.

  18. Thomas S. Monson, “Come, All Ye Sons of God,” Ensignto Liahona, sanza ya Mitano 2013, 66.

  19. Matai 28:19.

  20. Mormon 1:2.

  21. 3 Nefi 5:13.