2010–2019
Nkombo ya Lisolo ekoya nsima
Sánzá ya Zómi 2013


Title to come

Wana ezali biso kozongisa sika mpe kokumisa mayokani na biso, mikumba na biso ekoki kokomisama pepele, mpe tokoki kokoba kokoma peto mpe ya kolendisama.

Bandeko basi, elengi kani ezali kokutana elongo na bino lisusu.

Nakutanaki kala te na mwasi moko oyo azalaki komilengela mpo na kobatisama. Eyenga ya bokeseni oyo akomaki na eklezia nsima ya kotambolaka 3 km na potopoto makasi. Akotaki mbala moko na kikoso, asokolaki, mpe alongolaki bilamba ya potopoto, mpe alataki bilamba ya peto ya eyenga. Kati na liyangani Lingomba ya Bamama Basungi alobelaki mbongwana na ye. Nasimbamaki na mposa na ye makasi ya kosokwama malamu mpe kopetolama na nzela ya boyamboli mpe ya libonza ya bomikabi ya Mobikisi mpe bolingi na ye ya kotika “bomoi na ye ya kala” na ntina ya kosala mayokani ya bule elongo na Tata na biso na Lola. Akabwanaka na likango na ye, azalaki kolonga babokakemi mpo na kosalela Liloba ya Bwania, atikaka mosala na ye ya eyenga, mpe abungisaka boninga ya balingami ntango ayebisaki miango na ye ya kobatisama, Azalaki motema likolo mpensa mpo na kobwakisa masumu na ye nyonso, ete akokaki koyoka bolingo ya kosikola ya Mobikisi mpe kopetolama. Nafulamaki ntongo wana na mposa ya kokoma peto na nzoto mpe na molimo lokola.

Toyebi ete mingi kati na bino bamibonzi na lolenge oyo ntango boyoki litatoli ya Molimo Mosantu mpe bolingi koyambola, kobatisama, mpe kokomisama peto. Ntango mosusu ngonga moko te toyoki bolingo ya bonzambe ya Mobikisi na mingi lokola tosalaka ntango toyamboli mpe toyoki maboko na Ye ya bolingo ya kosembolama maboko mpo na koyamba biso mpe kolakisa biso na ntina ya bolingo mpe bondimami na Ye.

Mwa baeyenga eleki wana ezalaki ngai koyoka losambo ya elambo, nasimbamaki na lolenge oyo nganganzambe alobelaki liloba moko na moko na liyoki makasi. Nsima nabengisaki nganganzambe wana mpo na kotondo ye mpo na kosalisaka mpo na kokomisa elambo likambo moko ya mozindo mpo na ngai mpe liyangani. Azalaki na ndako te, kasi mama na ye ayangolaki, “O akozala na esenge ete obengaki! Oyo ezalaki mbala na ye ya yambo ya kopesa losambo ya eloambo, mpe tozalaki komilengela elongo, kolebela etali motuya ya losambo mpe bolongobani kozongisaka sika mayokani ya libatisi elongo na Mobikisi.” Nalingaka mpenza mama molingami oyo mpo na koteyaka mwana na ye ya mobali oyo etali nguya ya mayokani ya libatisi mpe boniboni akoki kosalisa bandimi ya palwasi bayoka nguya wana.

Mama mosusu nayebi avandi ye moko na eklezia mpo na motango na mibu mingi elongo na bana na ye minei ya bilenge. Mbala mingi te azalaki kokoka komaniola Mobikisi na elambo, asalaki mwango. Sikawa azali komeka kolekisa ntango poso moko na moko kososolaka poso na ye mpe kozongelaka na ntina ya mayokani mpe maye azalaki na yango mposa mpo na koyambola. “Nsima,” alobaki, “likambo te likambo ya lolenge nini nazali na yango elongo na bana na ngai, namilengeli mpo na kokabola elambo, kozongisa sika mayokani na ngai, mpe koyoka nguya ya kopetola ya Bomikabi.”

Mpo na nini Mobikisi atiaka motuya mingi mpenza na elambo, balingami basi? Motuya nini bozongisi sika oyo ya mayokani ya libatisi na biso esalaka na bomoi na biso? Ezali biso koyeba lisusu likoki ya Mobikisi ya kopetola biso mobimba poso nyonso wana ezali biso kokabola elambo na bolongobani mpe na bokebi? Mokambi Boyd K. Packer atatoli, “Wana ezali elaka ya Nsango malamu ya Yesu Klisto mpe Bomikabi:  …Na nsuka ya [bomoi na biso, biso] tokoki koleka na voile nsima ya koyambolaka masumu [na biso] mpe nsima ya kosukwamaka pee na nzela ya makila ya Klisto.”1

Bokambi na biso oyokaka esengo makasi ntango bandeko na biso basi mpe mabota na bango bazali kosala mpe kobatela mayokani, kasi mitema na biso esalaka mpasi mpo na baye na bino oyo bozali kokutana na bonguna na bomoi na bino mpo na bobuki mayokani na balingami. Profeta Yakobo, ndeko mobali ya Nefi, apesamaki mokumba na Nkolo mpo na koloba na bandeko na ye mibali na ntina ya basi mpe bana malamu ya mokolo na ye. Natatoli ete maloba na ye ebatelamaki mingimingi mpo na mokolo na biso. Alobi na biso lokola soki Mobikisi Yemei azalaki koloba. Yakobo “alembisamaki na  …bobangi mingi” lokola etatolaki ye na mibali babala mpe batata:

“Epesi ngai mpasi ete nasengeli nasala mpiko mpenza ya bolobi  … liboso ya basi na bino mpe bana na bino, mingi ya mayoki na bango mazali ma boboto mpenza mpe bongondo mpe na bokengi. …

“Bileli ya mitema na bango bimati na Nzambe likolo …Mitema mingi [misili ] kokufa, mitubolamaki na mpota ya mozindo.” 2

Na basi mpe bana ya mokolo na ye mpe na biso oyo babateli mayokani:

“Talani epai ya Nzambe na sikisiki ya mayele, mpe sambelani epai na ye o bondimi boluti, mpe akobondisa bino o matungisi ma bino. …

“… Tombolani mito na bino mpe zwani liloba ya elengi lya Nzambe, mpe salani lipati likolo lya bolingo bwa ye; mpo bokoki, soko mayele ma bino mazali sikisiki, libela.” 3

Bandeko basi, natatoli na ntina ya bokasi mpe nguya ya losambo wana efungoli biso mitema na biso epai ya Tata wa biso ya Lola, kolobelaka bampasi ya mozindo mpe mposa na biso mpe biyano oyo ezwami ntango “tosali lipati” ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi..

Penepene na mibu misato eleki moto moko ya makasi ebebisaki kati ya tabelenakele ya bolingo, ya ntango nyonso na Provo, Utah. Na mokangano na yango na lisolo ya bapionie na biso, bobungisi na yango etalamaki lokola likama monene na lisanga mpe bandimi ya Eklezia. Mingi bakamwaki, “Mpo nini Nkolo atikaki yango esalema? Na ntembe te Ye akokaki kopekisa moto to kokata libomi na yango.”

Sanza zomi nsima, na likita linene ya oktoba 2011, ezalaki na makelele moko eyokanaki ntango Mokambi Thomas  S.Monson ayebisaki ete tabelenakele oyo ebebaki ndambu esengelaki ekoma tempelo ya bule—Ndako ya Nkolo! Na mbala moko tokokaki komona maye Nkolo ayebaka ntango nyonso! Apelisaki moto te, kasi apesaki nzela na moto ebebisa kati. Amonaki Tabelenakele lokola tempelo ya kafukafu—ndako ya mikolo nyonso mpo na kosala mayokani ya bule—mpe toyekolaki na ntina ya mapamboli oyo ekoki koya ntango tolikii na Ye na mimekano ya bompikiliki mpe bondimi.4

Bandeko basi balingami na ngai, Nkolo epesaka biso nzela tomekama mpe kotalama, ntango mususu koleka likoki na biso nyonso. Tomoni bomoi ya balingami na biso kozikisama na miso ya bomoto na nse mpe tokamwe mpo na nini Tata wa Lola ya bolingo mpe mobateli akokaki kopesa nzela biloko ya boye esalama. Kasi atikaka biso na putulu te; Atelemaka na maboko ya kofungwama, kobengisaka biso na mbangu mpo na koya epai na Ye. Azali kotonga bomoi na biso kati na batempelo ya kafukafu bisika wapi Molimo na Ye ekoki kovanda seko.

Na Doctrine and Covenants 58:3–4, Nkolo alobi na biso:

“Bokoki komona te na miso na bino ya nzoto, mpo na ntango oyo, bolingi ya Nzambe na bino na oyo etali makambo wana oyo ekoya awa nsima, mpe nkembo oyo ekolanda nsima ya mikakatano ebele.

“Mpo nsima ya mikakatano ebele eyaka mapamboli. Yango wana mokolo ezali koya oyo okolatisama motole na nkembo ebele.”

Bandeko basi, natatoli ete Nkolo azali na mwango mpo na moko na moko ya bomoi na biso. Eloko moko te oyo eyaka ezali shoki to bokamwi epai na Ye. Azali moyebi nyonso mpe molingi banso. Azali na mposa ya kosalisa biso, mpo na kobondisa biso, mpe kolembisa mpasi na biso wana ezali biso koyekama na nguya ya Bomikabi mpe kotosa mayokani na biso. Mimekano mpe mikakatano oyo tokutanaka na yango ekoki kozala makambo mpenza oyo ekambaka biso toya epai na Ye mpe kokangama na mayokani na biso mpo ete tokoka kozonga na miso na Ye mpe kozwa manso oyo Tata azali na yango.

Mobu oyo eleki nazalaki na mposa mpe nalingaki koyoka bolingo ya Nkolo na mozindo koleka, mpo na kozwa bobimisi ya moto se moko, mpe kokomisa mikumba na ngai pepele. Nalingaki nasosola malamu koleka mayokani na ngai ya tempelo. Lokola nasambelaki mingimingi mpo na mapamboli oyo, nayokaki Molimo kokambaka ngai mpo na kokende na tempelo mpe koyoka malamu mingi liloba moko na moko ya mapamboli elobami likolo na ngai. Nalingaki mpe nazalaki na mposa ya mapamboli wana na bomoi na ngai ntango nyonso. Natatoli ete wana esili ngai koyoka na mokano koleka mpe komeka kosalela bondimi na ngai, Nkolo asili kozala mawa epai na ngai mpe asili kosalisa kokomisa mikumba na gai pepele. Asalisi ngai koyoka kimia makasi na ntina ya Nsambo oyo eyanolami naino te. Tokangisi Nkolo abatela bilaka na Ye ntango tobateli mayokani na biso. 5 Boya na tempelo, bandeko balingami basi, mpe bosenga mapamboli na bino!

Nalingi kolobela lolenge mosusu ete kobatelaka mayokani na biso ekoki kopesa biso elikia mpe bondimi. Biso, ntango mosusu, lokola basi, tozali na momesano ya komitonga mingi. Na bantango oyo tosengeli koluka Molimo mpe kosenga soki botindiki ewuti na Tata wa biso ya Lola to soki Satana azali komeka kokweisa biso na nse. Bomikundola ezalela ya Tata wa biso ya Lola, oyo ya ye bolingo ezali ebonga mpenza mpe ezanga nsuka. 6Ye alingi kotonga biso, kolembisa biso te.

Lokola bandimi ya Eklezia, tokoki ntango mosusu komiyoka ete tozali na mposa ya kozala eteni ya “libota ya BMS ebonga nie” mpo na kondimama na Nkolo. Tomiyokaka mbala mingi “moke-koleka” to lokola tobongi te na bokonzi soki tomiyoki ete tobongi te mpo na elili wana. Bandeko balingami basi, ntango nyonso elobami mpe esalami, nini ekosala na Tata wa biso na Lola ekozala lolenge nini tobateli mayokani na biso malamu mpe boniboni tomeki kolanda ndakisa ya Mobikisi, Yesu Klisto.

Natatoli ete Yesu azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Mpo na libonza na ye ya bomikabi, tokoki kosokolama pee poso na poso wana ezali biso kokabola elambo na Ye. Wana ezali biso kozongisa sika mpe kokumisa mayokani na biso, mikumba na biso ekoki kokomisama pepele, mpe tokoki kokoba kokoma peto mpe ya kolendisama na ntina ete na nsuka ya bomoi na biso tokotangema balongobani mpo na kozwa bonetwami mpe bomoi ya seko. Natatoli na ntina ya makambo oyo na nkombo Mobikisi wa bolingi, Yesu Klisto, amene.