2010–2019
Yaka, Sangana elongo na Biso
Sánzá ya Zómi 2013


Yaka, Sangana elongo na Biso

Kotia na motema te oyo etali bowi na yo, mambi na yo ya moto se moko ya kala, to bokasi ya litatoli na yo, ezali na esika mpo na yo na Eklezia oyo.

Mokolo mosusu ezalaki na moto moko oyo azalaki kolota ete ezalaki kati na ndako moko monene wapi mambi ya nzambe nyonso ya mokili esangisamaki. Asosolaki ete boyambi moko na moko ezalaki na mingi oyo ezalaki lokola ya kolula mpe elongobana.

Akutanaki na bamisionele mibale moko ya kitoko oyo bazalaki bantoma ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe atunaki, “niniBinobosengaka epai ya bandimi na bino?”

Biso tosengaka eloko moko te,” bayanolaki. “Kasi Nkolo asengaka ete tobulisa nyonso.”

Bamisonele mibale bakobaki kolimbola na ntina ya mabiangi ya Eklezia, boteyi na libota mpe boteyi botali, mosala ya tempelo, mosala ya bomikoki mpe ya kosunga bato, mpe mikumba ya koteya.

“Bofutaka bato na bino mpo na mosala nyonso basalaka?” moto oyo atunaki.

“O, te,” bamisionele mibale balimbolaki. “Bapesaka ntango na bango na mpamba.”

“Lisusu,” bamisionele mibale bakobaki, “sanza motoba nyonso bandimi ya Eklezia na biso balekisaka nsuka ya poso moko kokendaka to kotalaka ngonga 10 ya likita linene.”

“Bangonga zomi ya bato kolobaka masikulu?” moto yango akamwaki.

“Olobi nini na oyo etali mayangani ya eklezia ya poso na poso? Ezali molai boni?”

“Ngonga misato, Eyenga nyoso!”

“Oyo, na ndakisa,” moto yango alobaki. “Bandimi na bino ya eklezia basalaka mpeza maye olobi?”

“Wana mpe mingi koleka. Totangi kutu te mambi ma kala ya libota, banganda ya bilenge, mayangani ya losambo, boyekoli makomi, boteyi ya bokambi, milulu ya bilenge, seminele ya ntongontongo, bopeto ya bitonga ya Eklezia, mpe solo ezali na mobeko ya Nkolo ya bokolongonu, bokili ya sanza na sanza mpo na kosalisa babola, mpe moko na zomi.”

Moto yango alobaki, “Sikawa nabulunganisami. Mpo na nini moto nyonso alingi kosangana na eklezia ya boye?”

Bamisionele mibale basekaki moke mpe balobaki, “Tokanisaki okotuna ata moke te.”

Mpo na nini moto nyonso akosangana na Eklezia ya Boye?

Na ngonga oyo ntango baeklezia mingi na mokili mobimba bazali kokutana na babokiti makasi na motango, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka—ata moke na kokokanisa na misusu mingi—ezali moko ya baeklezia oyo ezali kokola mbango makasi na mokili. Lokola na sanza ya libwa 2013 Eklezia ezali na bandimi ebele koleka 15 milio na mokili mobimba.

Ezali na bantina mingi mpo na oyo, kasi nakoki kopesa mwa moke?

Eklezia ya Mobikisi

Yambo, Eklezia oyo ezongisamaki na mokolo na biso na Yesu Klisto Yemei. Awa okozwa likoki ya kosala na nkombo na Ye—ya kobatisa mpo na bolimbisi masumu, ya kopesa likabo mpo na Molimo Mosantu, mpe ya kokangisa na mabele mpe na lola.1

Baoyo basangani na Eklezia oyo balingi Mobikisi Yesu Klisto mpe balingi kolanda Ye. Basepeli na boyebi ete Nzambe azali koloba na bato lisusu. Ntango bazali kozwa makuli ya bule ya bonganzambe mpe bazali kosala baboyokani elongo na Nzambe, bakoki koyoka nguya na Ye na bomoi na bango.2 Ntango bazali kokota na tempelo esantu, bazali koyoka bazali na miso na Ye. Ntango bazali kotanga makomi masantu3 mpe bazali kosalela mateya ya baprofeta, bazali kobelema koleka na Mobikisi oyo balingaka mingi mpenza.

Bondimi moko ya Mosala

Ntina mosusu ezali mpo ete Eklezia epesaka mabaku mpo na kosala malamu.

Kondimelaka Nzambe etindameli biso, kasi bato mingi balingi kosala mingi koleka koyokela masakoli efulama to kolota bandako minene na bango koleka.4 Balingi kotia bondimi na bango na misala. Balingi kongumba maboko ya simisi na bango mpe kokoma ya komipesa na mosala monene.

Mpe oyo ezali maye masalamaka ntango bazali kosangana elongo na biso—bazali na mabaku mingi ya kobongola batalanta, mawa, mpe ntango na bango na misala malamu. Mpamba te tozali na basali ya esika bafutami te na masanga na biso ya mokili mobimba, bandimi na biso bazali kosala mosala ya Nzambe bangomei. Babiangami na bofulami. Ntango mosusu tosali na mpamba; ntango mosusu biso tozali “kosala mpamba.” Tomoni misala lokola mikumba te kasi lokola mabaku ya kokokisa mayokani oyo tosali na esengo mpo na kosalela Nzambe mpe kosalisa bana na Ye.

Mapamboli elingami

Ntina ya misato mpo na yango bato bazali kosangana na Eklezia ezali mpamba te kotambolaka na nzela ya boyekoli ekambi na mapamboli ya motuya.

Tozali komona libatisi lokola esika ya ebandeli na mobembo na biso ya boyekoli. Botamboli na biso ya mokolo na mokolo elongo na yesu Klisto ekambi na kimia mpe ntina na bomoi oyo mpe esengo ya mozindo mpe lobiko ya seko na mokili ekoya.

Baoyo bazali kolanda nzela moke oyo na botongono bakimaka mitambu mingi, mawa, mpe bomimi ya bomoi.

Babola na molimo mpe na bosembo ya motema bazwi mituya mingi ya boyebi awa.

Baoyo bazali koniokwama to kotungisama bazwi libiki awa.

Baye na mikumba ya lisumu bazwi bolimbisi, bonsomi, mpe bopemi.

Na Baoyo Batiki

Boluki ya bosolo ekambi bamilio ya bato na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Nzoka nde, ezali na basusu oyo batiki Eklezia balingaka mokolo mosusu.

Moko akokaki kotuna, “Soki nsango malamu ezali kitoko mpenza, mpo na nini moto akolinga kotika?”

Ntango mosusu tobanzi ete ezali mpamba te batukisami to bolembu to basumuki. Solo, ezali mpenza te ya mindondo te. Kasi, ezali kaka na ntina moko te oyo esali makambo ya ndenge na ndenge.

Ndambu ya bandimi na biso ya bolingo babundi mibu mingi na motuna soki basengeli kokabwana na bangomei na Eklezia.

Na Eklezia eye oyo ezali kopesa lokumu na bonsomi ya moto se moko makasi mpenza, oyo ezongisamaki na elenge mobali oyo atunaki mituna mpe alukaki biyano, tozali komemia baoyo na bosembo baluki bosolo. Ekoki kobuka mitema na biso ntango mobembo na bango ememi bango mosika na Eklezia oyo tolingaka mpe bosolo oyo tozwi, kasi tokumisi litomba na bango ya kokumbamela Nzambe ya Bokasi bonso engebene na masengami ma mayele ya bangomei, kaka lokola tosakoli litomba lina mpo na bisomei.5

Mituna Miyanolami te

Basusu babundi elongo na mituna miyanolami te oyo etali makambo oyo esalama to elobama na kala. Tozali na polele kondima ete pene na mibu 200 ya lisolo ya Eklezia—kobakisa monkoloto ekatani te ya makambo mafulami, ma lokumu, mpe ma bonzambe—ezali mwa makambo malobami mpe ma salami oyo ekokaki kosala ete batu batuna.

Ntango mosusu mituna ebimaka mpamba te na mindonde te tozali na nsango nyonso te mpe tozali kaka na mposa ya mwa bompikiliki mingi. Ntango bosolo mobimba eyebani na nsuka, makambo oyo ezalaki na ntina te epai na biso ekozwa eyano na esengo.

Ntango mosusu ezali na bokeseni ya makanisi lokola nini “makambo” elingi mpenza koloba.Motuna oyo ekeli ntembe na basusu ekoki, nsima ya boluki na bokebi, kotonga bondimi kati na basusu.

Mabunga ya Bato Babongi nie te

Mpe, mpo na kozala solo malamu, ezali na bangonga ntango bandimi to bakambi na Eklezia basali na mindondo te mabunga. Ekokaki kozala na makambo elobami to esalama oyo ezalaki engebene na bolamu na biso, mabongisi, to malongi te.

Nabanzi Eklezia ekobonga nie bobele soki etambusamaki na bato babonga nie. Nzambe abongi nie, mpe malongi na Ye ezali peto. Kasi Ye asalaka na nzela na biso—Bana na ye babonga nie te—mpe bato babonga nie te basalaka mabunga.

Na lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon totangi, “Mpe sikawa, soko mabunga ezali, ezali mabunga ya bato; yango wana, kokitisa makambo ya Nzambe te, ete okoka kozwama na bozangi mbindo o kiti ya bosambisi ya Klisto.”6

Oyo ezali lolenge ezali ntango nyonso kino mokolo ebongi nie ntango Klisto Yemei azali kokonza likolo ya mabele.

Ezali mawa ete basusu babeti libaku mpo na mabunga masalami na bato. Kasi atako bongo, bosolo ya seko ya nsango malamu ezongisami ezwami na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka enzuluki te, ekitsami te, to ebebisami te.

Lokola Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto mpe lokola moko oyo amoni yemei makita mpe misala ya Eklezia oyo, napesi litatoli ya lokumu ete mokano moko te ya ntina esimbi Eklezia oyo to bandimi na yango esalemi mokolo moko te kozangaka na lokengo kolukaka bofuli, toli, mpe bondimami ya Tata ya Seko. Oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto. Nzambe akopesa nzela te na Eklezia na Ye epengwa uta na nzela eponama na yango to kokweya kokokisa atandele na yango.

Ezali na Lisuku mpo na Yo

Mpo baoyo bakabwani bangomei uta na Eklezia, nalobi, bandeko na ngai ya bolingo, ezali atako bongo na esika mpo na ayo awa.

Boya mpe bobakisa batalanta, makabo, mpe babokasi na bino na oyo ya biso. Tokokoma banso malamu koleka lokola mbano.

Ndambo bakokaki kotuna, “Kasi olobi nini na oyo etali ntambe na ngai?”

Ezali motindo na moto kozala na mituna—mbuma ya motuna ya bosembo ebimi mbala mingi mpe ekomeli mpo na kokoma nzete monene ya bososoli. Ezali na mwa bandimi ya Eklezia oyo, na ngonga moko to mosusu, babundi te na mituna ya lokengo to ya mpasi. Moko ya bantina ya Eklezia ezali koleisa mpe kolona nkona ya bondimi—kutu mbala mususu na mabele ya zelo ya ntembe mpe ya solo te. Bondimi ezali kotia elikya na biloko oyo ezali komonana te kasi oyo ezali solo.7

Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe basi—baninga na ngai ya bolingo—nasengi, yambo botia tembe na ntembe na bino liboso botia ntembe na bondimi.8 Tosengeli mokolo moko te kopesa nzela na ntembe esimba biso bakengemi mpe kobomba biso mosika ya bolingo ya bonzambe, kimia, mpe makabo oyo eyaka na nzela ya bondimi kati na Nkolo Yesu Klisto.

Basusu bakokaki koloba, “Nazali komiyoka malamu te elongo na bino bato ya Eklezia.

Soki okokaki komona kati na mitema, olingaki mbele komona ete ozali komiyoka malamu koleka oyo ozali kobanza. Okokaki kokamwisama komona ete tozali na milangwa mpe bitumba mpe baelikya oyo ekokani na ya yo. Lisolo to ekoleli na yo ekokaki komonana ya kokesana na maye ozali komona kati na Basantu ya Mikolo ya Nsuka, kasi oyo ekokaki kozala lipamboli. Bandeko mibali mpe basi, baninga ba bolingo, tozali na mposa ya batalanta mpe baemoneli na bino ya malamu. Bokeseni ya bato mpe bikolo na molongo mobimba ezali bokasi ya Eklezia oyo.

Basusu bakokaki koloba, “Nakanisi te nakokaki kosalela na bomoi mibeko na bino.

Ntina mosusu koleka mpo na koya! Eklezia eyemami mpo na koleisa baye babongi nie te, baye bazali kobunda, mpe baye balembi. Etondi na bato oyo balingi na motema na bango mobimba kobatela mitindo, ata soki basili kokanga yango na moto naino te.

Basusu bakokaki koloba, “Nayebi mondimi moko ya Eklezia na bino oyo azali moto wa bosembo te. Nakokaki mokolo moko te kosangana na eklezia oyo ezalaki na moto moko lokola ye lokola mondimi.

Soki ozali kolimbola moto wa bosembo te lokola moto moko oyo akwei kosalela na bomoi malamu maye ye azali kondimela, nde tozali banso bato ya bosembo te. Moko te na biso azali mpenza lokola Klisto lokola toyebi tosengeli kozala. Kasi tozali na lokengo na mposa ya kolonga mabunga na biso mpe ezalela na biso ya kosumuka. Na motema na biso mpe molimo tolangwe mpo na kokoma malamu koleka na lisalisi ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Soki oyo ezali bonsenga na biso, nde kotia na motema te oyo etali bowi na yo, mambi na yo ya moto se moko ya kala, to bokasi ya litatoli na yo, ezali na esika mpo na yo na Eklezia oyo. Yaka, sangana elongo na biso!

Yaka, Sangana elongo na Biso!

Atako mabe na biso ya bomoto, nalikii ete okozwa katikati ya bandimi ya Eklezia milimo mingi ya malamu koleka nyonso oyo mokili oyo esengeli kopesa. Eklezia ya Yesu Klisto emonani lokola kobenda bato ya boboto mpe bato ya bokebi, bato ya bosembo mpe bato balingi mosala.

Soki olingi komona bato babongi nie awa, okoyokisama nsoni. Kasi soki oluki malongi ya peto ya Klisto, liloba ya Nzambe “liye likobikisa molimo mozoka,”9 mpe nguya ya komibonza ya Molimo mosantu, nde awa okozwa yango. Na mobu oyo ntango ya bokiti ya bondimi—na mobu oyo ntango mingi mpenza bamiyoki mosika uta na bosimbami ya lola—awa okokuta bato moko oyo balangwi mpo na koyeba mpe kobelema mpembeni koleka na Mobikisi na kolelaka Nzambe mpe baninga na bango bato, kaka lokola yo. Yaka, sangana elongo na biso!

Bokokende Lisusu Libanda?

Nazali komikundola ngonga moko na bomoi ya Mobikisi ntango mingi batikaki Ye.10 Yesu atunaki bayekoli na Ye zomi:

“Bokokende lisusu libanda?

“Bongo Simona Petelo azongisaki, Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo moto ozali na maloba epesaka bomoi ya seko.”11

Ezali na ngonga ntango tosengeli koyanola motuna yango kaka. Tolingi mpe kokende? To tolingi, lokola Petelo, kosimba makasi maloba ya bomoi ya seko?

Soki oluki bosolo, ndimbola, mpe nzela ya kobongola bondimi na mosala; soki ozali koluka esika ya kozala: Yaka, sangana elongo na biso!

Soki otiki bondimi oyo mokolo mosusu oyambaki: Zongela lisusu. Sangana elongo na biso!

Soki omekami mpo na kotika: Tikala nzoka nde mwa ntango molai. Ezali na lisuku mpo na yo awa.

Nabondeli elongo na banso oyo bazali koyoka to kotanga maloba oyo: Yaka, sangana elongo na biso. Yaka mpe sala keba na libiangi ya Klisto wa boboto. Tombola ekulusu mpe landa Ye .12

Yaka, sangana elongo na biso! Mpo awa okozwa oyo ezali motuya ezanga ntalo.

Natatoli ete awa okozwa maloba ya bomoi ya seko, elaka ya bosikoli epambolama, mpe nzela moke ememi na kimia mpe bosepeli.

Nasambeli na lokengo ete boluki na binomei mpo na bosolo ekotika na motema na bino mposa ya koya mpe kosangana elongo na biso. O nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.