2010–2019
Kosimba libela na makasi
Sánzá ya Zómi 2013


Kosimba Libela mpe Makasi

Tosengeli kokoba kosimba makasi lingenda ya ebende oyo ekomema epai ya Tata na biso ya Likolo.

Tata na nga akoki kokundola mokolo ya solo, kutu ngonga ya solo ya libota na ye— tata, mama, mpe bana minei — kotika Eklezia, mingi mingi bazongaka lisusu te na bomoyi na bango. Azalaki na mibu 13, diakona, mpe na mikolo na bango ya mabota koyangela na Eteyelo ya eyenga na tongo mpe likita ya elambo na sima ya nzanga . Na mokolo moko kitoko na eleko ya milona, nsima na bozongi na mosala ya mayangani ya ntongo mpe kolia elongo na libota mama na ye abalukaki epai ya tata na ye mpe atuni ye na bopete, “Boye, wa bolingo akanisi tokende na likita ya elambo ya sima ya nzanga ya lelo to tomema libota libota na motuka mpo na kotambola na kati ya mboka?”

Likanisi lina ete ekoki kozala bongo mpo na likita ya elambo ezalaki ya tata na ngai soko moke te, kasi ye mpe bandeko na ye misato ya basi mpe mibali ya bilenge batelemaki mpe batiaki bokebi. Kotambuisa mutuka ya eyenga ena na sima ya nzanga ezalaki mingi kitoko na kati ya libota, kasi mokano moke ekomaki ebandeli ya nzela ya sika, yango ememaki mbala moko libota na ye mosika na Eklezia na bozangi likama na bango, bozangi likama mpe mapamboli mpo na nzela mosusu.

Lokola liteya mpo na mingi ya mikolo na biso oyo bazali komekama mpo na kopona banzela, na Buku ya Mormon profeta Lehi akabolaki emoniseli na libota na ye kuna amonaki batu ebele kowelana, ebele kati na bango bazalaki na lombango liboso ete bazua na mbango nzela ekomema na nzete epai ya kotelema.

“Mpe …babimaki mpe bakendaki na nzela oyo ya nzete.

Mpe …. Wana molili ya makasi eyaki,…  na lolenge ete baoyo bakotaki na kati babunga nzela, na lolenge ete bakendaki mosika mpe babungaki.”1

Lehi boye amonanki liboke mosusu oyo bazalaki “kopusa na liboso mpe bakomaki liboso mpe basimbaki makasi na suka ya lingenda ya libende, mpe bakendaki na lombango liboso na nzela ya molili makasi, basimbaki lingenda ya libende kino bakomaki mpe bakabolaki mbuma ya nzete.” Kasi na “sima kokabola mbuma ya nzete babuakaki miso na bango lokola soki bazalaki na nsoni” nzambi na baoyo na kati ya “ndako monene mpe esika ebele ete bazalaki na ezalela ya kotumola bango mpe kolakisa bango misapu liboso bango baoyo bayaki mpo tokabolaki mbuma. Bato oyo na boye kokita nzela epekisami mpe babungaki.”2 Bakoki kokoma lisusu te to tango mosusu bazalaki te na bolingi ya kokoma na suka.

Ezalaki nzokande, na liboke ya misato ete baoyo bazangaki kolonga kaka te na“ bopusani na nzete ya bomoyi, na sima bakueyaki lisusu na nse te. Nayango, makomi elobi ete bakobaki kaka kosimba na lombangu lingenda ya libende, kino bakomaki liboso mpe bakueyaki mpe baliaki mbuma ya nzete.”3 Lingenda ya libende elakisaki liboke ya batu ete obele na bobangi te ete bakoki komona, mpe bakosimba tango nionso na makasi, baboyaki kotika ata mpo na eloko moko ya pete na Eyenga na sima na nzanga komata na motuka na mboka.

Mpo na lisanga lina, Mpaka David  A. Bernar alobaka : “liloba ya motuya na molongo oyo ezali ‘kosimba libela na lingenda ya libende ’… Ntango mosusu lisanga ya bato ya misato oyo batangaki koleka mpe bayekolaki mpe balukaki maloba ma Klisto … Wana ezali liboke oyo tosengeli tosala makasi mpo tosangana.”4

Mingi kati na biso oyo tozali bandimi Ya Eklezia ya Nzambe lelo tozuaka mokano ya kolanda Yesu Klisto mpe kotosa mitindo ya Nzambe. Na libatisi tozui mokano ya kotelema lokola nzengeneke ya Mobikisi,5 mpo na kosunga baye balembi mpe bazangi,6 kosimba mitindo ya Nzambe, mpe koyambola soki bosenga ezali, lokola Apostolo Polo alobaki, “Banso tosumukaki mpe tozangaki nkembo ya Nzambe.”7

Mposo nioso tozali na libaku ya kozala na likita ya elambo kuna tokobandela liyokani na bokaboli ya lipa mpe mayi ya elambo. Kosala moke oyo ekopesa biso nzela lisusu ya komitalaka malamu mpo na kolanda Yesu Klisto mpe koyambola ntango tokweyi. Bilaka ya nzambe mpo na biso ezali Molimo na Ye lokoka mokambi mpe mobateli.

Uta na Preach my Gospel, ba misonele batangisi ete bosekwi mpe litatoli biyaka ntango tokende na likita na biso ya eyenga: “lokola tokendeke na misala ya Eklezia mpe losambo elongo, tokolendisama lokola tokotanga makomi mpe toyekola mingi na ntina ya bozongisi ya nsango malamu.”8

Tokoki komituna, mpo na nini kokabolaka Makita misato na Eyenga mpe mpo na nini Bosenga ya moko na moko ? Totala na bokuse mayangani wana misato:

  • Likita ya elambo ekopesa libaku ya kozala na elambo. Kobandela mayokani na biso, koyamba molimo na lomeko ya komata, mpe kozua mapamboli mpe kobakisa koteyama mpe kosungama na Molimo Mosantu.

  • Eteyelo ya eyenga ezali kosunga biso koteyana moko na mosusu malongi ya bokonzi,”9 ete banso bazala kolendisama mpe basepela elongo.”10 Nguya ya makasi mpe kimia ya moto eyaka soki to sosoli malongi ya bozongi ya sango malamu.

  • Mayangani ya Bonganganzambe ezali ngonga mpo na mibali mpe bilenge mibali mpo na “koyekola lotomo” 11 mpe  “kozala na boyebi ya malamu mpenza,”12 mpe lisanga ya bamama balandi kosangana ekopesa na basi ya Eklezia libaku ya “kokolisa kondima na bango…, koyeisa makasi mabota mpe bandoko na bango mpe kosunga baoyo bazali na mposa ya lisungi.”13

Lokola, bilenge basi mpe bana bazali na oyo ya bango mayangani mpe kelasi kuna balobelaka nsango elamu lokola bakomibongisa mpo na mikumba oyo ekoyela bango. Na tango nyonso ya likita moko kasi kosangana. Toyekolaka malongi, toyokaka Molimo, mpe tosunganaka. Atako basusu bakozanga na ntina ya mosika, motuya ya mobembo, to ya bokolongono, tosengeli kosala makasi mpo na kozala na Makita na biso nyonso ya Eyenga. Nalaki ete mapamboli ya esengo monene mpe kimia na losambo kati ya mabongisi na biso ya ngonga misato ya likita ya Eyenga.

Mabota na biso ezwi elaka ya kozala ntango nyoso ya mayangani na biso ya Eyenga. Tomoni ete yango koyeisa kondima na biso makasi mpe kokolisa boyebi na biso ya nsango malamu. Toyekolaki ete tokoyoka malamu na ntina ya mokano ya kozala na Makita ya Eklezia, na mingi ntango tozongaka mpe tokobi kotosa Saba. Tozalaki kutu kozela eyenga tango tozali na bopemi to na mobembo. Moko ya bana na biso ya basi akomelaki biso kolobaka ete ayanganaki na eklezia na mboka moko esika akendaki mobembo mpe abakisi, “Boye, tata, nazalaki na mayangani nyonso misato ya eyenga” toyebi ete apambolamaki mpo mokano oyo monene ya solo.

Banso tosengeli ndenge ya kotala mokolo ya Saba. Ekozala kaka na makambo ya malamu ete tokoki to tosengeli tomibonza mpo ya boponi ya“ malamu” kozala na mayangani ya Eklezia. Ezali motindo ya banzela ya monguna “koyiba milimo na biso, mpe na bopete nionso kobungisa biso na nzela.”14 Azali kosalela milulu ya“ malamu” lokola ya “malamu” to kutu milulu ya “malamu ”koleka. 15

Kosimba libela lingenda na makasi elakisi ete tozala na mayangani na biso nyonso ya Eyenga ; likita ya elambo, eteyelo ya eyenga, mpe ya bonganganzambe to makita ya Lingomba ya Bamama Basungi. Bana na biso mpe bilenge bazalaka na oyo ya bango Makita na Eteyelo ya bana, Bilenge Mibali, mpe Bilenge Basi, tosengeli ata moke te kozua to kopona Makita oyo tokozala. Ebongi kaka tosimba na malamu na liloba ya Nzambe na kosambelaka mpe kozalaka na Makita nyonso ya Sabbath oye epesameli biso.

Kosimba libela lingenda na makasi elakisi ete tosala makasi na kobomba mitindo ya Nzambe, kosala losambo yo moko mpe na libota mokolo na mokolo, mpe kotanga makomi mokolo na mokolo.

Kosimba libela na makasi ezali eteni ya malongi ya Klisto lokola elobami na Buku ya Mormon. Tosalela bondimi na Yesu Klisto, koyambola masumu na biso, mpe kobongola mitema na biso, na bongo kolanda Ye na nse na kati ya mayi ya libatisi mpe kozua nkotisa ya likabo lya Molilo Mosantu, oyo akosunga biso lokola mokambi, mpe mobondisi. Mpe lokola Nefi alobaki, “tozokende liboso, lipati ya liloba na Klisto, kino, na suka ya bomoyi na biso.16

Bandeko na nga ya basi mpe mibali, tozali bato ya liyokani, tosala mpe tobomba mayokani na motema moko, mpe elaka ya mapamboli ezali ete tokozua “nionso oyo Tata.”17 Lokola to tosimbi libela lingenda na makasi na kobombaka mayokani tokosungana makasi na kotelema ngwi na mimekano mpe makama ya mokili. Tokokoka konana na bomoyi oyo ya bakufi na bitumba na yango kino tokoma mpenza na nzete oyo mbuma eleki elengi koleka mosusu.”18

Tata na ngai azalaki na lipamboli ya kobala mwasi malamu oyo alendisaki ye azongela Eklezia na ye ya bolenge mpe abandaki lisusu kokende liboso na bolai ya nzela. Bomoyi na bango ya kobuka elako te epambolamaki bana na bango nyoso, boboti na ba koko ya sima mpe bakokololo na bango.

Lokola mokano moke kozala to kozanga na moko ya makita na bango ya losambo ya Saba etiaki ndakisa ya bokeseni na bomoyi na libota ya bankoko na ngai, mikano na biso ya mokolo ekozala na litomba ya ndakisa na bomoyi na biso. Mwa mokano moke lokola soki te kozala na likita ya elambo ekoki kozua litomba monene na mbano kutu ya libela.

Tika topona kozala na lombangu mpe kolonga mapamboli minene mpe bobateli oyo ekouta na bosangani mpe kobomba mayokani. Tika tosimba libela na makasi lingenda ya libende ete totambuisama na liboso ya Tata na biso oyo ya Lola ezali libondeli na ngai na kombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.