2010–2019
Mokano mpo na libela
Sánzá ya Zómi 2013


Mokano mpo na Libela

Kosalela na mayele ya bonsomi ya kozua mikano nayo moko ezali na motuya mpona bokoli nayo ya molimo, sikawa mpe mpona libela.

Balingami na ngai ya mibali na basi, mokolo nioso ezali mokolo ya mokano. Mokambi Thomas S. Monson ateyaki biso ete “ mokano ezali kolaka atandele.’’1 Bosaleli ya bwanya ya bonsomi mpo na kozwa mikano na binomei ezali na ntina monene mpo na kokola na bino ya molimo, sikawa mpe mpo na libela. Bozali lisusu bilenge mike te mpo na koyekola, mikolo mingi te mpo na kobongwana. Bamposa na bino ya makasi ya koyekola mpe ya mbongwana ezali koya na makasi mpo na botamboli ya libela etiami na bonzambe. 2Mokolo nioso ekomema libaku mpo na mikano ya libela.

Tozali mpona libela—bana ya molimo ya baboti ya lola. Bibilia elobi ete ‘’ Nzambe akelaki bato na lolenge na yemei,  m obali na mwasi akelaki bango.’’3Kalate nayokaki bayembi ya bana koyemba loyembo ya bolingo ‘’ 194 ‘’4. Nakamwaki, mpo na nini nayokaki te loyembo wana koyembama mbala na mbala na bamama to na bapapa ya kondima? Tozalibanso tebana ya Nzambe? Na bosolo, ata moko te kati na biso akokikotika ata moke tekozala mwana na Nzambe.

Lokola bana ya Nzambe, tosengeli kolinga ye na motema mpe molimo mobimba, ata koleka ndenge bolingo ya baboti na biso ya nse.5Tosengeli kolinga moto ya pene pene lokola bandeko ya basi mpe mibali. Mibeko mokoteezalimonene lokola oyo.6Mpe tosengeli komemia motuya ya bomoyi ya moto, na biteni na yango nionso.

Makomi ezali koteya ete nzoto na molimo ezali molimo ya moto. 7Na lisanga, moko na moko kati na bino akoki kokumisa Nzambe mpo na makabo ya motuya ya nzoto na bino mpe na molimo.

Nzoto ya moto

Mosala na ngai ya mibu lokola monganga dokotolo apesaki ngai limemia monene mpo na nzoto ya moto. Kokelamaka na Nzambe lokola likabo mpo na bino, ezali bobele ya kokamwa! Kanisa mpo na miso na yo oyo emonaka,matoyi oyo eyokaka,mpe misapu oyo esimbaka biloko nionso ya kokamwa nzinganzinga na yo. Bongo na yo ekosunga yo kotanga, kokanisa, mpe koluka ntina. Motema nayo ezali kobeta na kolembaka te butu mpe moyi, penepene na kozanga boyebi na yo.8

Nzoto na yo ezali komibatela yango moko. Pasi ekoya lokola bokebisi ete eloko moko ezali malamu te mpe esengeli na bokengi. Boyingeli ya maladi ebetaka kowuta na ngonga moke moke, mpe ntango ezali kosala, bibundeli ya nzoto ezali kosangana ete ematisa bokasi na yo na bokono ekoya.

Nzoto na yo ekomisalisa yango moko. Mikiwa ebukani ekokomai makasi mbala moko lisusu. Napesi kasi mwa moke elembo mpo ya nabikamwisi Nzambe apesa bolamu mpo na nzoto na yo.

Ata kutu, emonami ete na mabota mingi, soki te na moto nionso, bizalela ya bomoto ezali kosenga kobatelama ya mpenza.9 Libongisi ya kolekisa elongo lokola momekano epesamaka na Nkolo. Ye alobaki,’’na pesi bato bolembu ete bayeba na komikitisa;mpo soki bamikitisi bangomei mpe bazali na bondimi na ngai, nakosala ete biloko ya bolembu ekoma makasi kati na bango.”10

Milimo ya koleka evandaka mbala mingi na nzoto ya ebongi te.11 Likabo lokola oyo ya nzoto ekoki sika kopesa makasi na libota lokola baboti mpe bandeko basi na mibali mbala moko kotonga bomoyi na bango nzinganzinga ete bana babotama na ndenge esengeli.

Nzela ya kimobange ezali bobele likabo kowuta na Nzambe, ezala lokola liwa. Nkufa ya nsuka mpona nzoto oyo ya bakufi ezali na litomba na mabongisi monene ya esengo ya Nzambe.12 Mpo na nini? Mpo ete liwa ekopesa nzela molimo nayo ekoka kozonga na ndako epai na Ye.13 Kowuta na libongisi ya libela, liwa ezali bobele mobesu mpo na oyo alengelami te mpo na kokutana na Nzambe.

Elongo na nzoto na yo ozali kaka lokola eteni ya ntina na bomoyi na mabongisi ya libela ya Nzambe, ezali likamwisi moke oyo Apostolo Polo alimbolaki yango lokola‘’ tempelo ya Nzambe. ”14 Ntango nionso ozali kotala na kitalatala, mona nzoto na yo lokola tempelo na yo. Bosolo ezongisaki sika botondi mikolo nionso – ekoki kotinda yo mikano ya malamu mpo na lolenge nini okobatela nzoto na yo mpe lolenge nini ya okosalela yango. Mpe mikano wana ekolaka atandelena yo. Lolenge nini yango ekozala? Mpo ete nzoto na yo ezali tempelo mpona molimo na yo. Mpe lolenge okosalela nzoto na yo ekosimba molimo na yo. Mikano mingi ekolaka libela atandele nayo esangisi:

  • Lolenge nini okopona kokebisa mpe kosalela nzoto na yo?

  • Bizaleli nini ya molimo oyo oponi kokolisa?

Molimo ya moto

Molimo na yo ezali yoko eteni ya libela. Nkolo alobaki na profeta na ye Abalayama : “Oponamaki liboso ya mbotama na yo.’’15Nkolo alobaki likambo ya lolenge boye na Yelemia16Mpe na basusu ebele.17Alobaki yango kutu mpo na yo. 18

Tata na yo na likolo ayebi yo wuta na ntango molai.Yo, lokola mwana mobali na Ye to ya mwasi, baponamaki na ye koya na nse na ntango oyo, kozala mokambi na mosala monene na Yena nse.19Oponamakite mpo na bizaleli ya nzoto kasi mpona bizaleli na yo molimo, ndakisa mpiko, nkonzo, bosembo ya motema, mposa ya bosolo, nzala ya bwania, mpe mposa ya kosaleal basusu.

Okolisaki mingi ya bizaleli oyo yambo ya mbotama.Mosusu okoki kokolisa awa na nse20 Lokola okokoba koluka yango.21

Ntina ya monene ya molimo ezali komikonza yo moko—bokasi kotiaa ntina likolo ya mposa. Komikonza ekotonga makasi na motema mokoswa. Mpe motema mokoswa ekolakisa biyano elongobani na mikakatano, mimekano, mpe makambo ya komekama. Kokila ekosunga molimo na yo kokolisa kozala likolo ya ba mposa ya nzoto. Kokila ekolisaka bosimbi na yo ya lisalisi ya likolo, lokola kokolisa losambo. Mpo na nini kolinga komikonza? Nzambe alonaki mposa makasina kati na biso mpo na komileisa mpe bolingo ntina mpo na mabota ya bato kobotana.22 Ntango tozali kokonza bamposa kati na biso basuka ya mibeko ya Nzambe, tokoki kolinga bosepeli na bomoyi molai, bolingo monene, mpe kopelisa esengo.23

Ekamwisaki mpenza te, ete, mimekamo ya mingi kobungisa uta na mabongisi ya esengo ya Nzambe ekoya koleka kobebisa ntina ya oyo, Nzambe apesaki bamposa.Kotambwisa bamposa na biso ezali kaka nzela ya pete te. Moko te kati na biso amemamaka yango mpenza mpeza. 24 Mabunga ekoya. Mbeba esalemaki .Masumu esalemaki. Nini tokoki kosala mpenza? Tosengeli kotanga wuta na yango. Mpe tokoki koyambola na bosolo.25

Tokoki kobongola bizaleli na biso. Mposa na biso solo ya kobongwana esengeli ebonguana. Boni? Ezali se na nzela moko. Mbongwana ya solom—bongwana ya tango nionso—ekoki koya se na kobikisa, kosukola, na mpe kopesama nguya ya bomikabi ya Yezu Klisto.26 Ye alingi yo moko moko na bino!27 Esalaki ete yo ozwa nguya na Ye lokola ozali kobatela mibeko na Ye,na motema mpiyo, solo solo, na mpe koyeba bosolo. Ezali pete mpe solo. Nsango elamu ya Yezu Klisto ezalinsango malamu ya mbogwana! 28

Molimomakasi ya moto elongo bokebi likolo ya bamposa ya misuni ezali kokonza likolo ya bamposa mpe bolingi mpe bowumbu na yango te. Bolamu ya bonsomi ezali na ntina mpo na molimo lokola pema ezali mpo na nzoto! Bonsomi kowuta na komibikisa ezali kobimisama ya solo!29

Tozali ‘’na bonsomi ya kopona bonsomi mpe bomoyi ya seko… to kopona bokangemi, mpe liwa.’’30 Ntango toponi na lolendo ndambo ya kokende na bonsomi mpe bomoyi ya seko, ndambo wana esangisi libala31 Basantu ya mikolo ya suka balobaka ete “libala kati ya mobali na mwasi ewuti na Nzambe mpe libota ezali na kati ya mabongisi ya libela ya atandele mpo na bana na Ye.” Toyebi lisusu ete “kozala mwasi to mobali ezali na ntina ya bizaleli moko yambo ya ebandeli ya bokufi, na bokufi mpe kokesenisa mpe mpo na litomba.”32

Libala kati na mobali na mwasi ezali na ntina mpo na malongi ya Nkolo mpe na motuya na mabongisi ya Nzambe ya libela. Libala kati na mobali na mwasi ezali kosunga Nzambe mpo na botondisi ya bomoyi na nse ya mabele mpe na likolo. Bosungi ya Nzambe na libala ekoki te kobebisama, kososola mabe, tokolimbola mabe.33 Te soki olingi esengo ya solo. Bosungi ya Nzambe na libala ebatelaka nguya ya bule ya kobota mpe na esengo ya bosolo kati na libala.34Toyebi ete Adama na Ewa babalisamaki na Nzambe yambo ya boyebi na bango solo ya esengo ya lisanga lokola mobali na mwasi.35

Na mikolo na biso bambulamatali ezwi meko na bobateli libala mpo ete mabota ya makasi esalaka na malamu nzela ya bopesi bokolongono, mateya, kozala malamu, mpe bofuluki ya Nkola ekoya.36 Kasi bambulamatali ezali kolanda na kilo malingami ya bato mpe ya filozofi ya mabe lokola bazali kokoma, mpe kolanda mibeko.Kozanga kotala nini mibeko ekoki kolakisa, mayokami ya Nkolo mpo na libala mpe bomoyi ya moto ekoki kobongwana te ..37 Kundola:lisumu ata soki endimami na bato,ezali kaka lisumu na miso ma Nzambe!

Ntango tozali kolanda bolamu mpe ngolu ya Mosikoli, ntango tozali kolanda bosolo, mpe bamayoki oyo ya bana Nzambe, tokoki te kobongola liyokami na Ye. Ezali mbongwana na biso te. Liyokani na Ye ezali ya biso koyekola,kososola, mpe kosimba yango.

Nzela ya bomoyi ya Mobikisi ya ezali malamu. Nzela esangisi bopeto liboso ya libala mpe kotikala kaka na kati ya libala.38 Nzela ya nkolo ezali se nzela mokompo na biso koyeba kozala kati ya esengo. Nzela na ye epesaka kimia mpo na milimo na biso mpe kolandisa kimia na mabota na na biso.Mpe malamu mpo na banso, nzela na Ye ekomema elengiya libela na milimo na biso mpe kimia ya bokasi na bandako na biso. Mpe bolamu eleki, nzela na Ye ekomema biso na ndako epai naYe mpe Tata na biso ya Lola, mpo na bomoyi ya seko mpe Bonetoli.39 Oyo ezali solo ntina monene ya mosala mpe nkembo ya Nzambe.40

Balingani mibali mpe basi, mokolo nionso ezali mokolo ya mokano, mpe mikano na biso ekolanda atandele biso. Mokolo moko biso nyonso tokotelema liboso ya Nkolo mpo na kosambisama.41Tokozala moko na moko na lisolo elongo na Yesu Klisto. 42Tokosamba mpo na mikano na oyo tozwaki na ntina ya nzoto na biso, bizaleli ya bomoyi na biso ya molimo, mpe lolenge totosaki ndakisaya Nzambe na libala mpe na mabota. Ete tosengeli kopona na bwania mikolo nionso mikano mpo na libela ezali losambo na ngai ya solo na nkombo ya bule ya Yezu Klisto, amene.

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Decisions Determine Destiny” (Church Educational System fireside, Nov. 6, 2005), 3;speeches.byu.edu.

  2. Makanisi ya bokei libela esosolamaki malamu na W. W. Phelps na makomi ya loyembo “If You Could Hie to Kolob” (Hymns, no. 284). Molongo ya kutanga elobi ete: “Bolamu ezali na nsuka te; / Bokasi ezali na nsuka te; / Bwania ezali na suka te; / Pole ezali na nsuka te. / Lisanga ezali na nsuka te; / Bolenge ezali na nsuka te; / Bonganganzambe ezali na nsuka te; / Bosolo ezali na nsuka te.” Molongo ya 5 esukisi ete: “Nkembo ezali na nsuka te; / Bolingo ezali na nsuka te; / Kozala ezali na nsuka te; / Liwa ezali te likolo.”

  3. Genese 1:27; tala lisusu Bakolosi 3:10; Alma 18:34; Etele 3:15; Mose 6:9.

  4. “Nazali mwana ya Nzambe,”Hymns, no. 193.

  5. Tala Matai 10:37.

  6. Tala Malako 12:30–31.

  7. Tala Doctrine et Alliances 88:15.

  8. Nzambe apesa makabo mosusu ezalina masini lokola na mosala na kati ya nzoto na yo. Biloko lokola,sodium, potassium, mpe calcium mpe mabongisi lokola mayi, glucose, mpe proteine ezali na ntina mpo na lobiko.Makambo ya nzoto elongo gaz lokola oxigene mpe dioxide ya carbone.Esalaka bahormone lokola insuline,adrenaline,mpe thyroxine.Ndelo ya nioso wana mpe mingi mosusu kosalaka na nzoto komipesa kobongisa na kati na yongo mpo na oyo ekoya. Bomibongisi evandeli ezali kati na baglande ya nzoto. Ndakisa, bongo ya moke esalaka bahormone kopesaka makasi na kortex mpo na bagland adrenal kobota bahormone adrenaline corticale. Kolmuka na ndelo ya bahormone cortical kolekisama na bongo ya moke na bopesi makasi hormone mpe bongo na bongo. Moto ya nzoto nayo esimbami na mwa moto malamu na ndelo ya 98.6˚F to 37˚C, Ata ozali na Equateur to na Pole ya nordi.

  9. Mabongisi mosusu ezali pete komonana; mosusu ezali ya kobombama. Mosusu ezali ya momeseno; mosusu te. Bato mingi basalami mpona cancer, basusu bazali na nzoto elingi biloko mosusu te, mpe bongo na bongo. Moko kati na biso akoki kokebisama lolenge yemei na esika ya bokono mpe koyekola na komikitisa nini Nkolo akoki koteya, ete bokono wana ekoka kokoma makasi.

  10. Etele 12:27.

  11. Ezalela misuse ekobonguana nyonso te tii na bosekwi, ntango “biloko binso bikozongisama na bisika na yango mpe na lolenge esengeli mpenza” (Alama 40:23).

  12. Tala Alma 42:8.

  13. Mokomi nzembo akomaki, “Litomba kati nabomoni ya Nkolo ezali liwa ya basantu na ye” (Nzembo116:15). Liwa ezali na litomba mpo ete ezali moko “bozongindako ” ya mosantu elongo na Nkolo.

  14. 1 Bakolinti 3:16; tala lisusu 6:19.

  15. Abalayama 3:23.

  16. Tala Yelemia 1:5.

  17. Tala Alama 13:2–3.

  18. Tala Doctrineet Alliances 138:55–56.

  19. Tala Alama 13:2–3; Doctrine et Alliances138:38–57.

  20. Bizaleli ya “bondimi, bolamu,boyebi, temperance, patience, brotherly kindness, godliness, charity, humility, [and] diligence” (Doctrine et Alliances4:6) ezali na na makabo mosusu ya molimo tokoki kokolisa mpe ekopesama. Botondi ezali ezaleli mosusu ya molimo oyo ekoki kokolisama. Botondi kotonga ezaleli mpe bokolisi. Mpe ntango ozali “na bomoyi ya molimo obotami na Nzambe,” Okozongisa matondiya kozua elilina ye na kondima na yo (tala Alma 5:14).

  21. Tala1 Bakolinti 12; 14:1–12; Moroni 10:8–19; Doctrine et Alliances 46:10–29.

  22. Mingi bamekami mpo na kolia mingi. “Munene koleka ekomi maladi ya ebele ya bao, pene na motango 2.8 milio ya bato bazalikokufa mibu nionso na ntina ya bolekisi kilo” (“10 ntina mpo bolekisi kilo,” (Lisanga ya molongo mpo na bokolongono, Sanza ya misato. 2013, www.who.int/features/factfiles/obesity/en). Basusu bamekami mpo na kolia moke. Anorexie mpe boulimie ebebisi bomoi ya mingi, mabala, mpe mabota. Mpe mingi bamekami na bamposa ya nzoto oyo epekisami na mokeli na biso. Nionso ezwami na Handbook 2: Administering the Church, Lolenge loye: “Mobeko ya nkolo ya bopeto ezali komipima na bosangani ya nzoto libanda ya libala mpe kotikala na kati ya libala.Ekobo , bondumba, bosangani ya mobali na mobali to ya mwasi na mwasi, mpe ndenge mosusu kozanga bopeto, ya bomoto te, to misala ya mbindo ezali masumu.” Kaka na mokanda handbook: “Bizaleli ya bosangani ya mobali na mobali ebuki mibeko ya Nzambe, ekesani na etinda ya bosangani ya bato, mpe azangisi bato mapamboli oyo bakoki kozwa na kati ya bomoyi ya libota mpe na bokuli ya lobiko ya nsango elamu.  Ntango toboyi bizaleli ya bosangani ya mobali na mobali, Eklezia esangani elongo na bososoli mpe botosi na bomoto ya baoyo balingaka oyo lokola bosangani ya muasi na muasi mpe mobali na mobali.” ([2010], 21.4.5; 21.4. 6).

  23. Tala1 Bakolintia 6:9–20; Yakobo 1:25–27; Doctrine et Alliances 130:20–21. Mpe tosengeli ntango nyonso kokundola ete “bato bazali, ete bazala na esengo” (2  Nefi 2:25).

  24. Eleko ya bomoyi ezali ya komekama, lokola elimbolami na makomi: “Tokoki koladnisa yango awa elongo, kotala sokibakoki kosala biloko oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango” (Abalayama 3:25).

  25. Tala Mosia 4:10; Alama 39:9; Elamane 15:7Handbook 2 Sangisa na sango oyo : “Bosangini ya mobali na mobali ekoki mpe kolimbisama na botubeli ya solo” (21.4.6).

  26. Na lisekwa ya Yezu Klisto mpe na botosi ya mateya ya nsango malamu, bana ya bato bakoki kobikisama (talaDoctrine et Alliances138:4; Biteni ya bondimi 1:3).

  27. Tala Etele 12:33–34; Moloni 8:17.

  28. Tala Mosia 5:2; Alama 5:12–14.

  29. Tala Baloma 8:13–17; Galatia 5:13–25; Doctrine et Alliances88:86.

  30. 2 Nefi 2:27.

  31. Tala Doctrine et Alliances131:1–4.

  32. “The Family: A Proclamation to the World,”  Ensign toLiahona  Nov. 2010, 129.

  33. TalaMatai19:4–6; Moziya 29:26–27; Elamani 5:2.

  34. Moto moko moko abotami na bokitoli ya ya moko oyo emonani na, chromosomes, mpe ADN(deoxyribonucleic acid). ADN ezali mwa biteni moke oyo ezali na nsangu nyonso ya bomoto oyo ezali kosala na bokoli mpe misala ya cellules oyo ezali na bomoi. ADN ya moto na moto esalemai ntango ADN ya tata mpe ya mama esangani ADN ya nzoto ya sika--nde ekeli boyokani katikati na tata, mama, mpe mwana.

  35. Tala Genese 2:24–25; 3:20–21; 4:1–2, 25.

  36. Dr. Patrick F. Fagan akomaki ete: “Eteni ya ntina monene likolo ya oyo wapi nkita mpe mumbongo etongami ezali ndako ya moboti [oyo] abala—mingi mingi libota ya bozwi ya mwana oyo angumbamelaka mposo na mposo . Libala nyonso esalaka ndako ya sika, etonga moko ya bonsomi oyo esalaka mosolo, ebimisaka, ebombaka, mpe kolona mpo na kobota misolo mosusu” (“The Family GDP: How Marriage and Fertility Drive the Economy,” The Family in America, vol. 24, no. 2 [Spring 2010]: 136).

  37. Tala Esode 20:14; Lewiko 18:22; 20:13; Dutelenome 5:18; Matai 5:27–28; Malako10:19; Luka 18:20; Baloma 1:26–27; 13:9; Mozia 13:22; 3 Nefi 12:27–28; Doctrine et Alliances42:24; 59:6.

  38. Tala Gordon B. Hinckley, “This Thing Was Not Done in a Corner,” Ensign, Nov. 1996, 49.

  39. Tala Doctrine et Alliances 14:7.

  40. Tala Mose 1:39.

  41. Tala 2 Nefi 9:41, 46; Moziya 16:10.

  42. Tokosambisama engebene na masengi mpe mposa ya mitema na biso (tala Doctrine et Alliances137:9; tala lisusu; Baebele 4:12; Alma 18:32; Doctrine et Alliances 6:16; 88:109).