2010–2019
Eyebi biso nini toza na yango?
Sánzá ya Zómi 2013


Toyebi Nini Tozali na Yango?

Makuli ya Bonganganzambe mpe mayokami epesi nzela tokoma na litondi ya mapamboli balakaki biso na Nzambe, oyo ekoki kosalema se na Bomikabi ya Mobikisi.

Na “Libota: Esakola na Mokili,” Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale balobi: “Bato banso bazali—mibali mpe basi—bakelami na elili ya Nzambe. Moko na moko kati na bango azali mwana mobali to ya mwasi molingami ya molimo ya baboti ya likolo, mpe, na bongo, moko na moko azali na ezaleli ya bonzambe mpe ntina.”1 Kokokisa atandele ya bonzambe, mwana nyonso ya mobali mpe ya mwasi ya Nzambe asengeli na makuli mpe mayokami ya bonganganzambe.

Tosengeli na libatisi. Ntango tozindisami na mayi ya libatisi, tosali liyokami kozwa kombo ya Klisto likolo na biso, komikundolaka Ye ntango nyonso, kobomba mibeko naYe, mpe kosalela Ye kino na nsuka, ete tokoki kozwa Molimo na Ye elongo na biso.2

Tosengeli na likabo ya Molimo Mosantu. Na nzela ya likuli wana, tokoki kozwa bokoti na boninga ya sikisiki na Molimo. Mokambi Wilford Woodruff ateyaki: “Mobali to mwasi nyonso oyo akoti naino na Eklezia ya Nzambe mpe abatisami mpo na bolimbisi ya masumu azali na ndingisa na bobimisi, ndingisa mpo na Molimo ya Nzambe, mpo na kosunga bango na misala na bango, na bosali na bango mpo na bana na bango, na bopesi toli na bana na bango mpe baoyo likolo na bango babengami mpo na kokamba. Molimo Mosantu azali kaka mpo na mibali te, to mpo na Apostolo to Profeta te; ezali mpo na mobali mpe mwasi nyonso ya botongono, mpe mpo mwana nyonso oyo azali mokolo mpenza mpo na koyamba nsango malamu ya Klisto.”3

Tosengeli koyamba dotasio na tempelo. Mpaka M. Russell Ballard alobaki: “Ntango mibali to basi bakei na tempelo, bazwi dotasio bango mibale elongo na nguya kaka wana, oyo elakisi nguya ya bonganganzambe. … Dotasio elakisi mpeza likabo ya nguya.”4

Tosengeli na likuli ya bokangi, oyo ekomema na bomoy ya seko, “likabo monene ya makabo nyonso ya Nzambe”5 Likuli liye ya bonganganzambe ezali kozwama bobele na mobali mpe mwasi elongo. Mpaka Russell M. Nelson ateyaki, “likoki ya bonganganzambe ezongisami mpo ete mabota makoka kokangama sekoseko.”6

Tosengeli na libaku ya kozongisa sika mayokami na biso poso moko na moko wana ezali biso kokabola elambo. Baprofeta mpe bapostolo ya mikolo ya nsuka bateyi ete ntango tozali kabola na bolongobani elambo, tokoki kozongisa sika bobele liyokami ya libatisi na biso te kasi “mayokami nyonso ekotakii kati elongo na Nkolo.”7

Makuli mpe mayokami ya bonganganzambe maye epesaka ekoteli mpo na litondi ya mapamboli Nzambe alakaki biso, oyo wapi ekoki kosalema na Bomikabi ya Mobikisi. Elatisi bana ya mibali mpe ya basi ya Nzambe elongo na nguya, nguya ya Nzambe,8 mpe epesi biso libaku ya kozwa bomoyi ya seko—kozonga na miso ya Nzambe mpe kovanda elongo na Ye na libota na Ye ya seko.

Kala te nakendaki elongo na bakambi ya bonganganzambe kotala bandako ya basi minei na Honduras. Bandeko basi baye mpe mabota na bango bazalaki na bosenga ya bafungola mpe likoki ya bonganganzambe, makuli mpe mayokami ya bonganganzambe, mpe nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe.

Totalaki ndeko mwasi molingami oyo abala mpe azali na bana kitoko mibale. Azali botongono mpe alenda na Eklezia, mpe azali koteya bana na ye kopona malamu. Molongani na ye asungaka ye na misala ya Eklezia, kasi azali mondimi na Eklezia te. Libota na bango ezali makasi, kasi mpo na bosepeli bokasi monene koleka, basengeli kobakisa mapamboli ya bonganganzambe. Basengeli na tata mpo na kozwa makuli ya libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu mpe kozwa likuli ya bonganganzambe epesemela likolo na ye. Basengeli na nguya oyo ekoki koya na nzela ya dotasio mpe bokangi.

Botali na biso elandi ezalaki na ndako ya bandeko basi mibale ya likombe, basi ya kondima makasi. Ndeko mwasi moko azali na mwana mobali komilengelaka mpo na misio. Ndeko mwasi mosusu azalaki kozwa lisalisi mpo na cancer. Na ntango ya bolembu mpe ya bozangi elikia, bamikundolaki Bomikabi ya Mobikisi mpe batondisamaki na bondimi mpe elikia. Bango mibale basengeli kobakisa mapamboli mpe nguya ezwami na nzela ya makuli ya tempelo. Tolendisaki bango basangana na misionele ya lobi na ndako na bango na komilengelaka mpo na kozwa makuli mana.

Botali na biso ya nsuka ezalaki na ndako ya ndeko mwasi oyo molongani na ye autaki kokufa na likama monene. Mondimi moko ya sika na Eklezia, asosolaka te ete akokaki kozwa dotasio na yemei mpe kokangisama na molongani na ye. Ntango toteyaki ye ete mapamboli maye ekokaki kosalema mpo na ye mpe mpo na molongami na ye akufa, atondaki elongo na elikia. Koyeba ete na nzela ya makuli mpe mayokami ya tempelo libota na ye ekoki kokangisama elongo, azali na bondimi mpe bomipesi ya kukutana na yango mpo na mimekamo mikoya.

Mwana mobali ya mwasi mokufeli oyo azali komilengela mpo na kozwa Bonganganzambe ya Alona. Bokuli na ye ekozala lipamboli monene mpo na ye mpe libota na ye. Bakozwa mosimbi bonganganzambe na libota na bango. 

Ntango nakutanaki na basi baye ya botongono na Honduras, nakokaki komona ete bazalaki kobunda kobatela mabota na bango ya kolenda na nsango malamu. Bapesaki matondi mpo na bandimi ya paloasi babateli-liyokami baye na boboto baluki mpe basalisi kosunga na masengi na bango ya ntango mpe ya molimo. Atako bongo, moko na moko ya bandeko basi baye bazalaki na masengi oyo ekokokisamaka nyonso te.

Na moko na moko ya mabota totalaki, mokambi ya bonganganzambe ya bwania atunaki na ndeko mwasi moko na moko soki azwaka mapamoli ya bonganganzambe. Ntango nyonso eyano ezalaki te. Ndeko mwasi moko na moko asengaki mpo na kozwa lipamboli ya bonganganzambe mokolo wana. Moko na moko alelaki ntango azalaki kopesa litondi mpo na libondisi, botambwisi, bolendisi, mpe bofulami oyo eutaki na Tata na ye ya Lola na nzela ya mosimbi bonganganzambe alongobani.

Bandeko basi baye bafulaki ngai. Balakisaki limemia mpo na Nzambe mpe na nguya mpe likoki na Ye. Natondaki lisusu mpo na bakambi ya bonganganzambe oyo batalaki elongo na ngai. Ntango totikaki ndako moko moko, topesaki toli elongo na ntina ya kosunga mabota maye kozwa makuli basengeli mpo kokoba na mayokami na nzela mpe kokomisa makasi bandako na bango.

Wana ezali lelo bosenga monene mpo na mibali mpe basi kokolisa limemia mpo na moko mpe mosusu lokola bana ya mibali mpe ya basi ya Nzambe mpe limemia mpo na Tata na biso na Likolo mpe bonganganzambe na Ye—nguya mpe likoki na Ye.

Azali na mwango mpo na biso, mpo ntango tosaleli bondimi na biso mpe tolikii na mwango na Ye, limemia na biso mpo na Ye mpe mpo na nguya mpe likoki ya bonganganzambe na Ye ekolendisama.

Na boteyi ya bokambi mpo na mokili mobimbaBolendisi Libota mpe Eklezia na nzela ya Bonganganzambe,toteyamaki ete bandeko basi oyo bazali na basimbi bonganganzambe te na mabota na bango basengeli komiyoka mokolo moko te bango moko. Bapambolami mpe balendisami na nzela ya makuli bazwi mpe makuli bazali kobatela. Bsengeli kotatabana te kosalisa ntango lisalisi lisengami. Mpaka M. Russell Ballard ateyaki ete mwasi nyonso na Eklezia asengeli koyeba ete azali na episiko, mokambi ya lisanga likoki ya bampaka, moteyi na libota, mpe basimbi bonganganzambe basusu balongobana baye akoki koyekamela mpo na koya na libota na ye mpe kosunga ye mpe, lokola Ndeko mzasi Rosemary M. Wixom abakisaki, mpo na “kopesa lipamboli.”9

Mpaka Ballard ateyaki lisusu: “Tata na biso na Likolo akabaka na nguya na Ye. Mibali nyonso mpe basi nyonso bazali na makoki na nguya oyo mpo na kosalisa kati na bomoi na biso moko. Banso baye basali mayokami ya bule elongo na Nkolo mpe oyo batosaka mayokani maye bazali baponami mpo na kozwa bobimisi ya moto na moto,mpo na kopambwama na bosali ya banzelu, [mpe] mpo na lisanga elongo na Nzambe.”10

Tozali banso na bosenga ya moko na mosusu. Bana na Nzambe ya mibali bazali na bosenga ya bana ya Nzambe ya basi.

Tozali na makabo makeseni mpe makasi ekeseni.Bakolite ya Yambo na mokapo 12 elimboli bosenga mpo na bana mibali mpe ya basi ya Nzambe, mokona moko kati na biso, mpo na kokokisa ntina ya moto na moto mpe mikumba engebene mpo na mwango ya Nkolo, oyo ezali na litomba mpo na banso.11

Mwana mobali ya Nzambe, oyebi nani ozali? Oyebi nini oyo ozali na yango? Ozali ya kolongobana mpo na kosalela bonganganzambe mpe koyamba nguya mpe mapomboli ya bonganganzambe? Eyambi yo ntina mpe mikumba mpo na kolendisa mabota lokola bapapa, bankoko ya mibali, bana mibali, bandeko mibali, mpe banoko? Olakisaka limemia mpo na basi, bomwasi, mpe bomama?

Bana basi ya Nzambe, eyebi biso banani tozali? Ebi biso nini tozali na yango? Tolongobani mpo na kozwa nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe? Ezwi biso makabo epesami epai na biso na litondi, ngolu, mpe bolongobani? Eyambi biso misala na biso mpe mikumba na biso ya kolendisa mabota lokola bamama, bankoko ya basi, bana basi, bandeko basi, mpe batata mwasi/ bamama nkuluntu to leki? Elakisaka biso limemia mpo na mibali, kimobali, mpe botata?

Lokola bana mibali mpe basi bayokami, ezali biso na bondimai na Tata na biso ya Likolo mpe na mwango na ye ya seko mpo na biso? Ezali biso na bondimi na Yezu Klisto mpe na Bomikabi na Ye? Endimi biso ete tozali na bozali mpe atandele ya bonzambe? Mpe makasi na biso mpo na kokokisa atandele oyo mpe kozwa nyonso oyo Tata azali na yango,12 ezali biso kososola ntina ya kozwaka makuli ya bonganganzambe mpe kosalaka, kobatelaka, mpe kozongisaka sika mayokami na biso na Nkolo?

Tozali bana mibali mpe bana basi ya molimo balingami ya baboti ya likolo, na bozali mpe atandele ya bonzambe. Mobikisi na biso, Yezu Klisto, alingaki biso mingi mpo na kopesa bomoi na Ye mpo biso. Bomikabi na Ye epesi nzela kokoba na nzela mpo biso totambola na nzela epai ya libota na biso ya lola, na nzela ya makuli mpe mayokami ya bule ya bonganganzambe.

Makuli mpe mayokami ya bonganganzambe maye ezongisamaki na mabele na nzela ya Profeta Joseph Smith, mpe lelo Mokambi Thomas S. Monson azali na bafungola nyonso ya bonganganzambe na mabele.

Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki: “ Na Eklezia ya Yezu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka okozwa likoki ya bonganganzambe mpo na kosala makuli na yango tokoki kokota na mayokami ya kokangisa elongo na Tata na biso ya Likolo na kombo ya Mwana na Ye Mosantu. … Nzambe alaki kobatela bilaka na ye epai na yo lokola okotosa makuli na yo elongo na ye.”13

Na Ntina ya makambo maye natatoli na nkombo ya Yezu Klisto, amene.

Matangi

  1. “The Family: A Proclamation to the World,” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2010, 129.

  2. Tala Moloni 4:3; 6:3.

  3. Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff (2004), 49.

  4. M. Russell Ballard, “Let Us Think Straight” (Brigham Young University Education Week devotional,sanza ya mwambe 20, 2013); speeches.byu.edu.

  5. Doctrine et Alliances 14:7; tala lisusu Doctrine et Alliances 131:1–4.

  6. Russell M. Nelson, “Nurturing Marriage,” Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2006, 37; to na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 134.

  7. Delbert L. Stapley, na Conference Report, sanza ya zomi 1965, 14; etangami na L. Tom Perry, “As Now We Take the Sacrament,”Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2006, 41; tala lisusu Teachings of Gordon B. Hinckley (1997), 561; The Teachings of Spencer W. Kimball, ed. Edward L. Kimball (1982), 220.

  8. Tala Doctrine et Alliances 109:22.

  9. Tala M. Russell Ballard and Rosemary M. Wixom, “Blessings of the Priesthood in Every Home,” na Strengthening the Family and the Church through the Priesthood (worldwide leadership training, 2013); lds.org/broadcasts.

  10. M. Russell Ballard, “Let Us Think Straight”; speeches.byu.edu.

  11. Tala lisusu Doctrine et Alliances 46:9, 12.

  12. Tala Doctrine et Alliances 84:38.

  13. D. Todd Christofferson, “The Power of Covenants,” Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2009, 22.