2010–2019
Bileli ya Yilimia: Bokeba na Bowumbu
Sánzá ya Zómi 2013


Bileli na Yilimia: Bokeba na Bowumbu

Etumba na biso ezali ya koboya Bowumbu ya lolenge nyonso, kosalisa Nkolo kosangisa baponi na Ye, mpe kobonzela mpo na nkola oyo ezali kolanda.

Na ebandeli ya libala na biso mwasi na ngai, Mary, mpe ngai, tokanaki ete mbala mingi tokolinga kopona makambo mpe milulu ya masano oyo tokokaki kokende elongo. Tolingaki lisusu kokeba na mosolo na biso. Mary alingaka miziki mpe azalaki na ntembe te kolinga ete nakoka kobeta sete na makambo ya masano, yango wana asalaki ete toyokana mpo na makambo nyonso ya kofuta ezala milulu ya miziki, ya nzembo, to ya bonkoko mibale mpo na lisano ya kofuta moko na moko.

Na Ebandeli, nazalaki koboya makambo ya nzembo, kasi nsima ya ntango nabongolaki emoneli na ngai. Nayaki mingimingi kolinga nzembo ya Giuseppe Verdi. 1 Poso oyo ekozala bosepeli ya mbala 200 ya mbotama na ye.

Na bolenge na ye Verdi asimbamaki na profeta Yilimia, mpe na 1842, na mibu 28, akomaki ya koyebana na nzembo Nabucco,lolenge ya mokuse ya nkombo Nebukadanesala na lokota ya Italie, mokonzi ya Babele. Nzembo oyo ezali na maloba mazwami uta na buku ya Yilimia, Bileli, mpe Nzembo kati na Boyokani ya Kala. Nzembo ekwi etumba ya Yelusaleme mpe bokangemi mpe Bowumbu ya Bayuda. Nzembo 137 ezali bofulami mpo na mayoki ya motema ya Verdi mpe “Chorus of Hebrew slaves” Bayembi ya Bawumbu ya Baebele ya kofulama. Moto ya nzembo oyo kati na makomi ezali nsomo mpenza: “Wana ezalaki bango na bokangemi, Bayuda balelaki mpembeni ya ebale ya Babele—mpo na mawa, bakokaki kokoka koyemba nzembo ya Siona te”

Ntina na ngai ya kososola ndenge ebele ya Bowumbu mpe bokonzami. Nakokokisenisa mwa makambo ya mokolo na biso elongo na na maye ya mikolo ya Yilimia yambo ya bokweyi ya Yelusaleme. Nakotalisaka mongongo oyo ya bokebisi, nazali na botondi ete bandimi mingi ya Eklezia bazali na bosembo koboya etamboli oyo ezalaki ya mabe mpenza epai ya Nkolo na ntango ya Yilimia.

Masakoli mpe bileli ya Yilimia ezali motuya na Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Yilimia mpe Yelusaleme ya mokolo na ye ezali makambo ya mikapo ya ebandeli ya Buku ya Mormon. Yilimia azalaki moto ya ntango ya profeta Lehi. 2Nkolo na mbala moko ayebisaki Yilimia na ntina ya boponami na ye yambo ya mbotama: “Naino natongi yon a kati ya libumu te, nayebaki yo; mpe naino obotamaki te, nabulisaki yo, mpe napesaki yo lokola mosakoli epai na mabota. ”3

Lehi azalaki na libiangi, etinda, mpe mokumba ya kokesana uta na Nkolo. Abiangamaki na bolenge na ye te kasi na kimokolo na ye. Na ebandeli ya ye ezalaki mongongo ya bokebisi, kasi nsima ya kosakola na botongono etinda se moko lokola Yilimia, Nkolo atindaki ete asengeli kozwa libota na ye mpe kokende na esobe. 4 Na kosalaka bongo, Lehi apambolaki kaka libota na ye te kasi lisusu bato banso.

Na mibu yambo ya bobuki Yelusaleme, 5bitinda Nkolo apesaki Yilimia ezalaki kafukafu. Alobaki:

“Bato na ngai basombotani nkembo na bango mpo na yango ejali mpamba. …

“… Batiki ngai, lijiba na main a bomoi, mpe batimoleli … mabulu matombwani, makosimbaka mai te.”6

Kolobelaka makama oyo ekoya likolo ya bato ya Yelusaleme, Nkolo alelaki ete, “[Mpo na bango] ntango ya kobuka mbuma eleki, ntango na moi esili nde [ba]biki te.”7

Nzambe alingaki ete mibali mpe basi bazala na bosomi ya kopona katikati ya malamu mpe mabe. Ntango baboponi mabe ekomi ezalela ya bonkoko to ya ekolo ya makasi ezali na bansuka ya lokengo na bomoi oyo mpe na bomoi ekoya lokola. Bato bakoki kokoma bawumbu to komitia na Bowumbu kaka ya biloko ekosalaka mpasi, ya kokakema te kasi lisusu na filosofi ya mpasi, ya kokakema oyo epengwisaka uta bomoi ya bosembo.

Kobalukaka uta na kongumbamela ya Nzambe ya solo mpe ya bomoi mpe kongumbamelaka banzambe ya mabe lokola bozui mpe lokumu mpe komipesaka na etamboli ya nsoni mpe mabe esukaka na Bowumbu na bimoniseli na yango nyonso. Eye ekwi Bowumbu ya molimo, ya nzoto, mpe ya mayele mpe ntango mosusu ememaka bobebi. Yilimia mpe Lehi lisusu bateyaki ete baoyo bazali sembo basengeli kosalisa Nkolo mpo na kotia Eklezia mpe bokonzi na Ye mpe kosangisa Yisalaele epanzana.8

Bitinda oyo ezongelami mpe elendisami bikeke mingi na bileko nyonso. Ezali na katikati ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na eleko oyo, ya nsuka.

Bokangemi ya Bayuda mpe bopalangani ya mabota ya Yisalaele, kotangaka mpe mabota zomi, ezali makambu ya malongi ya ntina kati na nsango malamu ezongisami. Mabota zomi ya Yisalaele oyo ebunga esalaki Bokonzi ya Yisalaele ya Nordi. Mpe ememamaki na Bowumbu na Asulia na 721 b.cyambo ya Klisto. Bakendaki na nodi ya bikolo.9 Eteni ya bondimi na biso ya zomi elobi, “Tondimi bosangani mpenza bwa nzoto ya Yisalaele mpe bozongisi bwa Mabota Zomi”10Tondimi lisusu ete lokola eteni ya boyokani Nkolo asalaki elongo na Abalayama, kaka libota ya Abalayama te ekopambolama kasi lisusu ete bato banso yam abele bakopambolama. Lokola Mpaka Russell  M. Nelson alobaki, bosangani “ezali te likambo ya bisika ya komonana; ezali likambo ya komipesa ya moto se moko. Bato bakoki komemama na boyebi Nkolo” [3 Ne 20:13] na kozangaka kotika mabele ya mboka na bango.”11

Malongi na biso ezali polele: “Nkolo apanzaki mpe ayokisaki mawa na mabota zomi na mibale ya Yisalaele mpo na mabe mpe botomboki na bango. Nzokande, Nkolo lisusu [asalelaki] bopanzani oyo ya baponami na ye katikati ya bikolo ya mokili mpo na kopambola bikolo wana.”12

Toyekolaka mateya ya motuya uta na eleko ya likama oyo. Tosengeli kosala makambo nyonso oyo ezali kati na nguya na biso mpo na koboya lisumu mpe botomboki oyo ekambaka na Bowumbu.13Toyebaka lisusu ete kozala na bomoi ya malamu ezali eloko ya liboso mpo na kosunga Nkolo kati na kosangisa baponami na Ye mpe kati na bosangisi ya nzoto ya Yisalaele.

Bowumbu, bokonzami, babokakemi, mpe monioko eyaka na ndenge ebele. Ekoki kozala Bowumbu ya nzoto ya mosuni kasi ekoki lisusu kozala bobebi ya bonsomi ya molimo oyo ekoki kobebisa bokoli na biso. Yilimia alobi polele ete bozangi sembo mpe botomboki ezalaki bantina monene mpo na libomi ya Yelusaleme mpe bokangemi na babele. 14

Ndenge mosusu ya Bowumbu ebebisaka molimo ya moto na lolenge se mokokokani na. Bosomi ya ezalerli ekoki kasalelama mabe na banzela ebele.15Nakotanga minei oyo ezali mingimingi mabe mpenza na ezalela ya lelo.

Ya yambo, bokakemi oyo ebebisaka bosomi, etelemelaka babondimi ya ezaleli, mpe ebebisaka bokolongonu ebotaka Bowumbu. Bosimbami ya lopipi mpe masanga makasi, pornogalafi, masano ya mosolo, bobebisi mosolo, mpe mitungisi mosusu esalaka na baye bazali na Bowumbu mpe na lingomba mokumba monene moko oyo pene moto akoki kotia motuya te.

Ya mibale, babokakemi to makambo oyo atako ezali mpenza mabe te ekoki kolia ntango na biso ya motuya topesami oyo ekokaki kosalelama na lolenge mosusu mpo na kokokisa bantina malamu. Eye ekoki kokwa bosaleli mingi ya biloko ya nsango ya bato banso, video mpe masano ya lotiliki, masano minene, bosepelisi nzoto, mpe mingi mosusu. 16

Lolenge tozali kosalela ntango mpo na libota ezali moko ya makambo ya motuya mingi koleka tokutaka na bamboka ebele. Ntango nazalaki mondimi se moko ya Eklezia na kompani na biso ya bato ya mibeko, mwasi moko ya moto ya mibeko alimbolaki epai na ngai lolenge azalaki komiyoka lokola mosani komekaka kobomba mitope misato na likolo na ntango se moko. Ndembo moko ezalaki bosaleli na ye ya mobeko, moko ezalaki libala na ye, mpe moko ezalaki bana na ye. Azalaki pene kozanga ntango mpo na yemei. Azalaki komitungisa ete moko ya ndembo ezalaki ntango nyonso na mabele. Napesaki likanisi ete tokutana lokola liboke mpe tossolola na ntina ya bantina na biso. Tokanaki ete ntina ya liboso oyo tozalelaki kosala ezalaki kosunga mabota na biso. Toyokanaki ete kosalaka mbongo mingi ezalaki pene lokola motuya te lokola mabota na biso. Kasi toyebaki lisusu ete kosalisaka bakiliya na biso na makoki na biso nyonso ezalaki ntina. Lisolo nsima ebongwanaki epai na maye tosalaki na mosala oyo ezalaki oyo esengelaki te mpe ekokanaki tan a kotikaka ntango mpo na libota. Ezalaki na bofini mpo na kolekisa ntango na esika ya mosala oyo ezalaki ntina te? 17Tokanaki ete ntina na biso elingaki kozala nzinganzinga ya libota na boninga mpo na basi mpe mibali lokola. Tika tozala na esika ya liboso kati na kobatelaka ntango mpo na libota.

Ya misato, bokonzami ya mingi koleka na mokolo na biso, lokola ezalaki na ntango ya kala nyonso, ezali bayebi ya makanisi to ya politiki oyo ekokani ten a nsango malamu ya Yesu Klisto. Kozwaka esika ya filozofi ya bato mpo nsango malamu ya solo ekoki kokamba biso mosika uta na bopete ya etinda ya Mobikisi. Ntango Apostolo Paulo akendeki kotala Atene, amekaki koteya na ntina ya Bosekwi ya yesu Klisto. Mpo na bokokasi oyo totangi na Misala, “Bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kovanda na Atene, bazalaki kolekisa ntango na bango kaka mpo na koloba mpe koyoka.” bansango ya sika 18Ntango liboke esosolaki ezalela ya pete ya bonzambe ya etinda ya Paulo, oyo ezalaki ya sika te, babwakisaki yango.

Oyo ekokani na mokolo na bisomei wapi babosolo ya nsango malamu ebwakisami to ebebisami mbala mingi mpo na kokomisa yango kitoko koleka na mayele to ya kokokana na makambo ya ezalela mpe bafilozofi ya mayele ya mikolo oyo. Soki tokebi te, tokoki kokangema na makambo mpe bisika oyo bisomei na Bowumbu ya mayele. Ezali na mingongo mingi kaka sikawa kolobaka na basi lolenge ya kovandela. 19Mbala mingi bazali koyokana te moko na mosusu. Tosengeli kolobela mingimingi bafilozofi oyo ezali kotongo to kokitisa limemia mpo na basi oyo baponi komibonza na ndenge nyonso esengeli mpo na kozala bamama, bateyi, babokoli, to baninga ya bana.

Mwa Basanza eleki, bana na biso ya basi mibale ya leki koleka mingi bayaki kotala biso moto na moto—moko poso na poso. Nazalaki na ndako mpe nafungolaki ekuke. Mwasi na ngai, Mary, azalaki na lisuku mosusu. Na makambo nyonso mibale, nsima ya mbote ya loboko, balobaki pene makambo se moko. Batalaki nzinganzinga mpe nsima balobaki, “Nalingaka kozala na ndako ya Nkoko ya mwasi. Nkoko ya mwasi azali wapi?” Nalobaki yango na bango, te kasi nazalaki kokanisa, “Oyo ezali ndako ya Nkoko ya mobali te mpe?” Kasi nasosolaki ete ntango nazalaki elenge mobali, libota na biso ekendeki na ndako ya Nkoko ya mwasi. Maloba ya loyemvbo ya momesano eyaki na moto na ngai: “Likolo ya ebale mpe na kati ya bazamba epai ya Nkoko ya mwasi tozali kokende.”

Sikawa, tika naloba polelepolele ete nasepelaka na malakisi ya kelasi mpe mabaku mosusu oyo ezali epai na basi. Nalingaka likambo ete mosala ya kobuka mokongo mpe mosala ya ndako esengisami na basi ekitisami na bisika mingi ya mokili mpo na emoneli ya mikolo ya sika mpe ete basi bazali kopesa lisalisi ya kitoko mingi na makambo mingi. Kasi soki topesi nzela na bonkoko na biso mpo na kokitisa boninga na biso ya ndenge oyo bana bazali na yango na bamama mpe bankoko ya basi mpe basusu oyo babokolaka bango, tokoya koyoka mawa.

Ya minei, banguya oyo ebukaka na bosembo esimbaka mabongisi ya bonzambe ekoki kosuka na Bowumbu. Moko ya ndenge ya mabe ezali ntango bato malamu oyo bazali bayanoli epai ya Nzambe mpo na etamboli na bango bakotisami na makasi na milulu oyo ezali kobebisa motema na bango—ndakisa, bapesi bokonungono batindami na makasi kopona katikati kosungaka na basopi zemi kotelemelaka mitema na bango to bobungisi misala na bango.

Eklezia ezali mwa bato moke mpenza kutu ata ntango ekangisami na bato oyo bakokani bizaleli. Ekozala mpasi mpo na kobongola lingomba nyonso, kasi tosengeli kosala mpo na kobutisa ezalela ya bonkoko oyo ezingi biso. Basantu ba Mikolo mya Nsuka na bikolo nyonso basengeli kozala bayemboka malamu, kosala elongo na makambo etali ekolo, komiyekolisa na makambo mingi, mpe kopona.

Nsete na biso ya yambo, nzokande, esengeli ntango nyonso komimbonza na ndenge esengeli mpo na kobatela libota na bisomei mpe nkola ya sika.20 Mingi mpenza na bango bazali naino na Bowumbu te epai bakakemi ya mpasi to makanisi ya lokuta. Tosengeli kosalisa kokotisa yango uta na mokili oyo ekokani mingi na Yelusaleme oyo Lehi mpe Yilimia bayebaki. Na bobakisi, tozali na mposa ya kolengela bango basala mpe babatela mayokani ya bule mpe bazala batindami ya yambo mpo na kosalisa Nkolo Kotia Eklezia na Ye mpe kosangisa Yisalayele Epanzana mpe baponami ya Nkolo bisika nyonso.21Lokola Doctrine et Alliances ekomi yango kitoko, “Bayengebene basengeli kosangisama uta kati ya bikolo nyonso, mpe Siona nde ekoya, koyembaka elongo banzembo ya esengo ezanga nsuka.”22

Mokakatano na biso ezali koboya Bowumbu ya lolenge kani, kosalisa Nkolo kosangisa baponami na Ye, mpe komibonza mpo na nkola ya sika. Tosengeli ntango nyonso komikundola ete, tomibikisa te. Tokangolami na bolingo, ngolu, mpe libonza ya komikaba ya Mobikisi. Ntango libota ya Lehi ekimaki, bakambamaki na mwinda ya Nkolo. Soki totaliepai ya mwinda na Ye, tolandi mitinda na ye, mpe toyekami na litomba na Ye, tokoboya Bowumbu ya molimo, ya nzoto, mpe ya mayele lokola mpe boleli ya kowayawaka na esobe na bisomei, mpo Ye azali na nguya ya kobikisa

Tika toboya bozangi elikya mpe mawa ya baoyo bakweyi na bokangemi mpe mpo na mawa, bakoki lisusu kokoka koyemba nzembo ya Siona te. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Nzembo mingi ya Verdi ndakisa Aida, La traviata, mpe Il trovatore,ezali kati ya nzembo eyebana koleka mingi eyembami na mokili mobimba lelo.

  2. Tala1 Nefi 5:13; 7:14.

  3. Yilimia 1:5.

  4. Tala 1 Nefi 2:2–3.

  5. Bobebisi ya tempelo ya Salomo, bokweyi ya Yelusaleme, mpe bokangemi ya libota ya Yuda esalamaki pene na mobu 585 Yambo na mbotama na Klistoyambo ya mbotama ya Klisto.

  6. Yilimia 2:11, 13.

  7. Yilimia 8:20.Yilimia akomaki yambo boleli ya Nkolo mpo na boyamboli: “Nayoki mpasi kati na motema na ngai” (Yilimia 4:19) mpe kobondelaka, “… Moto azali oyo asambisi sembo, mpe aluki solo, ete nalimbisa ye” (Yilimia 5:1).

  8. Tala Yilimia 31; 1 Nefi10:14.

  9. Tala 2  Bakonzi17:6; Doctrine et Alliances 110:11.

  10. Biteni ya Bondimi 1:10; tala lisusu 2  Nefi 10:22.

  11. Russell  M. Nelson, “The Book of Mormon and the Gathering of Israel” (lisikulu lipesamaki na seminele ya bakambi ya sika ya misio, Sanza ya motoba  26, 2013).

  12. Bokambi mpo na Makomi, “Israel,”scriptures.lds.org.

  13. Nkolo, kolobaka na mokolo na biso, alobaki, “Mokili mobimba evandi kati na lisumu, mpe ezali konganga na nse ya molili mpe na nse ya Bowumbu ya lisumu … mpamba te bazali koya epai na ngai” (Doctrine et Alliances 84:49–50).

  14. Bato bayebi ntina ya likambo te bakoki, solo, lisusu kozala na Bowumbu.

  15. Mabongisi ya malongi ebongwanaka te, kasi bandimbola ya Bowumbu, bokonzami, mpe bobebisami ekeyi na lombango na lolenge moko esalema naino te.

  16. Oyo ekomamaki na mayele mpe na lolenge moko ya kosekisa na lokasa ya likolo ya New York Times Magazine mobu eleki (Apr. 8, 2012) kolobelaka ezalela ya kokakema ya masano ya lotiliki. Etangami ete, “Nguya mpe Bobendi ya Bokakemi ya makasi, Bobebisi Tango, Bobebisi Bozalani, Bokitisi Mayele ya Masano ya Lotiliki.” Mpe na nkoma ya moke: “(Oyo elingi koloba te ete tolingaka yango te mpe.)” Oyo, na lolenge moko ezali kobeta na miso, epeti sete na lisengesi ya kosalela bwana na esaleli na biso ya babokeli ya tekinolozi ya kitoko mpenza ya mobu na biso.

  17. Liloba ya motema ya momesano na bisika ya misala mingi ezali “Tosali mingi, mpe tosakani mingi.” Ntango mokangano ya basali ezali makasi, ntango “mosala mpe lisano” ezwi ntango ya libota, ezali komikweyisaka.

  18. Misala 17:21; sete ebakisami.

  19. Tala Keli Goff, “Female Ivy League Graduates Have a Duty to Stay in the Workforce,” Guardian, sanza ya minei. 21, 2013, www.theguardian.com/commentisfree/2013/apr/21/female sanza ya minei/21/female-ivy-league-graduates-stay-home-moms; Sheryl Sandberg, t: Women, Work, and the Will to Lead (2013); Anne-Marie Slaughter, “Why Women Still Can’t Have It All,” The Atlantic, sanza ya motoba 13, 2012, www.theatlantic.com/magazini/print/2012/07/why-women-still-cant-have-it-all/309020; Lois M. Collins, “Can Women ‘Have It All’ When It Comes to Work and Family Life?” Deseret News, sanza ya motoba 28, 2012, A3; Judith Warner, “The Midcareer Timeout (Is Over),” New York Times Magazine, sanza ya moambe. 11, 2013, 24–29, 38; Scott Schieman, Markus Schafer, mpe Mitchell McIvor, “When Leaning In Doesn’t Pay Off,” New York Times, sanza ya moambe. 11, 2013, 12.

  20. Eklezia elendisi boepisikopo basunga mabota na kolekisaka ntango mingi elongo na bilenge mibali, bilenge basi, mpe bilenge bankulutu banzemba. Boepisikopo balendisami kotikela mikumba mingi koleka na likita ya palwasi epai ya masanga makoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeki, epai ya masanga malandi, mpe epai ya bandimi oyo bazali na makoki ya ndenge mpo na kosunga basusu na ndenge esengeli.

  21. Tala Doctrine et Alliances 29:7.

  22. Doctrine et Alliances 45:71.