2010–2019
Banzambe Mosusu te
Sánzá ya Zómi 2013


Banzambe Mosusu Te

Ezali biso kosalela makambo ya kotia na esika ya yambo to banzambe yambo ya Nzambe oyo tosakoli kokumbamela?

Mitindo Zomi ezali na ntina mpenza mpo na bondimi ya Baklisto mpe Bayuda. Lokola epesamaki na Nzambe na bana ba Yisalaele na nzela ya profeta Mose, Mitindo mibale ya yambo etindi bokumbami mpe makambo maleki motuya na biso. Na yambo, Nkolo atindaki, “Okojala na banjambe mosusu liboso na ngai te” (Esode 20:3). Bikeke nsima, ntango botunaki Yesu, “Mobeko nini ejali eleki monene kati na Mibeko yonso?” Ye ayanolaki, “Okolinga Nkolo Njambe na Yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba” (Matai 22:36–37).

Motindo ya mibale ya Mitindo Zomi ebongisi nzela mpo na kozala na banzambe misusu te mpe esosolisi nini esengeli kozala Likambo eleki na motuya mingi mpenza na bomoi ya bana ba Nzambe. “Okosala ekeko poya yo te, soko elilingi na eloko moko te” na lola, na mokili na nse, to na mai na nse na mokili. (Esode 20:4). Motindo yango ebakisi “Okokumbamela yango te to kosalela yango te. (Esode 20:5) Mingi koleka kopekisa banzambe ya bikeko, yango esakoli likambo eleki na motuya mpo na ntango inso. Yawe alimboli, “mpo ete ngai Nkolo Nzambe na yo najali Nzambe ya zuwa,...nakomonisa boboto na …baoyo bakolingaka ngai me bakotosaka mibeko na ngai” (Esode 20:5–6). Ndimbola ya zuwa ezali koloba mingi. Na ebele elingi koloba “kozala na mayoki ya makasi mpe ya mozindo” (Exodus 20:5; footnote b). Totuki Nzambe ntango tozali to “kosalela” banzambe mosusu” —Ntango totii makambo mosusu liboso.1

I.

Nini “makambo mosusu ya kotia na esika ya yambo” oyo bato bazali “kokumbamela” to “kosalela” liboso ya Nzambe—ata bato ya losambo—na ntango na biso? Maniola makambo mosusu oyo ekoki kosalema, nyonso mingimingi na mokili na biso:

  • Bizaleli ya bonkoko to momesano ya libota

  • Bosembo ya politiki

  • Bamposa ya mosala

  • Bozwi ya Mokili

  • Bolandi ya Masano

  • Nguya, bokonzi, mpe lokumu

Soki bandakisa oyo emonani lokola ekokani te na moko ya biso, tokoki ntango mosusu kopesa likanisi ya misusu oyo ekoki. Ntina ezali na motuya mingi koleka bandakisa ya moto na moto. Likambo ezali te nini totii na esika ya liboso. Motuna etunami na motindo ya mibale ezali: Nini ezali likambo ya kotia na esika ya libosolibosokoleka manso? Ezali biso kosalela makambo maleki na motuya to banzambe yambo ya Nzambe oyo tosakoli tozali kokumbamela? Ebosani biso Mobikisi oyo ateya ete soki tolingi Ye, tokobatela mitindo na Ye? (tala Yoane 14:15). Soki bongo, makambo ma biso maleki na motuya mabongwani na botau ya molimo mpe bamposa ya mobulu oyo ezali mingimingi na mikolo na biso.

II.

Mpo na Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mitindo ya Nzambe efandi likoloya mpe ekabwani te na mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye—mwango monene ya lobiko. Mwango oyo ntango mosusu ebengami “mwango monene ya esengo” (Alma 42:8), elimboli bowuti na mpe atandele na biso lokola bana ya Nzambe—towuta wapi, tozali awa na ntina nini, mpe tozali kokende wapi. Elimboli ntina ya bokeli mpe ezaleli ya bokufi, sangisa na mitindo ya Nzambe, mposa ya Mobikisi, mpe mosala ya motuya mpenza ya mabota ya bokufi mpe ya seko. Soki biso Basantu ba Mikolo mya Nsuka, oyo topesameli boyebi, totii makambo ma biso maleki na motuya engebene na mwango na ye, tozali na likama ya kosalela banzambe misusu.

Boyebi ya mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye epesi Basantu ba Mikolo mya Nsuka bomoni se moko kaka ya libala mpe libota. Toyebami malamu lokola eklezia oyo etiaka libota na katikati. Mambi ma biso ya bonzambe ebandi na baboti na lola, mpe mposa eleki likolo ya biso ezali kozwa litondi ya bonetoli ya seko, oyo toyebi ekoki kosalema bobele na mokangano ya libota moko. Toyebi ete libala ya mobali mpe mwasi esengeli mpo na kokokisa mwango ya Nzambe. Bobele libala oyo ekopesa libongisi endimama mpo na mbotama ya bokufi mpe kolengela bayi libota mpo na bomoi ya seko. Totalaka libala mpe kobota mpe kobokola bana lokola eteni ya mwango ya Nzambe mpe mokumba ya bule ya baye bapesameli libaku ya kosala. Tondimi ete bomengo ya yambo na mabele mpe na lola ezali bana mpe bankoko na biso.

III.

Na ntina ya nini tososoli etali mosala ekoki kosalema ya seko mpo ya libota, toyoki mpasi mpo na motuya ya kokita mpenza ya mbotama mpe mabala na bikolo mingi ya poto oyo ya bango bizaleli uta kala ezali ya Boklisto mpe ya Boyuda. Nsango ya bakonzi elobi oyo elandi:

  • Etats-Unis sikawa ezali na motuya ya mbotama eleki nse koleka ya mambi na yango ya kala2, mpe bikolo mingi ya Union Européenne mpe motuya ya mbotama ya bikolo misusu ya kala ezali na nse ya ndelo esengeli mpo na kokokisa bato na bango3. Yango ezali likama mpo na bomoi ya nsima ya bizaleli mpe kutu ya bikolo.

  • Na Amerique, moko na mokama ya bilenge ya bakolo ya mibu uta 18 tii 29 oyo babali ekweyi uta 59 moko na mokama na 1960 tii 20 moko na mokama na 20104. Mibu ya katikati mpo na libala ya yambo ezali sikawa na ndelo na yango ya likolo mingi koleka na mambi ya kala: 26 mpo na basi mpe pene na 29 mpo na mibali. 5

  • Na bikolo mpe bonkoko mingi (1) libota edimama ya mama mpe papa babalana ebandi komonana mingi te koleka momesano, (2) kolanda mosala esika ya kobala mpe kobota bana ekomi mingimingi ya kopona epai ya bilenge basi, mpe (3) mosala mpe lotomo ya batata ezali kokita.

Na kati ya bamposa oyo ezali kotundisa biso, toyebi ete mwango ya Nzambe ezali mpo na bana na Ye mpe Nzambe alingi bana ye banso, bisika binso. 6Mokapo ya yambo ya Buku ya Mormon esakoli ete nguya ya Nzambe, mpe bolamu, mpe ngolu ezali likolo lya bafandi banso ba mabele” (1  Nefi 1:14). Mokapo moko ya nsuka oyo esakoli ete “apesi [lobiko na ye] ofele mpo ya bato banso” mpe ete “bato banso bazali na litomba lyoko bo basusu, mpe moko apekisami te” (2  Nefi 26:27–28). Lokola mbano, makomi mateya ete tozali bayanoli mpo na kozala na mawa mpe na bolingani (bolingi) epai ya bato banso (tala 1  Batesalonika 3:12; 1  Yoane 3:17; D&C 121:45).

IV.

Tozali lisusu na limemia ya bondimi ya biyamba ya bato banso ata ma baye na motango ezali komata oyo basakoli bondimi te na Nzambe. Toyebi ete na nzela ya nguya epesami na Nzambe ya boponi, mingi bazali na bondimi ekesani na ya biso, kasi tozali na elikia ete basusu bakozala na limemia lokola na bondimi na biso mpe bakososola ete bondimi na biso esengeli biso kosala boko boponi mpe bizaleli ya bokesani na ya bango. Na ndakisa, tondimi ete, lokola eteni ya ntina mpenza ya mwango na Ye ya Lobiko, Nzambe atiaki mobeko moko ya seko ete kosangisa nzoto esengeli kosalema bobele katikati ya mobali moko mpe mwasi moko oyo babalani.

Nguya ya kokela bomoi ezali nguya ya konetolama Nzambe apesi na bana ba Ye. Kosalela yango etindamaki na motindo ya yambo ya Nzambe na Adama mpe Ewa (talaGenese 1:28), kasi mitindo misusu ya motuya epesamaki mpo na kosalela yango mabe (tala Esode 20:14; 1  Batesalonika 4:3). Nsete tobeti na mobeko ya bopeto elimbolami na bososoli na biso ya ntina ya nguya kobota na bokokisi ya mwango ya Nzambe. Libanda na mikangano ya libala katikati na mobali moko mpe mwasi moko, bosaleli nyonso ya nguya ya kobota ezali na ndelo moko to lisumu mosusu mpe na bokeseni na mwango mpo bonetoli ya bana na Ye.

Motuya totii na mobeko ya bopeeto elimboli bomipesi na biso na bokelami ya libala oyo ewutaki na Adama mpe Ewa mpe ekobaki o ntaka ya bileko lokola bokelami ya Nzambe mpo na mokangano katikati na bana babali mpe bana basi na Ye mpe mpo na kobokola bana na Ye. Mawa, bato mingi bazali na biyamba to mangomba misusu bayokani elongo na biso na bozali mpe motuya ya libala, boko na kotalaka malongi ya eyamba mpe basusu na kotalaka nini bakanisi ya malamu mpo na bato.

Boyebi na biso ya Mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye7 elimboli ntina nini tomitungisi ete bana mingi mingi bazali kobotama libanda ya libala—sikawa 41 na moko na mokama ya bambotama na Etats-Unis8—mpe ete motango ya mwasi na mobali oyo bazali elongo na libala te emati mpenza na katikati ya ekeke eleki. Bazomi mitano eleki, bobele moke na mokama moko ya mabala ya yambo ebandaki na yakatofanda. Sikawa, mabala ya yakatofanda eleki liboso 60 na mokama moko ya mabala9. Mpe kondimama na yango emati, mingimingi o ntei ya bilenge. Makambo eyekolami kala te epesi penepene na 50 moko na mokama ya bilenge basakoli ete kobota bana libanda ya libala ezalaki “na litomba elongobani na lolenge ya bomoi.” 10

V.

Ezali na bankaka ya politiki ebele mpe ya bato mpo na kobongola mibeko mpe makambo mpo na kotia ezaleli ya bokesani na mibeko ya Nzambe etali mobeko ya bopeto mpe bozali ya seko mpe ntina ya libala mpe kobota bana. Bankaka wana endingisi kaka mabala ya mobali-na-mobali mpe mwasi-na-mwasi na bamboka mpe bikolo kilikili. Bankaka misusu elingi kobulungisa kimobali mpe bomwasi to kokokanisa bokesani katikati ya mibali mpe basi oyo ezali ya ntina mpenza mpo na kokokisa mwango monene ya Nzambe ya esengo ya esengo.

Bososoli na biso ya mwango ya Nzambe mpe malongo na Ye epesi biso bomoni moko ya seko endingisi biso te kokanga miso na tina na ezaleli ya bongo to komona boyengebene na mibeko oyo endingisi yango. Mpe, na bokesani na mangomba misusu oyo ekoki kobongola mambi mpe kutu malongi ma bango, mambi ma biso esalemi na bosolo Nzambe asakolaki ekobongwana te.

Eteni na biso ya zomi na mibale ya bondimi esakolo bondimi na biso na kozala na botosi na bakonzi ba mboka mpe “kotosa, komemia mpe kosunga mobeko.” Mibeko mikoki te kokomisa ya malamu nini Nzambe asakolaki ya mabe. Bomipesi na makambo maleki na motuya—kolinga mpe kosalela Nzambe---esengi ete totalela mobeko na Ye lokola mobeko na ezaleli na biso. Na ndakisa, totikali na nse ya etindi ya nzambe tosala ekobo to bonsoni te atako ntango misala yango ezali lisusu ekila te na nse ya mobeko ya bikolo mpe bamboka wapi tofandi. Ndenge moko mpe mibeko mizali kokumisa oyo ebengami boye “libala ya mobali-na-mobali mpe mwasi-na-mwasi” ezali te kobongola mobeko na Nzambe mpo na libala to mitindo na Ye mpe momesano na biso na oyo etali yango. Totikali na nse ya liyokani ya kolinga Nzambe mpe kobomba mitindo na Ye mpe kotika kongumbamela to kosalela banzambe mosusu mpe makambo ma motuya ya yambo—atako yango ekomi mingi ya kondimama na ntango mpe esika songolo na biso.

Nakotikalaka na mokano oyo, bato bakoki kososola biso mabe, mpe tokoki kofundama na bindimandima, kozwa mpasi ya bokabwani, to kosengela kotelemela babundisi ya bonsomi ya kosalela eyamba na biso. Soki boye, nakanisi tosengeli komikundola makambo na biso ya mutuya ya yambo mpenza—kosalela Nzambe —mpe, lokola bapionie ya liboso na biso, kopusa makalo ma biso ya maboko liboso na bokasi moko oyo balakisaki.

Liteya moko ya Mokambi Thomas  S. Monson, ekokani na likambo oyo. Na likita oyo mibu 27 eleki, asakolaki na mpiko: “Tika tozala na mpiko ya kotelemela makambo bato bayokani, mpiko ya kotelema mpo na libongisi. Mpiko, bolole te, ekomema mwa koseka ya bondimami na Nzambe. Mpiko ekoma bomoi mpe bolamu ya kobenda ntango etalami kaka te lokola bolingi ya kokufa na kimobali, kasi lokola mokano ya kozala na malonga. Mozangi mpiko ezali moko oyo azali kobanga kosala nini akanisi ezali alima mpamba te basusu bakondima te to bakoseka. Mikundola ete bato banso bazali na bobangi na bango, kasi baye bazali kotelemela kobanga na bango na bolongobani bakozala na mpiko lokola.”11

Nasambeli ete tokotika te mikakatano ya ntango ya bokufi esala biso tobosana mitindo minene mpe makambo ya kotiya na esika ya liboso oyo topesameli na Mokeli mpe Mobikisi na biso. Tosengeli te kotia mitema na biso na makambo ya mokili mpe kolula lokumu ya bato (talaD&C 121:35) ete tolongola miso na atandele na biso ya seko. Toyebi mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye—biso baoyo tosali mayokani ya kosala elongo na yango—tozali na mokumba moko ya polele. Tosengeli mokolo moko te kobosana mposa na biso ya monene, oyo ezali kokoma na bomoi ya seko, 12 mpe likambo na biso ya liboso ya motuya—kozala na banzambe mosusu te mpe kosalela makambo misusu ya motuya liboso ya Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Mobikisi wa biso, Yesu Klisto.

Tika ete Nzambe asalisa biso mpo na kososola likambo liye ya motuya mpe esosolama na basusu ntango tolandi na lolenge ya bwania mpe bolingi, nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala, na ndakisa, Doctrine et Alliances 124:84

  2. Tala Joyce A. Martin and others, “Births: Final Data for 2011,” National Vital Statistics Reports, vol. 62, no. 1 (June  28, 2013), 4; Gloria Goodale, “Behind a Looming Baby Bust,” Christian Science Monitor Weekly, Feb.   4, 2013, 21, 23.

  3. Tala Population Reference Bureau, “2012 World Population Data Sheet,” www.prb.org/Publications/Datasheets/2012/world-population-data-sheet/data-sheet.aspx.

  4. Tala D’Vera Cohn and others, “Barely Half of U.S. Adults Are Married—a Record Low,” Pew Research Center, Social and Demographic Trends, Dec. 14, 2011, oyo ezali komonana na www.pewsocialtrends.org/2011/12/14/barely-half-of-u-s-adults-are-married-a-record-low; Rash Retreat from Marriage,” Christian Science Monitor, Jan. 2 and 9, 2012, 34.

  5. U.S. Census Bureau, “Estimated Median Age at First Marriage, by Sex: 1890 to the Present,” available at www.census.gov/population/socdemo/hh-fam/ms2.xls.

  6. Tala Dallin  H. Oaks, “All Men Everywhere,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2006, 77–80.

  7. Tala Dallin  H. Oaks, “The Great Plan of Happiness,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 72–75.

  8. Tala Martin, “Births: Final Data for 2011,” 4.

  9. Tala The State of Our Unions: Marriage in America, 2012 ( 2012), 76.

  10. Tala The State of Our Unions, 101, 102.

  11. Thomas  S. Monson, “Courage Counts,” Ensign, Nov. 1986, 41

  12. Tala Dallin H. Oaks, “Desire,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2011, 42–45.