2010–2019
Bokasi ya Moto na Moto na Nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto
Sánzá ya Zómi 2013


Bokasi ya Moto na Moto na Nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto

Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, moko na moko na biso akokoma peto, mpe bozito ya botomboki na biso ekolongwa.

Kala te, napambolamaki na kokutana na liboke moko ya kokamwisa mingi ya bilenge ya etuka ya Idaho. Elenge mwasi moko ya malamu atunaki ngai nini nayoki ezali likambo eleki na motuya basengelaki kosala na bomoi na bango sikawa mpenza. Napesaki bango likanisi ete bayekola koyeba nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto na bomoi na bango. Lelo nakosembola lolenge moko ya nguya wana, oyo ezali bokaii ya moto yemei oyo tokoki kozwa na nzela ya Botumbolami ya zwa na nzela ya Botumbolami ya Yesu Klisto.

Na Buku ya Mormon totangi oyo etali Amona mpe bandeko na ye koteyaka nsango malamu ya Yesu Klisto na bato oyo bazalaki “bato boko ba nkei mpe ba mitema mikasi.”1Mingi ya bato babongwanaki mpe baponaki kotika nsima na bango ezaleli na bango ya masumu. Mbongwana na bango ezalaki mobimba boye ete bakundaki mandoki na bango mpe bayokanaki na Nkolo ete bakosalela yango lisusu mokolo moko te.2

Nsima, mingi ya bandeko na bango oyo babongwanaki bayaki epai na bango mpe babandaki koboma bango. Sikawa bato oyo ya botongono baponaki kokweya na nse ya mopanga esika ya komeka likama ya bomoi na bango ya molimo na kokamataka mandoki. Ndakisa na bango ya bosembo esalisaki kutu bato mingi mpo na kobongwana mpe mpo na kotika mandoki na bango ya botomboki.3

Na nzela ya Amona, Nkolo akambaki bango na kobombana o ntei ya Banefi, mpe babandaki koyebana lokola bato ya Amona. 4 Banefi babatelaki bango mpo na mibu mingi, kasi na nsuka Mapinga ya Banefi babandaki kolemba, mpe esengelaki kobakisa bato. 5

Bato ya Amona bazalaki na ntango moko ya kpokoso mpenza ya bomoi ya molimo na bango. Bazalaka solo na liyokani na bango kokamata mokolo moko mandoki te. Kasi basosolaki ete batata na bango basengelaki kopesa bobateli na mabota ma bango.6 Mposa wana emonanaki monene ya kokoka mpo na kosengela kokanisa kobuka liyokani na bango.7

Mokambi ya bonganganzambe ya bwania ayebaki ete kobuka liyokani na Nkolo eyengebeni te. Apesaki nzela mosusu ya kofulama. Akundolisaki bango ete bana na bango bazalaka mokolo moko te na elindo ya lolenge moko mpe yango wana basengelaka te kosala liyokani ya lolenge moko.8Atako bana babali bazalaki bilenge mpenza, bazalaki makasi na nzoto mpe, ntina koleka, bazalaki malamu mpe peto. Bana babali balendisamaki na bondimi ya bamama na bango.9 Na nse ya bokambi ya profeta mokambi na bango, bilenge babali oyo bakamataki esika ya batata na bango na bobateli ya mabota mpe ndako na bango.10

Makambo mazingaki mokano oyo ya kpokoso elakisi boniboni Bomikabi ya Yesu Klisto ekomema bokasi ya moto yemei na bomoi ya bana ba Nzambe. Bomaniola mayoki ma boboto ya batata bana. Boniboni bayokaka ete na koyaoka ete misala ya botomboki ya kala na bango epekisaki bango na kobatela basi na bango mpe bana na bango na ngonga ya bokeleli Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, moko na moko na biso akokoma peto, mpe bozito ya botomboki na biso ekolongwa Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, moko na moko na biso akokoma peto, mpe bozito ya botomboki na biso ekolongwa? Koyebaka bangomei bobomibomi bana na bango balingaki sikawa kokutana na yango, basengelaki koleka na kobombana. Batata, bana te, bayebani basengeli kobatela mabota ma bango!11 Bamawa na bango esengelaki kozala ya makasi mpenza.

Ntina nini bakambi na bango ya bofuli babangaki likanisi na bango ya kozongela mandoki ma bango, “ete … babungisa bomoi na bango”?12 Nkolo asakolaki, “Tala, ye oyo ayamboli masumi na Ye, ye wana alimbisami, mpe ngai, Nkolo, namikundoli yango lisusu te.”13 Batata ya botongono uta kala bayambolaki masumu na bango mpe bakomaki peto na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, boye ntina nini batindamaki na kobatela mabota ma bango te?

Ezali bosolo ya ntina mingi ete na nzela ya Bomikabi ya Yeua Klisto, tokoki kopetoma. Tokoki kokoma malamu mpe peto. Nzokande, ntango mosusu boponi na biso ya mabe etiki bisona mbano ya ntango molai ya masumu ya kala. Boponi na bango ya kala ebimisaki batata ya Baamona oyo na mposa ya mosuni oyo ekokaki lisusu kokoma esika ya botau oyo Satana alingaki komeka kosalela.

Satana akomeka kosalela likundoli na lisumu nyonso ya liboso mpo na kosenginia biso lisusu na nguya na ye. Tosengeli ntango nyonso kosala keba mpo na koboya masenginia. Boye ezalaki na batata ya Baamona ya botongono. Atako nsima ya mibu na bango ya bomoi ya botongono, esengelaki mpo na bango komibatela na molimo na bobendi na likundoli ya masumu na bango ya kala.

Na katikati ya bitumba mingi, Kapiteni Moloni akambaki bokembisi ya bamboka ya batau. “Asalaki ete batonga etelemelo yoko ya mabaya likolo lya eboke ya zelo ya kati ya libulu; mpe boye basalaki Balamani basala kina bazingaki engumba … mpembeni ya efelo ekasi ya mabaya mpe mabele, o bosanda boluti ”14 Kapiteni Moloni asosolaki motuya ya kokembisa bisika ya botau mpo na kokela bokasi.15

Batata Baamona eye bazalaki mingi lolenge moko. Basengelaki bokembisi ya bosanda mpe ya molai katikati ya bomoi ya botongono mpe ezaleki ya bosembo te ya kala na bango. Bana na bango, oyo bapambolamaki na bonkoko ya bosembo, bazalaki te na botau na masengenia ya lolenge moko. Bakokaki kobatela mabota ma bango na botongono na kozanga kosantola bolamu na bango ya molimo.

Bansango ya esengo mpo na moto nyonso alingi kobika na mbano ya boponi ya kala ya mabe ezali ete Nkolo akomona botau lolenge mosusu na lolenge Ye akomona botomboki. Ntango akokebisa ete botomboki oyo eyambolami te ekomema etumbu, 16 ntango akolobela babotau, ezali ntango nyonso na ngolu.17

Na ntembe te, ezali na boko ndingisa ete batata ya Baamoni bateyamaki bonkoko ya mabe na baboti na bango, kasi bana na Tata wa lola bayei na bokufi na Pole ya Klisto. Kotala te ntina ya misala na bango ya masumu, mosala na yango ezalaki bokoki ya botau ya molimo oyo Satana alingi kosalela.

Na ngolu, bateyamaki nsango malamu, mpe na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto bakomaki na molimo makasi koleka masenginia ya Satana. Na ntembe te bayokaki te lisenginia ya kozonga na kala na bango ya loma, kasi na kolandaka profeta mokambi na bango, bapesaki te Satana nkonzo ya “[kokosa] milimo mya bango, mpe [kokamba] bango na bokebi mosika na o nse ya limfelo.”18 Bomikabi ya Mobikisi epetoli kaka bango na lisumu te, kasi na ntina ya botosi na bango na toli ya profeta mokambi na bango, Mobikisi akokaki kobatela bango na botau mpe kolendisa bango. Bomipesi na bango ya bosawa mpe ya ntango molai mpo na kosundola masumu na bango esalaki mingi mpo na kobatela mabota ma bango kolela likambo mosusu bakokaki kosala na esika ya bitumba. Botosi na bango elongola bango mapamboli te. Elendisaki bango mpe epambolaki bango mpe epambolaki bankola mingi.

Nsuka ya lisolo engengesi boniboni ngolu ya Nkolo esalaki “makambo matau makoma makasi.19 Batata ya botongono baye batindaki bana na bango mosika na nse ya bokengeli ya Elamani. Atako bilenge mibali babundaki na bitumba ya nsomo wapi bazwaki banso ataka mwa mpota, bomoi moko te ebungaki.20 Bilenge mibali balakisaki bazalaki balendisi ya mapinga ya Banefi oyo balembaki. Bazalaki botongono mpe makasi mingi na molimo ntango bazongaki na ndako. Mabota ma bango epambolamaki, ebatelamaki, mpe elendisamaki.21 Na mokolo na biso, motango ya kotanga te ya bayekoli ya Buku ya Mormon balendisamaki na ndakisa ya bana mibali ya peto mpe ya bosembo.

Moko na moko na biso azalaki na ntango na bomoi na ye oyo asalaki boponi ya mabe. Tozali banso na mposa makasi mpenza ye nguya ya bosikoli ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Moko na moko na biso asengeli koyambola mpo na botomboki nyonso. “Mpo ngai Nkolo nakotala lisumu na ndingisa ata moke te.”22 Akoki te mpamba te Ye ayebi nini esengeli mpo na kokoma lokola Ye.

Mingi na biso bandimi botau ekola na ezaleli na bango. Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, biso, lokola Baamoni, tokoki kotonga bolendisi ya molimo katikati ya bisomei mpe mbeba nyonso ya kala oyo Satana ameki kosalela. Bobateli ya molimo etongaki nzinganzinga na tata ya Baamoni epambolaki mpe elendisaki bangomei, libota na bango, ekolo na bango, mpe bankolo ya nsima. Yango kaka ekoki kozala solo mpo na biso.

Boye boniboni bokotonga malendisi ya seko oyo? Litambe ya liboso esengeli kozala boyamboli ya solo, ya mozindo, mpe mobimba. Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, moko na moko na biso akokoma peto, mpe bozito ya botomboki na biso ekolongwa. Bimikundola, boyamboli ezali etumbu te. Ezali nzela etonda na elikia mpo na lobi ekoya ya nkembo mingi.

Tata na lola apesi biso bisalele oyo ekosalisa biso mpo na kotonga malendisi katikati ya bolembu na biso mpe botongono na biso. Bomaniola makanisi malandi:

  • Bosala mayokani mpe bozwa makuli mpo na binomei. Nde na molende mpe sikisiki bosala mpo na kopesa makuli na tempelo mpo bankoko na bino.

  • Bokabola nsango malamu na bazangi bondimi to bayi libota ya botau to baninga. Kokabolaka bosolo oyo ekoki komema bozongisi ya nsai na kati ya bomoi na biso.

  • Bosala na botongono na mabiangi nyonso ya Eklezia, mingimingi mateya na ndako mpe misala ya kotala koteya. Bozala kaka bateyi na ndako to ya kotala ya miniti 15 te. Kasi, salisa bayi libota moko na moko. Yeba bango moko na moko. Zala moninga moko ya solo. Na nzela ya misala ya boboto, lakisa bango boni ozali kolengela bango mingi mpenza moko na moko.

  • Ya motuya mingi koleka, salisa bayi libota na yomei. Sala bokoli ya molimo ya molongani mpe bana na yo likambo eleki na motuya likolo mpenza. Zala na bokebi na makambo okoki kozala mpo na kosalisa moko na moko. Pesa na pete ngonga mpe bokebi na yo.

Na makanisi maye nyonso, ezali na mama na likambo ya bato banso: tondisa bomoi na mosala ya basusu. Ntango obungisi moi na yo na lisalisi ya bata ya Tata na Lola,23 Masenginia ya Satana ebungisi nguya na bomoi na yo.

Mpamba Tata na bino na Lola alingi bino na mozindo, Bomikabi ya Yesu Klisto asala makasi wana esalema. Ezali ya kokamwa te? Mingi na bino bayoki bozito ya maponi ya mabe, mpe moko na moko na biso akoki koyoka nguya ya komatisa ya bolimbisi, ngolu, mpe bokasi ya Nkolo. Nayoki yango, mpe natatoli ete ezali mpo na moko na moko na bino, o nkombo ya Yesu Klisto, amene.