2010–2019
Liyangani ya Eyenga na Nsima ya Nzanga
Sánzá ya Zómi 2013


Koteya na Nguya mpe Likoki ya Nzambe

Nkolo apesi nzela mpo na Mosantu nyonso ya Mikolo mya Nsuka ya kolongobana mpo na koteya na lolenge ya Mobikisi.

Tozali na botondi koleka oyo tokoki koloba na mpo na bateyi na Eklezia mobimba. Tolingi bino mpe tozali na bondimi bonene na bino. Bozali moko ya makamwisi monene ya nsango malamu ezongisami.

Ezali ya solo na sekele moko mpo na kokoma moteyi ya nsango malamu ya elonga, mpo na koteya na nguya mpe likoki ya Nzambe. Nasaleli liloba sekelempamba te mabongisi likolo na yango elonga ya moteyi efandi ekoki kososolama bobele na baye bazali na litatoli moko ya nini esalamaki na mokolo moko ya kitoko, ya polele, ntongontongo na eleko ya milona ya 1820.

Na eyano na losambo ya mwana mobali ya komikitisa ya mibu 14, lola efungwanaki. Nzambe Tata ya Seko mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bamonamaki mpe balobaki na Profeta Joseph Smith. Bozongisi ya makambo manso oyo tozelaki uta kala ebandaka, mpe libongisi ya bobimisi etiamaki libela na eleko na biso. Nsango ya Joseph, mpe nsango na biso na mokili, ekoki kolobama na bokuse na maloba mibale: “Nzambe alobaka.” Ye alobaki kala, Ye alobaki na Joseph, mpe Ye akoloba na yo. Eye ezali nini etii yo mpembeni na bateyi basusu na mokili. Eye ezali ntina nini okoki kokweya te.

Bobiangemi na molimo ya boprofeta mpe bobimisi mpe botiami mpembeni na likoki ya bonganganzambe. Yango elingi koloba nini?

Yambo, elingi koloba ozali na etinda ya Nkolo. Ozali na mosala na Ye, mpe ozali mosali na Ye, mpe opesami ndingisa mpe otindami na komonisa Ye mpe kosala na nkombo na Ye. Lokola mosali na Ye, osengelaki na lisalisi na Ye. Osengeli komituna, “Nini elingaki Mobikisi koloba soki Ye azalaki koteya kelasi na ngai lelo, mpe boniboni Ye alingaki koloba yango?” Bosengeli nde kosala ndenge moko.

Mokumba oyo ekoki kosala basusu komiyoka bakoki te to kutu mwa kobanga. Nzela ezali mpasi te. Nkolo apesi nzela mpo na Mosantu nyonso ya Mikolo mya Nsuka ya kolongobana mpo na koteya na lolenge ya Mobikisi.

Ya mibale, obiangemi mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto. Bosengeli koteya makanisi to filozofi na binomei te, ata esangani na makomi. Nsango malamu ezali “nguya ya Nzambe mpo na lobiko,”1 mpe ezali bobeli na nzella ya nsango malamu nde tobikisami.

Ya misatu, botindami koteya mabongisi ya nsango malamu lokola ekutami na makomi mandimama ya Eklezia, mpo na koteya maloba ya bapostolo mpe ya baprofeta ya mokolo ya lelo, mpe koteya oyo eteyami na bino na Molimo Mosantu.

Yango wana, tokobanda wapi?

Mokumba na biso ya yambo mpenza ezali kozala na lolenge ete tokoki kozala na Molimo Mosantu lokola mokambi mpe moninga na biso. Ntango Hyrum Smith alukaki komipesa na mosala ya mikolo mya nsuka, Nkolo alobaki: “Tala, eye ezali mosala na yo, kobatela mitindo na ngai, iyo, na makasi, mayele, mpe bokasi na yo nyonso.”2 Eye ezali esika ya kobandela. Toli, epesami na Nkolo na Hyrum, ezali toli oyo kaka apesaki na Basantu na bileko binso.

Kolobaka na bateyi lelo, Bokambi ya Yambo esakoli: “Eteni eleki na motuya ya mosala na bino ekozala komilengela mokolo na mokolo na molimo, lokola kosambela, koyekola makomi, mpe kotosa mitindo. Tolendisi bino bomipesa na kobikaka nsango malamu na ntina monene mingi koleka liboso.”3

Ezalaki na ntina ete Bokambi ya Yambo elobaki te ete eteni eleki motuya ya mosala na bino ezali kolengela liteya na bino malamu to kokonza ndenge kilikili ya koteya. Na ntembe te, bosengeli na etingia komilengela mpo na liteya nyonso mpe kobunda mpo na koyekola boniboni bokoki koteya na lolenge ete bosalisa bayekoli basalela boponi na bango mpe bapesa nzela na nsango malamu ekota na kati na motema na bango, kasi eteni ya yambo mpe eleki motuya ya mosala na biso ezali bomilengela moto na moto na molimo. Ntango olandi toli oyo, Bakambi ya Yambo balaki: Molimo Mosantu akosalisa yo koyeba nini kosala. Litatoli na yomei ekokola, mbongwana na yo ekokoma mozindo, mpe okolendisama mpo na kokoka mikakatano ya bomoi.”4

Mapamboli eleki monene nini ekoki moteyi azala na yango mposa?

Nsima, Nkolo atindaki ete liboso ya koluka kosakola liloba na Ye, tosengeli koluka kozwa yango.5 Bosengeli kokoma bato mpe basi ya bososoli ya polele na etingia kolukaka makomi mpe na kofulukisaka yango na mitema na bino. Nde ntango osengi lisalisi ya Nkolo, Ye akopambola yo na Molimo na Ye mpe liloba na Ye. Okozala na nguya ya Nzambe mpo na kondimisa bato.

Paulo alobi na biso ete nsango malamu ekoyaka na bato na nzela mibale, na maloba mpe na nguya.6 Liloba ya nsango malamu ekomami na makomi, mpe tokoki kozwa liloba na kolukaka na etingia. Nguya ya nsango malamu ekoyaka na kati ya bomoi ya baye bazali kobika na lolenge ete Molimo Mosantu azali moninga na bango mpe oyo balandi botindiki bazwi. Boko batii bokebi na bango bobele na kozwaka liloba, mpe bakomi banganga ya mayele na kopesaka bansango. Basusu batali mpamba bolengeli na bango mpe balikii ete Nkolo na bonzambe na Ye na lolenge moko to mosusu akosalisa bango bakota na eleko ya kelasi. Bokoki te kozela Molimo mpo na kosalisa bino bomikundola makomi yango mpe mabongisi boyekolali to bokanisi te. Na ntina ya koteya na elongo nsango malamu, osengeli kozala na liloba mpe nguya ya nsango malamu na bomoi na yo.

Alama asosolaki mabongisi oyo ntango asepelaki na bana ya Moziya mpe boniboni bateyaki na nguya mpe bokoki ya Nzambe. Totangi:

“Bazalaki bato ba bososoli bolamu mpe balukaki nkoma na etingia, ete bakoka koyeba liloba lya Nzambe.

“Kasi eye ezalaki enso te; bamipesaki o losambo, mpe bokili boike; yango wana bazalaki na molimo ya … bobimisi.”7

Nsima, bosengeli koyekola koyoka. Mpaka Jeffrey R. Holand ateyaki libongisi oyo na bamisionele. Nakotanga uta na makebisi ya Mpaka Holland kasi na bonsomi nalongoli maloba bamisionele mpe baluki mpe na esika na yango natii maloba ya bateyi mpe bayekoli mingimingi: “ Ya mibale bobele na mokumba na bango [bateyi] basengeli koyoka Molimo ezali mokumba bazali na yango ya koyoka [moyekoli]. … Soki toyoki na matoi ya molimo, … [bayekoli ba biso] bakoyebisa biso liteya nini balingi koyoka!”

Mpaka Holland akobaki: “Bosolo ya likambo ezali [bateyi] bazali naino kokangama mingi na kopesaka mama ya likambo ya liteya ya malonga, ya kozongela esika ya kokangama na [bayekoli] lokola bato moko na moko.”8

Nsima ya komilengela mpe liteya na bino na oyo eleki malamu ya bokoki na bino, bosengeli kolinga kotika. Ntango babotindiki ya kimia ya Molimo Mosantu ekoya, tosengeli kozala na nkonzo ya kotia mpembeni miango mpe nkasa na bino mpe kokende wapi botindiki emememi bino. Ntango tosali yango, liteya bozali kopesa ezali lisusu liteya na bino te, kasi ekomi liteya ya Mobikisi.

Ntango bomipesi na kobikaka nsango malamu na ntina monene mingi koleka mokolo moko te liboso mpe oluki makoki, kofulusaka yango na motema na yo Molimo Mosantu wana kaka, oyo abimisaki maloba na bapostolo mpe baprofeta na kala, akotatola na yo bosolo na yango. Na bozindo, Molimo Mosantu akolakisa yango lisusu na yo. ntango yango ekomi, maloba oyo otangi ezali lisusu te bobele maloba ya Nefi to Paulo to Alama, kasi ekomi maloba ma yo. Nde, ntango ozali koteya, Molimo Mosantu akokoka komema makambo manso na bokundoli na yo. Ya solo, “ekopesamela yo na ngonga mpenza, iyo, na ntango mpenza, nini okoloba.”9 Ntango yango ekokoma, okomimona kolobaka likambo moko oyo okanaki te koloba. Nde, soki okosala keba, okoyekola likambo moko uta na makamba oyo olobi ntango ozali koteya. Mokambi Marion G. Romney alobaki, “Nakoyebaki ntango nyonso ntango nazali koloba na nse ya bofuli ya Molimo Mosantu mpamba te nakoyekolaka ntango nyonso likambo moko uta na nini nalobi.”10Mikundola, moteyi azali lisusu moyekoli.

Na nsuka, osengeli kotelema lokola nzeneneke ya bosomi ya makambo oyo oteyi mpe te kaka kozala elongo ya maloba na mokanda to makanisi ya basusu.Wana ezali yo kosala feti ya maloba ya Klisto mpe kobunda mpo na kosalela nsango malamu na ntina monene mingi koleka mokolo moko te liboso, Molimo Mosantu ekomonisa yo ete makambo ozali koteya ezali solo. Oyo ezali Molimo ya bobimisi, mpe molimo moko oyo ekomema nsango na mitema ya baoyo bazali na mposa mpe bolingi ya koyamba yango.

Tika sikawa tosuka esika tobandaki—na Zamba ya Bule. Mpo na ntina ya nini esalaki na ntongo kitoko ya eleko ya milona kala mingi te, bosengeli koteya na nguya mpe likoki ya Nzambe. Na ntina ya oyo napesi litatoli na ngai ya lokumu mpe ya ngai moko o nkommbo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Baloma 1:16.

  2. Tala Doctrine et Alliances 11:20.

  3. Bokambi ya Yanmbo, na Teaching the Gospel in the Savior’s Way: A Guide to Come, Follow Me: Learning Resources for Youth (2012), 2.

  4. Bokambi ya Yambo, na Teaching the Gospel in the Savior’s Way, 2.

  5. Tala Doctrine et Alliances 11:21.

  6. Tala 1 Batesalonika 1:5.

  7. Alama 17:2–3.

  8. Jeffrey R. Holland, “The Divine Commission” (lisukulu epesama na seminari ya bakambi ya misio ya sika, sanza ya motoba  26, 2009), 7, 8, Ebombelo ya Mambi ma Kala ya Eklezia, Salt Lake City; nsete ebetami na oyo ya ebandeli.

  9. Tala Doctrine et Alliances 100:6.

  10. Marion G. Romney, na Boyd K. Packer, Teach Ye Diligently (1975), 304.