2010–2019
Makasi ya Bizalela Malamu ya Basi
Sánzá ya Zómi 2013


Makasi ya Bizalela Malamu ya Basi

Mosala na bino ezali ya kosala bolamu mpe kozala malamu, mpe lokola bozali kolanda Molimo Mosantu, likoki mpe nguya ya bizaleli malamu na bino ekokola.

Wuta na bileko ya kala, mangomba eyekamaki na makasi ya bizaleli malamu ya basi. Ntango yango ezali solo nguya malamu se moko te na mosala kati na lingomba, moboko ya bizaleli malamu epesami na basi emonani mpenza ya litomba mpo na bolamu ya momesano. Ntango mosusu, mpo ezali ya kondimisa, bopesi ya basi ezali mbala mingi kondimama moke. Nalingi koyebisa botondi mpo na nguya ya basi malamu, komonisa mwa filozofi mpe mposa oyo ezali kobangisa bokasi mpe lokumu ya basi, mpe komonisa kosamba mpo na basi kokona nguya ya bizaleli malamu kati na bango.

Basi bamemi elongo na bango boko bolamu, likabo ya bonzambe ekokomisa bango na makoki ya kokotisa bizaleli malamu lokola bondimi, mpiko, mawa, mpe bobongisi na bondeko mpe na ba bonkoko. Ntango azalaki kosazola “bondimi ya solo” amonaki na Timote, Paulo atalisaki ete bondimi oyo “koko na yo ya mwasi Lowis mpe mama na yo Enis bazalaki na yango.”1

Mibu mileki, ntango nazalaki kovanda na Mexico, nalandaki na loboko ya liboso oyo Paulo alingaki koloba. Namikundoli lisusu mama ya elenge moko boye, moko kati ya bamama ebele ya Eklezia na Mexico oyo ya bango bondimi na Nzambe epamboli bomoi na bango na pete mpenza ete bazali komonana lokola bayebi te. Mwasi oyo ya bolingo angengaki na likoki ya bizaleli malamu, abotami na bolamu, oyo eningisaki banso nzinganzinga na ye mpo na bolamu. Elongo na molongani na ye, bamipimaki motango ya bamposa mpe biloko mpo na makambo na bango ya liboso eleki likolo, na bomoni na makanisi mususu na nsima te. Bokasi na ye ya kosala bafeti ya kotobolaka, ya kongumbaka, mpe kosaka diemba elongo na bana ezalaki pembeni na kibomoto te. Bosenga likolo na ye ezalaki mingi mpe mikumba na ye mbala mingi ya kobandela mpe ezangi ntina, kasi na nse na yango nyonso ezalaki na boboto kitoko, liyoki ya kozalaka na kati ya mosala na Nzambe. Lokola esalaki na Mobikisi, apesamaki lokumu na kopambolaka basusu na nzela ya mosala mpe libonza. Azalaki bolingo elati nzoto.

Napambolami makasi na nguya ya bizaleli malmu ya basi, mingimingi mama na ngai mpe mwasi na ngai. Na kati ya basi mosusu oyo natalelaka na botondi ezali Anna Daines. Anna mpe mobali na ye Henry, mpe bana na bango mineyi bazalaki na kati ya bapionie ya Eklezia na New Jersey, na Etazini. Kobanda na mibu1930, ntango Henry ezalaki moyekoli ya dokotola na Université ya Rutgers, ye na Anna bazalaki kosala na kolemba te na eteyelo mpe mangomba etali bomoto na Metuchen, esika wapi bazalaki kovanda, mpo na kozala likolo ya mabe ebota misisa makasi koboyaka Bamormons mpe kotia lisanga ezala esika eleki malamu mpo na baboti banso ya kobokola bana na bango.

Na ndakisa, Anna asalaki na bolingi na Metuchen YMCA mpe amisalaki ye moko ndenge esengeli. Na kati ya mbula abiangamaki mokambi ya Lisanga Lilandi ya Bamama mpe nde “asengamaki kosala na bisika ya basi moko to misato na lisanga ya bayangali ya YMCA. Alongaki na botelemeli ya moto te mpe boye asanganaki na likita oyo bobele mwa mibu liboso eboyaka kotika Basantu basangana na ndako na bango!”2

Libota na ngai ekendaki na Palwasi ya New Brunswick ntango nazalaki elenge. Ndeko mwasi Daines ayaki koyeba ngai mpe mbala mingi azalaki koloba elikya na ye na makoki mpe boyebi na ngai, oyo efulaki ngai mpo na kokoma likolo—likolo koleka nalingaki kokoma te na bozangi bolendisi na ye. Mbala moko, na ntina ya likebisi na ye ya mayele mpe na ngonga malamu na ye, nalekaki pembeni ya likambo moko oyo engaki solo komema na mawa. Atako azali lisusu awa te, nguya ya Anna Daines ezali kokoba koyokana mpe komimonisa na bomoyi ya bakitani na ye mpe basusu bazanga motango, ngai moko mpe nakati.

Nkoko na ngai ya mwasi Adena Warnick Swenson ateyaki ngai kozala motema mobimba na mosala ya bonganganzambe. Alendisaki ngai na kokanga mapamboli ya elambo mpona lipa mpe mayi, kolimbolaka ete ezali nzela oyo nakokaki kolobela yango na bososoli mpe liyoki bonene. Kotalaka boni asungaki nkoko na ngai ya mobali, nkoko moko ya likonzi, ebotaki kati na ngai botosi mpo na makambo ya bule. Nkoko na ngai ya mwasi Swenson ayekolaki mokolo moko te lolenge nini kokumba motuka, kasi ayebaki lolenge nini kosalisa bana mibali bakoma mibali ya bonganganzambe.

Nguya ya bizaleli malamu ya mwasi ezali na esika mosusu eyokani makasi te to esalelami na litomba mingi te koleka na libota. Ezali na esika malamu te mpo na kobokola nkola ya sika koleka libota ya bonkoko, epai wapi tata elongo na mama bazali kosala na boyokani mpo na kolukela, koteya,mpe koleisa bana na bango. Esika wapi makanisi oyo ezali te, bato bazali kobunda mpo na kobota matomba na yango lokola bakoki kati na bozwi na bango moko mpenza.

Na makambo nyonso, mama akoki kosalela nguya ekokani te na moto mosusu kaki na bondeko mosusu kani. Na nguya ya ndakisa mpe mateya na ye, bana na ye ya mibali bayekoli komemia bomwasi mpe kokotisi botosi mpe mibeko ya biwaleli malamu ya likolo na bomoi na bangomei. Bana na ye ya basi bayekoli kolona bolamu na bangomei mpe kotelema mpo na oyo ezali solo, lisusu mpe lisusu, atako eyebani mingi te. Bolingo ya mama mpe boyoki na ye ya likolo ekomema bana na kosala na lolenge ya mokambi kolukaka bolimbisi te, kozala lokengo na oyo etali kobokola mpe bokoli ya moto ye moko, mpe kotia mosolo ntago nyonso mpo na bolamu ya banso nzinganzinga na bango. Mpaka Neal A. Maxwell atunaki mbala moko: “Ntango lisolo ya solo ya bato eyebami mobimba, ekoyokisa balokito ya monduki to mongongo ya kotia motindo ya nzembo ya kombondelela bana? Bitumba minene esalamaki na basoda to botie kimia ya basi na mabota to na banzinganzinga ya mboka? Oyo elekaki na mbeto ya bebe mpe na makusa ekolakisa kozala kotala mingi koleka oyo elekaki na bakongre?”3

Ya bule koleka mingi ezali mosala ya mwasi ya kokela bomoi. Toyebi ete banzoto na biso ya mosuni ewuti na bonzambe4 mpe tosengeli kozala na boyebi ya mbotama ya mosuni mpe ya mbotama lisusu ya molimo lokola mpo na kokoma na bisika eleki likolo na bokonzi ya likolo ya Nzambe.5Na yango, basi bazali kosala mosala monene (ntango mosusu na likama na bomoi na bango) na kati ya mosala mpe nkembo ya Nzambe” mpo na komema kosalema bokufi mpe bomoi ya seko ya moto.”6 Lokola bankoko ya basi, bamama mpe ndakisa ya basali, basi bazalaki babateli ya ebale ya bomoi, koteyaka ya nkola moko na moko ntina ya mpetua ya bosangisi nzoto—ya bopeto liboso ya kobala botiki te na libala. Na motindo boye, bazali nguya moko ya kobongola malamu na lisanga; bamemi ya malamu koleka mingi kati na mibali; bavandisi libela bisika malamu na wapi kobokola bana ya kimia mpe ya kolongonu.

Bandeko basi, nalingi kosanjola bino koleka te lokola tosalaka ntango mosusu na masikulu ya Mokolo ya Bamama oyo epesaka bino nsai. Bosengeli kozala ya kobonga nie te;7 Nalobi te ete bozali (na bolongoli moko ekoki kozala na oyo azali kovanda pembeni sikawa). Oyo nalingi koloba ezali ete soki bozali minzemba to bobala, soki bobota bana to te, soki bozali bakolo, bilenge, to na katikati, likoki na bino ya bizaleli ezali ntina, mpe ntango mosusu tobandi kozwa yango mpe bino lokola lifuta. Solo mpenza ezali na bamposa mpe makasi ya mosala oyo ekolembisa mpe kutu elongola nguya na yo, na nsima mokongo ya basusu, ya bamabota mpe ya lingomba na lisanga. Botika ngai natanga misato lokola bobendi litoyi mpe likebisi.

Filosofi moko ya mabe oyo ebebisi nguya bizaleli malamu ya basi ezali bokitisi ya libala mpe ya bomama mpe misala ya ndako lokola mosala ya lifuti. Basusu bamonaka mosala ya ndako na koyina monene mpe mpete, koloba ete ekitisaka basi mpe ete bosenga makasi ya kobokolaka bana lokola lolenge ya ki boombu.8 Bazali kotiola oyo bazali kobenga “nzela ya mama” lokola mosala ya lifuti. Ezali malamu to sembo te. Tokitisi te motuya ya oyo basi to mibali bazali kokokisa na mosala nyonso elongobani to mosala ya lifuti—makokisi yango ezali na litomba mpona biso banso—kasi toyebi lisusu ezali na malamu moko te koleka bomama mpe botata na libala. Ezali na mosala ya lifuti eleki likolo te, mpe mbongo moko te, bokonzi te to bokumisi ya bato te ekoki koleka mbano ya nsuka ya libota. Nini nyonso mosusu mwasi akoki kokokisa, nguya ya bizaleli malamu na ye esalelamaka lisusu te na mobimba koleka awa.

Balolenge ya kotalela bosangisi nzoto ya bato ezali kobangisa likoki ya bizaleli ya basi na banzela ebele. Bosopi zemi na mposa ya moto ye moko to ya bato ezali kobeta na motema ya nguya eleki bule ya mwasi mpe ezali kobebisa likoki ya bizaleli na ye. Yango ezali mpe solo na ntina ya mabe ya bosangisi nzoto mpe bilamba ezali kolakisa nzoto oyo ekitisi bobele basi te kasi ezali kokobisa lokuta ete bosangisi nzoto ya mwasi ezali oyo etalisi motuya na ye.

Ezalaki ngonga molai na ezaleli mibale oyo elukaki ete basi basangisa nzoto na ndenge esengeli kolimbisaka bozangi bomoto ya mibali. Bozangi bosembo ya mibeko mibale oyo ezali polele, mpe eboyamaki mpe ebwakamaki na ntembe te. Na bobwaki wana, tolingaki kolikia ete mibali balingaki komata likolo koleka, motindo moko, kasi bokeseni nde esalamaki—basi na bilenge basi sikoyo balendisami mpo na kozala mpe koyengayenga lokola mitindo mibale ezali kozela mibali kozala. Bisika ntango mitindo ya likolo ya basi esengaki komipesa mpe mikumba uta na mibali, tozwi sikawa bosangisi nzoto na bozangi makanisi, mabota mazangi tata, mpe kokola ya bobola. Bokangani ya kozala na nkonzo ndenge moko eyibi basi na bopete nguya na bango ya bizaleli malamu mpe ekitisi lisanga mobimba.9 Na likambo oyo ya bozindo mpenza, ezali mibali nde “bakangolami” mpe basi mpe bana bazali koniokwama mingi.

Ntina ya misato ya likambo eyei uta na baoyo, na nkombo ya bokani, balingi kolongola bokesene bonso katikati ya mobali mpe mwasi. Mbala mingi yango ezwi lolenge ya kotindikaka basi bazwa bizalela mingi ya mibali—bazala kanda mingi, makambo makasi mpe ya bitumba. Ekomi sikoyo momesano na filime mpe masano ya video komona basi kozwa ngala ya mabe makasi, ya kotika bibembe mpe bobuki na nzinganzinga na bango. Esalaka motema mpasi komona mibali na misala ya boye mpe solo na tembe te moke tango basi nde bazali kosalaka mpe koniokwamaka bokasi bokasi.

Mokambi monene ya kala ya Bilenge Basi Margaret D. Nadauld ateyaki: “Mokili ezali na basi ebeleoyo bazali makambo makasi; tozali na mposa ya basi oyo bazali boboto. Ezali na basi ebele oyo bazali na maloba mabe; tozali na mposa ya basi oyo bazali malamu. Ezali na basi ebele oyo bazali na bonkonde te, tozali na mposa ya basi oyo bazali mpetwa. Tozali na basi ya lokumu mpe bozwi; tozali na mposa ya basi mingi ya bondimi. Tozali lokoso mingi, tozali na mposa ya bolamu mingi. Tozali na lofundu mingi, tozali na mposa ya bolamu mingi. Tozali na boyebani mingi, tozali na mposa ya bopeto.”10 Na kobulunginisaka bokesene ya mibali mpe basi, tozali kobungisa makabo ya polele, ya kobakisama ya basi mpe mibali oyo elongo bamisi lisanga ya monene.

Bosenga na ngai mpo na basi mpe bilenge basi lelo ezali kobatela mpe kolona bokasi ya bizaleli malamu oyo ezali na kati na bino. Kobomba bolamu oyo ya kobotama mpe makabo ya ndenge oyo bomemi elongo na bino na mokili. Mosala na bino ezali kosala molamu mpe kozala malamu, mpe lokola bozali kolanda Molimo Mosantu, likoki ya bizaleli malamu mpe nguya na bino ekokola. Na bilenge basi nalobi, bobungisa bokasi na bino ya bizaleli malamu te kutu liboso bozwa yango mobimba. Bozala na bokebi mpenza ete maloba na bino ezali peto, mabe te, ete molato na bino elakisa lolendo te, komilakisa te; mpe ete etamboli na bino elakisa bopeto, bosoni te, bokoki kotombola mosusu na bolamu te na ngambo moko soki na ngambo mosusu bozali bozali kosalela mabe.

Bandeko basi, na masanga na bino nyonso, ezali boyokani na bino na Nzambe, Tata na bino ya Lola, oyo azali liziba ya nguya ya bizaleli malamu na bino, bosengeli ntango nyonso kotia yambo na bomoi na bino. Bomikundola ete nguya ya Yesu eyaki na nzela mokano ya bomipesi na ye moko na bolingi ya Tata. Abongolaki ata mokolo moko te oyo esepelisaki Tata na Ye.11 Bunda kozala lolenge ya moyekoli wana ya Tata mpe ya Mwana, mpe nguya na bino ekosila te.

Mpe bobanga te na kosalela nguya wana na kobanga te to na bolimisi te. “Bozala ntango nyonso pembeni ya kopesa eyano na [mobali, mwasi mpe mwana] nyonso oyo akotuna yo ntina ya elikya oyo ezali kati na yo.”12 “Teya liloba, bandela na ntango mpe libanda ya eleko, zongela, pamela, teya elongo na motema molalai mpe malongi nyonso.”13 “Bobokola bana na bino na kati ya pole mpe solo.”14 “Tangisa [bango] kosambele, mpe kotambola sembo liboso ya Nkolo.”15

Na mateya oyo epai ya basi, botika moko te asosola mabe te na mposa na ye moko. Na kosanjolaka mpe kolendisaka makasi ya bizaleli malamu ya basi, nazali kolba te ete mibali mpe bilenge mibali basali lokola balimbisami uta na oyo ya bango mokumba ya kotelema mpo na bosolo, bosembo, ete mokumba na bango ya kosalisa, kobonza, mpe kosalela Nzambe ezali komonana lokola ya moke koleka oyo ya basi to ekoki etikelama epai ya basi. Bandeko mibali, tika totelema elongo na basi, tokabola mikumba na bango, mpe tolona moninga na bisomei ya likoki ya bizaleli malamu.

Bandeko basi babolingo, totie motema na makasi ya bizaleli malamu oyo bomemi na mokili, na libala, na libota, na Eklezia. Totie motema na mapamboli bomemi na nse uta lola na mabondeli mpe kondima. Tobondeli mpo na kimia na bino, bolamu, mpe esengo mpe mpo na nguya na bino esungama. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. 2 Timote 1:5.

  2. Orson Scott Card, “Neighborliness: Daines Style,” Ensign, sanza ya minei 1977, 19.

  3. Neal A. Maxwell, “The Women of God,” Ensign, sanza ya mitano 1978, 10–11.

  4. Tala Moses 2:27.

  5. Tala Moses 6:57–60.

  6. Moses 1:39.

  7. Ekeke moko eleki, moto amipesa ya mayele John Bowlby amonaki ete bokangami oyo ekelamaki na nzela ya boyokani malamu ebele na katikati ya mama na mwana na ye ezali moboko ya ntina monene mpo na botomboli ya liyoki ya bato. nb}… Mpe moto ya mayele ya makambo ya basi Sara Ruddick amonaki ‘bolingo ya bokebi” ya mama moko lokola motema ya kimoboti ya makasi. Na nzela ya “liso ya bompikiliki ya bolingo,’ bamama bakolisi boyebi ya ndenge mosusu ya bana na bango—boyebi moko oyo epesi bango botali liboso ya sikisiki na nini ‘bosali malamu mingi’ ya solo mpo na mwana na mwana esengeli kozala” (Jenet Jacob Erickson, “Love, Not Perfection, Root of Good Mothering,” Deseret News, sanza ya mitano 12, 2013, G3).

  8. Ezali ya solo ete basi ebele na bankola ebele eleki basalelamaki to bakangisamaki na mikumba ya bosembo te na libota mpe na mosala lokola, kasi moyimi mpe bomikabi ezali na mposa te mpe esengeli te ekoma ya makasi to ya kosalelama. Mpaka Bruce Bruce C. Hafen amonaki: “Soki kozalaka ‘kobatela basusu”, elingi koloba mwasi asengeli kopesa ya ye bomoto ya kati mpe bokoli na ye moko, bososoli wana ya bobateli ezali lokuta. … Kasi lolenge ya bonsomi ya lelo ekeyi mosika mingi na lolenge mosusu, kozwaka basi lokola ya bonsomi koleka mpenza na mabota na bango. Bomoni oyo esosolami koleka ezali ete mibali mpe basi bazali kosala elongo bamoko na basusu. … Batioli oyo balongoli mama uta na bokangami ti na bonsomi bapumbwe mabele malamu ya katikati ya mosala eponami na bosomi oyo kosalisa na nzela ememaka bokoli ya mwasi ya ye moko. Na ntina ya kolekisa ndelo oyo, masukulu na oyo etali motuya ya bomama ememi, na liseki, lisanga mobimba mpo na kokakola kaka mama te, kasi basi nyonso”. (“Motherhood and the Moral Influence of Women” [mateya epai ya the World Congress of Families II, Geneva, Plenary Session IV, sanza ya zomi na moko 16, 1999], http://worldcongress.org/wcf2_spkrs/wcf2_hafen.htm).

  9. Mama moko na lokasa ya yambo ya Zulunale ya Wall Street atalisaki : “Kolongola mwa Bamormons, baevangeliki mpe Bayuda ya Baortodoxes, mingi na biso toyebi te ndenge nini koteya bana na biso ya mibali mpe ya basi nakopesa te banzoto na bango na basusu na pete nyonso. … Nzoka nde, na zolongano na ngaimei ya baninga basi, mposa ya kobomba ezali makasi. Nayebi moko te na kati na bango oyo azali na mayoki ya nsoni makasi te na oyo etali bosangisi nzoto na ye ya kala. Mpe mwasi moko te atikala kotuna na ntina ya likambo yango alobaki ete azali kolikia akolingaka ‘kosalela yango’ mingi” (Jennifer Moses, “Why Do We Let Them Dress Like That?” Wall Street Journal, sanza ya misato 19, 2011, C3).

  10. Margaret D. Nadauld, “The Joy of Womanhood,” Ensign, sanza ya zomi na moko 2000, 15; to Liahona, sanza ya yambo 2001, 18.

  11. TalaYoane 8:29.

  12. 1 Petelo 3:15.

  13. 2 Timote 4:2.

  14. Doctrine et Alliances 93:40.

  15. Doctrine et Alliances 68:28.