2010–2019
Nguya, Esesngo, mpe Bolingo ya Kobatela Mayokani
Sánzá ya Zómi 2013


Nguya, esengo, mpe bolingo ya kobatela boyokani

Nabengi moko na moko na biso kotala boniboni tolingi Mobikisi, kosala lokola lomeko boni tozali na esengo ya kobatela mayokani nabiso.

Nasengeli kobanda na lisapo moko etuti motema na ngai.

Na mpokwa moko moto moko abengaki bampate na ye mitano bakota na ebombamelo na bango. Libota na ye ebandaki kotala lolenge moto oyo abandaki kokotisa bampate, “boya,” mpe kala mingi te bampate mitano batosaki ye. Minei bayaki na esengo nyonso. Mpe asimbaki moko na moko na moto. Bampate bayebaki mongongo na ye malamu mpe balingaki ye mingi.

Kasi moko ya bampate ayaki te kokimaka. Azalaki mpate moko ya mwasi ya monene kasi mwa mposo liboso akabamaki na nkolo na ye, oyo alobaki ete azalaki lokola niama ya zamba, bitambolatambola, mpe ntango nionso komema bampate mosusu mosika. Nkolo ya sika andimaki mpate oyo mpe akangaki ye na nzete na elanga mpo na mwa ntango moke boye amesana kozala kimia. Moto oyo ateyaki ye kolinga ye mpe bampate mosusu kino na nsuka azalaki bobele na nsinga ya moke na kingo kasi yango akangamaki lisusu na nzete te.

Na mpokwa wana libota na ye ebandaki kotala, moto wana kobelema na mpate, oyo atelemaki na nsuka ya elanga, mpe lisusu alobaki na boboto, “yaka. Ozali lisusu na nsinga te. Ozali nsomi.” Nde na bolingo atandaki maboko, atiaki loboko na ye na moto na ye, mpe atambolaki elongo na bampate mosusu kino na ebombamelo.1

Na molimo ya lisapo wana, nazali kosambela ete Molimo Mosanto asunga biso elongo na mpokwa oyo na maye matali kombomba boyokani. Kosalela mpe kobomba boyokani elakisi komikanga na Tata Nzambe mpe Yesu Klisto. Ezali kokana kolanda mobikisi. Ezali kondimela Ye mpe kozala na mposa ya kolakisa botondi na biso mpo na ntalo ye afutaki mpo ete biso tozala nsomi na libonza oyo ya Bokamibi.

Mpaka Jeffrey R. Holland ateyaki ete “boyokani ezali mokanda ya kokangisa ya molimo, elaka moko ya lokumu na Nzambe tata wa biso ete kozala mpe tokanisa mpe kosala na lolenge moko—mpe lolenge ya Mwana na ye, Mokonzi Yesu Klisto. Na kozongisa, Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto balaki biso Nkembo etonda ya bomoyi ya seko. ”2 Na mokanda oyo ya kokangisa, Nkolo atii mibeko mpe tondimi kosalela yango. Kosalela mpe kobatela liyokani na biso ezali boyebisi ya bomipesi na biso ya kokoma lokola Mobikisi. 3 Lotomo ezali kobunda mpo ezaleli elakisami malamu koleka na mwa maloba ya loyembo: “Nakokende esika oyo yo olingi ngai nakende. …Nakoloba mayeyo olingi ngai naloba. …nakozala oyo yo olingi ngai nazala.”4

Mpo na Nini Kosala mpe Kobatela Mayokani?

1.Kobomba boyokani ya mpiko, ya bokasi, mpe ya kobatela.

Nefi amonaki na limoni ntina ya lipamboli Nkolo apesi na bobateli koyokana. “Mpe esalemaki ete ngai, Nefi namonaki nguya ya Mwana wa mpate ya Nzambe, ete ekitelaki likolo lya bato ba boyokani ba Nkolo …mpe balatisamaki na bibundele ya bosembo mpe nguya ya Nzambe na nkembo enene.”5

Ngai nakutanaki kala te na molingami moninga moko ya sika. Azali ndeko elenge mwasi oyo atatolaki ete nsima ya kozwa dotasio na ye ya tempelo, ye ayokaki alendisamaki na nguya makasi ya kotelemela masenginia ye abundaki na yango liboso.

Ntango tobateli liyokani, tozwi mpiko mpe makasi mpo na kosalisa biso komemelana mikumba. Ndeko moko ya mwasi ya motema ya kobukana azalaka na mwana ya mobali atungisamaki mpasi ya liwa. Na ntina ya kondima na ye na lingomba ya ba mama ya basungi lokola babateli ya liyokani, ye abengisaki bango na mpiko na kila mpe kosambela mpo na mwana na ye. Ndeko mosusu ya mwasi alobaki boniboni atombelaki ete asengaka mpo nsambo ya lolenge moko. Mibu eleki, mwana na yemei azalaki kobunda. Boniboni atombelaki ete asengaka bango kosalisa libota na ye mpo ya komema mokumba oyo. Mobikisi alobaki, “Na yango bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo moko na moko.”6

O, bandeko basi, tozali na mokumba biso banso ya komema mpe mikumba ya kokabola. Libengisi mpo ya komema mikumba ya basusu ezali libengisi ya kobatela liyokani na biso. Toli ya Lucy Mack Smith na bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi esengelami mingi lelo koleka na ntango inso liboso: “Tosengeli kolingana, kokengelana, kolendisana mpe kozwa mateya, na ntina ete tokoka kofanda lisusu na lola elongo.”7 Oyo ezali kobatela liyokani mpe kotala mpo na koteya eluti kitoko!

Buku ya Mormon ekundolisi biso ete ata profeta Alma asengelaka komema mokumba ya kozala na mwana motomboki. Kasi Alma azalaki na bomengo na bandeko mibali mpe bandeko basi babateli liyokani na nsango malamu oyo babongwanaki na Nkolo mpe bayekolaki nini elingi koloba komemelana mikumba. Tomesani na nzela na Mozia oyo elobi na ntina ya bondimi bonene ya losambo ya Alma mpo na mwana na ye. Kasi likundoli elobi ete“Nkolo ayokaki nsambo ya bato baye, mpe lisusu nsambo ya mosali na ye, Alma.”8

Toyebi ete Nzambe ntango inso azalaka na esengo “na molimo oyo ayamboli,”9 kasi tolingi likolo na nyonso bana na biso balanda toli ya mokambi Henry  B. Eyring mpo na “kobanda noki mpe kozala na molende” na kosala mpe kobatela mayokani. 10 kala mingi te, motuna ya kotumbola-makanisi mpe ya solo etunamaki na lisanga ya bonganganzambe mpe bakambi ya lisanga lilandi: “Ezali biso kozela ya solo bana ya mibu moambe kotosa mayokani na bango? Ntango topesanaki toli, epesamaki likanisi ete lolenge moko ya kolakisa bana na biso ya kosala mpe kobatela mayokani na bango ya libatisi ezali kosalisa bango koyekola kosala mpe kobatela elaka ya pete.

Baboti ya botongono basengeli koyeba lolenge boniboni koteya malamu mingi koleka kokokisa mposa ya bana na bango. Ntango baboti baluki mpe basali likolo ya libimisi ya moto na moto, bapesani toli, mpe basalisi mpe bateyi mabongisi ya pete ya nsango malamu, bakozwa na bokasi mpe kobatela mabota na bango. Bayi libota mosusu bakoki lisusu kosalisa. Nkoko na ngai ya mobali ya kitoko ateyaki biso ntina ya kobatela bilaka na nzela ya loyembo na lolenge oyo: “Yambo osala elaka, kanisa malamu motuya na yango. Nde ntango esalami, koma yango na kati ya motema na yo. Koma yango na kati ya motema na yo.” Loyembo moke oyo yango etayamaki na bolingo, bondimi nie, mpe nguya mpo ete nkoko na ngai ya mobali akoma elaka na yemei o kati ya motema na ye.

Mama moko ya bwania nayebi abakisaki bana na ye na bokasi na ye mpo na kobatela mayokani na ye. Amemaki na esengo mikumba ya bazalani, baninga, mpe bandimi ya palwasi—mpe alendisaki baye bazalaki na mposa ya kolendisama. Ezalaki likambo ya kokamwa te ntango mwana na ye ya mwasi ayaki kala te kotuna lisalisi mpo na koyeba kolendisa malamu mingi koleka moninga na ya moke oyo akufelaki tata. Ezalaki esika ebonga mpenza mpo na koteya ete mposa mpe mosala mpo na kolendisa moninga na ye ezalaki nzela moko mpo ya kobatela liyokani na ye ya libatisi. Lolenge nini tokoki kozela na bana basala mpe babatela mayokani na bango ya tempelo soki tozeli te na bango kobatela liyokani na bango ya yambo- liyokani na bango ya libatisi na bango?

Mpaka Richard  G. Scott alakisaki, “moko ya mapamboli ya monene mingi koleka tokoki kopesa na mokili ezali nguya ya ndako ezali na Yesu na katikati wapi nsango malamu eteyami, mayokani mabatelami, mpe bolingo efuluki.”11 Nini ezali boko lolenge tokoki kokela ndako moko mpo na kolengela bana kobatela mayokani mpe kobatela mayokani ya tempelo?

  • Tokoki koyeba elongo nini elakisi kolongobana na ndingisa ya tempelo.

  • Tokoki koyeba elongo lolenge nini koyoka Molimo Mosantu. Mpamba te dotasio ya tempelo epesami na nguya ya Molim Mosantu, tosengeli koyekola llikoki wana ya ntina mpenza.

  • Tokoki koyeba elongo lolenge nini ya koyekola na nzela ya kosalela bilili, kobandela na bilili ya bule ya libatisi mpe ya elambo.

  • Tokoki koyeba elongo ntina nini nzoto ezali bule, ntina nini ntango mosusu elobelami lokola tempelo, boniboni elamba mpe elateli ya bosawa elakisi bozali ya bule ya bilamba ya tempelo.

  • Tokoki koyeba moango ya esengo na kati ya makomi. Soki tokozala mingi na momesano na Moango ya Tata wa biso ya lola mpe Bomikabi na makomi, mingi ya ntina bokumbami ya tempele ekozala.

  • Tokoki koyekola lisolo ya bankoko na na biso elongo, koluka mambi ma libota, index, mpe mosala ya tempelo ya basusu mpo ya balingami bakufa.

  • Tokoki koyeba elongo ntina ya maloba maye lokola Dotasio, bokuli, Bokangisi, Bonganganzambe, bafungola, mpe maloba mosusu mapesami na bokumbami ya tempelo.

  • Tokoki koteya ete tokokende na tempelo mpo ya kosala mayokani ya biso elongo na Tata ya Lola—mpe ete tozonga na ndako mpo ya kobatela yango! 12

Tika tokanisa liloba ya “malamu, malamu mingi, mpe malamu mingi koleka” lokola tozali koteya.13 Ezali malamu mingi koteya bana na biso nantina ya ntempelo. Ezali malamu kolengela mpe kozela bango basala mpe babatela mayokani. Ezali malamu mingi koleka kolakisa bango na ndakisa ete bakangama na esengo na mayokani ya libatisi mpe ya tempelo! Bandeko basi, tososoli esika na biso ya ntina na mosala ya lobiko lokola tokolisi, toteyi, mpe tolengeli bana mpo na kokende liboso na nzela ya liyokani? Nguya ya kosala yango ekoya lokola totosi mpe tobateli mayokani na biso.

2.Kobatela mayokani ezali na ntina mpo ya esengo ya seko.

Mokambi Thomas S. Monson ateyaki, ete“mayokani masantu masengeli komemiama na biso, mpe botongono na yango esengelemi mpo na esengo.”14 Na  2 Nefi na pete esakoli, “Mpe esalemaki ete kotandaki nsima ya lolenge ya esengo.”15 Liboso kaka na mokapo oyo toyekoli ete Nefi mpe bato na ye bawutaki kotonga tempelo. Na ntembe te babateli liyokani na esengo! Mpe na Alma totangi, “Kasi tala ezalalki mokolo moko te ntango yoko ya bosepeli o ntei ya bato ya Nefi, uta o mikolo mya Nefi, koleka o mikolo mya Moloni.”16 Mpo na nini? Lisusu toyekoli na eteni moko eleki ete “bazalaki botongono nakobatelaka mitindo ya Nkolo.”17 Babateki liyokani bazali babateli mibeko!

Nalingaka makomi maye makomami: “Mpe sikawa, eyokaka bato maloba maye [elakisi maloba maye malakiai liyokani ya libatisi], babetaki maboko ma bango mpo ya bosepeli, mpe balobaki: Eye ezali mposa ya motema mya biso.”18 Nalingi mposa ya motema na bango. Bango balingaki na esengo kosala mpe kobatela mayokani!

Eyenga moko elenge mwasi moko na esengo agangaki, “Nayei kozwa elambo lelo!” Ntango nini ezalaki mbala ya nsuka nasepelaki na litomba wana? Mpe lolenge nini tokoki kolakisa yango? Tosalaka yango na ntango nyonso komikundolaka ntango inso Mobikisi mpe mpe ntango nionso kobatelaki mitindo na ye, oyo ekwi kobatela ya Saba mokolo esantu. Tosalaka yango na ntango nionso komikundolaka Ye lokola tozalaka ntango nyonso na nsambo na biso ya moto na moto mpe ya libota, koyekola makomi mokolo na mokolo, mpe mpokwa ya libota na ndako. Mpe ntango tobungisi makanisi to tozali kilikili na makambo maye ma motuya, tokoyambola mpe tokobandela lisusu.

Kosala mpe na esengo kobatela mayokani na biso epesaka bokasi mpe bomoi na makuli ma bule mpe ma lobiko tosengeli kozwa mpo ete tozwa“nionso Tata azali na yango.”19 Makuli mpe mayokani ezali “mabanga ya bilembo ya molimo” Mokambi Henry  B. Eyring alobelaki yango ntango ateyaki: Basantu ba mikolo mya nsuka bazali bato ya liyokani. Uta mokolo ya libatisi kino na libanga ya elembo enene ya molimo ya bomoi na biso, tosali bilaka na Nzambe mpe Ye asali elaka na biso. Ye ntango nyonso akobatela bilaka na ye oyo apesi na nzela ya basali na ye ya ndingisa, kasi yango ezali momekano moko ya ntina ya bomoi na biso mpo na komona soki biso tokobatela mayokani na biso elongo na ye.”20

3. Kobatela liyokani na biso elakisi bolingo na biso mpo na Mobikisi mpe Tata na biso ya lola.

Na ntina nyonso tosengeli kozala na etingia mpo na bobateli ya liyokani na biso, ntina oyo ezali makasi koleka nyonso—bolingo. Na eteni moko na Boyokani ya kala ezali moko oyo etuti motema na ngai ntango tomanioli libongisi ya bolingo. Nani kati na biso aningisami na lisolo ya bolingo ya Yakobo mpe Laele te ntango totangi, “mpe Yakobo asalaki mbula sambo mpo na Laele mpe yango ejalaki lokola mwa mikolo mpo na bolingo eyokaki ye epai na ye”?21 Bandeko basi, ekobatelaka biso mayokani na lolenge ya bolingo ya mozindo mpe ya komipesa?

Mpo na nini Mobikisi alingaki kobatela liyokani na Ye elongo na Tata mpe kokokisa etinda na ye ya bonzambe mpo na komikaba mpos ya masumu ya mokili? Ezalaki mpo na bolingo na Ye mpo na Tata wa lola mpe mpo na bolingo na Ye mpo na biso. Mpo na nini Tata andimaki ete Mwana na ye Mobotami se Moko mpe abonga nie amona mpasi eleki na koloba mpo na masusu ya bato, motema mpasi, maladi, mpe bilema ya mokili mpe oyo nionso ezali malonga te na mokili? Tokozwa biyano na maloba maye: “Nzambe ye alingaki mokili, ete atindaki mwana se moko wa ye ya bolingo.”22

“Soki toluli mapamboli mingi oyo epesamimeli biso na nzela ya bosikoli esalema mpo na biso, ezali na likambo te Nkkolo akoki kosenge ete tolinga te na komitungisa mpe na bolingi.”23 Engebene na esakola ya Mokambi Joseph Fielding Smith, kobatela liyokani ezali nzela moko mpo na kolakisa bolingo na biso mpo na Bomikabi ezanga bososoli mpe ezanga nsuka ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso mpe bolingo mpe ebonga nie ya Tata na biso ya Lola.

Mpaka Holland apesaki likanisi na mawa ete“Nayebi na ntembe nini likambo na biso ekozala na mokolo ya suka ya bosambisi, kasi ngai nakosutuka mingi soki na esika moko ya masolo, Nzambe akotuna biso te nini Yesu atunaki Petelo: ‘Yo olingaka ngai?’”24 Na mpokwa ya lelo nasengi na bino boniboni tolingaka Mobikisi, kosalelaka lokola emekeli boniboni na esengo tobatela tobateli liyokani na biso. Mobikisi alobaki, “Oyo azali na mibeko na ngai, mpe abateli yango, ezali ye oyo alingaka ngai: mpe ye oyo alingaka ngai akolinga Tata na ngai, mpe ngai mpe nakolinga ye, mpe nakomilakisa na ye.”25 Boniboni biso banso tolingi bomilakisi ya Mobikisi na bomoyi na biso!

Tika tomikundola ete ata baye bazali bitambolatambola na kala to baye bazali sikawa kobunda bakoki mpe koyoka bosimbi ya loboko ya mobateli bampate likolo ya mito na bango mpe koyoka mongongo na ye koloba ete, “Boya. Bozali lisusu bakangami te. Bozali bansomi.” Ezalaki Mobikisi oyo alobaki, “ngai nazali mobateli malamu ya bampate: Mobateli malamu ya bampate akopesa bomoi na ye mpona bampate.”26 Ye akokaki koloba yango mpamba te Ye abatelaki mayokani ya Ye na bolingo. Motuna nde ezali ete, biso tokokoka? Ekoka biso kokende na kondima, na motema ya esengo, na bolingi ya monene mpo ya babateli liyokani. Oyo ezali boniboni tosengeli kolakisa bolingo na biso mpo ya Tata wa biso na lola mpe Mobikisi na biso, bango babale natatoli na bolingo ya monene, na nkombo ya Yesu Klisto, Amen.

Makomi

  1. Tala D.   Todd Christofferson, “You Are Free,” Ensign, sanza ya misato. 2013, 38–40; na Liahona,, sanza ya misato. 2013, 16–18.

  2. Jeffrey  R. Holland, “bobombi mayokani: sango mpo na baye bazali kokende na misio,”New Era, sanza ya yambo. 2012, 3; to Liahona, ya sanza ya yambo. 2012, 49.

  3. Tala “Understanding Our Covenants with God,” Ensign, sanza ya sambo 2012, 25; to Liahona, ya sanza ya sambo 2012, 23.

  4. “I’ll Go Where You Want Me to Go,” Hymns, no. 270; emphasis added.

  5. 1 Nefi 14:14.

  6. Yoane 13:35.

  7. Lucy Mack Smith, inDaughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 25.

  8. Mozia 27:14; emphasis added

  9. Doctrine et Alliance18:13.

  10. Tala Henry   B. Eyring, “Spiritual Preparedness: Start Early and Be Steady,”Ensign na Liahona, sanza ya zomi na moko. 2005, 37–40.

  11. Richard  G. Scott, “For Peace at Home,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2013, 30.

  12. Tala D.  Todd Christofferson, “The Gospel Answers Life’s Problems and Challenges” (worldwide leadership training meeting, Sanza ya mibale. 2012), LDS.org/broadcasts.

  13. Tala Dallin H. Oaks, “Good, Better, Best,” Ensign to Liahona, ya sanza ya zomi na moko. 2007, 104.

  14. Thomas S. Monson, “Happiness—the Universal Quest,” Ensign, Sanza ya zomi. 1993, 4; to Liahona,Sanza ya misato. 1996, 5.

  15. 2 Nefi 5:27.

  16. Alma 50:23.

  17. Alma 50:22.

  18. Mozia 18:11.

  19. Doctrine et Alliances 84:38.

  20. Henry B. Eyring, “Witnesses for God,” Ensign, sanza ya zomi na moko. 1996, 30; emphasis added.

  21. Genese 29:20.

  22. Yoane 3:16.

  23. Joseph Fielding Smith, “Importance of the Sacrament Meeting,” Relief Society Magazine, sanza ya zomi. 1943, 592.

  24. Jeffrey R. Holland, “The First Great Commandment,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 84.

  25. Yoane 14:21.

  26. Yoane 10:11.