2010–2019
Bokasi na Kotia Molende
Sánzá ya Zómi 2013


Bokasi ya Kotia Molende

Makoki ya kotia molende tii na nsuka na bosembo ekozala semba ya kokokana na bokasi ya litatoli na biso mpe na bozindo ya mbongwana na biso.

Ntongo nyonso ntango tozali kolamuka,tozali kokutananamokolo ya sika etonda na mikakatano ya bomoi. Bikakatano oyo eyaka na ndenge ebele:bitumba ya nzoto,bozangi mosolo, matata na baninga,mimekano ya mayoki,mpe kutu bitumba na bondimi ya moto yemei.

Mikakatano mingi tokutakanaka na yango na bomoi ekoki kosilisamampe kolongama; nzoka nde, misusu ekoki kozala mpasi mpo na kososola ekoki kolongama te mpe ekozala elongo na biso kino tokoleka na bomoi ekoya. Lokola tozali na ngonga moke ya kotia molende na mikakatano tokoki kosilisa mpe lokola tokobikotia molende na mikakatano tokoki te kosilisa, ezali na ntina tokundola ete na molimo ya makasi tokokolisa ekosunga biso na kolongaka na mpiko mikakatano nyonso tokokutanaka na bomoi.

Bandeko mibali mpe basi,tozali na Tata na Likolo ya bolingo, oyo akelaki bozali na biso na mabele mpo ete tokoka moko na moko koyekolamateya tosengeli koyekola mpo tokokoka mpo na bomoyi ya seko nq miso na ye.

Likambo moko na bomoi ya Profeta Joseph Smith elakisi libongisi oyo. Profeta mpe baninga mingi bakangemakana Liberty, Missouri, mpo na basanza. Wana ezalaki bango koniokwamana boloko, Profeta Joseph abondelaki Nkolo na losambo ya komikisa ete Basantu bakoka kolongwa na mpasi oyo bazalaki komona. Nkolo ayanolaki na koteyaka Profeta Joseph, mpe biso banso,ete bitumba tobundaka, soki tolongi na molende, ezali mpo na bolamu na biso ya nsuka. Oyo ezali eyano ya Nkolo na bosenga ya Joseph:

Mwana na ngai, kimia ezala na kati ya molimo na yo; motungisi na yo mpe mitungisi na yo ekozala kaka na ngonga moke;

“Na yango, soki okangi motema malamu,Nzambe akonetola yo likolo na yango.”1

Tata na Likolo abongisaki mobembo na biso na bomoi mpo na komekama na bizaleli na biso. Tozali liboso ya malamu mpe banguya ya mabe lokola mpe nsima topesami bonsomi ya malamu mpo na kopona mpo na bisomei nzela nini tokozwa. Lokola Profeta ya kala Ya Buku ya Mormon Samuele ateyaki, “bozali bansomi; epesameli bino kosala mpo na binomei; na yango, Nzambe atii kati na bino boyebi mpe asali bino bansomi.”2

Tata na Likolo asosoli lisusu ete mpo na bomoi na biso ya kufa tosengeli te kaka kopona ya malamu to ya sembo. Mpamba te tozali ya kobonga nie te mpe mpo ete tosalaka mabunga,tosengeli na lisalisi mpo na bozongi epai na ye. Lisalisi lisengeli epesami na mateya,ndakisa,mpe na libonza ya bomikabi ya Yezu Klisto. Libonza ya bomikabi ya Mobikisi esali tokoka kozwa lobiko mpe bonetolami na biso ya mikolo mikoya na nzelaya mabongisi ya boyamboli. Soki toyambolina bosembo mpe bosolo, libonza ya bomikabi ekosunga bisotokoma peto,tobongola bomoto na biso,mpe tolonga na molende bitumba na biso.

Molende ezali libongisi monene ezwami na kati ya malongi ya Yezu Klisto. Ezali monene mpamba te ezalela na biso ya mikolo ekoya na biso ya seko ezali engebene na makoki na biso ya kotia molende kati na bosembo.

Na 2 Nefi 31 profata Nefi ateyi biso ete nsima ya kozwa likuli se moko ya lobiko ya libatisi oyo Yezu Klisto azwaki mpe nde toyambaki likabo ya Molimo Mosantu, tosengeli kokende na lombangu liboso, kosalaka lipati na maloba ma Klisto,mpe tia molende kino na nsuka,[mpe nsima]tala, boye elobi Tata: [Biso]tokozwa bomoi ya seko. ”3

Yango wana, mpo nakoyamba ya monene likolo ya mapamboli nyonso ya Tata na biso ya Likolo, oyo ezali bomoi ya seko, tosengeli kobakisa mosala ya makuli esengeli mpe nsima kokoba kobomba makuli malandi.Na maloba mosusu tosengeli kolenda na elonga.

Makoki ya kotiamolendetii nansuka na bosembo ekozala semba ya kokokana na bokasi ya litatoli na biso mpe na bozindo ya mbongwana na biso. Ntango matatoli na biso ezali makasi mpe tobongwami ya solo na nsango malamu ya Yezu Klisto, boponi ekozala ya kofulama na Molimo Mosantu,ekozala na kati ya Klisto, mpe bakozwa mposa ya kotia molende na bosolo. Soki matatoli na biso ezali pete mpe mbongwana ya likolo likolo, likama ezali monene mingi ete tokobendama na bizalela ya lokuta ya mokili mpe kosala boponi mabe.

Nalingi kokabola boyebi moko oyo elakisi kosala makasi esengisamimpo na kolenda na nzoto mpe nsima kokokisa yango na makoki esengeli mpo na kolenda na molimo. Nsima bozongi na misio na ngai, nazwaki libaku ya kobeta basketball mpo na molakisi atosamampe Bankolo eteyelo na California.Molakisi oyo azalaki solo matata mpenzanaoyo etali basani na ye kozala nzoto malamu yambo ya kobanda milulu ya basketball. Moko ya mateya ma ye yambo ya ata nani kati na biso akokoka kosimba ndembo na esika ya bobeti asengelaki kokimakulusi ya crosse –country na ngomba moke mpembeni na eteyelo na ngonga eyebani mpe ya etumba. Namikundoli komeka na ngai ya liboso mpenza na bopotikulusi ya cross-country oyo mbala moko nsima ya bozongi na ngai na bilanga ya misio: nakanisaki nakokufa.

Nasalaki baposo ya boyekoli ya solo mpo na kolonga ngonga oyo molakisiatiaki lokola ntina. Nazalakina liyoki monene na bobelekokokakokima kulusi te kasi lisusu na kokima makasi kokita ngombatii na ndelo ya kosilisa.

Kolonga kobeta basketball, osengeli kozala na kati ya boyebi malamu. Kozala malamu na bokasi ya nzoto eyaka na motuya,mpe motuya wana ezali komipesa, bombikiliki,mpe komitambwisa malamu. Botii molendena molimo eyaka lisusuna motuya. Ezali motuya kaka wana: komipesa,bompikiliki, mpe komitambwisa malamu.

Litatoli, lokola nzoto na yo, esengeli kozala na boyebi malamu soki olingi yango eyika mpiko. Boni mpenza tokoki kobomba matatoli na biso na boyebi malamu? Tokoki te kozwa banzoto na biso kati ya basketball na koyebaka malamu kaka kotala yango na televizio.Ndenge moko, tokoki te kozala na makoki ya kozwa matatoli na biso na koyeba malamu na kaka na kotalaka likita linene na televizio. Tosengeli koyekola mpe kotanga mabongisi ya ntina ya nsango malamu ya Yezu Klisto, mpe nsima tosengeli kosala malamu nyonso tokoki mpo tosalela mango.Oyo ezali ndenge tokoki kokoma balandi ya Yezu Klisto,mpe wana ezali ndenge tokoki kotonga litatoli elenda.

Ntango tokutani na motungisi na bomoi mpe mposa na biso esengeli kolanda bizaleli ya Yezu Klisto,ezali na ntina ya kolengelama na molimo. Kolengelama na molimo elakisi kokola na molimo makasi to bokasi—tokozala malamu na molimo.Tokozala na lolenge malamu ya boye na molimo etetokopona mpenzabolamu. Tokokoma ya koningana te na mposa na biso mpe makoki ya kosalelansango malamu. Lokola mokomi moko ayebani te alobaki kala, “Bosengeli kokoma libanga ebale ekoki kosukola te.”

Mpo tozali kokutana na bitumba mikolo nyonso, ezali na ntina ete tosalela makasiya molimo na biso mikolo nyonso. Ntango tozali kokolisa nguya ya molimo, makambo ya lokuta ya mokili, lokola mpenza bitumba na biso ya mokolo na mokolo, ekozwa na mwa litombaya mabe na makoki na biso mpo na kolenda na bosembo.

Ndakisa monene na nguya ya molimo ewutaka na mambi ma kala ya libota na bisomei. Na masolo mingi ewuti na bankoko na biso, tozalaki na makoki ya kozwa ndakisa oyo ekolakisa bizaleli ya malamu ya molende.

Lisolo ya libota na ngaimei elakisi libongisi wana. Nkoko na gai Joseph Watson Maynes abotamaki na 1856 na Hull,Yorkshire, Angleterre. Libota na ye ekotaki na Eklezia na Angleterre mpe bazwaki nzela na bango mpo na Salt Lake City. Abalanaki na Emily na 1883,mpe babotaki bana mwambe. Joseph abengamaki mpo nakosala misio ya ntango mobimba na sanza ya motoba ya 1910, ntango azalaki na mibu 53. Na lisungi ya mwasi mpe bana mwambena ye, azongaki na mboka na ye kosala misio na ye.

Nsima ya kosala na botongono mpo na pene mibu mibale, azalaki kotambwisa kinga na ye elongo na moninga na ye kokendeke na milulu ya Eteyelo ya Eyengana Gloucester, na Angletrre, ntango pine na ye etobokaki. Akitaki mpo na kotala motuya ya mbeba. Ntango amonaki ete ezalaki makasi mpe ekozwa ntango mpo na kobongisa, ayebisaki moninga na ye akende mpe abanda milulu ya Eyenga mpe akolanda kuna mwa nsima. Asilisaki kaka koloba boye,akweyaki na mabele. Akufaki nambalakata na kokata motema.

Joseph Watson Maynes amonakimwasi mpe bana mwambe lisusu mokolo moko tena bomoyi na ye. Bazalaki na makoki ya komema nzoto na ye ezonga na Salt Lake City mpe kosala milulu ya matanga na ye na Waterloo Assembly Hall ya kala. Lisikulu esalamaki na milulu ya matanga na ye na Mpaka Elder Anthony W. Ivins ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale ateyi biso liteya ya ntina mpo bomoi, liwa, mpe molende: “Oyo ezali nini nsango malamu epesi biso— bozangi kufa te, kasi elonga likolo na yango na nzela ya elikia tozali na yango na nkembo ya lisekwa.  … Esalamaki na [Joseph Maynes].  … Ezali nsai,mpe ezali bosepeli mpe esengo koyeba ete bato bavandisi bomoi na bango na bosembo, kati na bondimi, kokangama na bondimi.”4

Lisolo ya libota oyo efuli ngai komeka na likoki na ngainyonso kolanda ndakisa ya molende mpe nguya ya molimo oyo elakisami na nkoko na ngai. Nazali lisusu kofulama na bondimi ya mwasi na ye, Emily, oyo ya ye bomoyi nsima ya liwa ya Joseph ezalaki mpenza kilo monene yakomema. Litatoli na ye ezalaki makasi mpe mbongwana na ye mobimba lokola alekisaki bomoi na ye kokangamaka na bondimi na kosungaka bana na ye mwambe na yemei.

Apostolo Polo alobaki, “Tolongola bipekiselo mpe masumu mazali kokanga biso topota na etingia na emekamelo ya mbangu ezali liboso na biso.”5 Bopoti mbangu oyo ezali liboso na biso na mabele oyo ezali na bopoti ya molende, etonda na bikonongo.bikonongo na bopoti oyo ezali mikakatano tolamukaka na yango na ntongo nyonso. Tozali awa na mabele mpo na kopota mbangu, kosalela bonsomi na biso ya bolamu,mpe kopona katikatiya malamu mpe mabe. Mpo na kosilisa na lokumu mpe na elonga bopoti mpe kozonga epai ya Tata na biso ya Likolo, tosengeli kofuta motuya ya bomipesi, bompikiliki,mpe bomitambwisi. Tosengeli kokotana lolenge ya molimo.Tosegeli kokolisa nguya ya molimo.Tosengeli namatatoli makasi oyo ekomema biso na mbongwana ya solo,mpe lokola mbano tokomona kati na bisomei kimia ya kati mpe bobokasi esengeli mpo na kolenda na mikakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango.

Yango wanaata mikakatano nini okolamuka na yango ntongo moko na moko, mikundola—na bokasi ya molimo okolisi, esangana na lisalisi ya Nkolo, na nsuka ya mbangu okozala na makoki ya kosepela bonkutu oyo Apostolo Paulo alobaki ntango alobaki:

“Mpo nabelemi sika mpo na komibonza, mpe ntango kokenda na ngai na maboko na ye.

“Nabundaki etumba malamu, nasilisaki kulusi na ngai, Nabombaki bondimi:

“Kobanda lelo oyo etikali mpo na ngai elembo ya bosolo, oyo Nkolo,mosambisi ya solo,akopesa ngai na mokolo wana.”6

Napesi bino litatoli na ngai mpe bonzeneneke na ngai ya bosolo ya Tata na Likolo ya bolingo ya mpe mwango ya seko ya seko,oyo amemi biso na mabele oyo na ntago oyo. Tika ete Molimo na Nkolo efula biso na nyonsompo tokokolisa kati na bisomei bokasi na kotia molende. Na nkombo ya Yezu Klisto, amene.