2010–2019
Kino Tokokutana Lisusu
Sánzá ya Zómi 2013


Kino Tokokutana Lisusu.

Tika biso tolakisa komata ya bolamu na basusu, mpe tika tozala yakomonana kosala mosala ya Nkolo

Bandeko na ngai ya Mibali mpe ya Basi, motema na ngai etondi lokola tosukisi likita linene ya kitoko oyo ya Eklezia. Toyokaki molimo lokola tozalaki koyoka toil mpe matatoli ya baoyo basalaki elongo na mayangani moko moko.

Topambolamaki na bokutani awa na esika ya likita kitoko na kimia mpe bozangi libaku. Tozwaki bopanzi sango ya likita oyo naino esalema te, komatisa motango na mokili bisika nionso. Atako na nzoto tozali mosika kolongwaka uta na mingi kati na bino, tozali koyoka molimo na bino.

Na Balingami na biso baoyo basalaki na likita oyo, nakoki kopesa na bosolo matondi ya Eklezia mobimba mpo na mibu na bino bomipesaki na mosala. Ezangi motango baoyo bapambwami na mosala na bino na mosala ya Nkolo.

Napesi matondi na bayembi ya Tabernacle mpe na bayembi mosusu oyo basalaki na likita oyo. Miziki ezalaki kitoko mpe ebakisaki monene mpenza na molimo toyokaki na liyangani moko na moko.

Natondi bino mpo na nsambo na bino na kombo na ngaimei mpe na kombo ya Bakambi Banene mpe Bakambi Masanga Makoki ya Eklezia. Tokomi makasi mpo na bango.

Tika mapamboli ya lola ezala elongo na bino. Tika bandako na eyokama elongo nabolingo mpe boboto mpe elongo na mollimo na Nkolo. Tika boleisa libela matatoli na bino na nsango malamu, ete ekozala nguba na bino na bitumba ya monguna.

Likita esili sika. Lokola tokozonga na bandako na biso, tika tozonga na solo na bozangi libaku. Tika molimo toyoki awa ezala mpe esimba elongo na biso lokola tokei na ntina ya biloko oyo wapi ezwaka biso mikolo nionso. Tika boboto kati na biso tolakisa na paluasi moko na mosusu,tika tosala libela mosala ya Nkolo.

Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, tika Nzambe apambola bino. Bilaka na ye ya kimia ezala elongo na bino sikawa mpe libela. Nalaki bino lisusu kino tokokutana lisusu na sanza motoba kobanda lelo. Na kombo ya mobokisi na biso, seko Yezu Klisto, amene.