2010–2019
Na Bankoko na Ngai
Sánzá ya Zómi 2013


Na Bankoko na Ngai

Ezali na mobeko moko ya likonzi oyo ekoki kosunga biso mpo na kotelemela mimekano mpe komema biso na katikati ya libota ya esengo.

Mobu oyo bankoko na biso mibale ya yambo bakobala. Na kati ya mwa mibu mingi lokola ya bandeko na bango 10 bakoki kokoma na esika na bomoi na bango wapi bakolanda kokota na mokili ya kitoko ya bokeli libota.

Litomba wana ya esengo esali ngai bosepeli ya bozindo wana ezali bango kosenga ngai toli.Na ntina batuni, “Maponi nini ekoki ngai kosala oyo ekokamba ngai na esengo?” Mpe na ngambo mosusu, “Maponi nini makoki kokamba ngai na bozangi esengo?”

Tata ya Lola asali moko na moko na biso ya kokesena. Mibale te kati na biso tozali na boyebi se moko. Mabota mibale moko te makokani. Yango wana ezali kokamwa te mpenza ete toli oyo etali lolenge nini kopona esengo na bomoi ya libota ezali mpasi mpo na kopesa. Nzoka nde Tata wa bolingo ya Lola atie nzela kaka yango epai ya esengo mpo na bana na Ye banso. Nyonso oyo ezali ndenge na biso to nyonso oyo ekozala baboyebi na bisoezali kaka na mwango ya esengo. Mwango yango esengeli elanda mitindo nyonso ya Nzambi.

Mpo na mingi na biso, kokwaka bankoko na ngai kokanisaka libala, ezali na motindo ya likolooyo ekosalisa biso tolemela mikakatano mpe kokamba biso na kati ya libota ya esengo. Ezali kosalelama na baninga nyonso kokanisaka makambo te. Ezongelami kati na makomi mpe mateya ya baprofeta ya mokolo na biso. Awa ezali na maloba ya Biblia ya toli ya Nkolo epai ya banso baye balingi kovanda elongo libela na bolingo ya esengo:

“Mpe moko na bango ye molobeli ya mibeko, atunakii mpo na komeka ye, ete,

“Molakisi, mobeko nini eleki monene kati na Mibeko nionso?

“Yesu alobi na ye ete, okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.

“Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso.

“Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.

“Mibeko nionso mpe masakoli makakemi na mibeko oyo.”1

Uta na maloba ya pete ezali mpasi te koloba na mokuse manso nayekolaki etali maponi nini ekabi na esengo kati na mabota. Nabandi na motuna, “Maponi nini ekambi ngai epai ya kolingaka Nkolo na motema mpe molimo na ngai mobimba mpe na makanisi na ngai mobimba?” Mpo na ngai esengelaki kopona komitia bisika wapi nayokaki esengo ya bolimbisi na nzela ya Bomikabi ya Nkolo.

Mibu mileki nabatisaki elenge mobali moko na Albuquerque, New Mexico, oyo wapi moninga na ngai ya misio mpe ngai toteyaka. Natiaki elenge mobali kati na mai mpe nabimisaki ye. Asengelaki kozala molai pene lokola ngai mpo azalaki koloba mbala moko na litoyi na ngai, ete, “Nazali peto, nazali peto.”

Namoni mpizoli wana kaka ya esengo na miso ya moto moto moko oyo alobaki maloba ya Apostolo moko ya Nzambe. Alobaka na ye, nsima ya lisolo ya mozindo mpe ya boboto, “Nalimbisi bino na nkombo ya Nkolo. Akopesa yo elikia ya bolimbisi na Ye na ntango na Yemei mpe na lolenge na Yemei” Mpe Ye asalaki yango.

Namoni mpo na nini Nkolo akoki koloba ete ntango masumu malimbisami Ye akoki komikundola yango lisusu te. Na nguya ya Bomikabi, bato nayebi malamu mpe nalingaka bakomaki sika, mpe bilembo ya lisumu ekausamaki. Motema na ngai etondisamaki na bolingo mpo na Mobikisi mpe Tata ya bolingo oyo atindaki Ye.

Lipamboli monene wana ekomi na nzela ya kolendisaka bato oyo nabatelaka bakende epai ya Mobikisi mpo na libondi uta na mpasi, libondi moko bobele Ye akoki kopesa. Yango wana nalendisi baye nalingaka kondima mpe basalela libiangi libiangi nyonso epesameli bango na Eklezia. Boponi wana ezali moko ya bafungola ya monene mpo na esengo ya libota.

Babofini na eteni nyonso ya bomoi ekoki komeka biso tobwaka to totala mpamba mabiangi ya kosalela Mobikisi. Wana ekoki kotia biso na likama ya molimo mpo na bisomei, molongani na biso, mabota na biso. Mwa mabiangi wana ekoki komonana ezanga ntina, kasina bomoi na ngai, mpe libota na ngai, ebongwamaki mpo na bolamu na kondimaka libiangi ya koteya lisanga likoki ya badiakona. Nayokaka bolingo ya badiakona wana mpo na Mobikisi mpe bolingo na Ye mpo na bango.

Namonaki yango kosalama na bomoyi ya mokambi ya kala ya likonzi mpe ya misio na libiangi na ye mpo na ye kopesa toli na lisanga likoki ya bateyi. Nayebi mosusu oyo azalaki episikopo mpe nsima Ntuku Sambo ya etuka monene oyo asalelamaki na Nkolo mpo na kosalisa elenge mobali kati na lisanga likoki oyo azokaki na likamba. Makamwisi uta na lisalisi wana esimbaki bomoyi ya ebele, elongo na ya ngai, mpe ebakisaki bolingo na bango mpo na Mobikisi.

Ntango tozali kosalisa basusu, tozali mpenza lokola kosenga botamboli na Molimo Mosantu Elonga na mosala ya Nkolo ntango nyonso ebotaka makamwisi koleka nguya na bisomei. Moboti oyo azali na mwana ya motomboki ayebi ete ezali ya solo, lokola esalaka mama moteyi motali oyo atalami na mama moko oyo azali koluka libondi ntango mobali na ye ayebisaki ye ete azalaki kotika ye. Basali nionso mibale bazali na botondi ete ntongo wana mpo Nkolo atindaki Molimo Mosantu lokola moninga.

Ezali kaka elongo na botamboli na Molimo Mosantu ete tokoki kolikya kozala bomoko na ndenge moko na libala ezanga matata. Namoni lolenge nini botamboli wana ezalaki ntina mpo na esengo kati na libala. Likamwisi ya kokomaka moko esengaka lisalisi ya lola, mpe ezwaka ntango. Ntina na biso ezali kovanda elongo libela na miso ya Tata ya Lola mpe Mobikisi na biso.

Tata na ngai mpe mama na ngai bazalaki ya kokesana moko na mosusu. Mama na ngai azalaki moyembi mpe moto ntoki. Tata na ngai alingaki chimie. Mokolo moko na milulu ya miziki, mama na ngai akamwaki ntango tata na ngai atelemaki mpe abandaki kotika esika liboso bobeti maboko ebanda. Mama na ngai atunaki ye wapi azalaki kokende. Eyano na ye ezalaki na kozangaka elindo ete : “Malamu esili, boye te?” Bobele nguya ya boboto ya Molimo Mosantu ezalaki komema ye kuna elongo na ye na esika ya liboso mpe kozongisaka ye kotuna ye mbala na mbala lisusu.

Mama na ngai avandaki na New Jersey mibu 16 mpo ete tata na ngai akoka kosunga libota na kosalaka boluki mpe kotangisaka chimie. Epai na ye ezalaki komibonza kokabwanaka na mama na ye mokufeli mobali mpe ndeko na ye abala te oyo abatelaka ye na ndako ya bilanga ya libota ya kala. Banso mibale bakufaki ntango Mama azalaki mosika na New Jersey. Wana ezalaki bobele ntango namona mama na ngai kolela.

Mibu nsima tata na ngai bapesamaki ye mosala na Utha. Atunaki mama na ngai, na bozangi elindo “Mildred, nini okanisi nasengeli kosala?”

Alobaki ete, “Henry, sala nionso okanisi ezali malamu.”

Aboyaki mosala yango. Ntongo elandi akomelaki ye mokanda oyo nalingaki kozala na yango kino sikawa. Nakundoli ete na alobelaki ye, kende na bilo mpe fungola yango kuna. Ebandaki na liloba ya kanda. Alakaki ye mibu liboso ete soki akokaki, akolinga kozala mpembeni ya libota na ye. Akamwisamaki na liloba na ye ya kanda. Amikundolaki mposa ya motema na ye te. Nokinoki atindaki nsango kondimaka mosala yango.

Alobaki ete, “Mildred, mpo na nini olobelaki ngai te?”

Alobaki ete, “Okanisamaki komikundola.”

Azalaki ntango nionso kolobela boponi wana ya kokende na Utah lokola ya ye moko, mokolo moko te lokola libonza ya boyebi malamu mosala na ye. Bayambaka likamwisi ya kokomaka moko. Elingaki kozala malamu koleka soki Tata akundolisamaka na Molimo Mosantu elaka asalaki mibu mileki. Kasi apesaki nzela na Molimo Mosantu mpo kokitisa motema na ye mpenza ete boponi na ye (mwasi) ekomaki ya ye.

Tata ya Lola azali na emoneli ebongi nie, ayebi moko na moko na biso, mpe ayebi lobi lokoya na biso. Ayebi na bampasi nini tokolekela. Atindaki Mwana na Ye komona mpasi mpenza ete Ye ayeba lolenge nini kosalisa biso na mimekano na biso nyonso.

Toyebi ete Tata ya Lola azali na bana ya molimo na mokili oyo baye ntango mosusu baponaka lisumu mpe bozangi esengo monene. Yango wana Ye atindaki Mombotama wa Yambo na Ye kozala Mosikoli na biso, Ekela monene mingi koleka ya bolingo na bokeli bonso. Yango wana tosengeli koluka ete kozwa lisalisi ya Nzambe mpe ntango mpo na kosebisa biso, mpo na bomoi ya seko, mpo na kozala na bomoi elongo na Tata na biso.

Bomoi kati na libota ekomeka biso. Wana ezali moko ya bantina ya Nzambe na kopesaka biso likabo ya kufa— mpo na kolendisa biso na kolekaka na nzela ya mimekano. Wana ekozala mingimingi solona bomoi ya libota wapi tokomona bosepeli monene mpe mawa monene mpe mikakatano oyo ekoki ntango mosusu komonana mosika ya nguya na biso mpo na kotelemela yango.

Mokambi George  Q. Cannon alobaki oyo na ntina ya lolenge nini Nzambe alengeli bino mpe ngai mpe bana na biso mpo na mimekano tozali kokutana na yango: “Ezali na moko na biso te kasi maye bolingo ya Nzambe esalelami likolo. Ezali na moko na biso te oyo Ye abateli mpe akarese. Ezali na moko na biso te oyo Ye ayemi banzela mpo na kobikisa. Ezali na moko na biso te oyo Ye apeseli te banzelu na Ye mokumba. Tokoki kozala na ntina te mpe kotalama mpamba na miso na bisomei, mpe na miso ya basusu, kasi solo etikalaka ete tozali bana ya Nzambe, mpe ete Ye apesi solo banzelu na Ye—bikelamu emonanaka te ya nguya mpe likoki—mokumba mpo na biso, mpe bakengelaka biso mpe bazwaka biso na bobateli na bango.”2

Maye Mokambi Cannon ateyaki ezali solo. Bokozala na mposa ya bondimisi wana, lokola nazalaki na mposa na yango mpe nayekamaki likolo na yango.

Nasambelaki na bondimi ete moto moko nalingaki akoluka mpe akoyoka nguya ya Bomikabi. Nasambelaki na bondimi ete banzelu wana ya bato bakoya kosunga bango, mpe bayaki.

Nzambe ayemi banzela mpo na kobikisa moko na moko ya bana na Ye. Mpo na mingi, wana esengi kotiamaka elonngo na ndeko mobali to ndeko mwasi to nkoko oyo alingaka bango likambo te nini bazali kosala.

Mibu mileki moninga na ngai moko alobabelaki nkoko na ye ya mwasi. Azalaki bomoi mobimba, ntango nionso ya botongono na Nkolo mpe na Eklezia na Ye. Nzoka nde moko ya bankoko na ye aponaki bomoi ya koboma. Na nsuka atindamaki na boloko. Moninga na ngai akundolaki ete nkoko na ye ya mwasi, wana ezalaki ye kokumba na nzela monene mpo na kokende kotala nkoko na ye ya mobali na boloko, abimaki mpizoli na miso na ye wana asambelaki na nsomo, “Nameki kozala na bomoi ya malamu. Mpo na nini, mpo na nini nazali na likama ya nkoko oyo azali lokola asili kobebisa bomoi na ye?”

Eyano eyaki na makanisi na ye na maloba oyo: “Napesaki ye epai na yo mpamba te nayebaki okokoka mpe okolinga ye likambo te nini asalaki.”

Ezali na liteya kitoko mingi mpo na biso banso. Nzela mpo na baboti mpe bankoko ya bolingo ekozala pete te na mokili ya kopola. Tokoki kotindika bana ya Nzambe bapona nzela epai ya esengo. Nzambe akoki kosala yango te mpo na bonsomi Ye apesi biso.

Tata ya Lola mpe Mwana wa Ye ya Bolingo balingi bana ya Nzambe banso likambo maye bapona kosala to nini bakokoma. Mobikisi afutaki ntalo ya masumu manso. Likambo te boniboni mabe. Ata kutu esengeli kozala na boyengebene, libaku mpo na mawa epesami etando oyo ekoyiba boyengebene te.

Alma alobaki elikya wana na mwana na ye ya mobali Korianton na maloba maye: “Yango wana engebene na boyengebene, mwango mwa bosikoli mokoki te komemama mpembeni, bobele likolo lya masengeli ma boyamboli ya bato to bozali boye ya momekano, iyo, bozali boye ya momekano; mpo longola se soko ezalaki mpo ya masengeli maye, ngolu ekokaki te kosala longola se soko ekobebisa mosala mwa boyengebene. Sikawa mosala mwa boyengebeni mokoki te kobebisama; soko boye, Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.”3

Etinda na ngai nde epai ya bankoko na ngai, mpe epai ya biso banso komekaka kobebisa mabota ya seko, ezali ete na bosepeli ebatelami mpo na bato ya botongono. Liboso mokili ezala, Tata wa bolingo na Lola mpe Mwana wa Ye ya Bolingo mpe basalaki elongo na bango bayebaki ete bakopengwa. Nzambe akolinga bango libela.

Bozali na litomba ya koyebaka ete bayekolaki mwango ya libota ya lobiko uta mateya bazwaki na mokili ya molimo. Bango mpe bino bazalaki botongono mingi mpo na kopesama nzela baya na mokili ntango basusu bazalaki te.

Na lisalisi ya Molimo Mosantu, bosolo nyonso ekomemama na bokundoli na biso. Tokoki kosengisa yango na basusu te, kasi tokoki kotika bango bamona yango na bomoi na biso. Tokoki koyika mpiko uta na elikya ete biso banso kala toyokaka kala bosepeli ya kozalaka elongo lokola moko ya libota ya bolingo ya Tata wa biso ya Lola. Na Lisalisi ya Nzambe tokoki banso koyoka elikya wana mpe bosepeli wana lisusu. Nasambeli wana ezala bongo mpo na biso banso na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matayi 22:35–40.

  2. George  Q. Cannon, “Our Pre-existence and Present Probation,” Contributor, Oct. 1890, 476.

  3. Alma 42:13.