2010–2019
Babateli mpate ya solo
Sánzá ya Zómi 2013


Babateli Mpate ya Solo

Mateya na libota epesaka biyano na nsambo mingi mpe epesaka biso nzela ya komona mbongwana oyo ekoki kosalema na bomoi ya batu.

Na mpokwa ya lelo na Ndako ya Makita na Salt Lake City mpe na bisika ya mosika mpe ya mpembeni esangisami baoyo bazali na bonganganzambe ya Nzambe. Solo bozali “bonganganzambe moko ya bokonzi”—atako “libota oyo eponama,” lokola esakolaki Apostolo Petelo alobaki.1 Napesami lokumu na kozala na libaku ya kolobela bino.

Ntango nazalaki kokola, eleko nionso ya moi libota na biso elingaki kokumba na Provo Canyon, pene ya (72  km) na sudi mpe mwa esiti ya Salt Lake City, wapi tozalaki kovanda na masuwa ya libota baposo ebele. Biso bana mibali tozalaki ntango nyonso motema moto ya kokende koloba to kosokola na ebale ya bambisi to liziba, mpe tozalaki komeka kotindika papa akumba mwa nbangu koleka. Na mikolo wana, motuka tata na ngai azalaki kokumba ezalaki ya 1928 Oldsmobile. Soki atambwisaki likolo ya (56  km) na ngonga, mama na ngai azalaki koloba, “Kumba yango malembe! Kumba yango malembe!” Ngai nazalaki koloba, “Kumba mbangu, Papa! Kumba yango mbangu!”

Papa azalaki kokumba pene ya 56 km na ngonga nzela nyonso kino na Provo Canyon to kino tokoma mpembeni ya esika nzela etengama mpe mobembo na biso ekotelemisama na etonga ya meme. Tozalaki kotala wana bankama ya meme na molongo ezalaki koleka biso, lokola neti na mobateli mpate te, mwa bambwa kongangaka na makolo na bango ntango bazalaki kotambola.10 Mosika na nsima tokokaki komona mobateli mpate likolo ya mpunda—nsinga moko te na monoko na ye kasi etelemiseli. Azalaki mbala mosusu ya kovanda na evandelo konimbaka, lokola mpunda eyebaki nzela nini kokende mpe bambwa oyo ezalaki konganga ezalaki kosala mosala.

Kokesenisa yango na makambo oyo namonaki na Munich, Allemangne, mibu mingi kala. Ezalaki ntongo moko ya eyenga, mpe tozalaki kokende na likita ya misio. Ntango natalaki libanda ya fenetele ya motuka ya mokambi ya misio, namonaki mobateli mpate na eloko moko na loboko na ye, kokambakabameme. Ezalaki kolanda ye bisika nyonso azalaki kokende. Soki akei na loboko ya mwasi, bazalaki kolanda ye na loboko ya mwasi. Soki akei na loboko ya mobali, bazalaki kolanda ye na epai wana. Nasalaki bomekisi katikati ya mobateli mpate ya solo oyo akambaki meme na ye mpe mobateli mpate oyo akumbaki mpunda bongobongo na nsima ya meme na ye.

Yesu alobaki, “Ngai nazali mobateli malamu ya bampate, nayebi bampate na ngai.” 2 Apesi biso ndakisa ebongi nie ya oyo mobateli bameme ya solo asengeli kozala.

Bandeko, lokola bonganganzambe ya Nzambe tozali na mokumba ya bobateli mpate. Bwania ya Nkolo epesi banzela ya kolanda na wapi tokoki kozala babateli mpate epai ya mabota ya Eklezia, wapi tokoki kosalisa, tokoki koteya, mpe tokoki kotatola epai na bango. Boye ebengami boteyi na libota, mpe ezali na ntina na yango nalingi kolobela bino na mpokwa ya lelo.

Episikopo ya palwasi moko na moko na Eklezia alandela mokumba na basimbi bonganganzambe lokola bateyi na libota mpo na kokende kotala mabota ya bandimi sanza nyonso. Bakendaka na mibalemibale. Bisika ekoki kosalama, elenge mobali oyo azali nganganzambe to moteyi na Bonganganzambe ya Alona azali kokende elongo na nkulutu oyo azali na Bonganganzambe ya Melkisedeke. Ntango bakei na mabota ya baye mpo na bango bazali na mokumba, mosimbi Bonganganzambe ya Alona asengeli kosala elongo na mateya oyo ezali kopesama. Mokumba ya boye ekosalisa kolengela bilenge mibali oyo mpo na bamisio, lokolaMokumba ya boye ekosalisa kolengela bilenge mibali oyo mpo na bamisio, lokola mpe mpo ntango ya bomoi moko ya mosala ya bonganganzambe.

Pologalami ya boteyi na libota ezali eyano ewuti na bobimisi ya ntango ya sika, kopesaka likoki na baye bakulisami na bonganganzambe “bateya, balimbola, kolendisa, kobatisa, … mpe kokende kotala ndako ya mondimi moko na moko, mpe kolendisa bango basambela na mongongo makasi mpe na sekele mpe bazala na mikumba nyonso ya libota, … bakengela eklezia ntango nyonso, mpe kozala elongo mpe kolendisa bango; mpe kotala ete ezali na lisumu moko te kati na eklezia, to nkanda te moko na basusu, lokuta te, songisongi te, to maloba mabe te.”3

Mokambi David  O. McKay apamelaki: “Boteyi na libota ezali moko ya mabaku ya liboso mpenza mpe ya litomba mingi mpo na koleisa mpe kofula, kopesa toli mpe kokamba bana ya Tata na biso. …[Ezali] mosala ya bonzambe, libiangi ya bonzambe. Ezali mokumba na biso lokola bateyi na ndako komema … molimo kati na libota mpe motema nyonso. Mpo na kolinga mosala mpe kosala nyonso tokoki ekomema kimia, esengo, mpe bosepeli ezanga nsuka na [ya lokumu,] moteyi [molakisi] ya bana ya Nzambe.”4

Uta na Buku ya Mormon totangi ete Alma “abulisaki banganganzambe na bango banso mpe balakisi na bango banso; mpe moto moko te abulisamaki longola se soki bazalaki bato bayengebene.

“Yango wana basenzeleki likolo ya bato na bango, mpe baleisaki bango na makambo masengeli mpo na bosembo.”5

Na kosalaka mikumba na biso ya libota, tozali na bwania soki toyekoli mpe tososoli mikakatano ya libota moko na moko, ete tokoki kozala makasi na koteya mpe kopesa lisusu lisalisi esengeli.

Boteyi na libota ezali lisusu mingi lokola kozala na elonga soki elako esalami yambo. Mpo na kolakisa esika oyo, tika nakabola elongo na bino boyebi nazwaki mwa mibu eleki. Na ntango wana Lisanga ya Mosala ya Bamisionele ezalaki na Spencer W. Kimball, Gordon B. Hinckley, mpe Thomas S. Monson. Mpokwa moko Bandeko mobali mpe mwasi Hinckley bayambaki bato ya lisanga mpe basi na biso na libota na bango mpo na elambo ya monene. Toutaki kosilisa molia moko ya kitoko ntango toyokaki kokoko moko na ekuke. Mokambi Hinckley afungolaki ekuke mpe amonaki moko ya bateyi na ye na ndako kotelemaka kuna. Moteyi na libota alobaki, “Nayebi ete nalakaki te mpo na koya, mpe nazali elongo na moninga na ngai te, kasi nayoki ete nasengeli koya na mpokwa ya lelo. Nayebaki te ete olingaki kozala na bapaya.”

Mokambi Hinckley abengisaki na boboto moteyi na libota akota mpe avanda mpe ateya Bapostolo misatu mpe basi na biso oyo etali mokumba na biso lokola bandimi. Na mwa bobangi moteyi na libota asalaki nyonso oyo akokaki. Mokambi Hinckley atondaki ye mpo na boyei na ye, nsima na yango abimaki mbangu.

Nakolobela ndakisa moko lisusu ya lolenge ebongi te ya kokokisa boteyi na libota. Mokambi Marion  G. Romney, oyo azalaki mosungi na Bokambi ya Yambo mwa mibu eleki, azalaki kolobela na ntina ya moteyi na libota na ye oyo mokolo moko akendeki na libota ya Romney na butu moko ya eleko ya mpio makasi. Asimbaki ekoti na ye na loboko mpe na bozangi kimia alakisaki ezalela mabe ntago abengisamaki mpo na kovanda mpe kopesa etinga na ye. Wana etikalaki ye ya kotelema, alobaki, “Malamu, nakoloba na yo, Ndeko mobali Romney, ezali malili libanda, mpe natiki motele ya motuka na ngai ya kopela mpo ete ekata te. Nalekelaki kaka awa mpo ete nakoka koyebisa episikopo ete nasalaka babotali na ngai.”6

Mokambi Ezra Taft Benson, nsima ya koloba boyebi ya Mokambi Romney na likita moko ya basimbi bonganganzambe, nde alobaki, “Tokoki kosala malamu koleka wana, bandeko—malamu mingi koleka!”7 Na ndimi.

Boteyi na libota ezali mingi koleka bokeyi kotala ya mpamba mbala moko na sanza. Ya biso ezali mokumba ya koteya, kofula, kopesa mposa, mpe bisika wapi tozali kotala bayoyo balembi, mpo na komema bango na mosala, mpe na bonetolami ya nsuka bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

Mpo na kosunga na babokasi na biso, nakaboli toli ya bwania oyo oyo solo esalelami epai ya bateyi na libota. Euti na Abraham Lincoln, oyo alobaki, “Soki okolonga moto na likambo na yo, yambo ndimisa ye ete ozali moninga na ye ya bosembo.”8 Mokambi Ezra Taft Benson alendisaki:  “Likolo na nyonso, zala moninga ya solo epai ya bato mpe mabota oteyaka.  …  Moninga asalaka mingi koleka botali ya mokumba poso moko na moko. Moninga komitungisaka mingi na ntina ya kosalisaka bato koleka kozwaka lokumu. Moninga abatelaka, Moninga [alakisaka]bolingo. Moninga ayokaka. Moninga asalisaka.”9

Boteyi na Libota eyanolaka nsambo ebele mpe epesaka biso tomona bambongwana oyo ekoki kosalema na babomoi ya bato.

Ndakisa moko ya oyo ekozala Dick Hammer, oyo ayaki na Utah elongo na Civilian Conservation Corps na eleko ya Nkita mabe. Ntango azalaki awa, akutanaki mpe abalaki elenge mwasi moko Mosantu ya Mikolo mya Nsuka. Afungolaki Dick’s Café na St. George, Utah, oyo ekomaki esika moko ya bokutani eyebana.

Oyo apesamaki mokumba ya moteyi na libota na libota ya Hammer family elaki Willard Milne, moninga na ngai moko. Lokola nayebaki Dick Hammer mpe, koniata na masini meni mpo ekala na ye, nazalaki kotuna moninaga na ngai Ndeko mobali Milne ntango nazalaki kokende na St. George, “Moninga na biso Dick Hammer azali kokola ndenge nini?”

Eyano ezalaki mingimingi kozalae, “Azali kokola, kasi malembemalembe.”

Ntango Willard Milne mpe moninga na ye bazalaki kokende kotala libota ya Hammer sanza na sanza, bazalaki ntango nyonso koluka kotalisa etinda ya nsango malamu mpe kokabola litatoli na bango elongo na Dick mpe libota yango.

Mibu mileki, mpe nsima mokolo moko Willard atelefonaki ngai na nsango moko ya malamu. “Ndeko mobali Monson,” abandaki, “Dick Hammer abongwani mpe akobatisama. Azali kati na mobu na ye ya mbala 90, mpe tozali baninga bomoi na biso nyonso ya bankulutu. Mokano na ye epesi motema na ngai esengo. Nazali moteyi na ye na libota mibu mingi.” Ezalaki na esengo na mongongo ya wana Willard ntango azalaki koloba nsango ya esengo na ye.

Ndeko Hammer abatisamaki solo mpe mobu moko nsima akotaki na Tempelo wana ya kitoko ya St. George mpe kuna azwaki dotasio na ye mpe mapamboli ya bokangi.

Natunaki Willard, “Ekomaki yo mokolo moko te ya kolemba lokola moteyi na ye na libota mpo na ngonga molai boye?”

Ayanolaki, “Te, esengaki motuya ya bokasi nyonso. Lokola nzeneneke esengo oyo eyeli baye libota ya Hammer, motema na ngai etondi na matondi mpo na mapamboli nsango malamu ememi na bomoi na bango mpe mpo na libaku Nazwi kosalisa na lolenge moko boye. Nazali moto ya esengo.”

Bandeko, ekozala libaku na biso na mibu kokende kotala mpe koteya bato mingi bakeseni—baoyo bazali makasi mingi te lokola mpe baoyo bamipesi mobimba. Soki tokebi na libiangi na biso, tokozwa mabaku mingi ya kopambola babomoi. Bokei na biso kotala baoyo bamikomisi mosika uta na misala ya Eklezia ekoki kozala fungola oyo ekofungola na nsuka bikuke mpo na bozongi na bango.

Na likanisi oyo na moto, tika tosalisa baoyo mpo na bango tozali na mokumba mpe tomema bango na mesa ya Nkolo mpo na kosala lipati likolo ya liloba na Ye mpe kosepela boninga ya Molimo Mosantu, mpe kozala “lisusu bapaya te to mpe bawuta te, kasi bozali basitwaye elongo na basantu, mpe bato ya libota ya Nzambe.”10

Soki ata nani kati na bino asielumuki kati na bozangi keba na makambo ya babokei kotala mpe koteya na libota, ekoki ngai koloba ete ezali na ntango moko te lokola oyo mpo na komipesa mpo na kokokisaka mikumba na bino ya boteyi libota. Bokana sikawa mpo na kosala bokasi nyonso esengeli mpo na kosolisa baye mpo na bango bopesameli mokumba. Ezala na bangona ntango mwa bokasi ya kobakisa ekoki kosengelema, lokola mpe, kosalisa moninga na yo ya boteyi na libota azwa ntango ya kokende elongo na yo, kasi soki otingami, okolonga.

Bandeko, babokasi na biso na boteyi na libota ezali ya ntango nyonso. Mosala ekosukisama mokolo moko te kino Nkolo na biso mpe Moteyi alobi, “Ekoki.” Ezali na babomoi ya kongengisa. Ezali na mitema ya kosimba. Ezali na milimo ya kobikisa. Ya biso ezali litomba ya kongengisa, ya kosimba, mpe ya kobikisa milimo ya motuya wana epesami na bobateli na biso. Tosengeli kosala bongo na botongono mpenza mpe na mitema etonda na esengo.

Na kosukisa nazongeli ndakisa moko ya ndenge mpo na kolimbola lolenge ya bateyi na libota tosengeli kozala. Ezali na Moteyi moko oyo ya ye bomoi ezali likolo ya nyonso mosusu. Ateyaki na ntina ya bomoi mpe liwa, na ntina ya mokumba mpe atandele. Azalaki na bomoi mpo na kosalisama te kasi mpo na kosalisa, mpo na kozwa te kasi kopesa, mpo na kobikisa bomoi na Ye te kasi mpo na kobonza yango mpo na basusu. Alimbolaki bolingo moko kitoko koleka mposa, bobola moko ya bomengo koleka bomengo. Elobamaki na ntina ya Moteyi oyo ete Ye ateyaki na likoki mpe te lokola esalaki bato na mayele. 11 Mibeko na Ye ekomamaki te likolo ya libanga kasi likolo na mitema.

Nalobeli Nkolo Moteyi, Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, Mobikisi mpe Mosikoli ya bato. Lisolo ya biblia elobi na ntina na Ye, Ye “atambolaki bipai na bipai, kosalaka bolamu.” 12Elongo na Ye lokola mokambi na biso akweyaka te mpe ndakisa malamu, tokolonga mpo na lisalisi na Ye ya bonzambe na boteyi na bison a libota. Babomoi ekopambolama. Mitema ekobondisama, Milimo ekobikisama. Tokoma babateli mpate ya solo. Ete oyo ekozala bongo, Nasambeli o nkombo ya Yesu Klisto, amene.