Libula ya Elikia ya Motuya


Henry B. Eyring
Ntango boponi soki kosala liyokani na Nzambe to kotosa yango, boponi soki botika lisango moko ya elikia mpo na baoyo bakoki kolanda ndakisa na bino.

Bandeko mibali mpe basi balingami, misusu kati na bino babengamaki na likita oyo na bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Bamisionele wana basi babengisa bino mbala mosusu kosala boponi ya kosala liyokani na Nzambe na kozwaka libatisi.

Basusu kati na bino bazali koyoka mpo bondimaki libengisi ya moboti moko, ya molongani moko, to ntango mosusu mwana moko, esembolamaki na bino na elikia ete bokopona kotia na katikati ya bomoi na bino mayokani oyo bosi bosala na Nzambe. Basusu kati na bino oyo bazali koyoka esi basala boponi ya kozongela kolanda Mobikisi mpe bazali koyoka lelo esengo ya boyambi na Ye.

Bozala banani mpe bozala wapi, kati ya maboko na bino bozali na esengo ya monene ya bato mingi oyo bokoki kokanisa sikawa. Mikolo nyonso mpe ntango nyonso, bokoki kopona kosala liyokani na Nzambe mpe kotosa yango.

Bozala wapi bozali na nzela oyo epesi nzela ya kosangola likabo ya bomoi ya seko, bozali na libaku ya kolakisa bato mingi nzela ya esengo monene koleka. Ntango boponi soki kosala liyokani na Nzambe to kotosa yango, boponi soki botika lisango moko ya elikia mpo na baoyo bakoki kolanda ndakisa na bino.

Bino mpe ngai topambolami na elaka ya libula ya lolenge oyo. Napesi esengo na ngai mingi na moto oyo nakutana na ye naino te na bomoi ya nkufa. Azalaki mana etike oyo akomaki moko ya bankokololo na ngai. Atikelaki ngai libula ya elikia ezanga motuya. Tika nalobela bino banzela mosusu ye asalaki na kokelaka lisango wana mpo na ngai.

Nkombo na Ye ezalaki Heinrich Eyring. Abotamaki kati na bomengo ebele. Tata na Ye, Edward, azalaki na lopango monene na Coburg, na wapi ezali sika Allemagne. Mama na Ye azalaki Vicomtesse Charlotte Von Blomberg. Tata na Ye abandaki kobatela mabele ya mokonzi ya Prusse.

Heinrich azalaki mwana mobali ya liboso ya Charlotte mpe Edward. Charlotte akufaki na mibu 31, nsima ya mbotama ya mwana na ye ya misato. Edward akufaki nokinoki kuna, kobungisaka lopango mpe bozwi na ye na mosala oyo elongaki te. Azalaski bobele na mibu 40. Atikaki bana misato.

Heinrich, nkokololo na ngai, abungisaki baboti na ye nyonso mibale mpe libula monene ya mokili. Azalaki ata na likuta te. Alobaki na lisolo na ye ete elikia na ye ya malamu ezalaki ya kokende na Amerika. Atako azalaki na libota to moninga te kuna, azalaki na liyoki ya elikia na ntina ya kokende na Amerika. Akendaki yambo na Engumba ya New York. Nsima akendaki kofanda na St. Louis, Missouri.

Na St. Louis moko ya baninga na ye ya mosala azalaki Mosantu ya Mikolo ya Nsuka. Uta na ye azwaki buku ya moke moko ekomamaki na Mpaka Parley P. Pratt. Atangaki yango mpe na nsima ayekolaki maloba nyonso akokaki kozwa na ntina ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Asambelaki mpo na koyeba soki mpenza banzelu oyo bazalaki kobimela bato, soki ezalaki na profeta ya bomoi mpe soki amonaka eyamba ya solo mpe ebimisama.

Nsima ya basanza mibale ya boyekoli ya bozindo mpe mabondeli, Heinrich alotaki ndoto oyo wapi balobaki na ye asengeli kozwa libatisi. Mopto oyo ya ye nkombo mpe bonganganzambe nakotisi na makundoli ya bule, William Brown, aasengelaki kosala bokuli yango. Heinrich azwaki libatisi na liziba ya mayi ya mvula na sanza ya misato 11, 1855, na 7:30 ya ntongo.

Nandimi ete Heinrich Eyring ayebaki nsima ete oyo nazali koteya bino lelo ezali ya solo. Ayebaki ete esengo ya bomoi ya seko eyaka na nzela na basinga ya libota oyo ekokoba mpo na libela. Atako ntango ya bozwi na ye ya mwango ya esengo ya Nkolo ezalaki kala te, ayebaki ete elikia na ye mpo na kosepela libela ezali se na maponi ya bonsomi ya basusu mpo na kolanda ndakisa na ye. Elikia na ye ya esengo ya libela ezalaki se na bato oyo naino babotamaki te.

Lokola eteni ya libula ya elikia eye atikaki na libota na biso, atikaki lisolo na bakitani na ye.

Na lisolo wana nakoki koyoka bolingo oyo azalaki na yango mpo na baye bakolanda ye. Na maloba na ye nayoki elikia oyo bakitani na ye bakoki kopona kolanda ye na nzela ya bozongi na ndako na biso na lola. Ayebaki yango ekozala te moko ya boponi monene ya kosala mpenza kasi maponi mingi ya mike. Natangi uta na lisolo na ye:

“Uta mbala ya yambo oyo nayokaki Ndeko mobali Andrus koloba … nakendeke ntango nyonso na liyangani ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka mpe bandakisa ezali mingi mpenza te na bongo, ntango ngai [nasili] kozanga yango, mpo ete ezalaka mpe mokumba na ngai ya kosala yango.

“Nakomi yango na lisolo na ngai mpo ete bana na ngai bakoka komekola ndakisa na ngai mpe mokolo moke te bamona mpamba mokumba ya ntina… oyo [ya kosangana] na Basantu.”1

Heinrich ayebaki ete na mayangani ya elambo tokoki kozongisa sika bilaka na biso mpo na komikundolaka ntango nyonso Mosikoli mpe kozala na Molimo na Ye elongo na biso.

Ezalaki Molimo nde esungaki ye na misioepai wapi abiangemaki bobele mwa basanza nsima ya kondima liyokani ya libatisi. Atikaki lokola libula ndakisa na ye ya kozalaka botngono na misio na ye mpo na mibu motoba na oyo bazalaki kobenga Indian Territories. Mpo na kolongwa na ye na mosala na ye ya miso, atambolaki na makolo mpe akutanaki na wago ya engunduka kouta Oklahoma kino Salt Lake City, na ntaka ya pene na 1.770 km.

Kala te nsima abiangemaki na profeta ya Nzambe mpo na kokende na sudi ya Utah. Uta kuna ayanolaki na libiangi mosusu mpo na kokende na misio na Allemagne esika ya mbotama na ye. Nsima andimaki libengisi ya Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto mpo na kosalisa kotonga lisanga ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka na nordi ya Mexico. Kouta kuna abiangemaki mpo na kokende na Engumba ya Mexico lokola misionele ya ntango mobimba lisusu. Akumisaki mabiangi wana. Akundamaki na mwa lilita na Colonia Juárez, Chihuahua, Mexico.

Nalobeli makambo oyo te mpo na kosenga bonene mpo na ye to mpo na oyo asalaki to ya bakitani na ye. Nalobeli makambo wana mpo na kokumisa ye mpo na ndakisa ya bondimi mpe elikia oyo ezalaki na motema na ye.

Andimaki mabiangi wana mpo na bondimi na ye ete Klisto mosekwi mpe Tata na biso na Lola babimelaki Joseph Smith na nse ya banzete na etuka ya New York. Andimaki yango mpo ete azalaki na bondimi ete bafungola ya bonganganzambe na Eklezia ya Nkolo ezongisamaka elongo na nguya mpo na kokanga mabota mpo na libela, soki bobele bazalaki na bondimi ekoka mpo na kobatela mayokani na bango.

Lokola Heinrich Eyring, nkonko na ngai, bokoki kozala bato ya yambo na libota na bino mpo na kolakisa nzela mpo na bomoi ya seko na nzela ya mayokani ya bule bosali mpe kobateli na etingia mpe bondimi. Liyokani nyonso ememaka elongo na yango mikumba mpe bilaka. Mpo na biso nyonso, lokola ezalaki mpo na Heinrich, mikumba miye ezali ntango mosusu pete kasi mbala mingi mpasi. Kasi bomikundola, mikumba esengeli ntango mosusu kozala mpasi mpamba te ntina na yango ezali mpo kopusa biso na nzela a mpo ete tozala na bomoi ya seko elongo na Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, na mabota.

Bomikundola maloba uta na buku ya Abalayama:

“Mpe ezalaki na moko kati na bango oyo akokanaki na Nzambe, mpe alobaki na baoyo bazalaki na ye: Tokokita na nse, mpo ezali na esika kuna, mpe tokozwa bisaleli biye, mpe tokosala mabele moko na yango baye bakoki kovanda;

“Mpe tokomeka bango awa na yango, mpo na kotala soki bakosala makambo manso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.”

“Mpe boayo bakobomba lolenge na bango ya yambo bakobakisama likolo, mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya yambo te bakozwa nkembo na bokonzi na baoyo babombi lolenge na bango ya yambo te; mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya mibale bakobakisa nkembo likolo ya mito na bango seko na seko.”2

Kobomba lolenge na bino ya mibale eyekami na bosali na biso mayokani elongo na Nzambe mpe na bondimi kosalaka mikumba esengami na biso. Esengi bondimi na Yesu Klisto lokola Mobikisi mpo na kobomba mayokani mpo na ntango ya bomoi.

Mpamba te Adama mpe Ewa bakweyaki mpenza, tozali na masenginia, momekano, mpe liwa lokola libula na biso mokili mobimba. Yango wana, Tata na biso ya Lola ya bolingo apesi biso likabo ya Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, lokola Mobikisi na biso. Likabo monene wana mpe lipamboli ya Bomikabi ya Yesu Klisto ememi libula ya mokili mobimba: elaka ya Lisekwa mpe makoki ya bomoi ya seko mpo na banso oyo babotami.

Lipamboli eleki monene na mapamboli manso ya Nzambe, bomoi ya seko, ekoya epai na biso bobele lokola tosali mayokani epesami na Eklezia ya Yesu Klisto ya solo na basali na Ye bandimami. Na ntina ya bokweyi, banso tosengeli na mosala ya bopetoli ya libatisi mpe na botiami maboko mpo na kozwa likabo ya Molimo Mosantu. Makuli oyo esngeli kosalema na baye bazali na likoki elongobani ya bonganganzambe. Nsima, na lisalisi ya Pole ya Klisto mpe Molimo Mosantu, tokoki kobomba mayokani nyonso tosalaka na Nzambe, wana mpenza epesami na batempelo na Ye. Bobele na nzela wana, mpe na lisalisi wana, moto moko akoki kotuta tolo na libula na ye ya engebene na mobeko lokola mwana ya Nzambe na libota mpo na libela.

Mpo na basusu bazali koyoka ngai, wana ekoki komonana lokola ndoto ezanga elikia.

Bomonaki bondimi makasi ya baboti koyoka mawa likolo ya bana oyo baboyi to baponi kokata mayokani na bango na Nzambe. Kasi baboti wana bakoki kotia motema mpe elikia uta na boyebi ya baboti mosusu.

Alma mpe bana ya Mokonzi Moziya batikaki botomboki ya makasi mpo na mayokani mpe mitindo ya Nzambe. Alma Elenge amonaki mwana na ye ya mobali Corianton kotika masumu minene mpo na mosala ya bosembo. Buku ya Mormon mpe elobi lisusu likamwisi ya Balamanite kotikaka bizalela ya lokunia mpo na bosembo mpo na kosala liyokani ya kokufa mpo na kobatela kimia.

Anzelu atindamaki epai ya elenge Alma mpe bana mibali ya Moziya. Anzelu ayaki na ntina ya bondimi mpe ya nsambo ya batata na bango mpe bato ya Nzambe. Uta na bandakisa oyo ya nguya ya Bomikabi oyo ezali kosala na mitema ya bato, bokoki kozwa bokasi mpe bolendisi.

Nkolo apesi biso banso liziba ya elikia lokola tokobunda kosalisa baye tolingi bandima libula na bango ya seko. Apesi biso bilaka lokola tokobi komeka kosangisela Ye bato, atako ntango bazali koboya libiangi na Ye ya kosala bongo. Koboya na bango eyokisi Ye mawa, kasi Akoki kotika te, tokoki mpe te. Atie ndakisa ezanga mbeba mpo na biso na bolingo na ye ewumelaka: “Mpe lisusu, boniboni mingimingi ekoki ngai kosangisa bino lokola mama nsoso moko asangisi bana nsoso na ye na nse ya mapapu na ye, iyo, O bino bato ya ndako ya Yisalaele, baye bokweyi, iyo, O bino bato ya ndako ya Yisalaele lokola bino baye bokweyi; iyo, boniboni mbala mingi nalingaki kosangisa bino lokolo mama soso moko asangisi bana na ye na nse ya mapapu na ye kasi bolingaki te.”3

Tokoki kotia motema na mposa oyo ekokweya te ya Mobikisi mpo na komema bana nyonso ya ya molimo ya Tata na Lola kozonga na ndako na bango elongo na Ye. Moboti nyonso, nkoko, mpe nkokololo ya botongono akabola mposa wana. Tata na Lola mpe Mobikisi bazali bandakisa ebongi nie ya maye tokoki mpe tosengeli kosala. Bakosenga bosembo te na makasi mpo bosembo esengeli koponama. Bapesi biso nzela ya kososola bosembo mpe Balakisi biso ete bambuma nango ezali elengi makasi.

Moto nyonso abotami kati na mokili azwi Pole ya Klisto, oyo esungi biso kotala mpe koyoka nini ezali malamu to nini ezali mabe. Nzambe atindaki basali ya bokufi baye bakoki, na Molimo Mosantu, kosalisa biso koyeba nini Asengi biso kosala mpe nini Apekisi. Nzambe asalaka yango ya kobenda mpo na kopona bosembo na kotikaka biso koyoka mbano ya maponi na biso. Soki toponi bolamu, tokozwa esengo—na ntango. Soki toponi mabe, wana ekokoma mawa mpe mpasi—na ntango. Mbano wana ezali solo. Nzokande ezali mbala mingi kowumela mpo na ntina moko. Soki mapamboli ezalaki ya mbalakata, koponaka bolamu ekokaki kotonga bondimi te. Mpe lokola mawa ezali lisusu ntango mosusu kowumela mingi, esengaka bondimi mpo na koyoka bosenga ya koluka bolimbisi ya masumu liboso kasi nsima toyoki mbando na yango ya mawa mpe ya mpasi.

Tata Lehi azalaki na mawa likolo ya maponi esalamaki na bana na ye ya mibali mpe mabota na bango. Azalaki moto monene mpe malamu—profeta ya Nzambe. Atatolaki mbala mingi Mobikisi na biso, Yesu Klisto, epai na bango. Azalaki ndakisa ya botosi mpe mosala ntango Nkolo abiangaki ye kotika bozwi na ye nyonso ya mokili mpo na kobomba libota na ye uta na libebi. Na nsuka ya bomoi na ye, akobaki kotatola epai ya bana na ye. Lokola Mobikisi—mpe na kozanga kotala nguya na ye mpo na kososola mitema na bango mpe komona lobi na mawa mpe kitoko lokola—Lehi atikelaki na maboko na ye ya kotelema mpo na kobenda libota na ye epai ya lobiko.

Lelo bamilio ya bakitani ya Tata Lehi bazali kokolongisaka elikia na ye mpo na bango.

Nini ekoki yo mpe ngai kosala uta na ndakisa ya Lehi? Tokoki koyema uta na ndakisa na ye na koyekolaka makomi na losambo mpe na botali.

Napesi likanisi ete bozwa emoneli ya mokuse mpe ya molai nyonso mibale wana ezali bino komeka kopesa libula ya elikia na mabota na bino. Na ntango ya mokuse, ekozala na mobulu mpe Satana akoganga. Mpe ezali na biloko ya kozela na bompikiliki, na bondimi, koyebaka ete Nkolo asalaka na ntango na Yemei mpe na nzela na Yemei.

Ezali na makambo bokoki kosala nokinoki, ntango baoyo bolingaka bazali bilenge. Bomikundola ete losambo ya mokolo na mokolo na libota, boyekoli makomi na libota, mpe bokaboli litatoli na biso na liyangani ya elambo ezali pete mpe na ntina mingi ntango bana bazali bilenge. Bana ya bilenge bazali ntango mbala mingi na liyoki na Molimo koleka oyo tokoki komona.

Ntango bakokola, bakomikundola nzembo bayembaki elongo na bino. Atako mingi koleka ebengami miziki ya kala, bakomikundola maloba ya mokomi mpe litatoli. Molimo Mosantu akoki komema makambo nyonso na bomikundoli na bango, kasi maloba ya makomi mpe banzembo ekotikala ntango molai. Makundoli wana ekoki kosala bokasi oyo ekoka kozsongisa bango na ntango na bazali kotelegana, ntango mosusu na mibu ya nzela oyo ememi na ndako ya bomoi ya seko.

Tokosengela na emoneli ya molai ntango baoyo tolingaka bayoki bobendi ya mokili mpe mapata ya ntembe lokola mpo na konyata na bondimi na bango. Tozali na bondimi, elikia, mpe bolingani mpo na kokamba biso mpe kolendisa bango.

Namoni oyo lokola mopesi toli ya baprofeta mibale ya bomoi ya Nzambe. Bazali bato na bomoto se moko. Kasi bazali lokola kokabola elikia moko ya makasi. Ntango moto moko amatisi mbela na ntina ya likambo moko kati na Eklezia, bazali mingimingi koyanola “O, makambo ekobonga.” Mbala nzike bayebaka mingi na ntina ya likambo yango koleka bato kolobaka mbela.

Bayebi lisusu lolenge ya Nkolo, mpe solo bazali ntango nyonso na elikia na oyo etali Bokonzi na Ye. Bayebi Azali na moto na yango. Azali na nguya nyonso mpe Abatelaka. Soki otiki Ye kozala mokambi ya libota na yo, makambo nyonso ekobonga.

Bankoko misusu ya Eyring bazali lokola koyengayenga. Kasi mingi ya bankokololo bazali kokende na batempelo ya Nzambe na 6:00 na ntongo kosala makuli mpo na bankoko bamona naino te. Bazali kotambola libanda ya libula ya elikia atikaki. Atikaki libula oyo ezali kolandama na bakitani na ye mingi.

Nsima ya nyonso tokoki kosala na bondimi, Nkolo akolongisa elikia na biso mpo na mapamboli minene mpo na mabota na biso koleka ndenge tokoki kokanisa. Alingi bolamu mpo na bango mpe mpo na biso, lokola bana na Ye.

Tozali banso bana ya Nzambe ya bomoi. Yesu ya Nazaleti azali Mwana na Ye ya Bolingo mpe Mobikisi mosekwi. Oyo ezali Eklezia na Ye. Kati na yango nde esimbami bafungola ya bonganganzambe, mpe mabota ekoki kotika mpo na libela. Oyo ezali libula na biso ya elikia ya motuya. Natatoli ete ezali ya solo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. Tala Henry Eyring reminiscences, 1896, typescript, Church History Library, 16–21.

  2.  

    2. Abraham 3:24–26.

  3.  

    3. 3 Nefi 10:5.