Bozala Makasi mpe Boyika Mpiko


Tika—bino nyonso—tozala na mpiko mpo na kotelemela oyo banso bandimaka, mpiko mpo na kotelema mpo na mabongisi.

Bandeko Balingami Mibali, ezali malamu ya kozala elongo na bino mbala moko lisusu lelo. Nasambeli kozwa lisalisi ya lola mpo na libaku oyo ya koloba na bino.

Libanda ya Ndako ya Makita oyo ebakisami bankoto basangani na bandako ya Nzambe mpe na bisika mosusu mingi na mokili mobimba. Nsinga moko ekangi biso elongo, mpo tondimami komema bonganganzambe ya Nzambe.

Tozali awa na mabele na eleko moko ya kitoko koleka ya lisitwale na yango. Mabaku ya kobonga na biso ezangi ndelo, kasi tozali mpe nzokande kokutana lisusu na ebele ya mikakatano, mosusu na yango se moko mpo na ntango na biso.

Tozali kati na mokili moko wapi bantina ya bomoto, na ndambu ya mingi, esili kobwakama mpenza mpembeni, wapi bato bazali kolakisa masumu polele, mpe wapi masenginia mpo na kopengwa uta na nzela ya nkaka ezali kozinga zinga biso. Tozali kokutana na bitinda makasi mpe na banguya ya mayele mabe kokitisaka na nse oyo ezali ya malamu mpe komekaka kokia na esika yango mayele mpe mimeseno ezanga ntina ya mokili ya bato.

Na ntina na yango mpe mikakatano mosusu, mikano oyo ekoki komema biso na nsuka ya bomoi na biso mizali ntango inso liboso na biso. Mpona biso kozwa mikano ya bosembo, mpiko esengelami—mpiko ya koloba “te” ntango tosengeli, mpe mpiko ya koloba “iyo” ntango yango elongobani, mpiko ya kosala likambo ya malamu mpamba te ezali malamu.

Mbala mingi lokola mposa na mokili lelo ezali kolimwisa nokinoki bantina mpe mabongisi Nkolo apesaki biso, tosengeli mbele na ntembe te kobiangama mpo na kobundela oyo tozali kondima. Tokozala na mpiko mpo na kosala yango?

Mokambi J. Reuben Clark Jr., oyo mpo na mibu mingi azalaki moko na Bokambi ya Yambo alobaki ete: “Makambo mayebani te ezali maye wapi [baye] bakanisi bazali na bondimi … bayokaki ete, zambi na koyebisa bondimbi na bango mobimba bakoki komema litio ya baninga na bango bazanga bondimi likolo na bangomei, basengeli kobongola to kolimbola bondimi na bango to konzulisa yango na ndenge ya kobebisa yango, to kutu kosundola yango. Bato ya boye ezali bakibisi.”1 Moko te na biso akoki kolinga kolata nkombo ya boye, kasi tobangaka te kosakola bondimi na biso na mabaku mosusu?

Tokoki komisalisa biso moko na mposa ya kosala malamu soki tomitii biso moko na bisika mpe tozali na milulu wapi makanisi na biso etindami na bolamu mpe wapi Molimo ya Nkolo ekozala malamu.

Namikundoli kotangaka mwa ntango eleki toli tata moko apesaki na mwana na ye ya mobali ntango akendeki na kelasi: “Soki omimoni mokolo moko wapi osengeli te kozala, bima!” Napesi na moko na moko na bino toli wana kaka: “Soki omimoni mokolo moko wapi osengeli kozala te, bima!”

Libiangi mpo na mpiko ekoya mbala mingi na moko na moko na biso. Mokolo nionso na bomoi na biso mpiko esengelami—kaka te mpo na makambo ya motuya, kasi mbala mingi koleka ntango tozwaka mikano to toyanolaka na bizalela nzinganzinga na biso. Robert Louis Stevenson mokomi ya ntoki mpe ya mikanda uta na Ecosse alobaki ete: “Mpiko ya mokolo na mokolo ezali na banzeneneke moke. Kasi ya bino ezali ya lokumu moke te mpamba te mbunda ebetami mpo na yo te mpe bibele bazali koganga nkombo na yo te.”2

Mpika ekoya na ndenge mingi. Charles Swindoll, moklisto mokomi akomaki ete: Mpiko esuki te na esika ya etumba … to na kielombe ya kokangaka moyibi na ndako na yo. Momekano ya solo mpo na mpiko ezali ya kimia mingi mpenza. Ezali momekano ya kati, lokola kotikalaka sembo ntango moto moko te azali kotalaka yo, …. Lokola kozalaka yo moko ntango basusu bazali kososola yo malamu te.”3 Nalingi kobakisa lisusu ete mpiko ya kati elakisi kosala makambo malamu atako tokoki kobanga, kobundelaka bondimi na biso na likama ya kotiolama, mpe kosimba bondimi wana ata ntango bakani biso ete tokobobungisa baninga to lokumu ya bato. Ye oyo atelemi ngwi mpo na oyo ezali malamu bakondima ye te ntango mosusu akoyebana na bato mingi te.

Ntango nasalaki na United States Navy na Deuxiéme Guerre Mondiale, nayekolaki nsango ya misala ya mpiko, esika ya motuya, bandakisa ya mpiko. Moko oyo nakobosana te ezalaki mpiko ya kimia ya soda moko ya masuwa ya mibu 18—ya eyamba na biso te—oyo azalaki na lolendo te mpo na kosambela. Kati na bato 250 ya kompani, azalaki se moko oyo butu nionso afukamaki mpembeni ya mbeto na ye, ntango mosusu na kati ya bosepeli ya konyokala basusu mpe maseki ya bazangi bondimi. Moto ya kogumbama, asambelaka Nzambe. Alembaki te. Atikaki te. Azalaki na mpiko.

Nayokaki kala te ndakisa ya moto moko oyo na ntembe te amonanaki azangaki mpiko oyo ya kati. Moninga na ye alobelaki liyangani moko ya elambo ya molimo mpe ya kobakisa bondimi ye mpe mobali na ye bakendaka na palwasi na bango. Elenge mobali moko oyo azalaki na mosala ya nganganzambe na Bonganganzambe ya Alona atutaki mitema ya lingomba mobimba ntango alobelaki bosolo ya nsango malamu mpe bisengo ya kobatela mitindo. Apesaki litatoli moko ya makasi mpe ya kolelisa ntango atelemaki na elobelo, komonanaka ya kosukwama mpe peto na simisi na ye ya mpembe mpe kalavati.

Nsima mokolo wana kaka, ntango mwasi oyo mpe mobali na ye bakendeki na motuka na penepene na bango, bamonaki elenge mobali wana kaka oyo afulisaki bango kaka mwa ngonga elekaki. Sikawa, nzokande, alakisaki elongi ya bokeseni mpenza ntango azalaki kotambola na nzela na bilamba ya mabe—mpe komelaka likaya. Moninga na ngai mpe mobali na ye bazalaki kaka na bososoi mpe na mawa te, kasi lisusu bazalaki na mobulu mpo na boniboni akokaki kozala lokola moto moko na liyangani ya elambo mpe nsima nokinoki mpenza lokola kozala moto mosusu mpenza.

Bandeko mobali, ezali bino moto wana kaka epai wapi ozali mpe eloko nini ozali kosala—moto oyo Tata na biso alingaki yo ozala mpe osengeli kozala?

Na bosololi moko ebimisamaki na nkasa mboka, bobeti basket ya NCAA ya Amerika eyebani malamu Jabari Parker, mondimi ya Eklezia, batunaki ye akabola toli eleki malamu azwaka na Tata na Ye. Ezongisaki Jabari, “[Tata na ngai] alobaki, zala moto se moko wana kaka na molili mpe na pole.”4 Toli ya motuya, bandeko babali, mpo na biso banso.

Makomi etondi na bandakisa ya lolenge ya mpiko na moko na moko na biso lelo. Profeta Danyele alakisaki mpiko eluti na kotelemaka ngwi mpona oyo ye ayebaki ezalaki malamu mpe na kolakisaka mpiko mpona kosambela, atako akanamaki liwa na kosalaka yango.5

Mpiko emonanaki na bomoi ya Abinadi, ntango elakisamaki na bolingi na ye mpona kobonza bomoi na ye esika ya kowangana bosolo.6

Nani akokaki kosunga kasi kozala kofulama na bomoi ya bilenge mibali 2.000 ya Elamani, oyo bateymaaki mpe balakisanaki mposa ya mpiko mpo na kolanda mateya ya baboti, mpo na kozala na bongondo mpe peto ?7

Ntango mosusu moko na moko ya nsango ya makomi maye ezwi motole na ndakisa ya Moroni, oyo azalaki na mpiko mpona kosala molende na bosembo kino na nsuka mpenza.8

Na bomoi na ye, Profeta Joseph Smith apesaki bandakisa ya kotanga te ya mpiko. Moko na yango ya kafukafu eyaki ntango ye mpe bandeko basusu bakangamaki na miniololo elongo—kanisa bakangamaki na miniololo elongo—mpe bakangamaki na mwa ndako moko esila te penepene ya ndako ya bosambisi na Richmond, Missouri. Parley P. Pratt, oyo azalaki o ntei ya baye bakangamaki na boloko, bakomaki na butu moko wana: “Tolalaki lokola soki na mpongi tii na ngonga ya midi ya butu elekaki, mpe matoi na biso mpe mitema na biso ezwaki mpasi, ntango toyokaka bangonga na maseki ya molili, bandayi ya nkanda, bonsomo ya nsomo mpe bamangala ya bosoto ya bakengeli.”

Ekobaki Mpaka Pratt:

“Nalandaki kino nazalaki na mposa ya kosanza mpenza, nayokaki mobulu, nsomo, mpe natondaki na molimo ya boyengebene ya koyoka mabe ete nakokaki te penepene na kokanga kotelema na makolo na ngai mpe kopamela bakengeli; kasi nalobaki likambo moko te na Joseph, to na moto mosusu, atako nalalaki penepene na ye mpe nayebaki ezalaki ya kolamuka. Na mbala moko atelemaki na makolo ye, mpe alobaki na mongongo ya nkake, to ya bongangi ya nkosi, kolobaka, lokola nakoki komikundola, maloba oyo:

“‘KIMIA. … Na nkombo ya Yesu Klisto napamboli yo, mpe natindi bino bozala kimia; nakowumela te miniti mosusu mpe koyoka bamangala ya boye. Botika maloba ya boye, to bino to ngai tokokufa NA NGONGA OYO.’”

Joseph “atelemaki ngwi na bonkumu ya nsomo,” lokola elimbolamaki na Mpaka Pratt. Akangamaki na miniololo, na mondoki te, mpe kasi azalaki kimia mpe na lokumu. Atalaki na nse bakengeli na kolenga oyo bazongaki nsima na nsonga ya ndako to kongulumaka na makolo na ye. Na bato bana oyo bamonanaki lokola ya kosembola te babondelaki bolimbisi na ye mpe batikalaki na kimia.9

Misala nionso te ya mpiko ekomema mbano ya kafukafu to ya mbala moko, mpe kasi yango nionso ekomema kimia na mayele mpe boyebi boko ete bolamu mpe bosolo ebatelami.

Ekoki kosalema te kotelema ngwi ntango moto moko azali kolona misisa na ye na zelo ya makanisi mpe bondimami ya bato mingi. Esengelami ezali mpiko ya Danyele moko, Abinadi moko, Moroni moko, to Joseph Smith moko mpo na biso kosimba makasi mpe sikisiki na oyo toyebi ezali ya malamu. Bazalaki na mpiko mpo na kosala te oyo ezalaki pete kasi oyo ezalaki malamu.

Banso tokokutana na bobangi, tokozwa litio, mpe tokokutana na bokeseni. Tika biso tozala—bino nyonso—na mpiko mpo na kobunda mpo na boyokani, mpiko mpo na kobunda mpo na mabongisi malamu. Mpiko, kasi kobebisa te, ememaka mwa koseka ete Nzambe andimi. Mpiko ekokoma bolamu ya bomoi mpe ekobenda bokebi ya basusu ntango etalami kaka te lokola bolingi mpo na kokufa lokola mobali kasi lisusu lokola mokano mpo na kotambwisa bomoi malamu. Lokola tozali kokende liboso, kobundaka mpo na kozala lokola tosengeli, tokozwa na ntembe te lisalisi ya Nkolo mpe tokoki kozwa bolendisi na maloba na ye. Nalingaka elaka na Ye ekomama na buku ya Yosua:

“Nakosungola yo te, to nakotika yo te. …

“… Zala makasi mpe na mpiko ya malamu; kobanga te, mpe kopalangana te: mpo Nkolo Nzambe na yo azali elongo na yo bipai binso okokende.”10

Bandeko mibali balingami, na mpiko ya bondimi na biso, tokoki kosakola, elongo na Apostolo Paulo, “Nazali na nsoni te ya nsango malamu ya Klisto.”11 Mpe nsima, na mpiko wana kaka, tokoki kolanda toli ya Paulo: “Zala ndakisa mpo na bandimi, na liloba, na bolingo, na bondimi, na bopeto.”12

Bitumba ya nsomo eyei mpe ekei, kasi etumba ezali mpo na milimo ya bato ezali kokoba na kolemba te. Lokola libianga kelelo eyei na liloba ya Nkolo epai na yo, na ngai, mpe bamemi bonganganzambe bisika binso: “Yango wana, sikawa tika moto nionso ayekola mokumba na ye, mpe asala na mosala aponami, na etingia.”13 Nde tokozala, lokola Apostolo Petelo asakolaki, kutu “bonganganzambe ya bokonzi,”14 esanganaki na ntina mpe elatisamaki na nguya uta na likolo.15

Tika ete moko na moko alongwa awa mpokwa ya lelo na mokano mpe mpiko ya koloba, elongo na Yobo ya kala, “Ntango mpema ezali na ngai, … nakolongola te bosembo na ngai.” 16Yango ekoki kozala bongo losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo na biso, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. J. Reuben Clark, Jr., The Charted Course of the Church in Education, rev. ed. (1994), 7.

  2.  

    2. Robert Louis Stevenson, in Hal Urban, Choices That Change Lives (2006), 122.

  3.  

    3. Charles Swindoll, in Urban, Choices That Change Lives, 122.

  4.  

    4. Jabari Parker, in “10 Questions,” Time, Mar. 17, 2014, 76.

  5.  

    5. See Daniele 6.

  6.  

    6. See Mosiya 11:20; 17:20.

  7.  

    7. See Alma 53:20–21; 56.

  8.  

    8. See Moloni 1–10.

  9.  

    9. See Autobiography of Parley P. Pratt, ed. Parley P. Pratt Jr. (1938), 210–11.

  10.  

    10. Yoshua 1:5, 9.

  11.  

    11. Baloma 1:16.

  12.  

    12. 1 Timote 4:12.

  13.  

    13. Doctrine et Alliances 107:99.

  14.  

    14. 1 Petelo 2:9.

  15.  

    15. See Doctrine et Alliances 105:11.

  16.  

    16. Yobo 27:3, 5.