Mikumba se moko na bomoi na biso moko na moko esalisaka biso toyekama na matomba, ngolu, mpe boboto ya Masiya Mosantu

Nazali na moninga ya motema oyo, na mibu ya ebandeli ya libala na ye, andimaki ete ye na libota basengelaki kozala na motuka ya makasi na zelo to potopoto. Mwasi na ye ayebaki malamu ete asengelaki na yango te kasi alingaki kaka motuka ya sika. Lisolo moko na koseka katikati ya mobali mpe mwasi oyo ebimisaki bolamu mpe bobe ya bosombi ya boye.

“Cherie, tosengeli kozala na motuka ya makasi na zelo to potopoto.”

Atunaki, “Mpo na nini okanisi tosengeli kozala na mutuka ya sika?”

Ayanolaki motuna na ye na oyo andimaki kozala eyano ya malamu. “Tokosala nini soki tozali na mposa ya miliki mpo na bana na biso kati na mvula makasi, mpe ete nzela ya kokoma na magazini ezalaki bobele na motuka?”

Mwasi na ye azongisaki na koseka ete, “Soki tosombi motuka ya sika, tokozala na mosolo mpo na milikili te—bongo mpo na nini komitungisa na oyo etali kokende na magazine na ntango ya likama!”

Na nsima ya ntango bakobaki kosala likita elongo mpe na nsuka bazwaki mokano ya kosomba motuka yango. Kala te nsima ya kozwa motuka ya sika, moninga na ngai alingaki kolakisa ntina ya motuka yango mpe kondima bantina na ye mpo na kolingaka kosomba yango. Yango wana akanaki akokata mpe kobenda liboke ya bakoni mpo na libota na bango. Ezalaki na eleko ya malili moke ya mobu, mpe mvula ya mpembe esilaka kokweya na bangomba bisika wapi akanaki kozwa nkoni. Wana ezalaki ye kokumba likolo ya ngomba, mvula ya mpembe ezalaki kokoma mokemoke mingi koleka se koleka. Moninga na ngai ayebaki ete motindo ya moselu ya nzela ezalaki kotalisa likama, kasi na bondimi makasi na motuka ya sika, akobaki kokende.

Na mawa, moninga na ngai akendeki mosika mpenza kati na nzela etonda na mvula ya mpembe. Wana ezalaki ye kotambwisa motuka libanda ya nzela na esika akanaka mpo na kokata nkoni, azindaki. Bapine nyonso minei ya motuka ya sika kobalukaka kati ya mvula ya mpembe. Nokinoki ayebaki lisusu ete abayebaki te nini kosala mpo na komibimisa uta na esika ya likama oyo. Amonaki nini kosala te mpe amitungisaki.

Moninga na ngai azwaki mokano ete, “Malamu, nakoki kofanda kaka awa te.” Akitaki na motuka mpe abandaki kokata banzete. Atondisaki nsima ya motuka meke na mokumba monene. Mpe nsima moninga na ngai akanaki ete akomeka kobimisa motuka na mvula ya mpembe mbala moko lisusu. Wana ekotisaki ye masini ya mbangu mpe apelisaki motuka, abandaki kopusana liboso. Moke moke motuka ebimaki na mvula ya mpembe mpe ezongaki na nzela. Na nsuka azalaki na nsomi ya kozonga ndako, mobali ya esengo mpe ya komikitisa.

Mokumba na Biso ya Moto na Moto

Nasambeli mpo na lisungi ya Molimo Mosantu wana ezali ngai kobeta nsete likolo ya mateya ya ntina maye makoki koyekolama uta na lisolo oyo etali moninga na ngai, motuka, mpe nkoni.Ezalaki mokumba. Ezalaki mokumba ya nkoni oyo epesaki traksio esengelaki mpo ete ye abima na mvula ya mpembe, azonga na nzela, mpe kokende liboso. Ezalaki mokumba nde epesaki ye likoki ya kozonga na libota na ye mpe na ndako na ye.

Moko na moko na biso lisusu amemeka mokumba moko. Mokumba na biso ya moto na moto ezali na babonsenga mpe mabaku, masengeli mpe matomba, bamawa mpe mapamboli, mpe banzela mpe bandelo. Mituna ya bokambi mibale ekoki kosalisa ntango tozali kotuya mokumba na biso bileko na bileko mpe na losambo: “Mokumba oyo nazali komema ezali kobota nguya ya molimo oyo ekopesa ngai likoki ya kokende liboso na bondimi kati na Klisto na nzela eke mpe ya nkaka mpe kokima kozinda? Mokumba nazali komema ezali kokela traksio ekoka ya molimo mpo nakoka na nsuka kozonga ndako epai ya Tata ya Lola?”

Ntango mosusu tokoki na libaku mabe kondima ete esengo ezali bozangi ya mokumba. Kasi komemaka mokumba ezali eteni esengeli mpe ya ntina ya mwango ya esengo. Lokola mokumba na biso ya moto na moto esengeli kobota traksio ya molimo, tosengeli kokeba tobenda te na bomoi na biso makambo mingi ya kitoko mpenza kasi ezanga ntina ete totia makanisi libanda mpe tokende mosika ya makambo oyo solo ya ntina mingi.

Nguya ya Kolendisa ya Bomikabi

Mobikisi alobaki:

“Boya liboso na ngai, bino nyoso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe na kopemisa bino.”

“Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; mpo ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.”

“Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te” (Matai 11:28–30).

Ekanganeli ezali putele nzete, esalelami malamu katikati ya bangombe ya mibali mibale to baniama mosusu oyo ezali kopesa bango likoki ta kobenda elongo mokumba. Ekanganeli etiaka baniama ngambongambo mpo ete bakoka kotambola elongo mpo na kosala mosala.

Botala libengisi ya Nkolo Se moko mpo na moto na moto “Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino.” Kosalaka mpe kobatelaka mayokani ya bule ekangaka biso epai mpe elongo na Nkolo Yesu Klisto. Mobikisi azali kobenga biso toyekama likolo mpe tosala elongo na Ye na ntina, ata soki makasi na biso ya malamu ekokani te mpe ekoki te komekolama na oyo ya Ye. Wana ezali biso kolikia na Ye mpe tozali kobenda mokumba na biso elongo na Ye na mobembo ya bokufi, solo ekanganeli na Ye ezali na motau, mpe mokumba na Ye ezali na bozito te.

Tozali te mpe mokolo moko te tosengeli kozala biso moko. Tokoki kokende liboso na bomoi na biso ya mokolo na mokolo elongo na lisalisi ya lola. Na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi tokoki kozwa likoki mpe bokasi “koleka oyo ya bisomei” (“Seigneur, je te suivrai,”Cantiques, no. 141). Lokola esakolaki Nkolo, “Boye, bokoba mibembo na bino mpe botika mitema na bino esepela; mpo botala, mpe mpamba te nazali elongo na bino kutu tii na nsuka” (tala D&A 100:12).

Botala ndakisa kati na Buku ya Molomoni kati na wapi Amuloni aniokolaki Alma mpe bato na ye. Mongongo ya Nkolo eyaki na balandi na ye na matungisi na bango: “Botombola mito na bino mpe bozala na mpiko, mpo nayebi boyokani oyo bosalaki epai na ngai; mpe nakosala boyokani elongo na bato na ngai mpe nakangola bango na bowumbu” (Moziya 24:13).

Botala ete mayokani mayekami na elaka ya bokangoli. Mayokani oyo eyambami mpe epesami lokumu na bosembo mpe mayokani oyo esalami na likoki ya bonganganzambe ya solo esengelami mpo na kozwa mabamboli nyonso oyo ekoki kozwama na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Mpamba te na nzela ya makuli ya bonganganzambe, nguya ya bonzambe ezali komonana na mibali mpe basi na mosuni, ndakisa mapamboli ya Bomikabi (tala D&A 84:20–21).

Bomikundola esakola ya Mobikisi “ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te” (Matai 11:30), wana ezali biso kotala molongo oyo elandi na lisolo ya Alma mpe bato na ye.

“Mpe nakokomisa lisusu pepele mikumba oyo etiami likolo ya mapeka na bino, ete kutu bokoka koyoka yango te likolo ya mikongo na bino” (Moziya 24:14).

Mingi na biso bakoki kokanisa ete likomi oyo ezali koyebisa biso ete mokumba ekolongolama na mbalakata mpe libela. Nzokande, molongo oyo elandi ezali kolimbola lolenge nini mokumba ekomisamaki pepele.

“Mpe sikawa esalaki ete mikumba oyo etiamaki likolo ya Alma mpe bandeko na ye ya mibali ekomisamaki pepele; Nkolo alendisaki bango mpenza ete bakokaki komema mikumba na bango na pete, mpe bamipesaki na esengo mpe bompikiliki epai ya bolingi nyonso ya Nkolo” (Moziya 24:15; nsete ebakisami).

Mikakatano mpe bakpokoso elongolamaki na mbala moko te uta na bato. Kasi Alma mpe balandi na ye balendisamaki, mpe bokasi na bango oyo ebakisamaki ekomisaki mikumba na bango pepele. Bato malamu oyo bapesamaki nguya na nzela ya Bomikabi mpo na kosala lokola basali (tala D&A 58:26–29) mpe kosalaelembo na makambo na bango. Mpe “na bokasi ya Nkolo” (Maloba ya Mormon 1:14;Moziya 9:17; Moziya 10:10; Alma 20:4), Alma mpe bato na ye bakambamaki na bisika ya kimia na mabele ya Zarahemla.

Bomikabi ya Yesu Klisto ezali bobele te mpenza kolonga mbando ya Bokwei ya Adama mpe kosala ete bopetolami ya masumu mpe boboki mibeko na biso ya moto na moto ekoka kosalama, kasi Bomikabi na Ye epesaka biso lisusu likoki ya kosala malamu mpe kokoma malamu koleka na banzela oyo etelemi ngwi mosika ya makoki na biso na bokufi. Mingi kati na biso toyebi ete ntango tozali kosala makambo na lolenge ya mabe mpe ete tozali na mposa ya lisalisi mpo na kolonga mbando ya masumu na bomoi na biso, Mokisi asalaki ete tokoka kosala yango mpo na kokoma mpetwa na nzela ya nguya ya bosikoli na Ye. Kasi ezali biso lisusu kososola ete Bomikabi ezali mpo na mibali mpe basi ya botongono oyo bazali botosi, ya kolongobana, na konsiensia mpe baye bazali kobunda kokoma malamu koleka mpe bazali kosala na botongono koleka? Nazali komituna soki tozali kozanga koyeba malamu ndenge ya kolendisa ya Bomikabi na bomoi na biso mpe na libaku mabe tozali kondima ete tosengeli komema mokumba na biso bisomei kaka—na nzela ya bomipesi, bolingi, mpe botosi mpe na makoki na biso oyo ezali solo na nsuka.

Ezali eloko moko tosengeli koyeba ete Yesu ayaki na mabele mpo na kokufampo na biso. Kasi tosengeli lisusu kotuya ete Nkolo azali na mposa, na nzela ya Bomikabi na Ye mpe ya nguya ya Molimo Mosantu, kotambwisa biso—bobele kokamba te kasi lisusu kolendisa mpe kobikisa biso.

Mobikisi Asalisaka Bato na Ye

Alma elimboli mpo na nini mpe lolenge nini Mobikisi akoki kopesa biso likoki:

“Mpe akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe matungisi mpe masenginia ya lolenge na lolenge; mpe eye ete liloba ekoka kokokisama likolo ya ye bolozi mpe bokono ya bato na ye.

Mpe akokamata likolo na ye liwa, ete akoka kokangola nkanga ya liwa oyo ezali kokanga bato na ye; mpe akokamata likolo na ye bokono na bango, ete nsopo na ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato na ye engebene na bokono na bango” (Alma 7:11–12).

Solo, Mobikisi aniokwami kaka mpo na masumu mpe mabungi na biso te—kasi lisusu mpo na bampasi na biso ya nzoto mpe monioko ya motema na biso, botau mpe mbeba na biso, babobangi mpe bozangi bozwi na biso, babosisoi mpe bolembi na biso, bamawa mpe motema koswa, bobwaki elikia mpe bozangi elikia na biso, babozangi bosembo mpe masumu oyo tozali kokutana na yango, mpe babolozi ya motema oyo etungisaka biso.

Ezali na mpasi ya nzoto moko te, mpota ya molimo moko te, mpe monioko ya motema ya molimo to moto mpasi moko te, bokono to botau moko te yo to ngai tosili kokutana na yango na bokufi oyo Mobikisi akutanaki na yango te yambo. Na ntango moko ya botau tokoki kolela, “Moko te ayebi soki ekokani na nini. Moko te asosoli yango.” Kasi Mwana na Nzambe ayebi mpe asosoli yango malamu, mpamba te Ye ayokaki mpe amemaki mikumba na biso liboso biso tomema. Mpe mpo na libonza na Ye ezanga nsuka mpe ya seko (tala Alma 34:14), azali na bomoko malamu mpe akoki kosembola na biso loboko na ya ngolu. Akoki kopesa lisalisi, kosimba, kosunga, kobikisa, mpe kolendisa biso mpo na kozala mingi oyo tokokaki kozaala mpe kosalisa biso kosala oyo wapi tokokaki kosala mokolo moko te koyekamaka bobele likolo ya nguya ya bisomei. Solo, ekanganeli na Ye ezali na motau, mpe mokumba na Ye ezali na bozito te.

Libengisi moko, Elaka moko, mpe Litatoli moko

Na bengisi bino boyekola, bosambela, bomaniola, mpe bobunda mpo na koyekola mingi etali Bomikabi ya Mobikisi wana ezali bino kotuya mokumba na bino ya moto na moto. Makambo mingi etali Bomikabi tokoki kososola na mindondo te na mayele na biso ya bokufi te. Kasi ndenge mingi ya Bomikabi tokoki mpe tosengeli kososola yango.

Mpo na moninga na ngai, mokumba ya nzete epesaki traksio ya kobikisa bomoi. Motuka ya polele ekokaki te kotambola kati ya mvula ya mpembe, ata kutu soki ezalaki ya makasi na zelo mpe potopoto. Mokumba ya bozito esengelaki mpo na kobota nguya.

Ezalaki mokumba. Ezalaki mokumba nde epesaki traksio oyo epesaki likoki na moninga na ngai abima na bokangami, azonga na nzela, akende liboso, mpe azonga na libota na ye.

Mikumba se moko na bomoi na biso moko na moko esalisaka biso toyekama na matomba, ngolu, mpe boboto ya Masiya Mosantu (tala 2 Nefi 2:8). Natatoli mpe nalaki ete Mobikisi akosalisa biso tomema mikumba na biso n a pete (tala Moziya 24:15). Lokola tokangani elongo na Ye na nzela ya mayokani ya bule mpe tozwi nguya ya likoki ya Bomikabi na Ye na bomoi na biso, Tokoluka koyeba mingi lolenge ya makanisi na ye. Tokosambela mpe lisusu mpona koluka bokasi mpo na koyekola, kobongwanisa, to kondima makambo na biso na esika ya kosambelaka Nzambe ntango nyonso mpo makambo na biso ebongolama kolandisamaka na mposa na biso. Tokokoma basali baye basalaka na esika ya biloko oyo basalelaka (tala 2 Nephi 2:14). Tokopambolama na traksio ya molimo.

Tika moko na moko na biso asala mpe akoma malamu koleka na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi. Lelo ezali mokolo ya 6 sanza ya minei. Toyembi na nzela ya bobimisi ete lelo ezali mokolo ya solo mpe elongobani ya mbotama ya Mobikisi. Mokolo ya 6 sanza ya minei ezali lisusu mokolo oyo wapi Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebongisamaki. (Tala D&A 20:1; Harold B. Lee, “Bolendisa Makonzi ya Siona,” Ensign, sanza ya nsambo 1973,2; Spencer W. Kimball, “Makebisi mpe Bobulisi ya Fayette, New York, Buildings,” Ensign, sanza ya mitano 1980, 54; Discours du Président Gordon B. Hinckley, Volume 1: 1995–1999 [2005], 409.) Na mokolo ya sabato oyo ya ndenge mpe ya bule, nasakoli litatoli na ngai ete Yesu Klisto azali Mosikoli na ngai. Azali na bomoi mpe akopetola, kobikisa, kokamba, kobatela, mpe kolendisa biso. Na ntina ya makambo oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.