2010–2019
Nsango ya Bilo ya Bososoli Mosolo ya Eklezia, 2014
Sánzá ya mínei 2014


Nsango ya Bilo ya Bososoli Mosolo ya Eklezia, 2014

Na Bokambi ya Yambo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

Bandeko balingami: Lokola etindami na bobimisi na eteni 120 ya Doctrine et Alliances, Lisanga na Mabongisi ma Moko na Zomi—esangisi Bokambi ya Yambo, Lisanga Likoki lya Bapostolo Zomi na Babale, mpe Bopisikopo Bokambi—epesi ndingisa ya Mosolo ya Eklezia. Biteni ya Eklezia esaleli mosolo engebene na miango, bwania, mpe botambolisi bondimama.

Bilo ya Bososoli Mosolo, oyo ekwi bato ba bwania ya mosolo bandimama mpe ezali na bonsomi na babilo misusu mya Eklezia, ezali na mokumba ya kosala bososoli mpo na ntina ya kopesa kimia ya mayele etali makabo mapesami, mbongo esalelami, mpe kobatela bozwi ya Eklezia.

Na bolandi bososoli bosalemi, Bilo ya Bososoli Mosolo ya Eklezia ezali na likanisi ete na botali makambo manso, mbongo ezwami, mbongo esalelami, mpe bozwi ya Eklezia mpo na mobu 2012 ekomamaki na makundoli mpe esalemaki engebene na miango ya mosolo, bwania, mpe mambi ma mosolo ya Eklezia. Eklezia elandi bizalela biteyami na bandimi na ye ya kozala na kati ya mwango ya mosolo, kokima niongo, mpe kozala na ekonzo mpo na ntango ya bozangi.

Epesami na limemia,

Bilo ya Bososoli Mosolo ya Eklezia,

Kevin R. Jergensen

Mayangeli Monene