Bana Basi kati na Liyokani


Nzela … tosengeli kolanda na mobembo na biso kozongaka na Tata na biso na Lola … esalemi na mayokani ya bule na Nzambe.

Toteyamaka na nguya ya molimo na butu. Nga nabondeli ete maloba elobamaki na basi bakambi minene ekota na kati ya mitema na bino lokola ndenge ezui ya ngai.

Oyo ezali liyangani monene. Basi nyonso ya mibu muambe mpe mikolo babengamaki kosanganana biso na mpokwa ya lelo oyo. Ebele kati na biso babondelaki ete Molimo Mosantu ekokaki kozala na biso. Lipamboli wana epesamaki nzela lokola toyokaki ba ndeko basi wana koloba mpe toyokaki loyembo ya kolembi. Ngai nabondeli ete Molimo ekoba kozala na biso lokola ngai napesaki maloba ya kolendisa motema mpe kobakisa litatoli kobakisa na oyo tosili koyoka—mpe natatoli ete maye malobami awa ezali oyo Nkolo asengelaki biso koyoka.

Ngai nakoloba na mpokwa oyo na oyo etali nzela—eye na nzela kitoko oyo emonisami lelo—ete tosengeli kozua mpona bozongi na biso epai ya Tata na biso ya Likolo. Nzela yango esalamani na mayokani ebulisami elongo na Nzambe. Ngai nakosolola na biso oyo etali esengo ya kosalaka mpe kobongaka mayokani oyo mpe kosungaka basusu kobomba yango.

Ebele kati na bino babatisamaki kala te mpe boyambaki likabo ya Molimo Mosantu na kotiamaka maboko. Na bino, likanisi wana ezali polele. Basusu babatisamaki kala, boye makanisi ya boyoki na bino na mayele ya liyokani ekoki kozala polele moke, kasi ebele ya mayoki wana ekozonga ntango bozali koyokaka mabondeli ya elambo.

Biso nyonso te nde tozali na makanisi ndenge moko ya mokolo ntango tosalaki oyo liyokani ebulisami ya libatisi mpe toyambaki likabo ya Molimo Mosantu. Kasi banso toyokaki kondimisama ya Nzambe. Mpe toyokaki mposa ya kolimbisa mpe ya kolimbisama mpe mokano ya kosala bolamu ebutaki.

Bozindo nini mayoki wana ekendaki na nse ya motema na bino elakisamaki na bolayi mingi na motindo bino bomibongisamaki na kolingaka bato. Ngai nalikyi ete basusu kati na bino baoyo boyaki na eklezia kala mingi te bopambolami na kovandaka mpembeni ya mama na yo. Soki bozali awa, bosengeli kopesa bango kosekisa ya kotondo kaka sikoyo. Ngai nakoki kokanisa liyoki ya esengo mpe ya botondi lokola navandaki na sima ya mama na ngai kokumba motuka na bozongi ndako uta na libatisi na ngai na Philadelphia, Pennsylvania.

Mama na ngai azalaki moko kaka oyo abongisaki ngai na bokebi nyonso na kosalaka liyokaki oyo mpe na oyo nyonso basusu nasengelaki kolanda. Azalaka na bondimi makasi na mokumba oyo kowuta na Nkolo:

“Mpe lisusu, mbala mingi lokola baboti bazali na bana na Siona, to na makonzi na ye oyo ebongisami, etet bateyi bango te kososola malongi ya byamboli, bondimi kati na Klisto Muana ya Nzambe ya Bomoyi, mpe ya libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu na kotiakamaka maboko likolo na bango, na mibu muambe, lisumu ekozala likolo ya mitu ya baboti.

“Boye ekozala wana mobeko mpona bavandi na Siona, to na makonzi misuse oyo ebongisami,

“Mpe bana na bango bakobatisama mpona bolimbisi ya masamu na bango ntango ya mibu muambe, mpe bayambi [Molimo Mosantu].”1

Mama na ngai asalaki ndambo na ye. Ye abongisaka bana na ye elongo na malomba mingi lokola oyo ya Alama, lokola ekomama na Buku ya Mormon.

“Mpe esalemaki ete alobaki epai na bango: tala, awa ezali mayi ya Mormon yango oyo (mpo boye yango ebobiangamaka), mpe sikawa, lokola bozali na mpsa ya kokota na kati ya etonga na Nzambe, mpe kobiangama baton a ye, mpe bozali kondima komema mikumba ya bino na bino, ete bikoka kozala pepele;

“Iyo, mpe bozali kondima kolela elongo na baoyo bazali kolela, iyo, mpe kobondisa baoyo batelemi na mposa ya libondisi, mpe kotelemaka lokola banzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso mpe na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso bokoki kozala, kutu kino liwa, ete bokoka kosikolama na Nzambe, mpe kotangama elongo na bango basekwi ya yambo, ete bokoka kozwa bomoi ya seko—

“Sikawa nakoloba na bino, soki oyo ezali mposa ya mitema na bino, nini ekopekisa bino bobatisama na nkombo ya nkolo, lokola litatoli liboso na ye ete bokoti na kati ya boyokani elongo na ye, ete bokosalela ye mpe bokobomba mitindo na ye, ete akoki kosopa libanda molimo na ye mingi koleka likolo na bino?

“Mpe sikawa, ekoyokaka bato maloba wana, babetaki maboko na bango mpona esengo, mpe bagangaki : Oyo ezali mposa ya mitema na biso.”2

Okoki kozala obetaki na yo maboko te ntango oyakaka mbala ya yambo libengisi ya kokota na liyokani na nzela ya libatisi, kasi boyokaki ya solo mpenza bolingo ya mobikisi mpe bomipesi monene komema basusu epai na Ye. Ngai nakoki koloba “na ntembe te” na ntina mayoki wana etiami na bozindo na mitema ya bana basi nyonso ya Tata na Biso ya Lola. Wana ezali ndambo ya libula na yo kowuta na Ye.

Bino boteyamaki na Ye yambo bino boya na kati ya bomoi oyo. Ye asungaki bino kososola mpe kondima ete bokosengela kozala na mikakatano, mimekano, mpe makoki eponama malamu kaka mpona na bino. Bino boteyamaki ete Tata na biso azalaki na libongisi ya esengo komema na kimia na nzela ya mikakatano wana mpe bino bosengeli kosunga komema basusu na kimia na nzela na bango. Libongisi wana esalamaki na nzela ya liyokani na Nzambe.

Ezali boponi ya nsomi na biso moko soki tosali mpe tobombi mayokani wana. Kaka moke ya bana na Ye ya basi bazali na makoki na bomoi oyo ya kotanga kutu mayokani wana. Ozali moko ya muke bapesameli litomba. Bino, balingami basi, moko moko kati na bino, azali muana ya liyokani.

Tata na Biso ya Lola ateyaki bino yambo bobotama na ntina ya makambo bino bokokaki kozua lokola botikaki Ye mpe boyaki na mabele. Bino boteyamaka ete nzela na bozongi epai na Ye ekokokaki kozala pete te. Ye ayebaki ete ekozalaka mpasi mingi mpo na bino kosala mobembo na kozanga lisungi.

Bino bopambolaka kaka te mpona koluka nzela ya kosala mayokani wana kati na bomoi kasi lisusu kozala ya kozingama na basusu baoyo bakosunga— oyo, lokola bino, bozali bana basi ya liyokani ya Tata ya Lola.

Bino nyonso boyokaki lipamboli ya kozalaka elongo na bana basi ya Nzambe baoyo bazali lisusu na nse ya liyokani kosunga mpe kotambuisa bino lokola balakaki kosala. Ngai namonaka oyo bino bomonaka lokola liyokani bandeko basi babombi bomipesi oyo ya kolendisa mpe kosunga—mpe kosala yango na koseka moke.

Ngai nakundoli koseka moke ya Ndeko muasi Ruby Haight. Ye azalaki muasi ya Mpaka David B. Haight, oyo ozalaki moko ya Lisanga Likoki ya Ba apostolo Zomi na mibale. Lokola elenge mobali asalaki lokola mokambi ya likonzi ya Palo Alto na California. Abondelaki mingi, mpe amitungisaki na bilenge basi ya kelasi ya eglantine na paluaze na ye.

Boye Mokambi Haight azuaki lifuli ya kotuna episikopo kobenga Ruby Haight koteya bilenge basi wana.. Ye ayebaki ye asengelaki na bozali na Nzambe oyo ekoki kotombola, kolendisa, mpe kolinga bilenge basi na kelasi wana.

Ndeko mwasi Haight azalaki mokolo ya mibu 30 koleka bilenge basi ateyaki. Lisusu mibu 40 sima ye ateyaki bango, ngonga wana asengelaki kokutana na muasi na ngai, oyo azalaka moko ya bilenge basi ya kelasi na ye, akoki kotombola loboko na ye, koseka muke mpe, “oh! Eglantine na ngai.” Namonaki mingi koleka koseka muke na ye. Ngai nayokaka bozindo ya bolingo na ye mpo na ndeko muasi asimbaki lokola soki azalaki muana na ye moko ya muasi. Koseka muke na ye mpe mbote ya esengo eyaka kouta na komonaka ete ndeko muasi mpe muana muasi ya Nzambe azalaki kaka na nzela ya liyokani ya ndako.

Tata ya Lola azali kosekisa lokola Ye amoni ete ozali kosunga muana na ye ya muasi na kotambola na nzela na Ye liyokani ya kokende na bomoi ya seko. Mpe Ye azalaka na esengo ntango nyonso bokomeka kopona ya malamu. Ye azali kotala kaka te oyo bino bozali kasi lisusus oyo bino bokokoma.

Bino bokoki kozalaka ba baboti ya mabele baoyo bakanisaki ete bino bokoki kozala malamu koleka bino bokanisaki bokoki kozala. Nazalaka na mama ya lolenge wana.

Nini ngai nayebaki ten tango nazalaki elenge ezalaki ete Tata na ngai ya Lola, Tatat na yo ya, Lola azali komona bokoki monene na bana na Ye koleka biso to kutu ba mama na biso ya nse bazali komona kati na biso. Mpe ntango nyonso bozali kokendaka liboso na nzela ya bokoki na bino, ezali komema esengo na Ye. Mpe bino bokoki koyoka kondimisama na Ye.

Ye azomona bokoki wana ya nkembo na bana na Ye nyonso ya basi, bisika nyonso bazali. Sikawa, yango etie mokumba monene likolo ya moko moko na bino. Ye azozela bino kozala na moto nyonso bokokutana na ye lokola muana ya Nzambe. Yango ezali ntina Ye apesi biso mitindo ya kolinga bazalani na biso lokola tomilingaka biso moko mpe kolimbisa bango. Bolamu mpe bolimbisi bozali koyoka eapai ya basusu eyaka lokola libula uta na ye lokola mwana na ye ya mwasi. Moto nyonso okokutana na ye azali muana na Ye ya molimo.

Lokola ozali koyoka ete bondeko ya basi monene , oyo tokanisaki ekaboli biso, kokueya. Ndakisa, bandeko basi bilenge mpe mikolo bazali kokabola mayoki na bango na elikia ya kososolama mpe kondimama. Bozali mingi ya kokokana lokola bana basi ya Nzambe koleka bokeseni na bino.

Na bomoni oyo, bilenge basi basengeli kotala liboso na bokoti na bango na kati ya Lingomba ya Bamama Basungi lokola libaku ya koyeyisa monene lisanga nabango ya bandeko basi oyo bango bakoya koyeba, kosepela, mpe kolinga.

Kaka likoki moko ya komona nini tokoki kozala ezali kokolisaka na mabota mpe Kelasi ya bana. Yango ekokomaka na likita ya mpokwa na libota mpe nab a pologami ya Kelasi ya bana. Bana ya mike bazalaka na lifuli ya koloba makambo ya minene mpe ya kitoko, lolenge basalaki ntango Mobikisi afongolali balolemo na bango wana Ye ateyaki bango sima na Ye kosekwa.3

Ntango Satana akoki kobundisaka bandeko basi na kibolenge, Nkolo azali kotombolaka bandeko basi likolo mpe likolo makasi na kimolimo. Ndakisa, bilenge basi bazali kotangisaka ba mama na bango ndenge nini kosalela FamilySearch koluka mpe kobomba nkombo ya bakoko. Ebele ya bilenge bandeko basi oyo nayebi bazali koponaka kokende ntongo makasi kosalaka libatisi ya kozwela na ba tempelo kopusaka mosika te Molimo ya Eliya.

Na mosala na katikati ya mokili, bandeko basi bazali kobengamaka kosala lokola batambwisi. Nkolo akelaki mposa na lisungi na bangonna kosimbaka mitema ya bandeko basi na motuya ebele kosala. Ebele koleka muke ya bakambi ya misio bamonaka bandeko basi kokoma na nguya koleka lokola bateyi mpe lokola bakambi baleyisi.

Soki bozali kosala lokola misionele ya ntango mobimba to te, bokoki kolonga makoki ndenge moko ya kofulukisa libala na bino mpe bokasi ya kobokola bana na bolamu na kolandaka bandakisa ya basi minene.

Tala Eve, mama ya bomoi nyonso, Mpaka Russell M. Nelson alobaki boye mpona Ewa: “Biso mpe molongo mobimba bopambolama libela mpo na bokasi monene mpe buanya ya Ewa. Na kokabolaka ya mbuma liboso, asalaki oyo esengalaki esalama. Adama azalaki na buanya ya kosala lolenge moko.”4

Muana ya muasi nyonso ya Ewa azali na bokoki ya komema lipamboli na libota na ye oyo Ewa amemaka na baoyo ya ye. Ye azalaki na motuya mingi na botieyi ya mabota oyo biso tozali balandi ya bosali na ye: “Mpe Banzambe balobaki: Tika tosala mosungi moko lokola mobali , mpo ete ezali malamu te mobali azala ye moko, ntala ntina tokosalela mosungi oyo akokani na ye.”5

Biso toyebi te lisungi nyonso Ewa azalaki mpona Adama mpe na libota na bango. Kasi toyebi moko ya likabo monene apesaka, oyo moko moko kati na biso akoki lisusu kpesa: asungaka libota na ye komona nzela ya ndako, ntango nzela ya libos emonanaki lokola mpasi. “Mpe Ewa, muasi na ye, ayokaki makambo nyonso wana mpe asepelaki, alobaka: Soki ezalaki mpona bobuki mibeko na biso te, tokokaki kozala na bakoko te, mpe tokokaki koyeba malamu na mabe te, mpe esengo ya bosikoli na biso mpe bomoi ya seko oyo Nzambe azali kopesa na baoyo nyonso batosi.”6

Bozali na ndakisa na ye ya kolanda.

Na nzela ya limonisi, Ewa ayebaki nzela ya ndako ya Nzambe. Ayebaki ete bomikabi ya Yesu Klisto ekopesaka bomoi ya seko nzela na mabota. Ye azalaki na ntembe te, lokola bino bokoki kozala, ndenge ye abombaka liyokani na Tata na ye ya Likolo, ete Mosikoli mpe Molimo Mosantu ekotala ye na libota na ye na nzela mawa mpe bosisoi ekoki kokoma. Ye ayebaki akoki kotiela motema na bango.

“Talela Nkolo na motema nay o mobimba; mpe ndima bososoli na yo moko te.

“Na nzela nyonso na yo, ndima ye mpe ye akotambolisa yo.”7

Nayebi ete Ewa akotanaki na mawa mpe bosisoi, kasi nayebi lisusu ete amonaka nzeala ya esengo na boyebi oyo ye na libota na ye bakokaki kozonga na bomoi elongo na Nzambe. Nayebi ete ebele kati na bino oyo bozali awa bozali kokutana na mawa mpe bosisoi. Natiki lipamboli na ngai ete, lokola Ewa, bino bokoki koyoka esengo kaka moko oyo ye ayokaki, lokola bozali kozonga na ndako.

Nazali na nzeneneke ya ntembe te ete Nzambe Tata azali kotala likolo na bino. Ye alingi moko moko na bino. Bozali bana na Ye ya basi kati na liyokani, Ye akpesa bino lisungi oyo bosengeli na yango kokende bino moko mpe basusu na nzela ya bozongi liboso na Ye.

Nayebi ete Mobikisi afutaki lifuti ya masumu mpe ete Molimo Mosantu etatoli na solo. Akoyokaka kolendisa na liyangani oyo. Nazali na litatoli ete bafongola nyonso ya bokangi ebulisami ya liyokani esi ezongisama. Yango esimbami ete esalelami lelo na profeta na biso ya bomoi, Mokambi Thomas S. Monson. Natiki maloba oyo ya kolendisa mpe natii elikya epai na bino, bana na Ye ya basi ya bolingo ya liyokani, na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amen

Lakisa Matangi

  1.  

    1. Doctrine & Alliances 68:25–27.

  2.  

    2 Moziya 18:8–11.

  3.  

    3. Tala 3 Nefi 26:14.

  4.  

    4. Russell M. Nelson, “Constancy amid Change,” Ensign, Sanza ya Zomi na moko. 1993, 34.

  5.  

    5. Abraham 5:14.

  6.  

    6. Moses 5:11.

  7.  

    7. Masese 3:5–6.