Lolenge tokolisi elikia monene mpe bondimi kati na Nkolo, tokoki kozwa nguya na Ye mpo na kopambola mpe kokangola biso.

Mayoki moke ezali malamu lokola mayoki ya boboto ya kokomaka moboti. Ezali na eloko moko te elengi koleka kozwaka mwana ya motuya, kowuta na likolo. Moko ya baleki na ngai ya mibali akutananaki na oyo na lolenge moko mpenza ya somo. Mwa mwana na ye ya mobali ya yambo abotamaki matiombe mpe azalaki na 1.3kg. Hunter alekisaki basanza na ye ya yambo ya bomoi na couveuse ya lopitalo. Basanza wana ezalaki ngonga ya boboto mpo na libota nionso wana ezalaki biso kolikia mpe kosenga Nkolo lisalisi na Ye.

Hunter moke azalaki na mposa ya lisungi mpenza. Azalaki kobunda kozwa makasi esengeli mpo na kozala na bomoyi. Loboko ya makasi ya tata na ye ya bolingo mbala mingi ezalaki kosimba loboko ya mua mwana na ye ya mobali mpo na kolendisa mwana na ye oyo akokaki kozoka..

Mpe boye nde ezali mpo na bana ya Nzambe nionso. Tata na biso na Lola asalisaka moko na moko na biso na bolingo oyo tososolaka te mpenza. Azali na nguya likolo ya biloko nionso mpe azali na mposa ya kosalisa biso toyekola, kokola, mpe tozonga epai na Ye. Oyo elimboli ntina ya Tata na biso, “kosala bozangi kufa mpe bomoyi ya seko ya moto.” 1

Ntango tokolisa elikia monene koleka mpe bondimi na Nkolo, tokoki kozwa nguya na Ye mpo na kopambola mpe kokangola biso.

Buku ya Mormon etongi mama likambo ya kitoko oyo ya nguya ya Nkolo mpo na kokangola biso kati na nkasa na yango nionso. Nefi abandaki yango na mokapo ya yambo mpenza ya buku. Na molongo 20, totangi ete, “Tala, ngai, Nefi, nakolakisa bino ete mawa ya boboto ya Nkolo ezali likolo ya baye banso aponaki, na ntina ya bondimi na bango, mpo na kopesa bango makasi, kutu ata nguya ya bokangolami.” 2

Mibu mingi eleki nayaki kososola polele mpenza babosolo elobami na molongo oyo. Nayaki koyeba kaka boni mpembeni Tata na biso na Lola azali mpe kaka boni Ye azali na mposa ya kosalisa biso.

Mpokwa moko wana butu ekomaki koyingela, bana na ngai mpe ngai tozalaki kokumba kokitaka mwa ngomba. Namonaki elenge mobali kolataka saki na mokongo mpe kotambolaka na nzela. Nsima ya koleka, Nazwaki liyoki ya sikisiki ete nasengelaki kozonga mpe kosalisa ye. Kasi ya komitungisa ekokaki kobangisa ye komona mopaya kotelema mpembeni na ye na butu, nakobaki kokumba. Liyoki yango ya makasi eyaki lisusu na maloba na makanisi na ngai: “Kende kosalisa elenge mobali wana!”

Nazongaki nsima epai na ye mpe natunaki, “Ozali na mposa ya lisalisi? Nazwaki liyoki ete nasengeli kosalisa yo.”

Abalukaki epai na biso mpe mayi ya miso kotiolaka na matama na ye alobaki ete, “Okolinga? Nazalaki kosambela ete moto moko akosalisa ngai.”

Losambo na ye mpo na lisalisi eyanolamaki na bofuli ewuti na likolo oyo eyelaki ngai.

Nsima ya mibu 25 mpe na nzela ya mawa moko ya boboto, nakutanaki lisusu mpo na mbala ya yambo na elenge mobali oyo kaka basanza nsima. Namonaki ete likambo wana ezali kaka lisolo na ngai te—ezali lisolo na ye mpe. Deric Nance azali sikoyo tata ya libota na ye moko. Ye mpe abosani mokolo moko te likambo oyo, mpe lokola ngai, asaleli yango na koteyaka bana na ye moko kotia elikia na Nkolo.

Deric apesaki ngai nsango mingi ya likambo na biso uta na emoneli na ye. Na mpokwa wana, Deric atikalaka na kelasi mpo na molulu mpe azwaki bisi ya nsuka te. Lokola elenge kati na mibu zomi, amiyokaki ya kolikia ete akokaki kozonnga ndako, yango wana abandaki kotambola.

Ngonga moko na ndambu elekaka ntango atambolaki nzela ezanga bato. Lisusu bakilometele uta na libota mpe bandako moko te na miso, abangaki makasi. Na kozanga elikia, atambolaki nsima ya mabanga ya mike, afukamaki, mpe asengaki Tata na Lola lisalisi. Kaka baminiti nsima Deric azongaki na nzela, natelemaki mpo na kopesa lisalisi oyo esengelamaki mingi.

Mibu oyo mingi nsima, Deric azali komikundola sikoyo ete: “Nkolo ayebaki ngai, elenge mobali moko akonda, alengelamaki te. Mpe atako makambo mosusu nini kolekaka na mokili, Ye ayebaki likambo na ngai mpe alingaki ngai ya kokoka mpo na kotinda lisalisi. Nkolo ayanoli nsambo na ngai mbala mingi uta mpembeni ya nzela etikama wana. Biyano na ye ezalaka ntango nionso lokola nokinoki mpe polele te, kasi boyebi na Ye na ntina na ngai esali kaka lokola solo lelo lokola ezalaki butu ezanga moto wana. Ntango nionso oyo bililingi ya molili ya bomoyi ezipi mokili na ngai, nayebi azali ntango nionso na mwango ya komona na ndako na kimia lisusu.”

Kaka lokola Deric alobaki, nsambo nionso eyanolamaka nokinoki mpenza te. Kasi solo Tata na biso ayebi biso mpe ayokaka mabondeli ya mitema na biso. Akokisaka makamwisi na Ye na losambo moko na ngonga moko.

Tokoki kolikia ete Ye akosalisa biso, ensengelaka te na lolenge tolingeli kasi na lolenge oyo ekosalisa biso tokola. Tosengeli koyekola kolikia ete lolenge na Ye ezali malamu koleka lolenge na biso. Kondimaka bolingi na Ye ekoki kozala mpasi, kasi ezali ntina mpo na kokoma lokola Ye mpe kozwa kimia oyo Ye apesaka biso.

Tokoki koya komiyoka, lokola C. S. Lewis alimbolaki: “Nasambelaka mpamba te nakoki komisasalisa te. Nasambelaka mpamba te nazangi lisalisi. Nasambelaka mpamba te nayokaka bosenga ntango nionso. … Ebongola Nzambe te, ebongola ngai.” 3

Ezali na masolo mingi na makomi ya baoyo batiaki elikia na bango na Nkolo mpe oyo basalisamaki mpe bakangolamaki na Ye. Bokanisa na elenge Dawidi, oyo abikaki na liwa mpenza na maboko ya Goliate na koyekemelaka na Nkolo. Bokanisa Nefi, oyo ya ye mabondeli na Nzambe ememaki kokangolama uta na basinga oyo esimbaki ye ya kokangama. Bomikundola elenge Joseph Smith, oyo na losambo alukaki lisalisa ya Nkolo. Akangolamaki na nguya ya molili mpe azwaki eyano moko ya likamwisi. Moko na moko akutanaki na mikakatano ya solosolo mpe ya mpasi. Moko na moko asalaki na bondimi mpe atiaki elikia na ye na Nkolo. Moko na moko azwaki lisalisi na Ye. Mpe kino na mokolo na biso, nguya mpe bolingo ya Nzambe ezali komonana na bomoyi ya bana na Ye.

Namoni yango kala te na bomoyi ya Basantu batonda bondimi na Zimbabwe mpe Botswana. Na likita ya bokili bilei mpe matatoli na Etape moke ya Chiwaridzo, Nakamwisamaki mpe nafulamaki na matatoli ya bana, bilenge, mpe bakolo lokola. Moko na moko bakabolaki malobaya nguya moko ya bondimi na Nkolo Yesu Klisto. Na mikakatano mpe makambo mpasi kozingaka bango, bazali na bomoyi mokolo na mokolo kotiaka elikia na bango na Nzambe. Matatoli monene bapesaki elakisaki elikia wana, mpe bazalaki mbala mingi kokotisa matondi na ntina ya loboko na Ye na bomoi na bango na liloba ete “Natondi mingi Nzambe.”

Mwa mibu mileki libota ya botongono epesaki ndakisa mpo na bandimi ya palwasi na biso elikia se moko wana na Nkolo. Arn mpe Venita Gatrell bazalaki na bomoyi ya esengo elongo na libota kitoko mpenza. Arn azalaki na mosala kitoko, kasi nsima, na mbalakaka, banaki ye na cancer ya makasi. Pronostiki ezalaki malamu te—azalaki kaka na baposo moke mpo na bomoi. Libota elingaki kozala elongo ngonga moko ya nsuka. Yango wana bana banso basanganaki, basusu kowuta na bisika ya mosika. Bazalaki bobele na bangonga ya motuya 48 mpo na kozala elongo. Bagatrells baponaki na boke nini oyo ezalaki ntina mingi mpo na bango—foto ya libota, elambo na libota, mpe liyangani na Tempelo ya Salt Lake. Venita alobaki ete, “Ntango tobimaki na bikuke ya tempelo, ezalaki ngonga ya nsuka tokozalaka lisusu elongo na bomoi oyo.”

Kasi batikalaki na elikia ete ezali na mingi mpo na bango koleka bomoyi oyo kaka. Mpo na mayokani ya tempelo ya bule, bakoki kozala elongo mpo na libela. Elikia efandi na mitema na bango ete bilaka ya Nzambe ezali ya solo.

Basanza mibali elandi etondisamaki na mapamboli ebele mpenza mpo na koloba. Bondimi mpe elikia ya Arn mpe Venita na Nzambe ezalaki kokola lokola elakisami na maloba ya Venita: “Namemamaki. Nayekolaki ete okoki koyoka kimia na mobulungano. Ntango nyonso nazalaki koyoka motema mpasi, nazalaki kokende na lisuku na ngai, nazalaki kofukama, mpe nazalaki kosambela. Nsima na wana nakokaki kokoba na bomoi na kimia. Nayebaki Nkolo azalaki kobatela biso. Nayekolaki ete soki ozali elikia na Nkolo, solo okoki kolonga mikakatano kani ya bomoyi.”

Moko ya bana na bango ya basi abakisaki ete, “Tozalaki kotala baboti na biso mpe tomonaki ndakisa na bango. Tomonaki bondimi na bango mpe lolenge bazalaki kosalela yango. Nalingaki mokolo moko te kosenga momekano oyo, kasi nakolinga kobwaka yango mokolo moko te. Tozingamaki na Molimo.”

Ya solo, Koleka ya Arn ezalaki eyano oyo Bagatrells balikiaka te. Kasi kpokoso na bango ezalaki kpokoso ya bondimi te. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali molongo ya botangi biloko ya kosala te; kasi, kasi ekoki kofanda na mitema na biso. Nsango malamu ezali bozito te; ezali mapapu. 4 Ekoki komema biso. Ememaki Bagatrells. Bayokaki kimia na katikati ya ekumbaki. Basimbaki makasi na moko na basusu mpe na mayokani ya tempelo oyo basalaki mpe babatelaki. Bakolaki na makoki na bango ya kolikia na Nkolo mpe balendisamaki na bondimi na bango na Yesu Klisto mpe na nguya ya bomikabi na Ye. Bazalaki na elikia na mapamboli elakelama ya Nzambe.

Bisika nionso tomimoni na nzela ya moyekoli, atako motema likolo na biso mpe mikakatano ekoki kozala nini, lokola Deric, Basantu ya Afrika, libota Bagatrell, mpe basusu mingi mpenza—na bondimi tokoki kopona koluka loboko ya Nzambe na bamposa na biso. Tokoki kotelemela mikakatano na biso na losambo mpe elikia na Nkolo. Mpe na nzela yango tocomi mingi lokola Ye.

Nkolo alobaki na moko na moko na biso ete, “Banga … te; … Nazali na yo: koyoka nsomo te; mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo; … Nakotombola yo na loboko na ngai na boyengebene.” 5

Nakaboli litatoli ya solo ete Nzambe Tata na biso azali na bomoyi mpe alingaka biso. Ayebi biso moto na moto mpe alukaka kosalisa biso. Natatoli ete ezali na nzela ya Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, nde tokoki kolonga mokili mpe kokangolama na kimia na ndako. Tika tozala na bondimi ya kolikia na Ye, nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. TalaMose 1:39.

  2.  

    2. 1 Nephi 1:20.

  3.  

    3. Spoken by the character of C. S. Lewis as portrayed in William Nicholson, Shadowlands (1989), 103.

  4.  

    4. Harry Emerson Fosdick, Twelve Tests of Character (1923), 88.

  5.  

    5. Yisaya 41:10.