Tozali na ntina te ya kotondisama na botondi, kotalaka mabaku nini tozali kokutana na yango biso moko?

Na bomoi na ngai, Nazwaki libaku ya bule ya kokutana na bato ebele baye mawa emonani kosimba milimo na bango na bozindo makasi. Na ntango wana, Nayokaki na balingami na nagi ya mibali mpe ya basi mpe kolela elongo na bango na ntina ya mikumba na bango. Nazwaki maye nasengelaki koyebisa bango, mpe Nabundaki koyeba lolenge nini ya kolendisa mpe kosunga bango na mikakatano na bango.

Mbala mingi mawa na bango ewutaka na maye mamonaka mpona bango lokola suka. Ebele bazali kokutanaka na suka ya bolengeli boninga, lokola liwa ya molingami moko to bokabwani na moko ya libota. Misusu bayoki bazali kokutanaka na suka ya elikia—elikia ya kozala na libala to kozala na bana to ya kolonga bokono. Misusu bazali kokutanaka na suka ya bondimi na bango, lokola motungisi mpe mingongo ya mobulu na mokili emeki bango kotia ntembe, kutu kosundola, oyo bayebaki yambo kozala bosolo.

Mosika te to nsima, Nakolikia ete biso nionso tosalelaka ntango mokili na biso ezali kobeba na katia na yango, kotikaka biso komiyoka biso moko, nkanda mpe na botioli.

Ekoki kosalamela moto. Moto moko te alongolami.

Tokoki kozala na Botondi

Likambo ya moto na moto ezali lolenge moko te, mpe maye etali bomoi ya moko na moko ezali nse ya ye mei. Nzokande, Nayekolaki ete ezali na eloko moko oyo ekokaki kolongola mpasi oyo ekoki koya na bomoi na biso. Ezali na eloko moko tokoki kosala mpo ete bomoi ezala malamu koleka, esengo mingi, kutu ya nkembo.

Tokoki kozala na botondi!

Ekokaki koyokama lolenge mosusu na bwanya ya mokili ya komona ete moko oyo amemi mokumba ya mawa asengelaki kopesa matondi na Nzambe. Kasi baye basundoli molangi bololo mpe batomboli likolo nkopo ya boyoki ya botondi bakoki komona bomeli epetolama ya libiki, kimia, mpe bomanioli.

Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, topesami mobeko ya “kotonda Nkolo [na biso] Nzambe na biloko nionso,”1 na “ koyembela Nzambe na bozongisi matondi, ”2 mpe na “kotika motema [na biso] etondandisama na botondi Nzambe.”3

Mpo na nini Nzambe apesi biso mobeko ya botondi?

Mitindo na Ye nionso epesami mpo na kopesa mapamboli elongobani epai na biso. Mitindo ezali mabaku mpo na kosalela bonsomi na biso ya kopona mabe to malamu mpe kozwa mapamboli. Tata na biso wa bolingo na Lola ayebi ete koponaka komatisa molimo ya botondi ekomemela biso bosepeli ya solo mpe esengo ya monene.

Kozalaka na botondi mpo na Biloko

Kasi ndambo bakokaki koloba, “Nini Nazali na yango mpo na kozala na botondi na ntango nazali koleka miniokoli oyo na bomoi na ngai?”

Ntango mosusu kotalaka malamu na maye tozali na botondi mpona yango ezali kopusana ya mabe. Ezali nkpokposo kokolisa molimo ya botondi soki litondi na biso ezali kaka ya kokokana na motuya ya mapamboli tokoki kotanga. Bosolo, ezali ntina na mbala mingi “totanga mapamboli na biso”—mpe moto oyo amekaki yango ayebi ezali ebele—kasi Nakolikia te Nkolo azali kozela biso kozala na litondi ya muke na ntango ya mikakatano koleka na ntango ya bofuluki mpe ya mpasi te. Na yango, mikapo ebele ya makomi elobeli botondi mingi te mpo na biloko kasi esengi nde molimo mobimba to ezaleli ya botondi.

Ezali mpete ya kozala na botondi ya biloko ntango bomoi na biso emonisami kozala malamu. Kasi boni boni koleka ba ngonga oyo ntango topesameli likoki te ya kozwa biloko oyo tosengeli?

Ekokaki Ngai kopesa likanisi ete tomoni botondi lokola likoki, nzela ya bomoi oyo epenguisami te lolenge na biso tozali? Na lolenge mosusu, Nakopesa likanisi ete na ntina ya kozala na “litondi mpona biloko,” tomipesi na kozalaka “litondi na mabaku na biso”—atako lolenge ekoki kozala.

Ezali na lisolo moko ya kala ya mosali moko ya resturant oyo atunaki mosombi moko soki asepelaki na bilei. Mopaya ayanolaki ete biloko nionso ezalaki malamu, kasi elingaki kozala malamu mingi koleka soki bapesaki mapa mingi. Mokolo elandi, ntango moto oyo ayaki lisusu, mosali abakisaki mapa mosusu, na kopesaka ye biteni minei na esika ya mibale, kasi moto yango azalaki asepelaki kaka te. Mokolo elandi, mosali abakisaki lipa mosusu, bonguana ezalaki te.

Na mokolo ya minei, mosali azwaki mokano mpenza ya kosepelisa moto wana. Mpe lisusu azwaki lipa ya molai ya makolo libwa (3-m), akati na kati kati, mpe na koseka, apesaki yango na mosombi. Mokaboli akokaki kala te kozela eyano ya moto oyo.

Sima ya bolei, moto wana atalaki likolo mpe alobaki, “Malamu lokola ntango nionso. Kasi Namoni ozongeli na kopesaka kaka biteni mibale ya mapa.”

Kozalaka na botondi kati ya Mabaku na Biso

Bandeko balingami mibali mpe basi, boponi ezali ya biso. Tokoki kopona kotiya ndelo na botondi na biso, etiami na mapamboli tozali koyoka tozangi. To tokoki kopona kozala lokola Nefi, oyo azalaki na motema ya botondi elembaki te. Ntango bandeko na ye bangaki ye na bwato—oyo etongamaka mpo ete emema bango na mabele ya elaka— matambe mpe misapi na ye ezalaki ya kovimba makasi “bavimbaki makasi mpenza” mpe mopepe makasi emekaki komela ye na katikati ya mbu. “Na yango,” Nefi alobaki, “Natalelaki Nzambe na ngai, mpe Nakumisaki ye mokolo mobimba”; mpe Nalobelaki Nkolo mabe na nse ya motema te na ntina ya minyoko na ngai.”4

Tokoki kopona kozala lokola Yobo, oyo azalaki na biloko nionso kasi sima abungisaki yango nionso. Nzokande Yobo ayanolaki na kolobaka, “Bolumbu eyaki Ngai libanda ya libumu ya mama na ngai, mpe bulumbu ekozonga Ngai …. : Nkolo apesaki, mpe Nkolo azwi; nkombo ya Nkolo epambolama.”5

Tokoki kopona kozala lokola bapionie ya Mormon, oyo babatelaki molimo ya botondi ntango mobembo na bango ya malembe mpe mpasi epai ya Great Salt Lake, kutu koyembaka mpe kobinaka na nkembo na bolamu ya Nzambe.6 Ebele kati na biso bazalaka na mposa ya kolongwa, koyimayima, mpe komitungisa na ntina ya mpasi ya mobembo.

Tokoki kopona kozala lokola profeta Joseph Smith, oyo na ntango mokakangami na ba motindo ya mpasi na boloko ya Liberty, akomaki maloba oyo efulamaki: “Balingami bandeko mibali, tika ete tosala makambo nionso na esengo oyo ekosami na ntina ya nguya na biso; mpe na sima ekoki biso kotelema kaka, na elikia ya solo, komona lobiko ya Nzambe, mpe mpo loboko na ye emonana.”7

Tokoki kopona botondi, atako nini.

Lolenge oyo ya botondi eleki nyonso ezali koyaka nzinganzinga na biso. Eleki koyoka motema pasi, kolemba, mpe kozanga elikia. Ezali kobakisa nse lokola bolamu na ntango ya mpasi lokola esalemi na ntango ya bisengo.

Ntango tozali na botondi na Nzambe na ndenge tozali, tokoki kozwa kimia ya sembo na kati ya mitungisi. Kati ya mawa, tokoki lisusu kotombola mitema na biso na masanjoli. Na mpasi, tokoki kokumisama na bomikabi ya Klisto. Kati ya malili mpe bololo ya mawa, tokoki kozua mayele mpembeni ya molunge mpe boyambi ya lola.

Ntango mosusu tokanisi ete kozalaka na botondi ezali oyo tosali sima ya bokokisi ya makambo na biso, kasi boniboni ezali botali liboso mpenza. Bomoi boni tozali kozanga na kozelaka komona monama yambo kotondaka Nzambe ete mvula ezali?

Kozalaka na botondi na ntango ya mikakatano elakisi te ete tozali na esengo na ndenge na biso. Elakisi ete na nzela ya miso ya bondimi totali likolo ya mikakatano na biso ya mokolo ya lelo.

Oyo ezali botondi ya mbembo te kasi ya molimo. Ezali botondi oyo epesi bokolongono ya motema mpe ya bofuli makanisi na biso.

Botondi lokola Mosala ya Bondimi

Kozalaka na botondi na ndenge na biso ezali mosala moko ya bondimi na Nzambe. Esengi ete tondima na Nzambe mpe tolikia mpo na biloko tokoki komona te kasi ezali bosolo. 8 Nakozalaka na botondi, tolandi ndakisa ya Mobikisi na biso ya bolingo, oyo alobaki, “Bolingi na ngai te, kasi ya yo, esalema.”9

Botondi ya solo ezali bolakisi ya elikia mpe litatoli. Eyaka uta na boyebi oyo tomanyolaka ntango nionso te mikakatano ya bomoi kasi nakondimaka ete mokolo moko tokomanyola.

Na ezaleli nionso, ntina ya botondi na biso ekambami na bosolo ebele mpe bosolo ya bule biso toyebi: oyo Tata na biso na Lola apesi bana na Ye ya mwango ya esengo; ete na nzela ya Bomikabi ya Mwana na Ye, Yesu Klisto, tokoki kobika libela elongo na baye ya biso ya bolingo; oyo na suka, tokozwa nkembo, bobongi nie, mpe nzoto ya kozanga bokufi, bozangi bokono to etemo; mpe mai ya miso na biso ya mawa mpe bobungisi ekozala kokitana na kotonisama ya bosepeli mpe esengo, “komeka malamu , epesami na nse, mpe etungisami elongo, mpe kokimaka mosika.”10

Esengeli ezalaka lolenge ya litatoli oyo ebongolaki bayekoli ya Mobikisi uta na bobangi, bimali ya ntembe na bobangi, esengo ya basakoli ya Molakisi. Na ntango elandaka bobakami na Ye, baliaki na bozangi elikia mpe mawa, na bozangi makoki ya bomanioli oyo ewutaki kosalema. Kasi molulu moko ebongolaki manso wana. Nkolo na bango abimelaki bango alobaki, “Botala maboko na ngai mpe makolo na ngai, oyo ezali Ngai mei.”11

Ntango Bapostolo bayebaki bolamuki ya Klisto—ntango bamonaki nkembo ya Bosekwi ya Mobikisi wa bolingo na bango—bakomaki bato ya lolenge mosusu. Eloko moko te ekokaki kopekisa bango kokokisa misio na bango. Bandimaki na bokasi mpe na mokano monioko, boyokisami soni mpe kutu liwa oyo ekokaki kokomela bango na ntina ya litatoli na bango. 12 Balembisamaki te uta na kokumisaka mpe kosalelaka Nkolo na bango. Babongolaki bomoi ya bato bisika nionso. Babongolaki mokili.

Bosengeli te komona Mobikisi, lolenge Baapostolo bamonaki, mpo na kozwa libongoli ya ndenge moko. Litatoli ya Yesu Klisto, ebotami na Molimo Mosantu, ekoki kusunga yo kotala bosisoi suka boleki mpe elikia oyo ekoya eye Mosikoli ya mokili abongisaki.

Tosalama Te mpo na Kosuka

Na pole ya oyo toyebi na ntina ya atandele na biso ya seko, ezali na motuna moko ekoki kondiamama te ete suka ya mawa to elekelaka biso na bomoi toyoki bondimi na ntina na biso? Emonani kozala eloko moko kati na biso oyo ekopekisa biso kosukisa.

Mpo na nini ezali boye? Mpo ete tosalami na elamba ya seko. Tozali bikelamu ya seko, bana ya Nzambe ya Bokasi nionso, oyo nkombo ezanga Suka13 mpe oyo alaki mapamboli ya seko ezanga motuya. Suka ezali atandele na biso te.

Ebele eye tozali koyekola na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mingi tozali komona suka yango awa na bowei tozali na suka atako moke te. Ezali kaka se mpasi ya ntango mokuse—eye mokolo moko ekomonana na bokeseni moke na esengo ya kozelaka bondimi.

Boniboni nazali na botondi na Tata na ngai ya Lola oyo kati ya mabongisi na Ye ezali na suka ya bosolo te, kaka se ebandeli ya libela.

Baye bazongisi Matondi Bakokembisama

Bandeko mibali mpe Basi, tozali na ntina te ya kotondisama na matondi, kotala ya lolenge tozali na yango tomimoni biso mei?

Tozali na ntina moko monene te kotika mitema na biso “etondisama botondi ya Nzambe”? 14

“Tozali na ntina monene te ya kosepela ?”15

Boniboni topambolami soki toyebi mosala ya loboko ya Nzambe na modele kitoko ya bomoi na biso. Matondi na Tata wa biso ya Lola ekolendisa botali na biso mpe ekosokola botali na biso. Ekofula bomikitisi mpe kolendisa makoki na biso ya komaniola epai bandeko na biso mibali mpe ekelamu nionso ya Nzambe. Matondi ezali mungua ya baklisto nionso lokola mosala! Botondi ezali mama ya bopeto nyonso.16

Nkolo apesa biso elaka na Ye ete baye “oyo [bazwi] biloko nionso na botondi bakotondisama na nkembo; mpe biloko ya mabele eye ekopesamela [bango].”17

Ntika biso “tobika na kopesaka matondi mokolo na mokolo”18—mingi mpenza na ntango ya suka eye ezali eteni ya bowei. Tika biso totika milimo na biso kokola na botondi epai ya Tata na biso ya Lola atonda ngolu. Tika biso libela mpe kotombola mingongo na biso makasi mpe kolakisa na liloba mpe na mosala botondi na biso na Tata na biso ya Lola mpe na Mwana na Ye ya Bolingo Yesu Klisto. Na yango nasambeli, natikeli bino litatoli na ngai mpe lipamboli, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Doctrine &Alliances 59:7; see also Baefezeo 5:20; 1 Batesalonika 5:18; Moziya 26:39; Alma 7:23; Doctrine et Alliances 98:1.

  2.  

    2. Banzembo 147:7.

  3.  

    3. Alma 37:37.

  4.  

    4. Tala 1 Nefi 18:10–16.

  5.  

    5. Yobo 1:21.

  6.  

    6. Na ndakisa ya bapione oyo babatelaki bizaleli ya malamu, tala Andrew D. Olsen, The Price We Paid: The Extraordinary Story of the Willie and Martin Handcart Pioneers (2006), 10, 366–67.

  7.  

    7. Doctrine &Alliances 123:17.

  8.  

    8. Tala Alma 32:21.

  9.  

    9. Luka 22:42.

  10.  

    10. Luka 6:38.

  11.  

    11. Luka 24:39.

  12.  

    12. Tala Baloma 5:3; 2 Bakolinto 4:17; 12:10.

  13.  

    13. Tala Mose 1:3.

  14.  

    14. Alma 37:37.

  15.  

    15. Alma 26:13.

  16.  

    16. Tala Marcus Tullius Cicero, Oratio Pro Cnæo Plancio, XXXIII, section 80; quoted in Joseph B. Wirthlin, “Live in Thanksgiving Daily,” Ensign, Sept. 2001, 8.

  17.  

    17. Doctrine &Alliances 78:19; sete ebetami.

  18.  

    18. Alma 34:38.