“Ngai Napesaka Bino Ndakisa”


Richard G. Scott
Ndakisa ya monene koleka oyo atambola nanu na mabele te ezali Mobikisi na biso, Yesu Klisto. … Ye abengi biso kolanda ndakisa na Ye ya malamu mpenza.

Lokola nakanisaka lotomo na ngai ya kokabola nsango malamu, nabanzaki na bandeko, baoyo nguya na bango ya bolingo esungaka ngai komona nzela elakisami na bonzambe oyo esungaki ngai na botamboli na molimo. Na ngonga ya motuya na bomoyi na ngai, Tata na Lola apambolaki ngai na moto moko oyo abatelaki ngai ndenge ekoki kosunga botambuisi ya maponi na ngai na nzela esengeli. Bango batalelaki maloba wana ya Mobikisi: “Mpona ngai napesaka bino ndakisa, oyo bino bosengeli kosala lolenge nasalelaka bino.” 1

Ntango nazalaka mwana muke, tata na ngai azalaki mondimi ya Eklezia te mpe mama na ngai akomaka na bolembu. Tozalaka kofanda na Washington, D.C., mpe baboti ya mama na ngai bazalaki kofanda na 2,500 miles (4,000 kilometele) mosika na mboka ya Washington. Basanza ebele sima ya mibu muambe ya mbotama na ngai, koko na ngai ya mwasi Whittle ayaka na kati ya mboka kotala biso. Koko ya mwasi abangaki ete ngai to yaya na ngai ya mobali tobatisamaki te. Nayebi te nini ayebisaki na baboti na ngai mpona yango, kasi nayebi ete na ntongo moko amemaki ndeko ya mobali mpe ngai na lopango mpe akobolaki elongo na biso mposa na ye na oyo etali motuya ya kobatisamaka mpe kozalaka na mayangani ntango nyonso. Nazali kokundola lisusu te moko moko na oyo alobaki, kasi maloba na ye eningisaki eloko moko na kati ya motema na ngai, mpe ntango moke sima ndeko na ngai ya mobali mpe ngai tobatisamaka.

Koko ya mwasi akobaka kosunga biso. Nakanisi ete ntango mosusu ndeko na ngai ya mobali to ngai naponamaki kopesa lisikulu na kati ya Eklezia, tokokaki kobenga ye na telephone mpo na makanisi ebele. Na mikolo muke lisukulu ekomama na maboko ekokaki koya na nzela ya nkoma. Na sima ya mua ntango makanisi na ye ebonguanaki nzinga nzinga kosenga makasi ya koleka na ngambo na biso.

Koko ya mwasi asalelaki kaka motango ekoki ya bokasi mpe limemia kosunga tata na biso ayeba motuya ya ye kokumbaka biso na eklezia mpona mayangani na biso. Na banzela nyonso esengeli, asungaka biso koyoka bosenga ya nsango malamu na bomoi na biso.

Ya motuya koleka, toyebaki ete koko ya mwasi alingaki biso mpe ete alingaki nsango malamu. Azalaki ndakisa moko kitoko! Boni boni nazali na botondi mpo na litatoli akabolaki na ngai ntango nazalaki elenge. Nguya na ye ebongolaki nzela ya bomoi na ngai mpo na bomalu ya libela.

Sima, lokola nazalaki komibongisa kosilisa université, nakweyaki na bolingo na elenge mwasi moko abengamaki Jeanene Watkins. Nakanisaki ete akomaka ye mpe kozwa mayoki ya bozindo makasi mpo na ngai . Butu moko ntango tozalaki kosolola na oyo etali maye makoya, akotisaki na bokebi nyonso na lisolo liloba moko oyo ebongolaki bomoi na ngai libela. Ye alobaki, “Ntango nabali, ekozala mpo na misionele ya bondimi azongaki na tempelo.”

Ngai nakanisaka mingi te na oyo etali etinda liboso ya ntango wana. Butu wana botindiki na ngai kokanisa mosala ya misionele ebongwanaki mingi mpenza. Nakendaki ndaku, mpe nakokaki kokanisa eloko mosusu te. Nazalaki ya kolamuka butu mobimba. Nazalaki ya kobunga mobimba na koyekola na ngai mokolo oyo elandaki. Sima na mabondeli ebele nazwaki mokano ya kokutana na episikopo mpe kobanda ndingisa na ngai ya kosala misio.

Jeanene asengaki ngai ata moke te nasala misio mpo na ye. Ye alingaki ngai mingi kokabola bondimi na ye makasi mpe bongo epesaki ngai libaku ya kosala nzela ya bomoi na ngai moko. Biso mibale tosalaki bamisio mpe sima koleka tokangisamaki na tempelo. Bokasi mpe komipesa ya Jeanene na bondimi na ye ebotaka bokesene nyonso na bomoi na biso mibale. Nandimisami ete tokokaki te komona esengo tozwi libanda ya bondimi na ye makasi na libongisi ya kosalelaka Nkolo yambo. Ye azali ndakisa ya kitoko, malamu.

Bango mibale koko ya mwasi Whittle mpe Jeanene balingaki mingi kokabola bondimi na bango makasi ete likuli ya nsango malamu mpe kosalelaka Tata na Lola ekopambola bomoi na ngai. Moto te na bango mibale basalisaki ngai na makasi te to bayokisaki ngai mabe te na lolenge ya moto nazalaki. Bango balingaki ngai na bompete nyonso mpe balingaki Tata na Biso ya Lola. Bango bayebaki Ye akokaki kosala mingi na bomoi na ngai koleka nakokaki kosala na ngai moko.

Boni boni moko na moko kati na biso akoki kokoma moko ya nguya ya ntina? Tosengeli kondimisama kolinga ya solo baoyo tozali kosunga na bokasi nyonso bongo bakoki kobanda kokolisa elikia na bolingo ya Nzambe. Mpona ba mingi na mokili, mokakatano ya liboso na kondimaka nsango malamu ezali kokolisa bondimi na Tata moko ya Lola, oyo alingi bango malamu mpenza. Ezali pete kokolisa bondimi wana ntango bazali na baninga to mabota ya bandimi oyo balingi bango lolenge moko.

Kopesaka bango elikia na bomoi na bino ekoki kosunga bango kokolisa bondimi na bolingo ya Nzambe. Bongo na nzela ya bolingi na bino, lisolo emanyolama, bomoi na bango ekopambolama na kokabolaka mateya na bino botangaka, ba mayele bino bozwaka, mpe ba mibeko bino bolandaka koluka nzela na bitumba na bino moko. Bolakisa ntina na bino ya solo na bolamu na bango; mpe bongo bokabola litatoli na bino ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Bokoki kosunga na nzela evandisami na mobeko mpe malongi. bolendisa motema baoyo bolingi koluka kososola oyo Nkolo akoki kolinga bango bosala. Lolenge moko ya kosala ezali kotuna bango mituna oyo ekotinda bango kokanisa mpe bopesa bango ngonga ekoki—soki bangonga, mikolo, basanza, to koleka—kokanisa mpe koluka kobimisa biyano mpo na bango moko. Bokoki kozala na bosenga ya kosunga bango koyeba lolenge nini kosambela mpe lolenge nini koyeba biyano ya nsambo na bango. Bosunga bango koyeba ete makomi ezali liziba ya solo ya koyambaka mpe koyebaka biyano. Na lolenge oyo bokosunga bango komibongisa mpo na mabaku mpe mikakatano ekoya.

Lotomo ya Nzambe ezali “komema koleka bozangi kokufa mpe bomoi ya seko ya moto.” 2 Oyo ezali ya motuya na nyonso tozali kosala. Ba ntango mingi tomikangaka mingi na biloko oyo tomoni kitoko to tokomi bongo ya kosila na mikumba ya mokili ete tobungisi bomoni ya ba ntina ya Nzambe. Lokola bino botali malamu mingi bomoi na bino na mibeko mingi ya ntina, bokolonga bososoli ya oyo bozali kosala, mpe bino bokobota mbuma ebele mpo na Nkolo mpe bisengo mingi mpo na binomei.

Ntango bozali kotala malamu bomoi na bino mibeko ya ntina ya libongisi ya lobiko, bokobulisama malamu na bokaboli oyo bino boyebi mpo ete bino bososoli ntina ya libela ya makuli ya nsango malamu. Bino bokokabola oyo boyebi na nzela oyo ekolendisa baninga na bino kolinga kozala makasi na molimo. Bokosunga balingami na bino kolinga komipesa na kotosa mitindo na Ye nyonso mpe kotia likolo na bango moko nkombo ya Yesu Klisto.

Bomikundola ete bonguana ya bato ezali kaka ndambo ya mosala. Boluka ntango nyonso koyeyisa mabota makasi. Boteya na bomoni ya motuya ya mabota ekangama na tempelo. Na mabota mingi ekoki kozwa mibu. Oyo ezalaki ndenge moko na baboti na ngai. Sima ya mibu ebele nabatisamaki, tata na ngai abatisamaki, mpe sima mingi libota na ngai ekangisamaka na tempelo. Tata na ngai asalaki lokola mokangisi na tempelo, mpe mama na ngai asalaki kuna elongo na ye. Ntango bozali na bomoni ya makuli ya bokangisi ya tempelo, bokosunga kotonga bokonzi ya Nzambe na mabele.

Bomikundola, kolingaka bango ezali moboko ya nguya mpo na kopesaka nguya na baoyo bolingi kosunga. Nguya ya Koko na ngai ya mwasi Whittle mpe mwasi na ngai Jeanene, ekokaki kozalaka na ntina te soki nayebaki te yambo ete balingaki ngai mpe balingaki ngai nazua ya malamu na bomoi.

Lokola moninga ya bolingo oyo, bolikia bango. Na ba ndakisa mosusu ekoki komonana mpasi kolikia, kasi boluka balolenge ebele ya kolikia na bango. Bana ya Tata ya Lola bakoki kosala makambo ya kokomuisa soki bayoki bolikii. Mwana nyonso ya Nzambe na bokufi azali kopona libongisi ya Mobikisi. Bolikia ete nakopesaka libaku, bakosala mpe lisusu.

Bokabola mabongisi oyo ekosunga balingami na bino kokendaka liboso na nzela ya bomoi ya seko. Bomikundola tozali kokola banso mokolo na mokolo. Bolandaki ndakisa oyo kaka moko na boyebi na bino ya nsango malamu. Bobomba bokaboli na bino ya nsango malamu mpasi te.

Litatoli na bino moko ya bomikabi ya Yesu Klisto ezali esalaleli ya nguya. Banzela oyo ekangani na yango ezali losambo, Buku ya Mormon mpe makomi mosusu, mpe bomipesi na bino na bokuli ya bonganganzambe. Nyonso oyo ekokomisa pete bokambi ya Molimo, oyo ezali na motuya koleka mpo na na bino koyekemela.

Mpo na kozala malamu mpe kosala lolenge Klistu asalaka.3 Botondisa na makanisi na libongisi oyo ya ntina ya nsango malamu: bomikabi ya Yesu Klisto esalisaka bokomi na biso koleka lokola Tata na biso ya Lola ekoka kosalama boye ete tokoki kobika elongo libela na libela na mabota na biso esangani.

Ezali na malongi moko te eleki ntina na mosala na biso koleka Bomikabi ya Yesu Klisto. Na mabaku ebele oyo esengeli, botatola mpo na mobikisi mpe mpo na nguya ya libonza na Ye ya komikaba. Bosalela makomi oyo eteyi mpo na Ye mpe mpo na nini Ye azali ndakisa ya malamu mpenza mpo na moto nyoso ya bomoi.4 Bokozala na bosenga ya koyekola makasi. Bomipesa makasi te na biloko ezangi nzela ete bozanga boyekoli ya malongi mpe mateya ya Nkolo. Na moboko ya makasi ya yomei na malongi, bokozala liziba ya nguya mpo na kokabolaka ba bosolo ya ntina mpenza na basusu baoyo bazali na bosenga na yango na elikia te.

Tozali kosalela Tata na biso ya Lola malamu na kobengaka basusu na nsembo mpe kosalelaka bango.5 Ndakisa monene koleka oyo atambola naino na mabele oyo te ezali Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Mosala na Ye ya bokufi etondamaki na mateya, mpe kolingaka basusu. Ye afandaki elongo na bato oyo bakanisamaki ya kolongobana te na kiboninga na Ye. Ye alingaki moko na moko na bango. Ye asosolaki bosenga na bango mpe ateyaki bango nsango malamu na Ye. Ye abengi biso kolanda ndakisa na Ye ya malamu koleka.

Nayebi ete nsango malamu ezali nzela ya kimia mpe ya esengo na bomoi oyo. Tika tokundola kosala lokola Ye asalaka na kokabolaka bolingo na biso, elikia, mpe boyebi ya bosolo na basusu baoyo naino bayambi pole ya kokenga ya nsango malamu te. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene

Lakisa Matangi

  1.  

    1. Yoane 13 :15.

  2.  

    2. Mose 1:39.

  3.  

    3. Tala Yoane 13:15.

  4.  

    4 Tala, mpona ndakisa, Luka 22:39–46; Yoane 8:3–11; Bafilipe 4:13; Yakobo 5:15–16; 1 Yoane 1:7; 2 Nefi 1:15; 2; 25:17–30; 31; Yakobo 4; Alma 7; 42; 3 Nefi 11–30; Moloni 10:32–33; Doctrine & Alliances 18:10–16; 19:13–19; 29:3; 88:1–13; 138:2–4; Mose 5:6–12.

  5.  

    5 Tala Matai 22:35–40; Moziya 2:17.