“Soki Bolingi Ngai, Bobatela Mitindo na Ngai”


Robert D. Hales
Kosalela nguya na biso ya kopona mpo na kotosa elingi koloba kopona “kosala oyo ezali malamu [mpe kotika] mbano elanda.”

Bandeko mibali mpe basi, na mateya nyonso toyekolaka na bomoi ya Mobikisi, moko te ezali polele mpe bokasi koleka liteya ya botosi.

Ndakisa ya Mobikisi

Na Likita ya yambo ya mbotama na Lola, Zabolo atombokelaki mwango ya Tata na Lola. Baoyo balandaki Zabolo basukisaki bokobi ya bomoi na bango ya sekona—Bosala keba nani bozali kolanda!

Nsima Yesu azwaki mokano na Ye ya kotosa, na kolobaka, “Tata, nakosala yango, mpe nkembo ezala ya yo mpo na libela.”1 Na mosala na Ye mobimba, “ayokaki mpasi ya mimekano kasi apesaki [yango] nzela te.”2 Na yango, “ye [ayekolaki] botosi na makambo oyo amonelaki mpasi.”3

Mpo Mobikisi na biso azalaki botosi, Amikabaki mpo na masumu na biso, kokomisaka pete bosekwi na biso mpe kolengelaka nzela mpo na kozonga epai ya Tata na biso na Lola, oyo ayebaki ete tokosala mbemba wana ezali biso koyekola botosi na bomoi ya nkufa. Ntango totosi, tondimi libonza na Ye, mpo tondimi ete na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, bato nyonso bakoki kobikisama, na botosi ya mibeko, makuli, mpe mitindo epesami na nsango malamu.4

Yesu ateyaki biso kotosa na lokota ya pete oyo ezali mpasi te mpo na kososola: “Soki bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai,”5 mpe“Boya, bolanda ngai.”6

Ntango tobatisami, biso “tozwi likolo na [biso] nkombo ya Yesu Klisto” mpe tokoti “kati ya liyokani na Nzambe ete [toko] zala na botosi kino na nsuka ya bomoi na [biso].”7 Eyenga moko na moko tozongisaka sika liyokani ya libatisi na kozwaka elambo mpe kotatolaka ete tondimi kobatela mitindo. Tolukaka bolimbisi mpo na makanisi, mayoki, to bikela kani oyo elongobani te na bolingi ya Tata na biso na Lola. Lokola toyamboli na kotikaka mosika bozangi botosi mpe na kobandaka kotosa lisusu, tolakisi bolingo na biso mpo na Ye.

Bandakisa ya Botosi

Lokola tozali na nsango malamu, tokobi na bososoli na biso ya botosi. Mbala mosusu tokoki komekama na kosala oyo nabengi “botosi na lolenge ya moto,” na oyo tozangi botosi tobwakisaka mobeko ya Nzambe na ntina ya bwania na biso to mposa na biso to kutu na boyebani mingi. Mpo oyo esalelami mingi na bato mingi, bobongoli ya botosi oyo ekokitisa mibeko ya Nzambe kati na momesano na biso mpe na mibeko na biso.

Ntango mosusu bandimi bakoki kozala na “lisanga ya botosi,” kolobaka kolinga Nzambe mpe kokumisa Nzambe ntango koponaka wapi kati na mitindo na Ye mpe mateya—mpe mateya mpe toli ya baprofeta na Ye—bakolanda na mobimba.

Mingi batosaka na koponaka mpo bakoki te komona bantina nyonso ya motindo moko, kaka se lokola bana basosolaka te ntango nyonso bantina ya toli mpe mibeko ya baboti na bango. Kasi toyebi ntango nyonso ntina tolandelaka baprofeta, mpo oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto, mpe ezali Mobikisi nde azali kokamba baprofeta na Ye na bileko nyonso.

Lokola bososoli na biso ya botosi ekeseni, toyebi ntina ya mosala ya nguya ya kopona. Ntango Yesu azalaki na Elanga ya Getesemane, Asambelaki mbala misato Tata na Ye na Lola, “O Tata na ngai, soki ekoki kosalema, tika kopo eye eleka: kasi esalema te lolenge nalingi, kasi lolenge olingi.”8 Nzambe alingaki te kolongola nguya ya kopona ya Mobikisi, kasi na mawa Atindaki anzelu mpo na kolendisa Mwana na Ye ya Bolingo.

Mobikisi akutanaki na momekano mosusu na Golgotha, wapi akokaki kobenga lisanga ya banzelu mpo na kokitisa Ye uta na ekulusu, kasi asalaki boponi na Yemei ya koyika mpiko na botosi kino na nsuka mpe kokokisa libonza ya bomikabi na Ye, atako soki elingaki koloba mpasi monene, kutu nkufa.

Bokoli ya botosi na lolenge ya molimo ezali “botosi ya Mobikisi.” Epesami bokasi na bolingo ya solo mpo na Tata ya Lola mpe Mwana na Ye. Ntango totosi na bolingi, lokola esalaki Mobikisi na biso, tolingi mpenza maloba ya Tata na biso ya Lola: “oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo natie motema.”9 mpe toluka mpenza koyokaka, mpo na kokota na miso yaTata na biso ya Lola,“ezali malamu, malamu mosali ya botongono: … kokota … kati na esengo ya Nkolo na yo.”10

Kosalela nguya na biso ya kopona mpo na kotosa elingi koloba kopona “kosala oyo ezali malamu [mpe kotika] mbando elanda.”11 Esengaka mosala ya yomei mpe ekomemaka elikia, esengo ya libela, mpe liyoki ya bokokisi na biso mpe, na ndakisa, na baye bazali nzinganzinga na biso; mpe ezalaka ntango nyonso na bomipesi mpenza ya mozindo ya moto yemei mpo na kosunga bakambi ya bonganganzambe mpe kolanda mateya mpe toli na bango.

Bambano

Na koponaka soki tokotosa , ezali ntango nyonso ntina mpo na komikundola bambano ya boponi na biso. Zabolo mpe bayekoli na ye basosolaki bambano ya koponaka koboya mwango ya Tata na Lola? Soki bongo, mpo na nini basalaki boponi ya nsomo bongo? Tokoki komituna motuna ya lolenge moko: mpo na nini moko kani kati na biso aponi koboya botosi ntango toyebi bambano mabe ya seko ya lisumu? Makomi epesi eyano: ntina Kaina mpe bana mosusu ya Adama mpe Ewa baponaki bozangi kotosa ezali mpo “balingaki Satana koleka Nzambe.” 12

Bolingo na biso na Mobikisi ezali fungola ya botosi na lolenge ya Mobikisi. Lokola tozali kobunda kozala botosi na mokili ya lelo, tolakisi bolingo mpe limemia na biso mpo na bana nyonso ya Tata na Lola. Kasi ekoki kosalema te ete mpo na bolingo oyo mpo na basusu tobongola mitindo ya Nzambe, oyo epesamaki mpo na bolamu na biso! Ndakisa, motindo “okoboma … te, to kosala eloko lokola oyo”13 ebandisami likolo ya mobeko ya molimo oyo ebatelaka bana nyonso ya Nzambe, atako baye babotami naino te. Boyebi makasi elakisi ete ntango toyebi motindi oyo te, mawa eyebani motuya te eyaka. Nzokande mingi bakanisaka ete endimami kosukisa bomoi ya mwana oyo abotami naino te na bantina ya boponi to ya boyokani.

Koluka bolimbisi bozangi botosi ekobongolaka mobeko ya molimo te to bambando ya mabe na yango te kasi ekambaka na mobulu, kotepatepa, kowayawaka na nzela eyebani te, kozalaka ya kobunga, mpe mawa. Lokola bayekoli ya Klisto, topesami mokumba ya bule ya kosimba malamu mibeko na Ye mpe mitindo mpe mayokani oyo tosali bisomei.

Na Sanza ya Zomi na mibale 1831 mwa ndambo ya bandeko mibali babengamaki mpo na kosalisa kokitisa mayoki ya bonguna oyo ekotaki na Eklezia. Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nkolo akambaki bango na lolenge moko ya momesano te, kutu ya kokamwa:

“Bulunganisa banguna na yo; benga bango bakutana na yo na kati ya bato mpe na bisika na bino moko lokola. …

“Na yango, tika bango babimisa bantina na bango ya makasi ya kotelemela Nkolo.

“… Monduki moko te esalami mpo na kotelemela yo ekofuluka;

“Mpe soki moto moko atomboli mongongo na ye mpo na kotelemela yo akobulunganisama na ntango ebongisami na ngaimei.

“Na yango, batela mitindo na ngai; ezali solo mpe ya botongono.”14

Mateya kati ya Makomi

Makomi etondisami na ndakisa ya baprofeta baye bayekolaki mateya ya botosi na misala na bangomei.

Joseph Smith ateyamaki bambano ya kopesaka nzela na motungisi ya moto na ye ya likabo, moninga, mpe mokomi Martin Harris. Na eyano na bosenga ya Martin, Joseph atunaki Nkolo mpo na ndingisa ya kodefisa nkasa 116 oyo naino babongola te ya Buku ya Mormon na ntina ete Martin akokaki kolakisa yango na libota na ye, kasi Nkolo ayebisaki Joseph aloba te. Martin babondelaki Joseph asenga Nkolo lisusu. Na nsima ya bonsenga ya mbala misato ya Joseph Nkolo apesaki ndingisa mpo na bato mitano kaka kotala mikanda oyo naino ebongolamaki te.“Na lolenge ya liyokani ya lokumu koleka Martin amikangaki yemei na liyokani oyo. Ntango akomaki na ndako, mpe motungisi ekomelaki ye, abosanaki ndai ya lokumu alapaki mpe apesaki basusu ndingisa ya komona mikanda oyo naino ebongolamaki te, na mbando ete na mayele mabe epesamaki na bato mosusu,”15 mpe ebungaki. Lokola mbano, Joseph atukamaki na Nkolo mpe aboyamaki ndingisa ya kokoba kobongola Buku ya Mormon. Joseph ayokaki mpasi mpe ayambolaki na mabe na ye na kopesaka nzela na mitungisi ya basusu. Nsima ya eleko moko, Joseph apesamaki nzela ya kozongela mosala na ye ya kobongola. Joseph ayekolaki liteya ya motuya ya botosi oyo esungaki ye bomoi na ye mobimba nsima!

Profeta Mose apesi ndakisa mosusu. Ntango Mose na botosi azwaki mwasi moko ya Ethiopi, Miriam mpe Alona alobaki mabe na ntina na ye. Kasi Nkolo atukaki bango, kolobaka, “Na [Mose] nakoloba monoko na monoko.”16 Nkolo asalelaki likama ya ntembe oyo mpo na koteya bandimi ya Eklezia na eleko na biso. Na 1830 Hiram Page alobaki ete azwaki bobimisi mpo na Eklezia. Nkolo asembolaki ye mpe koteyaki basantu,“Bokotosa makambo oyo Nakopesa na [Joseph], mpe Alona lokola,”17 “mpo azwaki yango lokola kaka Mose.”18

Botosi ememaka mapamboli, “mpe ntango tozwi lipamboli songolo kouta Nzambe, ezali na botosi ya mobeko wana na oyo elobamaki.”19

Botosi eteyami na ndakisa. Na lolenge nini tozali bomoi, tozali koteya bana na biso, “Yekola bwania na bolenge na yo; iyo, yekola na bolenge na yo kobatela mitindo ya Nzambe.”20

Botosi ekomisaka biso makasi malembemalembe, na makoki ya koyikaka mpiko na mimekano mpe mikakatano na botongono na mikolo mikoya. Botosi na Getesemane elengelaki Mobikisi kotosa mpe koyika mpiko kino na nsuka na Golgota.

Balingami na ngai Bandeko mibali mpe basi, maloba ya Alma etalisi mayoki ya motema na ngai:

“Mpe sikawa balingami na ngai mibali, nalobeli bino makambo maye ete nakoki kolamusa bino na ntina ya lotomo na bino na Nzambe, ete bokoki kotambola lokola balongi liboso na ye. …

“Mpe sikawa nakanisi ete bosengeli kozala sembo, mpe botongono mpe boboto; … kozalaka etingia na kobombaka mitindo ya Nzambe na ntango nyonso.”21

Napesi litatoli ngai ya kafukafu ete Mobikisi na biso azali na bomoi. Mpo ete Atosaki, “mabolongo nyonso ekogumbama, mpe nkota nyonso ekoloba …ete azali [Mobikisi na biso].”22 Tika tolinga Ye na mozindo mpenza mpe tondimela Ye na bondimi mobimba mpenza ete biso mpe totosa, tobatela mitindona Ye, mpe tozonga kofanda na Ye mpo na libela na bokonzi ya Nzambe na biso ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. Moses 4:2.

  2.  

    2. Doctrine & Alliances 20:22.

  3.  

    3. Baebele 5:8.

  4.  

    4. Tala Biteni ya Bondimi 1:3.

  5.  

    5. Yoane 14:15.

  6.  

    6. Luka 18:22.

  7.  

    7. Moziya 5:8.

  8.  

    8. Matai 26:39; tala lisusu milongo 42, 44.

  9.  

    9. Matai 3:17; tala lisusu 3 Nefi11:7.

  10.  

    10. Matai 25:21.

  11.  

    11. “Do What Is Right,” Hymns, no. 237.

  12.  

    12. Moses 5:13.

  13.  

    13. Doctrine et Alliances 59:6.

  14.  

    14.  Doctrine et Alliances 71:7–11.

  15.  

    15. Joseph Fielding Smith, Essentials in Church History ,(1922) 65; tala lisusu Doctrine et Alliances 3.

  16.  

    16. Mituya 12:8.

  17.  

    17.  Doctrine et Alliances 28:3.

  18.  

    18.  Doctrine et Alliances 28:2.

  19.  

    19.  Doctrine et Alliances 130:21; tala lisusu milongo 20.

  20.  

    20. Alma 37:35.

  21.  

    21. Alma 7:22–23.

  22.  

    22. Moziya 27:31.