Kobomba Mayokani Ebatelaka Biso, Elengelaka Biso, mpe Epesaka biso Nguya


Tozali basi oyo basali liyokani ya mibu nionso kotambolaka na nzela ya boweyi mpo na kozonga liboso na Ye.

O, bandeko basi, tolingi bino. Kala te wana ezalaki ngai na mobembo na Mexique, nazwaki emoneli ya bondeko mwasi oyo tozali koyoka na mpokwa ya lelo. Bokanisa likambo oyo: Toutaki kosilisa Eteyelo ya bana na mokolo ya eyenga na ntongo, mpe bana, bateyi, mpe ngai tosanganaki na ndako moko etonda meke. Kaka na ntango wana ekuke ya kelasi ya Bilenge Basi efungwamaki. Namonaki bilenge basi mpe bakambi na bango. Biso banso tosembolaki maboko mpo na kopesa mbote. Na bana kosimbaka zipi na ngai mpe basi nzinganzinga na ngai, nalingaki koloba mayoki na ngai oyo nazalaki na yango na ntango wana.

Nalobaka espagnole te, yango wana bobele maloba ya Angele nde eyaki na makanisi na ngai. Natalaki na bilongi na bango mpe nalobaki, “Tozali bana basi ya Tata na biso ya Lola, oyo alingaka biso, mpe tolingaka Ye.” Moto nyonso na mbala moko abandaki koyemba, na Espagnole, Tozalaki wana kati na ndako etonda meke, kozongelaka elongo Mama ya likambo ya Bilenge Basi wana ezalaki biso koloba, “Tokotelema lokola banzeneneke ya Nzambe ntango nyonso mpe na bisika binso.”

Na mpokwa ya lelo tosangani elongo na mokili mobimba lokola bayekoli na Ye, na mposa ya kobundela mpe kosunga bokonzi ya Nzambe. Tozali bana basi ya Tata na biso ya Lola. Tozali basi basali mayokani ya mibu nionso mikeseni kotambolaka na nzela ya boweyi mpo na kozonga na miso na Ye. Kobombaka mayokani ebatelaka biso, elengelaka biso, mpe epesaka biso nguya.

Ezali na bana basi na katikati na biso na mpokwa ya lelo baye bazali na mibu ya Eteyelo ya bana. Ndambo kati na bino bana basi kala te botie litambe ya yambo na nzela ya bomoi ya seko na likuli ya libatisi.

Botala nzinganzinga na bino. Lobi ezali ya kongenga lokola bozali komona bamama baye basali liyokani mpe balengelemi mpo na kolakisa bino kotambola kati na nzela oyo ezali liboso.

Soki ozali na mibu 8, 9, 10, to 11, atako ozali na Ndako ya likita, na ndako na yo, to bandako ya mayangani nzinganzinga ya mokili, ekoki yo kotelema? Boyei bolamu na likita linene ya bamama. Sikoyo, nasengi bino botikala ya kotelema mpo tolingi kobengisa bino na mpokwa ya lelo tosala elongo. Nakobanda koyemba na nse nzembo moko ya Eteyelo ya bana. Mpe mbala moko soki boyebi lisusu nzembo yango, bokobanda koyemba elongo na ngai? Sikoyo, bosengeli koyemba makasi mpo ete banso bakoka koyoka.

Teya ngai kotambola na pole ya bolingo na ye;
Teya ngai kosambela Tata na ngai na likolo;
Teya ngai koyeba makambo oyo ezali malamu;
Teya ngai, teya ngai kotambola kati na pole.

Tikala ya kotelema, bana basi, wana ezali banso ya mibu 12 mpe koleka sikoyo koyemba molongo ya mibale.

Yaka, mwana moke, mpe elongo tokoyekola
Na ntina ya mitindo na ye, ete tokoki kozonga
Ndako na miso na ye, mpo na kozala na bomoi na ye—
Ntango nyonso, ntango nyonso kotambola kati na pole.1

Ezalaki kitoko. Bokoki kofanda. Matondo.

Lokola basi ya mibu nyonso, totambolaka kati ya pole na Ye . Mobembo na binso na nzela ezali ya moto se moko mpe ekomisami polele na bolingo ya Mobikisi.

Tokotaka na ekuke monene na nzela ya bomoi ya seko na likuli mpe liyokani ya libatisi, mpe nsima tozwaka likabo ya Molimo Mosantu. Mpaka Robert D. Hales atuni biso ete, “Esosolaka [biso] mpe esosolaka bana na [biso] ete ntango [to]batisami [to]bongwani mpo na libela?”

Alimbolaki lisusu ete “ntango tososoli liyokani ya libatisi na biso mpe likabo ya Molimo Mosantu, ekobongola bomoi na biso mpe ekotia bomipesi na biso mobimba na bokonzi ya Nzambe. Ntango tozali kobunda na mimekano, soki tokoyoka, Molimo Mosantu akokundolisa biso ete tolakaki komikundola Mobikisi na biso mpe kotosa mitindo ya Nzambe.”2

Poso moko na moko wana ezali biso kokabola bilembo ya elambo, tozali kozongisa sika liyokani na biso ya libatisi, Mpaka David A. Bednard alobaki ete: “Ntango totelemaka na mai ya libatisi, tokanisaka oyo etali tempelo. Wana tokabolaka elambo, tokanisaka oyo etali tempelo. Tolakaka komikundola ntango nyonso Mobikisi mpe kobatela mitindo na Ye lokola bomilengeli mpo na kosala elongo makuli ya bule ya tempelo.”3

Makuli ya tempelo ekambaka epai ya mapamboli minene oyo ezwami na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Ezali makuli maye masengelami mpo na bonetwami na biso na bokonzi ya selesitiale. Wana ezali biso kobunda kobomba makuli na biso, mayoki na biso ya bozangi kokoka mpe bozangi bobongi nie ebandi kolemba, ntango makuli mpe mayokani ya tempelo ekomi na bomoi. Moto nyonso atombelami boyei bolamu mpo na kotambola na nzela epai na bomoi ya seko.

Nakamwaka bokasi ya bana basi, bilenge basi, mpe bamama Nakutani na bango na mokili mobimba baye ya bango makolo matelemi ngwi likolo ya nzela oyo. Tika ngai nakabola ndambu ya bandakisa ya bana basi mpe bamama ya mayokani oyo nakutani na bango.

Luana azalaki na mibu 11 ntango Nakendeki kotala libota na ye na Buenos Aires, Argentine. Likolo ya likambo moko ya likama na bomwana na ye,Luana akoki koloba te. Azalaka koloba te uta mibu ebele. Afandaki kolobaka te wana ezalaki biso banso kosolola. Nakobaki kolikia ata kutu na mongongo ya nse kowuta na ye. Atalaki ngai na bolingi lokola soki kolobaka ezalaki na ntina te mpo na ngai nayeba motema na ye. Nsima ya losambo, totelemaki mpo na kokende mpe Luana apesaki ngai liyemi moko. Ayemaki Yesu Klisto na elanga ya Getsemane. Nsima Nayaki koyeba litatoli na ye na mongongo makasi mpe polele. Luana asalaka liyokani na libatisi ya kotelema lokola nzeneneke Nzambe “na ntango nyonso, mpe na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso.”4 Ayebaki Bomikabi ya Yesu Klisto, lokola etatolamaki na nzela ya liyemi na ye. Eyaka ye koyeba ete, na nzela ya nguya ya kolendisa mpe ya kokokisa ya bomikabi, akokaki kobikisama mpe koloba lisusu? Uta mokolo wana mibu misato kala, Luana akoli na bokasi na ye mpo na koloba. Azali sikoyo kosala elongo na Bilenge basi elongo na baninga na ye. Na botongono na mayokani oyo asalaki na libatisi, azali kokoba kokabola litatoli na ye ya Mobikisi.

Bilenge na mokili mobimba bazali kosepela na tempelo. Na Lima, Peru, Nakutanaki na tata moko mpe bana na ye ya basi misato libanda ya ekuke ya tempelo. Namonaki pole na bilongi na bango. Mibale kati na bana bazalaki batengoni makasi mpe bafandaki na kiti ya velo. Mwana ya misato ya mwasi, ntango azalaki kobatela mposa ya bandeko na ye ya basi, alimbolaki ete azalaki na bandeko basi mibali mosusu na ndako. Bazalaki lisusu ya kofanda na kiti ya velo. Bazalaki na likoki ya kotambola te bangonga 14 tii na tempelo. Tempelo elingaki koloba mingi mpo na tata oyo mpe bana na ye ya basi ete minei kati na bango bayaka na tempelo mokolo wana—mibale na bango mpo na kotala na pete moko oyo akokaki kobatisama mpo na bawa mpe kosala likuli ya bule wana. Lokola Nefi, “[basepelaki] na mayokani ya Nkolo.”5

Mwasi monzemba moko Nayebi atiaka motuya ya likuli ya elambo ya poso na poso mpe elaka na yango ya bule “ete [a]koki kozala ntango nyonso na Molimo na ye elongo na [ye].”6 Boninga wana ya ntango nyonso azali elaka oyo elembisaka bambonge ya bomoko na ye. Epesaka ye bokasi ya komizindisa na kokolisaka batalanta na ye mpe mposa ya kosalela nzambe Nkolo. Amoni esengo monene na kolingaka makasi bana banso na bomoi na ye, mpe ntango alukaka kimia ya sikisiki, bokomona ye kati na tempelo.

Na nsuka, mama moko ya mokolo makasi ya mibu koleka 90 amoni bana mpe bankoko na ye kokola mpe bankokoloko koya na mokili. Lokola mingi na biso, asili kozala na bomoi moko etondi na mawa, mitungisi, mpe esengo ezanga bososoli. Atubeli ete soki azalaki kokoma lisolo ya bomoi na ye, akopona te kokotisa mikapo mosusu oyo esili kokomama. Nzokande, na boseki moke, alobaka, “Nasengeli kaka kozala na bomoi mwa ntango molai mpe komona lolenge nini nyonso ekosukela!” Akobi kosimba makasi mayokani na nzela.

Nefi ateyaki ete:

“Esili bino kokota na kati ya nzela eke mpe ya nkaka, Nalingi kotuna soki manso masalemi? Tala nalobi epai na bino, Te. …

“Yango wana, bosengeli kokende liboso na bolandi nzela ya Klisto, na kondima mpe na bolingo ya Nzambe,mpe na bolingi ya bato nyonso. To soki bozwi mokano ya kokende liboso, bokozala na esengo mingi na kolanda maloba ya Klisto, kino na nsuka, tala, Tata alobaki ete bokozwa bomoi ya seko.”7

Moko na moko na biso azali na nzela wana. Na mpokwa ya lelo, toyembaki oyo etali kotambola na nzela ya pole. Lokola bato moko moko, tozali makasi. Elongo na Nzambe, tokoki kotelemisama te.

Nkolo alobaki na Emma Smith ete, “Tombola motema mpe sepela, mpe kangama na mayokani oyo osali.”8

Tosepeli mpenza ete na nzela ya kobomba mayokani na biso tokoki koyoka bolingo ya Tata na biso ya Lola mpe ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Natatoli ete Bazali na bomoi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. “Teach Me to Walk in the Light,” Hymns,; to Buku ya Nzembo ya Bana, 177.

  2.  

    2. Robert D. Hales, “The Covenant of Baptism: To Be in the Kingdom and of the Kingdom,”Ensign, sanza ya zomi na moko 2000, 8, 7;Liahona,sanza ya yambo 2001, 8, 7.

  3.  

    3. David A. Bednar, “Honorably Hold a Name and Standing,”Ensign orLiahona, sanza ya mitano 2009, 98.

  4.  

    4. Moziya 18:9.

  5.  

    5. 2 Nefi 11:5.

  6.  

    6. Doctrine et Alliances 20:77.

  7.  

    7. 2 Nephi 31:19–20.

  8.  

    8. Doctrine et Alliances 25:13.