Russell M. Nelson
Mokolo na mokolo, na nzela na bino ya kokende na atandele na bino ya seko, bobakisa bondimi na bino. Bosakola bondimi na bino! Botika bondimi na bino emonana!

Bandeko basi mpe mibali, topesi bozindo ya mayoki ya bolingo mpe botondi na biso mpo na bino. Tozali na botondi mpo na misala bitinda na biso na kati na bino.

Na mobembo na mpepo kala te, mokumbi alobaki ete tokokutana na mobulu na bokiti na biso mpe bato ba mobembo banso basengeli kakanga mokaba na bango ya bobateli.Ya solo, mikakatano eyaki. Ezalaki mpenza makasi. Na nzela mpe molongo mibale nsima na ngai, mwasi moko abangaki na nsomo. Na kokita nyonso ya kobangisa mpe bodendi ya boningani, abandaki koganga makasi. Mobali na ye amekaki kokitisa ye motema kasi akokaki te. Makelele na ye ya mayele te ekobaki kino tolekaki esika ya mobulu mpo na bokiti na kimia. Na ntango ya bobangi na ye ya ntina te, nayokelaki ye mawa. Mpamba te bondimi ezali nkisi ya bobangi, na kimia nalingaki ete nakokaki kolendisa bondimi na ye.

Nsima, lokola bato ya mobembo, batikaki na mpepo, mobali ya mwasi wana asololaki na ngai. Alobaki, “Nasengi bolimbisi mpo mwasi na ngai azalaki na bobangi mpenza.Nzela moko nakokaki kokitisa motema na ye ezalaki se koyebisa ye ete ‘Mpaka Nelson azali na mpepo oyo, boye osengeli kobanga te.’”

Nandimi te ete kozala na ngai na mpepo wana ekokaki kopesa ye kimia, kasi nakoloba ete moko ya makambo ya bomoi ya kufa ezali ete bondimi na biso ekomekama mpe ekoningisama. Ntango mosusu mimekamo wana eyaka ntango tokokutana na oyo emonani lokola bokutani ya bomoi-mpe-kufa. Mpo na bobangi ya mwasi wana, boningani makasi ya mpepo elakisaki moko ya bangonga wana ntango toyei kokutana miso-na-miso na makasi ya bondimi na biso.

Ntango tozali kolobela bondimi—bondimi oyo ekoki kolongola bangomba—tozali kolobela te bondimi nionso kasi bondimi na Nkolo Yesu Klisto. Bondimi na Nkolo Yesu Klisto ekoki lolendisa ntango toyekoli Ye mpe tosaleli boyambi na biso. Malongi ya Yesu Klisto esengelisamaki na Nkolo mpo na kosunga biso komatisa bondimi na biso. Na elobeli ya lelo, nzokande, Lilobaboyambi ekoki kolakisa makambo mingi mpo na bato bakeseni.

Lilobaboyambi elingi koloba mpenza “kokangisama lisusu” to “kokangana lisusu” na Nzambe.1 Motuna tosengeli komituna bisomei ezali, ezali biso na ntembe te kakangana na Nzambe mpo ete bondimi na biso emonana, to ezali biso kokangana na eloko mosusu? Ndakisa, nayokaki likololikolo mokolo ya yambo na ntongo etali masano ya mosali ya atletiki oyo tokendaki kotala Eyenga eleki. Mpo na boko akumisi ya makasi, namitunaki soki, “boyambi” na bango ekoki “kokangisa bango lisusu” bobele na bana boko lolenge ya bodendi ya bale.

Tosengeli moko na moko komituna, wapi bondimi na biso? Ezali yango na ekipi? Ezali yango na Liloba moko ya eloko? Ezali yango na moto moko ya lokumu? Ata ekipe ya malamu mingi koleka ekoki kokweya. Lokumu ekoki kosila. Ezali bobele na Moko na oyo bondimi na bino ezali ntango inso na likama te, mpe ete ezali na Nkolo Yesu Klisto. Mpe bosengeli kotika bondimi na bino emonana!

Nzambe asakolaki na mobeko na Ye ya yamboya mibeko zomi, “Okozala na banzambe mosusu te liboso na ngai.”2 Alobaki lisusu, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.”3 Iyo bato mingi mpenza batali bobele mbano ya bank mpo na kimia to baninga bato mpo na ndakisa ya kolanda.

Baminganga, Batoya mayele, mpe Bai politiki bazali mbala mingi batiai na bomeki ya bondimi. Na bolandi ya bantina na bango, boyambi na bango ekokomonana to ekobombama? Ezali bango kokngana lisusu na Nzambe to na bato?

Nazwaki momekamo ya boye mibu zomi mileki ntango moko ya baninga na ngai ya kelasi ya minganga apamelaki ngai mpo na bozangi na ngai kokabola boyebi na ngai ya mosala na kondima ya boyambi na ngai. Asengaki Ngai ete nasangisa te yango mibale. Boniboni Nakoki kosala yango? Bosolo ezali bosolo! Ezali ya kokabola ata moke te, mpe eteni moko na yango ekoki kotiama mpembeni te.

Soki bosolo ebimi uta na mayele ya loboratoire to na nzele ya bobomisi, bosolo nyonso ewuti na Nzambe. Bosolo nyonso ezali eteni ya nsango malamu ya Yesu Klisto.4 Kasi batunaki ngai nabomba bondimi na ngai. Natosaki te bosenga ya moninga na ngai. Natikaki bondimi na ngai emonana!

Na makasi nyonso na mosala, mibeko ya makasi ya bosolo esengelami. Banganga ya mayele baluli bonsomi na bango ya koloba. Kasi litondi ya bonsomi ekoki te koyebana soki eteni moko ya boyebi ebwakami “libanda-ya-ndelo” na mikano ya bato.

Bosolo ya Molimo ekoki te ezala ya kobosana—mingimingi mibeko ya Nzambe. Kobatele mibeko ya Nzambe epesaka mapamboli, ntango nyonso! Bobuki mibeko ya Nzambe epesaka bozangi mapamboli, ntango nyonso!5

Kpokoso etondi na mokili oyo mpamba te ezali na bato bazangi bobongo nie. Bantina na bango mpe bamposa na bango ezali kotambolisama na bondimi na bango to bozangi yango. Mingi batii bantina na bango liboso ya Nzambe. Boko batii ntembe na bolamu ya boyambi na bomoi ya lelo. Lokola na ekeke nyongo, boye lelo ezali na baoyo baseki to baboyi bonsomi ya kosalela boyambi. Boko kutu bapameli boyambi mpo na montango ya bakoni ya mokili. Ya solo, ezalaki ngonga ntango bobomibomi esalamaki na Liloba ya boyambi. Kasi kozalaka na boyambi ya peto ya Nkolo, oyo elingi koloba kobundaka mpo na kokoma moyekoli ya solo ya Yesu Klisto, ezali nzela ya bomoi mpe mokano ya mokolo na mokolo oyo ekopesa bokambami na Nzambe. Ntango bosaleli boyambi na bino, bozali kosalelaka bondimi na bino. Bozali kotika bondimi na bino emonana.

Nkolo ayebaki ete mwana na Ye asengeli koyelola kokuta Ye. “Mpo moke ezali ekuke,” Alobaki, “mpe moke ezali nzela oyo ekomema na… bonetolami … , mpe moke kuna bakozwa yango.”6

Makomi epesi moko ya banzela ya malamu ekoleka mpo na kozwa botamboli na biso mpe kovanda kati na yango. Boyebi ya makomi ekopesa lisusu bobatelami. Ndakisa, na mambi ya mokili bokono lokola “mpasi ya kobota mwana” akamataki bomoi ya bamama mpe ya babebe mingi bazanga elindo. Kasi boyokani ya kala ezala na libongisi ya solo mpo na kosimba moto ya bokono, ekomami koleka mibu 3.000! 7 Bato mingi bakufaki mpamba te boluki boyebi ya bato ezangaki kosala kaebana moloba ya Nkolo!

Bandeko na ngai ya basi mpe mibali ya bolingo, nini ezali biso kozanga na bomoi na biso soki tozali “koyekola mpenza, [kasi] tozali kokoka kokoma te na boyebi ya bosolo”?8 Tokoki kozwa boyebi monene uta na makomi mpe kozwa bofulami na nzela nsambo ya bondimi.

Kosalaka bongo ekosalisa biso lokola tozwi mikano ya mokolo na mokolo. Mingimingi ntango mibeko ya bato etiamaki mpe esalelami, mibeko ya Nzambe ekoki te kozala mibeko na biso. Na kosalaka na makambo ya kpokoso, tosengeli yambo koluka bokambi ya Nzambe.

Tosengeli “ kosalela makomi nyonso na biso… mpo na litomba mpe boyekoli na biso.”9 Likama ekoya ntango tomeki kokabola bisomei na maloba lokola “bomoi na ngaimei” to kutu “ezaleli malamu koleka na ngai.” Soki moto moko ameki kokabola bomoi na ye na biteni ya kokabwana, motoaekoki te kolamuka na litondi ya bomoto ya bosembo monene ya moto—mokolo moko te akokoma nionso oyo bosolo na yemei ekoki kozala.

Lisenginia mpo na kolingama ekoki kotia liboso makanisi ya bato likolo ya maloba ya Nzambe. Mayangani ya politiki mpe mayele ya boteki mingimingi esaleli botangi makanisi ya bato mpo na kobongisa mabongisi na bango. Mbano ya botangi wana ezali koyebisa makambo. Kasi Ekoki na mpasi kosalelama lokola ntina ya kondimisa bozangi botosi ya mibeko ya Nzambe! Ata soki “moko na moko azali kosala yango,” bobe ezali bolamu te. Mabe, mbeba, mpe molili ekoki te kozala bosolo, ata soki elingami mingi. Likebisi ya biblia elobi boye: “ Mawa na bango mpo babengi mabe malamu, mpe malamu mabe; et kotia molili mpo na pole, mpe pole mpo na molili.”10

Nsima ya Etumba ya mokili mobimba ya II, ezalaki na loyembo moko ya nsoni elingamaki mingi. Na kotombolaka bonsoni, elakaki ete bato milio 50 bakokaki te kozala na libunga. Kasi na ntembe te, bato milio 50bakoki kozala na libunga—na libunga nyonso. Bonsoni ezali kaka bonsoni na miso ya Nzambe, oyo mokolo moko akosambisa nyonso ya bamposa mpe masenga na biso. 11

Kesenisa bobangi mpe bozangi bondimi oyo etondi na mokili lelo elongo na bondimi mpe na mpiko ya mwana na ngai ya mwasi na ya bolingo mpenza Emily, oyo avandi sikawa na ngambo mosusu ya elamba. Ntango bomoi ya kufa ezalaki kolongwa na nzoto na ye eliama na cancer, akokaki koloba na mpasi. Kasi na mwa koseka na elongi na ye, alobaki na ngai, “Papa, kobangela ngai te. Nayebi nakozala malamu!” Bondimi ya Emily ezalaki ya komonana—komonana na polele—na ntango wana ya boboto, kaka ntango tosengelaki yango mingi koleka.

Elenge mama oyo ya kitoko ya bana mitano azalaki na bondimi monene epai ya Tata na ye ya Lola, na mwango na Ye, mpe na bolamu ya seko ya libota na ye. Akangamaki mpenza lisusu na Nzambe. Azalaki mpenza na bondimi makasi na mayokani asalaki elongo na Nkolo mpe na molongani na ye. alingaki bana na ye kasi azalaki na kimia, atako bonene ya bokabwni na bango. Azalaki na bondimi mpo na lobi na ye, mpe ya bango lisusu, mpamba te azalaki na bondimi na Tata na biso ya Lola mpe na mwana mobali na Ye.

Na 1986, Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Ya solo tokokutana na bobangi, tokoyoka nsoni, mpe kokutana na bokeseni. Tika biso tozala na mpiko ya kotelemela boyokani na bato banso, mpiko ya kotelema mpo na libongisi. Mpiko, koyakana ya mabe te, ekomema mwa koseka ya kondimama na Nzambe. … Mikundola été bato bazali na bobangi na bango, kasi baye bazali kotelemela bobangi na bango na [bondimi] bazali na mpiko lokola.”12

Toli ya Mokambi Monson ezali na ntango te! Boye nabondeli bino, bandeko na ngai balingami basi mpe mibali: Mokolo na mokolo, na nzela na bino ya kokende na atandele na bino ya seko, bobakisa bondimi na bino. Bosakola bondimi na bino! Botika bondimi na bino emonana!13

Nasambeli ete bokozala na bokangami mpenza lisusu na Nzambe, ete bosolo na Ye ya seko ekoka kotikala na mitema na bino mpo na libela. Mpe nasambeli ete, na nzela ya bomoi na bino, bokoka kotika bondimi na bino emonana! Na Liloba ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Ntango bebe abotami, nsinga ya motolu ekangami mbala mibale mpe ekabolami na katikati ya nkanga mibale. Nkanga ezali ekangele—ekangele ya likama te. Liloba religion ewuti na ntina ya latin: re, elingi koloba “lisusu” to “zonga na,” mpe ntango mosusu ligare, elingi koloba “kokanga” to “kokangisa.” Boye, tososoli ete eyamba “bikangele ya mondimi na Nzambe.”

  2.  

    2. Esode 20:3. Na kobakisa, Nkolo alobaki, “Yambola, mpe bongwana yomei na bikeko; mpe boluka … Mosika na bonsomo” (Ezekiele 14:6).

  3.  

    3. Doctrine and Covenants 6:36.

  4.  

    4. Tala Spencer W. Kimball, The Teachings of Spencer W. Kimball, ed. Edward L. Kimball (1982), 391.

  5.  

    5. Tala Mosiya 2:41; Doctrine et alliances 58:30–33; 82:10. Libongisi oyo ezali ya solo mpo na moto nionso, mpo “Nzambe ekesenisaka bato te ” (Misala 10:34; tala lisusuMoroni 8:12).

  6.  

    6. Doctrine et Alliances 132:22.

  7.  

    7. Tala Lewitiko 15:13.

  8.  

    8. 2 Timote 3:7.

  9.  

    9. 1 Nefi 19:23.

  10.  

    10. Yisaya 5:20.

  11.  

    11. Makomi eteyi: “Yaka eapi na Nkolo, Mosanti Se Moko. Mikundola ete banzela na ye ezali sembo. Tala, nzela mpo na moto ezali nkaka, kasi ekei na nzela ya alima liboso na ye, mpe mokengeli ya ekuke ezali Mosantu Se Moko ya Yisalaele ; mpe asaleli mosali te kuna ; mpe ezali na nzela mosusu te longola se na ekuke wana; mpo akoki kokosama te, mpe Nkolo Nzambe ezali nkombo na Ye” (2 Nefi 9:41).

  12.  

    12. Thomas S. Monson, “Courage Counts,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 1986, 41. Na libaku mosusu, Mokambi Monson apesaki likebisi ya bofuli: “Mpo na kozala monene, tosengeli kokolisa bokoki mpo na kotelemala mobulu na mpiko, bososoi na esengo, mpe elonga na bosawa. … Tozali bana babali mpe bana basi ya Nzambe ya bomoi, na elili na ye tokelamaki. … Tokoki te ya solo kosimba bondimi oyo na kozanga koyoka bokasi ya sika ya bozindo mpe nguya, kutu bokasi ya kowumela na mitindo ya Nzambe, nguya ya kotelemela masenginia ya Satana” (“Yellow Canaries with Gray on Their Wings,” Ensign, Sanza ya nsambo 1973, 43).

  13.  

    13. “Deny yourselves of all ungodliness” (Moroni 10:32). Kobanga te moto koleka Nzambe (tala Doctrine and Covenants 3:7; 59:5).