2010–2019
Vanda na bosolo na Bondimi
Sánzá ya mínei 2014


Vanda na bosolo na Bondimi

Moko na moko na biso akoki kopambolama mingi soki toyebi mambi ya bondimi mpe libonza oyo ekambaki bankoko na biso kokota na Eklezia ya Nkolo.

Nalingi mambi ma kala ya Eklezia. Mbala mosusu lokola mingi kati na bino bondimi na ngaimei ekomaka makasi ntango nayekolaka bomipesi ya kitoko ya bankoko na biso oyo bandimaki nsango malamu mpe bavandaki na bosolo na bondimi.

Sanza moko eleki, bilenge ya kokamua, 12,000 bautaki na Gilbert Arizona Temple District kosepela bosilisi ya Tempelo na bango ya sika elongo na boyembi ya bofuli, kolakisaka bomipesi na bango na mpo na kovanda na bosembo. Ntina ya bosepeli na bango ezalaki “Vanda na bosolo—na bondimi.”

Kaka lokola bilenge wana ya bondimi ya Arizona basalaki, Mosantu ya Mikolo Mya Nsuka nionso akoki komipesa mpo na “kovanda na bosolo na bondimi.”

Maloba ya loyembo elobi, “Solo na bondimi oyo batata na biso balingaki” (“True to the Faith,” Hymns, no. 254).

Tokoki kobakisa, “Solo na bondimi oyo bankoko na biso balingaki.”

Namitunaki soki moko kati na bilenge wana ya bosepeli ya Arizona bayebaki mambi ma kala ya Eklezia na bango mei—soki bayebaki mambi ma kala ya lolenge libota na bango eyaki kokoma bandimi ya Eklezia. Ekozala eloko ya malamu mingi soki Mosantu ya mikolo mya Nsuka nionso ayebaki mambi ya mbongwana ya bankoko na bango.

Soki ozali mokitani ya bapionie to te, libula ya bapionie ya Bamormon ya bondimi mpe libonza ezali libula na bino. Ezali libula ya ntina ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu Ba Mikolo mya Nsuka.

Moko ya mikapo eleki kitoko na mambi ma kala ya Eklezia esalemaki ntango Wilford Woodruff, Apostolo ya Nkolo, azalaki koteya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto na Grande Bretagne na 1840— mibu 10 nsima ya bozongisi ya Eklezia.

Wilford Woodruff mpe Bapostolo basussu batiaki mayele na bango na mosala na etuka ya Liverpool mpe na Preston bituka ya Angleterre, elongo na elonga monene. Mpaka Woodruff, oyo nsima akomaki Mokambi ya Eklezia, azalaki kokoba kosambela Nzambe mpo akamba ye na mosala wana ya litomba mingi. Mabondeli na ye ememi bofuli mpo na kokende esika ekeseni mpo na koteya nsango malamu.

Mokambi Monson ateyaki biso ete ntango tozwi bofuli uta na lola mpo na kosala eloko songolo —, tosala yango sikawa— totepatepa te. Wana ezali mpenza nini Wilford Woodruff asalaki. Elongo na bokambi ya polele uta na Molimo mpo na “kokende … na sudi,” Mpaka Woodruff atikaki penepene mbala moko mpe akendaki na ndambo ya Angleterre babengi Herefordshire—mboka ya bilanga na westi ya Angleterre. Wana nde akutanaki na moloni bilanga mofuluki na nkombo ya John Benbow, wapi ayambamaki malamu “na mitema ya esengo mpe bozongisi matondi ” (Wilford Woodruff, in Matthias F. Cowley, Wilford Woodruff: History of His Life and Labors as Recorded in His Daily Journals [1909], 117).

Liboke ya bato koleka 600, oyo babengamaki bangomei Bandeko ya Bomoko, bazalaki “kosambela mpo na pole mpe bosolo” (Wilford Woodruff, in Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff [2004], 91). Nkolo atindaki Wilford Woodruff lokola eyano na mabondeli na bango.

Mateya ye Mpaka Woodruff ebotaki mbuma mbala moko, mpe mingi bazwaki libatisi. Brigham Young mpe Willard Richards balandaki ye na Herefordshire, mpe Bapostolo misato bazwaki elonga ya kitiko.

Na bobele mua basanza moke, babongisaki bitapi 33 mpo na bandimi 541 oyo bakotaki na Eklezia. Mosala na bango kitoko ekobaki, mpe nsuka nsuka pene na bandimi banso ya Lisanga ya Bandeko bazwaki libatisi na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Nkoko ya nkoko na ngai ya mwasi Hannah Maria Eagles azalaki moko ya liboso ya koyoka Wilford Woodruff. Ayebisaki molongani na ye, Robert Harris Jr., ete ayokaki liloba ya Nzambe mpe ete alingeli kobatisama. Robert asepelaki te koyoka likambo ya mwasi na ye. Ayebisaki ye asengeli kokende na ye na mateya epesami na bamisionele ya Bamormon mbala ekoya, mpe alingaki kosembola ye.

Kovandaka pene na liboso ya lisanga, elongo na mposa makasi ya komitika te, mpe mbala mosusu kowolola moteyi ayaki, Robert asimbamaki mbala moko na Molimo, kaka lokola mwasi na ye. Andimaki nsango ya Bozongisi ezali ya bosolo, mpe ye mpe mwasi na ye bazwaki libatisi.

Mambi na bango ya bondimi mpe bomipesi na bango ezali lolenge moko na bamilio ya basusu: ntango bayokaki nsango malamu, bandimaki ezalaki ya solo!

Lokola Nkolo elobi, “Mpate na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe nayebi bango, mpe bakolanda” (Yoane 10:27).).

Koyokaka mongongo ya Mokengeli mpate, bapesaki mpenza bomoyi na bango na kotosa nsango malamu mpe kolanda bokambemi ya profeta ya Nkolo. Koyanolaka na libiangi mpo na “kosangana na Siona,” batikaki nsima ndako na bango na Angleterre, bakatisaki Atlantiki, mpe bakomaki elongo na Basantu na Nauvoo, Illinois.

Bayambaki nsango malamu na mitema na bango mobimba. Nzokande bamekaki komivandisa na mabele na bango ya sika, basalaki na botongi ya Tempelo ya Nauvoo na moko na zomi ya misala na bango —kolekisaka moko moko na mokolo zomi ya mosala na botongi ya tempelo.

Bazalaki mitema mibukana na nsango ya liwa ya profeta molingami na bango, Joseph Smith, mpe ndeko na ye Hyrum. Kasi bakobaki! Batikalaki na bosolo na bondimi.

Ntango Basantu baniokwamaki mpe babenganamaki libanda ya Nauvoo, Robert mpe Maria bapambolamaki mingi kozwa dotatio na bango na tempelo, yambo ya bokatisi Ebale ya Mississippi mpe kokenda na westi. Atako bayebaki mpenza te nini ezali kozela bango liboso, bazalaki na ntembe te na bondimi na bango mpe na matatoli na bango.

Elongo na bana motoba, bamonaki mpasi na pototopoto lokola bakatisaki Iowa na nzela na bango ya westi. Batongaki mpo na bangomei mua ndako na ngambo ya Missouri na wapi eyaki koyebana lokola Winter Quarters.

Bapionie oyo ya mpiko mpenza ezalaki kozela bokambi ya bopostolo na lolenge kani mpe ntango kani bakokende lisusu na westi. Mabongisi ya banso ebongwanaki ntango Brigham Young, ya Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, abimisaki libiangi mpo na kosala na lifuta te na mampinga ya Amerika na oyo eyaki koyebana lokola Mormon Battalion.

Robert Harris Jr. azalaki moko ya bapionie Bamormon 500 koleka oyo bayanolaki na libiangi oyo kouta na Brigham Young. Akomisaki, atako elakisaki asengelaki kotika mwasi na ye na zemi mpe bana na ye ya mike motoba.

Mpo na nini ye mpe bato misusu balingaki kosala likambo moko ya boye?

Eyano ekoki kopesama na maloba ya nkoko ya nkoko na ngai ya mobali yemei. Na mokanda oyo akomelaki, mwasi na ye ntango bataillon na nzela na yango na Santa Fe, akomaki, “Bondimi na ngai ezali makasi mpenza koleka [mpe ntango nakundoli makambo oyo Brigham Young alobaki na biso], nandimi yango pene lolenge moko soki Nzambe Monene alobaka na ngai.”

Na bokuse, andimaki koyokaka profeta ya Nzambe, lokola mibali mosusu basalaki. Tala mpo na nini basalaki yango! Bandimaki bazalaki kokambama na profeta ya Nzambe.

Kaka na mokanda moko wana, alakisaki mayoki na ye mpo na mwasi mpe bana na ye mpe alobaki na mabondeli na ye ete bana bakopambolama.

Nsima na mokanda ya nsuka asalaki maloba ya nguya oyo: “Tosengeli kobosana te biloko oyo wapi bino na ngai toyokaki [tokutanaki] na Tempelo ya Nkolo.”

Kosangisa elongo na litatatoli na ye liboso ete “tokambami na Profeta ya Nzambe,” makebisi mibali wana ya bule ekomaki lokola makomi mpo na ngai.

Sanza zomi na mwambe nsima ya bokei elongo na batayo, Robert Harris asanganaki na bozangi na molingami na ye Maria. Batikalaki na bosolo mpe na bondimi na nsango malamu ezongisami na bomoyi na bango mobimba. Babotaki bana 15, 13 bakomaki mikolo. Nkoko na ngai ya mwasi Fannye Walker, ya Raymond, Alberta, Canada, azalaki moko ya bankokololo na bango 136.

Nkoko ya mwasi Walker asepelaki mpo na nkoko na ye ya mobali asalaki na kati na Mormon Battalion Mormon, mpe alingaki bankoko na ye nionso bayeba yango. Sikawa lokola nazali nkoko ya mobali, nasosoli mpo na nini ezalaki na ntina mpo na ye. Alingaki kobalola mitema ya bana epai ya bankoko na bango. Alingaki bankokololo na ye bayeba libula na bango ya bosembo—mpamba te ayebaki yango ekopambola bomoyi na bango.

Mingi toyokaka mpo na bosembo ya bankoko na biso, mingi lokola tozali kosalela bwania mpe kopona bosembo.

Mpe lokola yango ezali. Moko na moko na biso akoki kopambolama mingi soki toyebi mambi ya bondimi mpe libonza oyo ekambaki bankoko na biso kokota na Eklezia ya Nkolo.

Uta mbala ya liboso Robert mpe Maria bayokaki Wilford Woodruff kotaya mpe kotatola bozongisami ya nsango malamu, bandimaki nsango malamu ezalaki ya solo.

Bayebaki lisusu ete atako esambiseli to moniokoli ekokoyela bango, bakopambolama mpo na kovanda na bosolo na bondimi. Ezali penepene lokola oyo bayokaki maloba ya profeta na biso ya lelo, oyo alobaki, “Ezali na likabo moko te ya monene … mpo na kozwa mapamboli [ya tempelo[” (Thomas S. Monson, “Tempelo esantu—ekolakisama na mokili,” Ensign to Liahona, orLiahona, May 2011, 92).

Biteni mibale ya Angleterre ekomami na mopanzi na yango, “Kotelema likolo ya Mapeka ya Bingambe.” Ntango nakundoli bonene ya bankoko na biso bapionie, Nayoki ete tozali banso kotelema likolo ya mapeka ya bingambe.

Atako kolendisama euti na mokanda ya Robert Harris, nandimi ete bankoko mingi bakokaki kotinda se maloba moko wana epai ya bana mpe bankoko na bango: Yambo, tosengeli te kobosana mayele tozwaki na tempelo, mpe tosengeli te kobosana bilaka mpe mapamboli oyo ekoya na moko na moko na biso na ntina ya tempelo. Mibale, tosengeli kobosana ete tokambami na profeta ya Nzambe.

Natatoli ete tokambami na profeta ya Nzambe. Nkolo azongisaki Eklezia na Ye na mikolo ya nsuka na nzela ya Joseph Smith, mpe tosengeli kobosana te ete tokambemi na nsinga ekatani te ya baprofeta ya Nzambe uta Joseph tii Brigham mpe koleka na Mokambi moko na moko ya bakitani ya Eklezia kino na profeta na biso ya lelo—Thomas S. Monson. Natatoli ete azali profeta ya Nkolo na nse ya mabele lelo.

Ezali mposa ya motema na ngai ete, na nzela elongo na bana na ngai mpe bankoko na ngai, tokotosa likabo ya bosolo ya bankoko na biso—baye bapionie Mormon ya bondimi oyo mbala moko batiaki biloko nionso na lotale mpo na libonza mpo na kobatela Nzambe na bango mpe bondimi na bango. Nasambeli ete moko namoko na biso akoka kovanda na bosolo na bondimi oyo baboti na biso balingali mingi. Na nkombo mosantu mpe ya bule ya Yesu Klisto, amene.