2010–2019
Botosi na Nzela ya Botongono na Biso
Sánzá ya mínei 2014


Botosi na Nzela ya Botongono na Biso

Botosi ezali elembo ya bondimi na biso na bwania mpe nguya oyo aleki na likoki, se Nzambe.

Likita ya Mpokwa na Libota Ndeko mwasi Perry mpe ngai tokosala butu nionso mokolo ya yambo ekomaki monene na mbalakaka. Ndeko na ngai ya mobali, mwana na ye ya mwasi, ndeko ya mobali ya Barbara, mpe mwana nkasi moko ya mwasi mpe mobali na ye bayaki na kati ya ndako na biso ya monene. Ezali eleko wana kaka napambolamaki na kozala na libota kofanda penepene na ngai uta nazalaki elenge mobali. Ntango wana, libota na ngai efandaki na ndako moko kaka elongo na baye libota ya monene ya mama na ngai. Ndako ya nkoko ya mobali Sonne ezalaki ekuke ya nsima na nordi, mpe ndako ya Mama leki Emma ezalaki na ekuke ya nsima na sudi uta na ndako na biso. Na mopanzi ya sudi ya ndako efandaki Mama leki Josephine, mpe na mopanza ya esti ezalaki wapi Noko afandaki.

Ntango nazalaki elenge mobali tozwanaki elongo na baye libota na biso ya monene mokolo na mokolo mpe tokabolaki bangonga ya kafukafu ya kosalaka, kosakanaka, mpe kotalanaka elongo. Tokokaki kozwa mpasi te na kozangaka koyebisa bamama na biso. Mokili na biso ezali na bokeseni sikawa—bato ya mabota mingi bapanzani. Atako bafandi mwa penepene bango na bango, mbala mingi bafandi na kotala malamu bazali mosika te. Kasi, nakanisi ete bolenge na ngai lokola mwana mobali mpe ezaleli na ngai ya sikawa ezali moke lokola lola, elongo na libota balingani.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki ya kokangama makasi koleka banso na nkoko na ngai ya mobali. Lokola mwana mobali ya mokolo koleka banso na libota na ngai, nazalaki kolongola neige na eleko ya malili makasi mpe nazalaki kolengela matiti na eloko ya molunge mpo na ndako na biso mpe ndako ya nkoko na ngai ya mobali mpe bandako ya bamama leki na ngai mibale. Nkoko ya mobali amesaneki kofanda liboso ya ndako ntango nazalaki kokata matiti liboso ya ndako na ye. Esilisaki ngai, nazalaki kofanda liboso na ndako na ye mpe kotala bato elongo na ye. Bileko wana ezali bantango ya motuya mpo na ngai.

Mokolo moko natunaki nkoko na ngai ya mobali boniboni nakokaki koyeba soki nazalaki kosala makambo ya malamu, lokola bomoi ezali kopesa makambo mingi mpenza ya kopona. Lokola momeseno nkoko na ngai ya mobali ayanolaki na mayele azwaki na bomoi ya kosalaka bilanga.

Ateyaki ngai koyekolisa bampunda na baekipi ya mibale mibale mpo ete bakoka kosala elongo. Alimbolaki ete ekipi ya bampunda esengeli ntango inso koyeba nani azali kokamba. Eloko ya motuya mpo na kotambwisa mpe kokamba mpunda ezali nsinga ya kobandela mpe nkanga na mino. Soki moko na ekipie akanisi ete asengeli ata moke te kotosa bolingi ya mokumbi, ekipi ekobenda mpe ekosala elongo ata moke te mpo na kokokisa mobimba makoki na bango.

Sikawa tika tososola liteya nkoko na ngai ya mobali ateyaki ngai na kosalelaka ndakisa oyo. Nani azali mokumbi ya ekipi ya bampunda? Nkoko na ngai ya mobali akanisaki ezali Nkolo. Ye nde Azali na ntina mpe mwango. Ye azali lisusu moteyi mpe motongi ya ekipi ya bampunda mpe, lisusu, ya mpunda moko na moko. Mokumbi ayebi malamu mingi koleka, mpe nzela se moko mpo na mpunda koyeba ete azali ntango inso kosalaka likambo ya malamu ezali kolakisa botosi mpe kolanda bokambi ya mokumbi.

Nini oyo nkoko na ngai ya mobali akokisaki na nsinga ya kobandela mpe nkanga na mino? Nakanisaki ntango wana, lokola nakanisi sikawa, ete nkoko na ngai ya mobali azalaki koteya ngai kolanda bitinda ya Molimo Mosantu. Na makanisi na ye, nsinga ya kobandela mpe nkanga na mino ezalaki makambo ya molimo. Mpunda ya botosi, uta na ekipi ooyo bayekolisi malamu ya bampunda, azali na mposa batindika ye kaka mwa moke na bobendi uta na mokumbi mpo na kosala mpenza nini ye alingi ete asala. Mwa bobendi ya moke ya boboto yango ekokani na mwa mongongo ya kimia, ya moke oyo Nkolo alobelaka biso. Na limemia na nguya na biso ya boponi, ekoki kozala mwa bobendi ya makasi te, to mpe ya kotinda na loma te.

Babali mpe basi oyo bayebi te bitinda ya kimia ya Molimo mbala mingi bakoyekola, lokola mwana oyo akimaki ndako ayekolaki, na nzela ya oyo asalaki na kozangaka botosi mpe na bomoyi ya mobulu. Ezali bobele nsima ya kokitisama na malandi ya oyo asalaki nde mwana oyo akimaki ndako “azongaki ye moko” mpe ayokaki mamimisi ya Molimo koyebisaka ye kozonga na ndako ya tata na ye (talaLuke 15:11–32).

Boye liteya nkoko na ngai ya mobali ateyaki ngai ezalaki ya komilengela mpo na kozwa ntango inso mwa bobendi wana ya boboto ya Molimo. Ateyaki ngai ete nakozwa ntango inso bobendi wana soki nabandi kokota na nzela ya mabe. Mpe nakozala mokolo moko te na elindo ya kosala lisusu mabe mingi soki natiki Molimo ekamba mikano na ngai na bomoyi oyo.

LokolaYakobo 3:3 alobi, “Tokotia bibende na monoko ya bampunda ete batosa biso mpe tokotambwisa nzoto na bango.”

Tosengeli koyokela bitinda ya molimo. Ata na bobendi ata ya moke ya Nkolo, tosengeli kozala na bolingi mpo na kobongola nzela na biso mobimba. Mpo na kolonga na bomoyi, tosengeli koteya molimo mpe nzoto na biso kosala elongo na kotosaka mitindo ya Nzambe. Soki tosali keba na bitinda ya boboto ya Molimo Mosantu, yango ekoki kosangisa milimo mpe nzoto na biso na ntina moko mpe kokamba biso tozonga na ndako na biso ya seko mpo na kozala elongo na Tata na biso na Lola.

Na eteni ya bondimi na biso ya misato ya bondimi, eyekolisi biso motuya ya botosi: “Tondimi ete na nzela ya Bomikabi ya Klisto, bato banso bakoki kobikisama, na botosi na mibeko mpe makuli ya Nsango malamu.”

Lolenge ya botosi nkoko na ngai ya mobali alakisaki na ndakisa ya ekipi ya bampunda lisusu esengi elikia ya kafukafu—yango ezali, bondimi ezanga ndelo na mokumbi ya ekipi. Yango wana, liteya nkoko na ngai ya mobali ateyaki ngai, etali lisusu mabongisi ya nsango malamu—bondimi na Yesu Klisto.

Apostolo Paulo ateyaki: “Kondima ezali elendiseli ya makambo tolikiaka; ezali mpe elimboli ya biloko bizangi komonana” (Baebele 11:1). Nsima Paulo asalelaki ndakisa ya Abele, Enoka, Noa mpe Abalayama mpo na koteya bondimi. Akangamaki na lisolo ya Abalayama, mpo Abalayama azali tata ya bondimi. Paulo akomi:

“Na bondimi Abalayama, atosaki wana abiangemaki ete abima kokende kino esika akozua lokola libula. Abimaki mpe, atako ayebaki esika akokenda te.

“Na kondima, afandaki na mokili ya elaka, lokola ekolo ya mopaya. …

“Na kondima, Sarah akokaki kozua zemi ata asilaki, mpe abotaki mwana atako asilaki koleka mibu, zambi atangaki ye oyo alakaki lokola botongono” (Baebele 11:8–9, 11).

Toyebi ete na nzela ya mwana Abalayama mpe Sarah ya mobali, Yisaka, elaka moko epesamaki na Abalayama—elaka ya bana “ebele mpenza lokola minzoto na likolo, mpe lokola zelo oyo ezali na libongo na mbu ezali meke”(talamolongo 12) ;tala lisusuGenese17:15–16). Mpe sima bondimi ya Abalayama ememamaki na lolenge moko oyo mingi na biso tokoki kokanisa te.

Natalelaka mingi lisolo ya Abalayama mpe Yisaki, mpe nandimi mpenza te ete nasosoli mobimba ya bondimi mpe botosi ya Abalayama. Ntango mosusu nakoki kokanisa ye kokangaka bisaka na ye mpo na bosembo kaka mpe ntongo moko kolongwa na ntongontongo, kasi ndenge nini atambolaki makolo elongo na mwana na ye mobali Yisaki, na nzela ya mikolo misato kokende na Ngomba Moriah? Ndenge nini bamemaki koni mpo na moto kuna na ngomba. Ndenge nini atongaki lotale? Liboso akanga Yisaka mpe alalisa ye na lotale, ndenge nini alimbolaki ye ete akobonzama? Mpe ndenge nini azwaki makasi ya kotombola mbeli mpo na koboma mwana na ye ya mobali? Bondimi ya Abalayama epesaki ye bokasi ya kolanda bokambi ya Nzambe na sikisiki mpenza kino ntango anzelu abengaki ye uta na lola mpe ayebesaki Abalayama ete alongaki momekano na ye. Nsima anzelu ya Nkolo azongelaki bilaka ya boyokani ya Abalayama.

Nandimi momekano esangani na kozala na bondimi na Yesu Klisto mpe botosi ekozala mpasi mingi mpo na boko koleka basusu. Nazaku ba mibu mikoki ya bwania mpo na koyeba ete ntango bomoto ya bampunda ekoki kokesana mingi mpe, yango wana, ekoki kozala pene mingi to mpasi mingi mpo na koyekolisa, ete bokesani ya bato ezali monene mingi. Moko na biso ezali mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe, mpe bozali na lisolo moko kaka ya yambo ya bokufi mpe bokufi. Engebene na yango, ezali na moko mingi ya eyano ekokani mpo na banso. Mpe boye nandimi lolenge ya bomeki mpe mbeba ya bomoi mpe, ya motuya mingi koleka, mposa ya mbala inso ya libongisi ya mibale ya nsango malamu ya Yesu Klisto, kutu koyambola.

Ezali ya solo ete na ntango yango nkoko na ngai ya mobali ezalaki ntango ya pete mingi, mingimingi mpo na oyo etali kopona katikati ya bolamu mpe mabe. Ntango bato mosusu ya mayele mpe bwania bakoki kondima ete ntango na biso ya kilikili mingi esengi ebiano ya kilikili mpenza, nazali kondima te ete bazali na bosolo. Nzokande, nazali na lolenge ya bato oyo bakanisi ete kilikili ya lelo esengi biyano ya pete mingi, lokola eyano nkoko na ngai ya mobali apesaki na motuna na ngai ya bosolo ya koyeba bokeseni kati na bolamu mpe mabe. Nayebi oyo napesi lelo ezali bobele ndakisa. Ekoki kosala mpo na bato banso te, kasi nakoki kotatola na ntina ya ndenge esali malamu mpo na ngai. Natindi yango na bino mpe kutu nabeti na bino mondenge mpo na komeka maloba na ngai, soko bosali yango, nalaki yango ekomema polele ya boponi ntango maponi enokeli bino mpe biyano na mituna oyo ekobulungisa bato bayekola mpe baye bakanisi bazali na bwania.

Mbala mingi tokanisaka botosi ezali bolandi ya mpamba mpe ya bozangi makanisi ya mitindo to bitinda ya mokonzi moko aleki likolo. Ya solo, azali malamu mingi koleka, botosi ezali elembo ya bondimi na biso na bwania mpe nguya ya mokonzi aleki likolo. Ntango Abalayama alakisaki bondimi mpe botosi na Nzambe ya koningana te, kutu ntango atindamaki kobonza mwana na ye ya mobali, Nzambe asalisaki ye. Lolenge moko, ntango tolakisi bondimi na biso na nzela ya botosi, Nzambe akosalisa biso.

Baye batiaka mitema kaka na bangomei mpe balandi bobele bamposa na bango mpe bitinda ya bangomei bakosuka mpenza soki bamekisami na baye bazali kolanda Nzambe mpe batoki na bwania, nguya mpe makabo na Ye. Elobama, “Moto oyo afinikami mpenza na yemei akosala ekipi ya moke mpenza” Botosi ya makasi mpe esalaka na yangomei ezali nionso kasi ya kolemba to ya kozela te. Ezali nzela na yango tokosakola bondimi na biso na Nzambe mpe ekomikokisa mpo na kozwa banguya ya lola. Botosi ezali kopona. Ezali kopona katikati ya boyebi kosuka mpe nguya na biso na mpe bwania ezanga nsuka mpe bokasi bonso ya Nzambe. Engebene na liteya ya nkoko na ngai ya mobali, ezali kopona koyoka nkanga na monoko na biso mpe kolanda bokambi ya mokumbi.

Ekoka biso kokoma basangoli na boyokani mpe nkuna ya Abalayama na nzela ya bondimi na biso mpe na koyambaka makuli ma nsango malamu ezongisami. Nalaki bino ete mapamboli ya bomoyi ya seko ezwami na moto nionso oyo azala botongono mpe na botosi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.