2010–2019
Kobatelama na Pornographie—Libota moko etaleli Klisto
Sánzá ya mínei 2014


Kobatelama na Pornographie—Libota moko etaleli Klisto

Kiyingulu ya mai ya monene kati na mokili… ezali kiyungulu na biso ya kati oyo ekoya uta na litatoli bozindo mpe ya makasi.

Bandeko basi mpe mibali, lelo napambolami mpo na kozwa nkoko na ngai ya 13 ya mokolo ya banso na lingomba. Wana esalaki ngai natuna, “Nini ngai nalingi nkokololo na ngai ayeba? Ntongo oyo nalingi koloba na nsolo mpenza na libota na ngai mpe ya bino.

Biso lokola bakambi tozali komitungisa mingi na ntina ya libebi oyo pornographie ezali kosala na bomoi ya bandimi ya Eklezia mpe mabota na bango. Satana azali kobeta na nkanda nanu ayoka te.

Moko ya ntina tozali awa na mokili ezali koyekola kosalela bamposa mpe mayoki ya banzoto na biso ya kufa. Mayoki wana Nzambe apesa ezali kosunga biso kolinga kobala mpe kozala na bana. Bosangani ya kati na libala kati na mwasi mpe mobali oyo ezali komema bana kati na bomoi ya kufa ezali lisusu koloba kozala mayele moko ya kitoko, kolingaka oyo eyokanisi elongo mitema mibale elingami, esangani na nzoto mpe molimo, mpe komema bosepeli mingi mpe esengo lokola toyekoli kotia moko mpe mosusu liboso. Mokambi Spencer W. Kimball ateyaki ete na libala, “molongani akomi ya liboso na bomoi ya mwasi to ya mobali, mpe … moto mosusu [te] ya motuya [to] eloko ekoki mokolo moko te koleka liboso ya moninga molongani…

“Libala ezali kolakisa bokangami mobimba mpe botongono nyonso.”1

Mibu mingi mileki moko ya bana na biso alembaki nzoto makasi. Natambolaki kati na esika na ye ya kolala, wapi afungolaki motema na ye mpe alimbolelaki ngai ete azalaki na ndako ya moninga na ye mpe na likama amonaki ebandeli mpe bilili ya kotungisama mpe misala na televisio kati na mobali mpe mwasi bazalaki na bilamba te. Abandaki kolela mpe koloba boniboni ayokaki mabe na ntina ya oyo amonaka mpe akanisaki kobimisa yango na makanisi na ye. Nazalaki na botondi mingi ete akokaki komipesa epai na ngai, kopesaka ngai libaku ya kokitisa motema na ye ya bozangi koyeba mpe ya koyokokaka mpasi mpe kosunga ye koyeba boniboni kozwa lisungi na nzela ya Bomikabi ya Mosikoli na biso. Namikundoli mayoki masantu nayokaki lokola tofukamaki elongo, lokola mama na mwana na ya mwasi, mpe kosenga lisungi ya Tata na biso ya Lola.

Bana mingi, bilenge, mpe, mikolo bazali komitina na kozanga boyebi na pornographie, kasi bokoli moko ya motango ya basi mpe mibali bazali koponaka kotala yango mpe bazali kozongela sima kobandelaka tiii yango ekokoma mposa ya maksi. Bato baye bakoki kolinga na mitema na bango mobimba kobima libanda na motambo oyo kasi mingimingi bazali kokoka te kolongwa na yango na bangomoko. Boniboni tozali na botondi na yango ntango balingami baye baponi komipesa epai na biso lokola baboti to mokambi ya Eklezia. Tosengeli kozala na bwanya toloba na boningani, nkanda, to kobwaka te, oyo ekoki kosala bango kovanda kimia lisusu.

Biso lokola baboti mpe bakambi tosengeli kopesa toli na bana mpe bilenge na moboko ekomema liboso, koyokaka na bolingo mpe bososoli. Basengeli koyeba makama ya pornographie mpe boniboni yango ekangaka likolo ya babomoi, kosalaka libungi ya Molimo, kobebisa mayoki, kokosa, kobebisa bondeko, kobungisa bomiyangeli, mpe pene na kosilisa nyonso ya ntango, makinisi, mpe bokasi.

Pornographie ezali eloko ya mpamba koleka, mabe, mpe emati koleka liboso. Lokola tovandi elongo na bana na biso, lisanga tokoki kosala libongisi ya libota na mibeko mpe bandelo, kozala kosala na yomei mpona kobatela ba ndako na biso na biyungulu ya mayi ya biloko ya lotiliki. Baboti, tozali koyeba ete ba telephone oyo ezali na makoki ya internet, ba ordinateurs te, bizali elindo monene?2

Bilenge mpe mikolo, soki bozwami na motambo ya Satana ya pornographie, bokundola boniboni Mosikoli na biso ya bolingo ezali na ngolu. Bokoki kobanza na bozindo boni Nkolo alingi mpe akobatela bino, kutu ti sikawa? Mosikoli na biso azali na nguya ya kopetola mpe kobikisa bino. Akoki kolongola mpasi mpe bosisoyi bozali koyoka mpe kokomisa bino peto lisusu na nzela ya nguya ya Bomikabi na Ye.

Biso lokola bakambi tozali komitungisa mingi na oyo etali balongani mpe bana oyo bakonyokwamaka na bokangami makasi na pornographie. Mpaka Richard G. Scott abondelaki: “Soki bozali na bonsomi kosala lisumu monene yomei, bonyokwama mpamba te mbano ya masumu ya moto mosusu. … Bokoki koyoka ngolu. … Nzoka nde bosengeli te kotia likolo na binomei liyoki ya mokumba mpona misala wana.”3 Boyeba ete bozali bino moko te. Lisungi ezali. Makita ya bosikoli ya bokangani na mabe mpo na balongani, esangisi na mayangani na telefone, oyo ekopesa nzela na balongani mpo na kobenga na likita mpe kokabola uta na bandako na bangomei.

Bandeko ya basi mpe mibali, boniboni tozali kobatela bana mpe bilenge na biso? Biyungulu ya mayi bizali bisalelo esengeli, kasi biyungulu oyo eleki minene na mokili, bobele moko oyo ekosala na nsuka, ezali kiyungulu ya kati ya moto na moto oyo ekowuta na litatoli ya bozindo ya botosi ya bolingo ya Tata na biso ya Lola mpe libonza ya komikaba ya Mosikoli na biso mpona moko moko na biso.

Boniboni tozali kokamba bana na biso na bozindo ya mbongwana mpe kokota na Bomikabi ya Mosikoli na biso? Nalingi maloba ya profeta Nefi oyo wapi bato na ye basalaki mpona kopesa makasi na bilenge ya mikolo na ye: “Tozali koloba ya Klisto, tozali kosepela kati na Klisto, tozali koteya ya Klisto, [mpe] tozali kosakola Klisto …ete bana na biso bakoka koyeba na liziba nini bakoka kotala mpona bolimbisi ya masumu na bango. ”4

Boniboni tokoki kosala yango na mabota na biso? Mingi kati na bino boyoki ngai koyebisa boniboni molongani na ngai anyatamaki, Mel, mpe Nayokaki lokola baboti ya bana minei. Lokola tozalaki liboso ya mikakatano ya boboti mpe bobateli liboso na bosenga ya bomoi, tozangaki elikia mpona kosunga. Tosambelaki mpe tobondelaki mpo na koyeba nini kosala. Eyano oyo eyaki ezalaki polele: “Ezali malamu soki ndako ezali na bosoto mpe bana bazali kokoba na pijama mpe mikumba nyonso etikali ya kosila te. Biloko bobele se moko oyo esengeli mpenza ekokisama na ndako ezali koyekola makomi mokolo na mokolo mpe likita mpokwa na libota mposo na mposo.”

Tozali komeka kosala makambo wana, kasi ezalaki te ntango nyonso ya yambo mpe, kondima mobulu, ezalaki ntango nyonso ya kotala mpamba. Tobongolaki etaleli na biso mpe tomekaki komitungisa te na oyo etali biloko ya ntina muke. Makanisi na biso ekomaki kosolola, kosepela, koteya, mpe kotatola Klisto na komekaka kosambela mokolo na mokolo mpe koyekola makomi mokolo na mokolo mpe kosala likita mpokwa na libota mposo na mposo.

Moninga moko kala te akebisaki, “Ntango osengi bandeko basi kotanga makomi mpe kosambela mingi, ekotungisi bango. Mpe bakoyoka lokola bazali na mingi mpo na kosala.”

Bandeko ya basi mpe mibali, mpo ete nayebi uta na boyebi na ngaimei, mpe oyo ya molongani na ngai, Nasengeli kotatola mapamboli ya koyekola makomi mokolo na mokolo mpe losambo mpe likita ya mpokwa na libota mposo na mposo. Wana ezali makambo mpenza oyo ekosunga kolongola mitungisi, kopesa bokambi ya bomoi na biso, mpe kobakisa kobatela na mabota na biso. Bongo, soki pornographie to bitumba mosusu ekobeta mabota na biso, tokoki kosenga lisungi ya Nkolo mpe kozela bokambami monene uta na Molimo, koyebaka ete tosalaki oyo Tata na biso asengaki biso kosala.

Bandeko basi mpe mibali, soki maye naino esalami te na mabota na biso, tokoki banso kobanda sikawa. Soki bana na biso bakoli koleka mpe baboyi kosangana na biso, tokoki kobanda biso moko. Lokola tozali kosala, nguya ya Molimo ekobanda kotonda na ndako na biso mpe bomoi na biso, na suka ya ntango, bana bakoyanola.

Bomikundola ete Bapostolo ya bomoi baplakaki lisusu ete lokola tozali koluka bankoko na biso mpe tobongisi nkombo ya libota na biso moko mpo na tempelo, tokoki kobatelama sikawa mpe kati na bomoi na biso lokola tomibateli bisomei ya kolongobana na ndingisa ya kokota na tempelo.5 Oyo bilaka!

Elenge, zwa mikumba mpona kozala malu ya molimo na yo. Longola telefone na yo soki esengeli, yemba loyembo ya Primaire, sambela mpona lisungi, kanisa na ntina ya makomi, tambola libanda ya filime, talisa na Mobikisi, zwa elambo na kolongobana mpe yekola Jeune Soyez Fort, zala ndakisa mpo na baninga na yo, mipesa na moboti, kende kotala episikopo na yo, senga lusungi, mpe luka toli ya makasi soki esengeli.

Nini nalingi nkokololo na ngai ayeba? Nalingi bango mpe bino koyeba ete nayebi Mobikisi azali na bomoi mpe alingi biso. Afutaki nyongo mpo na masumu na biso, kasi tosengeli kofukama liboso ya Tata na biso ya Lola, na komikitisa nyonso, koyambolaka masumu na biso, mpe kobondela Ye mpo na bolimbisi. Tosengeli kolinga kobongola mitema na biso mpe bamposa na biso mpe komikitisa mingi mpo na koluka lisungi mpe bolimbisi na baye ntango musus tozokisaki to totikaki.

Nayebi ete Joseph Smith amonaki Nzambe, Tata na biso ya Lola, mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Natatoli ete tozali na profeta ya bomoi likolo ya mokili, Mokambi Thomas S. Monson. Natatoli lisusu ete tokoki te kokumbama libanda soki tokolanda toli ya profeta ya Nzambe. Natatoli mpo na nguya ya mayokani mpe mapamboli ya tempelo.

Nayebi ete Buku ya Mormon ezali ya solo! Nakoki te kolimbola nguya ya buku monene oyo. Nayebi bobele ete lisanga na losambo, Buku ya Mormon ekomema nguya mpo na kobatela mabota, koyeyisa bondeko makasi, mpe kopesa bondimami ya moto na moto liboso na Nkolo. Natatoli makambo maye nyonso na nkombo Mosantu ya Yesu Klisto,amene.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 199–200.

  2. Tala Clay Olsen, “What Teens Wish Parents Knew” (address given at Utah Coalition Against Pornography Conference, Mar. 22, 2014); utahcoalition.org.

  3. Richard G. Scott, “To Be Free of Heavy Burdens,” Ensign to Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2002, 88.

  4. 2 Nefi 25:26.

  5. Tala David A. Bednar, “The Hearts of the Children Shall Turn,” Ensign to Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2011, 24–27; Richard G. Scott, “The Joy of Redeeming the Dead,” Ensign to Liahona, Sanza ya Zomi na Moko . 2012, 93–95; Neil L. Andersen, “Find Our Cousins!” (address given at RootsTech 2014 Family History Conference, Sanza ya Mibale. 8, 2014); lds.org/prophets-and-apostles/unto-all-the-world/find-our-cousins.