2010–2019
Bondeko ya Basi: O, Boniboni Tosengelani
Sánzá ya mínei 2014


Bondeko ya Basi: O, Boniboni Tosengelani

Esengeli totika kotia makanisi na biso na bokeseni na biso mpe koluka nini tozali na yango na lisanga.

Na video wana tomonaki bikolo mwambe mpe toyokaki minoko libwa. Kanisa minoko boni lisusu ebakisami na molongo wana ya nsuka. Ezali kolengisa komona ete lokola bondeko ya basi moko ya mokili mobimba tokoki kotombola mongongo na litatoli ya bosolo ya seko ete tozali bana basi ya Tata moko ya Lola ya bolingo.

Litomba monene kani ezali ya kozala na libaku ya nsango oyo mpe ya koloba na basi nionso ya Eklezia ya mibu mwambe mpe likolo. Ezali na kabakata ya bokasi na bomoko na biso na mpokwa oyo. Lokola nazali komona biso banso tosangani na Ndako ya Likita mpe kosepelaka na bankoto ya basusu baye bazali kotalaka nsango oyo uta na bisika na mokili mobimba, nguya ya matatoli na biso elongo mpe bondimi na Yesu Klisto solo mpenza esali bondimi moko makasi etondisami mpe masanga ya nguya ya basi na mambi ma kala ya Eklezia, soki ya Mokili te.

Na mpokwa oyo tosepeli na misala mikeseni mingi na biso lokola basi kati na Eklezia. Atako na lolenge mingi tozali ya kokesana kasi se moko kaka, toyebi lisusu ete tozali banso bana basi ya Tata ya Lola se moko yango nde esali biso kozala bandeko basi. Tozali bomoko na kotonga bokonzi ya Nzambe mpe kati na mayokani oyo tosalaki, kotala te bizalela na biso. Lisanga oyoezali, na tembe te, bondeko ya basi eleki na nkembo likolo ya mabele! 1

Kozala bandeko basi elakisi ete ezali na nsinga kati na biso ekoki kokatana te. Bandeko basi bakolengelana, bakokengelana, mpe bakosepelisana, bakozala wana mpo na bango na bango na malamu mpe na mabe. Nkolo alobaki, “Nalobeli bino, bozala bomoko; mpo soki bozali bomoko te bozali ya ngai te.”2

Monguna alingi biso totongana to tosambisana. Alingi biso tokangama na bokeseni na biso mpe komekisana. Okoki kolinga kosala na bokasi mpo na ntango moko mokolo na mokolo mpo ete esepelisaka yo, ntango nakanisi yango kozala bokokisi ya fiziki soki natamboli na molongo ya escalier esika ya kozwaka ascenseur. Tokoki kozala lisusu baninga, bongo te?

Biso lokola basi tokoki kozala na konzo biso moko. Ntango tomikasenisi biso moko na moko mpe mosusu tokoyoka ntango nionso bozangi kokoka to esengo meke ya basusu ndeko mwasi Patricia T. Holland alobaki mokolo moko, “Ya ntina ezali, tokoki te komibenga biso moko na sembo baklisto mpe kokoba na kosambisa moko mpe mosusu—to biso moko—makasi mpenza.”3 Akobaki koloba ete ezali na eloko moko te ezali kopesa biso ntina na kobungisaka mawa mpe bondeko ya basi. Tosengeli mpenza kokanduka mpe kosepela kati ya bokeseni na biso ya bonzambe. Tosengeli koyeba ete biso banso tolingaka kosalisa kati ya bokonzi kosalesaka batalanta boko mpe makabo kati ya nzela na biso mei. Sikoyo tokoki kosepela bondeko ya basi na biso, mpe masanga na biso mpe kobanda kosalisa.

Ntina ya likambo ezali, tosengeli mpenza mpe ya solo moko mpe mosusu. Basi balukaka kimoninga na lolenge ya bokasi, lisungi, mpe kimoninga. Tozali na mingi koyekolisana, mpe mbala mingi totikaka bandelo na biso mei etika biso uta esengo ya masanga oyo ekokaki kozala kati mapamboli minene koleka na bomoi na biso. Ndakisa, biso basi oyo tozali bana tosengeli oyo bino eteyelo ya bana basi bosengeli kosala. Tokoki koyekola ebele uta na bino na ntina ya lolenge ya mosala ya Klisto mpe bolingo.

Nayokaki kala mingi te lisitwale kitoko ya mwana mwasi na nkombo ya Sarah. Mibu bebo eleki, mama ya Sarah azalaki na libaku ya kosunga mwasi mosusu na palwasi na ye ebengami Brenda, oyo ezalaki na bato ya bokono ya moto ebele. Sarah alingaki kokende na mama na ye kosunga Brenda. Asengelaki kotiya mafuta ya kopakola na maboko ya Brenda mpe kopakola misapi mpe maboko mpo ete azalaki ntango nionso na mingayi. Nsima Sarah Ayekolaki konyolola na pete maboko ya Brenda likolo ya moto na ye mpo na kosalela misuni na ye. Sarah apupolaki suki ya Brenda mpe atalaki elongo na ye ntango mama na ye asungaki ba mposa na ye misusu. Sarah ayekolaki ntina mpe esengo ya kosalisaka bato mosusu mpe asosolaki ete atako mwana akoki kosala bokeseni monene na bomoi ya moto.

Nalingi ndakisa oyo tozali nango kati yaMokapo ya yambo ya Luka oyo etalisi elengi ya kimoninga kati ya Maria, mama ya Yesu, mpe ndeko na ye Elizabeti. Maria azalaki elenge mwasi ntango ayebisamaki na ntina ya misio na ye eyebana ya kozala mama ya Mwana ya Nzambe. Na ebandeli, esengelaki komonana lokola mokumba ya bozito ya komema ye moko. Ezalaki Nkolo Yemei nde apesaki Maria elongo na moto mpo na kokabola mokumba na ye. Na nzela ya nsango ya anzelu Gabriel, Maria apesamaki nkombo mwasi ya bondimi mpe mawa na oyo akokaki kozongisa mpo na kosunga—ndeko na ye Elizabeth.

Elenge mwasi monzemba oyo mpe ndeko na ye oyo azalaki “na minyoko na bileko,”4 bakabolaki bondeko moko kati ya bazemi ya bikamwa na bango, mpe Nakoki kokanisa kaka boni boni ntina makasi koleka ya kolekisa basanza misato elongo ezalaki mpo na bango mibale lokola bazalaki na bokasi ya kosolola elongo, kosepelisana, mpe kosungana, moko mpe mosusu na mabiangi na bango ya bomoko. Ndakisa malamu nini bazali ya bokolisi ya bomwasi kati ya bakitani.

Baye ya biso oyo bazali mike ya kokola na makanisi bakoki kozala ndakisa malamu mpo na abilenge mike. Ntango mama na ngai azalaki mwana mwasi ya moke mpenza, bazalaki na bolingo ya Eklezia te. Atako na mibu mitano, asengelaki kotambola yemei kino na Eklezia mpe kozala na mayangani na ye—ya eteyelo ya bana, Eteyelo ya Eyenga, likita ya elambo—nionso na bantango ekeseni.

Natunaki mama na ngai kala mingi te mpo na nini na mokili asalaki bongo poso nsima ya poso ntango azalaki na lisungi moko te to lilendisi na libota. Eyano na ye ezalaki, “Nazalaki na balakisi ya eteyelo ya bana oyo balingaki ngai.” Balakisi oyo basungaki ye mpe batangisaki ye Sango elamu. Batangisaki ye ete zakalaki na Tata ya Lola oyo alingaki ye mpe bazalaki wana mpo na koyambaka ye poso nsima ya poso. Mama na ngai alobaki na ngai, Wana ezalaki moko ya bizaleli ya ntina koleka na bomoi na ngai ya yambo. ” Nalikii nakoki kopesa botondi na bandeko basi wana ya kokamwa mokolo moko. Ezali na ndelo te na mibu ntango ekomi na mosala ya Lolenge ya Klisto.

Poso mibale eleki, nakutanaki na mokambi ya Bilenge Basi ya likonzi na Californie oyo ayebisaki ngai ete mama na ye ya mibu 81 oyo awutaki kobengama kala mingi te kozala Mopesi toli na bokambi ya baeglantine. Nazalaki mposa ya koyeba mpenza, bongo Napesaki mama na ye libiangi. Ntango Ndeko Val Baker mwasi ya episikopo atunaki kokutana na ye, abandaki kotalaka liboso mpo na kobengama lokola kalaki to mambi ya palwasi. Ntango atunaki ye kosalalisa lokola mopesi toli na bokambi ya baeglantine epai ya Bilenge Basi, eyano na ye ezalaki, “Ozali koloba ya solo?”

Episikopo na Ye ayanolaki, “Ndeko mwasi Baker, kosala mbeba te; libiangi oyo ewuti na Nkolo.”

Alobaki azalaki na eyano mosusu te na likambo wana, “Ya solo.”

Nasepeli na lifuli episikopo oyo ayokaki ete baeglantine minei na palwasi na ye basengeli koyekola ebele uta na bwanya, boyebi, mpe bomoi molayi ndakisa ya bokoli ya makanisi ya ndeko na ye ya mwasi. Mpe koyeba nani Ndeko mwasi Baker akokende ntango asengeli lisungi na kosalelaka lokasa na ye ya Facebook?

Nakanisi na lisungi monene oyo bandeko basi ya Lisanga ya basi Basungi bakoki na koyambaka bilenge basi oyo bazali sika kati ya Bilenge Basi. Bandeko na biso ya bilenge ya basi mbala mingi bazali koyoka lokola neti bazali na esika te to eloko moko te elongo na baye ya Lisanga ya basi Basungi. Yambo bakokisa mibu 18, basengeli na bakambi ya Bilenge basi mpe bamama oyo bakotatola na esengo na ntina ya mapamboli manene ya Lisanga ya basi Basungi bazalaka. Basengeli koyoka esengo makasi na ntina ya kokomaka bandimi kati na lisanga lilandi oyo kitoko koleka. Ntango elenge mwasi akomi kosangana na Lisanga ya basi Basungi, oyo basengeli mingi ezali moninga moko kofanda mpembeni na bango, loboko na mapeka na bango, mpe libaku moko mpo na kotangisa mpe kosalisa. Tika ete biso nionso tosimbana na maboko mpo na kosungana na nzela ya masalisi mpe na ntango ya ntina na bomoi na biso.

Botondi na basi ya Eklezia oyo bazali kosimbanaka na maboko kotala te milongo ya mibu mpe bonkoko mpo na kopambola mpe kosalisa basusu. Bilenge Basi bazali kosalisa na eteyelo ya bana mpe ya mikolo. Bandeko basi Banzemba ya mibu nionso bazali kopesa milongo ya ntango kosungaka bamposa ya baye ya mpembeni na bango. Toyebi bankoto ya bilenge basi baye bazali kobonza sanza 18 ya bomoi na bango mpo na kokabola sango elamo na mokili. Makambo nionso oyo ezali momekano bongo, lokola loyembo na biso ya bolingo eyembami, “Etinda ya baanzelu epesami na basi.”5

Soki mimekano ezali, ezali mpo ete biso mei tolukaki yango. Esengeli totika kotia makanisi na biso na bokeseni na biso mpe koluka nini tozali nango na lisanga; nsima tokoki kobanda kosalela bokoki ya bokasi na biso mpe kosilisa bolamu monene kati ya mokili oyo. Ndeko mwasi Marjorie P. Hinckley asi aloba, “Oh, boniboni tosengelani moko mpe mosusu. Oyo ya biso baye bazali mikolo basengeli yo oyo ozali elenge. Mpe elikia mpenza, yo oyo ozali elenge osengeli biso baye bazali mikolo. Ezali likambo ya lisanga ya bato oyo basi basengeli basi. Tosengeli na kimoninga ya mozindo ya kosepelisana.”6 Ndeko mwasi Hinckley azalaki sembo; o, boniboni tosengelani moko mpe mosusu!

Bandeko, ezali na lisanga mosusu te ya basi na mokili oyo bazali na bokoki ya mapamboli minene koleka oyo tozali nango lokola basi Basantu ya mokolo ya Suka. Tozali bandi ya Eklezia ya Nkolo, mpe kotala te ndenge tozali biso mei, tokoki binso nionso kosepela bofuluki ya mapamboli ya nguya bonganganzambe na nzela ya kobatelaka mayokani tosalaki na libatisi mpe na tempelo. Tozali na baprofeta ya bomoi bazali kokamba mpe kotangisa biso, mpe tosepeli na likabo monene ya Molimo Mosanto, oyo esalisi biso lokola lilendisi mpe bokambi na bomoi na biso. Topambolami na kotambola loboko na loboko na bosembo ya bandeko mibali lokola tozali lendisi bandako mpe mabota. Tozali na fungola ya bokasi mpe ya nguya ya makuli ya tempelo mpe mingi koleka mpenza.

Nakobaki mpo na kosepela na mapamboli nionso kitoko oyo, tozali moko mpe mosusu—bandeko basi kati na sango elamu ya Yesu Klisto. Topambolami na lisanga mpe na bolingo ya motuya koleka oyo esalisi biso kopesa bolingo na lolenge ya Klisto mpe mosala na baye ya pembeni nabiso. Lokola totali bokeseni ya mibu na biso, bonkoko, mpe lolenge ya kolengela mpe kosalisa moko mpe mosusu, tokotondisama na bolingo ya peto ya Klisto mpe lifuli oyo ekambi biso koyeba ntango nini mpe nani esengeli biso kosalisa.

Napesi bino libiangi ebimaki mbala moko liboso, na mokambi monene ya Lisanga Lisusu ya basi Basungi, “Nabiangi bino kaka te mpo na kolingana moko mpe mosusu koleka kasi kolinganamalamu mingi koleka.7 Ekoki biso kososola boni boni tosengelani moko mpe mosusu, mpe ekoki biso kolingana banso moko mpe mosusu malamu mingi koleka, ezali losambo na ngai, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Barbara B. Smith, “The Bonds of Sisterhood,” Ensign, Mar. 1983, 20–23.

  2. Doctrine and Covenants 38:27.

  3. Patricia T. Holland, “‘One Thing Needful’: Becoming Women of Greater Faith in Christ,” Ensign, Oct. 1987, 29.

  4. Luke 1:7.

  5. “As Sisters in Zion,” Hymns, no. 309.

  6. Glimpses into the Life and Heart of Marjorie Pay Hinckley, ed. Virginia H. Pearce (1999), 254–55.

  7. Bonnie D. Parkin, “Choosing Charity: That Good Part,”, ”Ensign or Liahona,, Nov. 2003, 106.