Neil L. Andersen
Botika te bikumbeli ekueyisa bino na nse. Eleko oyo ezali ya bino—bozala bayekoli ya mpiko ya Nkolo Yesu Klisto.

Napesi bino mbote na ntongo oyo—mingi mingi bilenge baoyo nyonso bazali awa na Ndako ya Likita mpe nzinganzinga na mokili. Bozali nkola eponama oyo ezali na ata ndele, mpe nazali koloba mingi mingi na bino.

Mibu ebele eleki wana tokendaka kotala libota na biso na Florida, mvula ya ba kake ebetaki na nse mosika mingi te na biso. Muasi moko azalaki kovanda na ndako ya motuka akotaki na esika na ye ya bosokoli mpo na kobombama. Ndako ya motuka ebandaki koningana. Sima ya ngonga moke elekaki. Bongo ayokaki mongongo ya moto ya pembeni na ye : “Nazali awa na nsuka ya lisuku.” Kobimaka libanda uta na eteni ya kosokola, na bokamui monene, amonaki ete mvula ya ba kake etombolaki mpe ememaki ndako na ye ya motuka na mopepe, kokitisaka yango malamu mingi likolo ya ndaku ya motuka ya moninga na ye.

Bandeko na ngai bilenge mibali, mokili ekosielumuka te na kimia nyonso liboso ya Boyei ya mbala Mibale ya Mobikisi. Makomi elobi ete “biloko nyonso ekoningana.”1 Brigham Young alobaki, ‘ebimisamelaki ngai na ebandeli ya Eklezia oyo, ete Eklezia ekopanzana mokili mobimba, ekofuluka, ekokola mpe ekokende na mkili mobimba, mpe nguya ya satana ekopanza mpe lokola sango malamu ekopanzana na bikolo ya mabele.”2

Mingi esakolamaki na oyo etali boningani ya mabele mpe bitumba3 ezali ekumbaki ya molimo oyo ekoki kopikola bino na moboko ya molimo mpe kokitisa molimo na bino na bisika bokoki kokanisa ata moke te kozala, ntango mingi na komona na bino moke ete bosi boninganaki.

Mipepe makasi ya mabe ezali komekama ya monguna. Lisumu ekozalaka ntango nyonso ndambo ya oyo ya mokili, kasi etikala kozala ata mokolo moko te kosimbama, kotondisama to kondimama te. Ezali, solo, nguya moko ya makasi oyo ekokonzaka mbula ya mopepe makasi ya lisumu. Oyo ebiangami boyamboli.

Mvula nyonso te ya mupepe makasi ya bomoi esalamaka na yo. Mingi ekomaka mpona ba boponi mabe ya basusu, mpe mingi eyaka kaka mpona yango ezali bokufi.

Lokola elenge moko ya mobali, President Boyd K. Packer anyokuamaki bolema ya maladi ya polio. Ntango Elder Dallin H. Oaks azalaki na mibu nsambo ya mbotama, tata na ye akufaki na mbalakaka. Ntango ndeko muasi Carol F. McConkie bokambi monene ya Bilenge Basi azalaki elenge, baboti na ye bakabuanaki. Mikakatano ekoki koyela bino, kasi lokola ozali na elikia na Nzambe, yango ekoyeisa bondimi na bino makasi.

Na molongo, ba nzete oyo ekoli nzinga nzinga na mopepe ekomaka makasi. Ndenge mipepe ekopepa nzinga nzinga na nzete moke, makasi libanda ya nzete ezali kosala biloko mibale. Yambo, yango ezali kosunga misisa kokola bangu mpe kokende mosika. Ya mibale, makasi ya nzete ekobanda kotonga nzete ya solo mpe bitape ekoma mbinga mpe petepete na kotindika ya mopepe. Misisa wana ya makasi mpe bitape ekobatela nzete na mipepe oyo ekoki ya solo kozonga.4

Bozali na nsuka te motuya mingi koleka liboso ya Nzambe koleka nzete. Ozali muana na Ye ya mobali to muana na ye ya muasi. Akelaki molimo na bino makasi mpe makoki ya kozalaka makasi lisusu na mbula ya mopepe makasi ya bomoi. Mbula ya mopepe makasi na bolenge na bino, lokola mopepe na nzete moko ya moke, ekoki kokolisa makasi ya oyo ya molimo na bino, kobongisaka bino mpona mibu liboso.

Boni boni bozali komibongisa mpona mvula ya mopepe makasi na bino? “Bokundola … ezali likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Muana na Nzambe, oyo bosengeli kotonga moboko na bino; ete ntango zabulu akolinga kotinda mipepe na ye ya makasi, … makula na ye na mvula ya mopepe makasi, … ntango mvula na ye nyonso ya mabanga mpe ekumbaki na ye ya makasi ekobeta likolo na yo, ekozala na nguya te … kokueyisa yo na nse … mpona libanga likolo na yango bino botongami. ”5 Oyo ezali kimia na bino na mvula ya mopepe makasi.

Mokambi Thomas S. Monson alobaka, “Esika mbala moko mibeko ya Eklezia mpe mibeko ya bato ezali ya kokokana koleka, sikoyo ezali na libulu monene kati na biso, mpe ezali kokolaka monene koleka.”6 Libulu yango, mpona mingi, ekosala makasi mvula ya mopepe makasi ya molimo. Botika ngai nakabola ndakisa moko.

Nsanza oyo eleki Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya ba Zomi na mibale babimisaki mokanda moko mpona bakambi ya Eklezia na mokili mobimba. Na eteni moko etangami : “Ba mbonguana na mobeko ya bato nyonso ekoki te, na yango ekoki te kobongola mobeko ya kolongobana oyo Nzambe atiaki na esika. Nzambe azali kozela biso kobundela mpe kobomba mitindo na Ye kotelelaka makanisi ekeseni to etamboli ya bato. Mobeko na Ye ya bopeto ezali polele : bokutani ya nzoto ezali na nzela kaka kati ya mobali mpe muasi baoyo babalani engebene na mobeko mpe ndenge elongobani lokola mobali mpe muasi. Tosengi bino na lombango botala yango lisusu … Malongi oyo ezali na ‘ La Famille : Declaration au Monde.’”7

Lolenge mokili ezali kokende libanda kouta na mobeko ya bopeto ya Nkolo, toyebi te. Mokambi Monson alobaki: “ Mobikisi ya molongo amanyolaki Ye moko lokola kozalaka na kati ya mokili kasi ya mokili te. Tokoki mpe kozala na mokili kasi ya mokili te soki tobuaki makanisi ya lokuta mpe mateya ya lokuta mpe botikala solo na oyo Nzambe atindaka.”8

Ntango ba mbula matari mpe bato ya makanisi malamu balimboli libala mpona mbala ya mibale, Nkolo asali yango te. Na ebandeli mpenza, Nzambe asalaki libala kati ya mobali na muasi—Adama na Ewa. Atiaki ba ntina ya libala kokende mosika koleka na bosepeli ya moto ye moko mpe botosi ya mikolo, ya motuya koleka, kopusaka liboso esika esengeli mpona bana bakobotama, kokola mpe koleisa. Mabota ezali biloko ya motuya ya lola.9

Mpona nini tozali kokoba kolobela oyo etali yango ? lokolo Polo alobaki, “Tozali kotala te biloko oyo ezali komonana, kasi na biloko oyo ezali komonana te.”10 Bapostolo ya Nkolo Yesu Klisto, tozali na mokumba ya koteya muango ya Nzambe mpona bana na Ye mpe kokebisa na ba mbano ya kozua ndenge esengeli te mitindo na Ye.

Kala te, nasololaki na Laurel kouta Etazini. Nalobi lokola email na ye :

Oyo eleki mibu ebele baninga na ngai na Facebook bandaki kotia muango na bango mpona libala : ebele basunga libala ya muasi-na-muasi mpe mobali-na-mobali, mpe ebele ya bilenge Bansantu ya Mikolo ya suka balikasi ete bango ‘balingi’ ba muango. Natiaki maloba te.

“Nazuaki mokano ya koloba bondimi na ngai na libala elongobani na ndenge esengeli.

Na foto na ngai, nabakisaki lisapo ‘nandimeli libala kati na mobali mpe muasi.’ Kaka na mbala moko nabandaki kozua bitinda. Ozali moyimi.’ ‘Olingi kosambisa.’ Moko akokanisaki ngai kosala mowumbu na ngai moko. Mpe nazuaki liloba oyo kowuta na moninga moko ya munene oyo azali mondimi ya makasi na Eklezia : ‘Ozali na bosenga ya kokanga ban tango. Makambo ezali kobonguana mpe boye yo mpe osengeli.’

“Nazongisaki mabe te,” alobaki, “kasi nabuakaki lisakola na ngai na nse te”

Asukisaki: “Ba ntango mosusu, lokola Mokambi Monson alobaki, ‘bosengeli kotelema bino moko.’ Na elikia lokola elenge, tokotelela elongo nakozalaka solo na Nzambe mpe na mateya ya ba profeta na Ye ya bomoi. ”11

Likanisi ya ntango nyonso mpona biso esengeli ezala ya kobundaka na bobendani ya muasi-na-muasi mpe mobali-na-mobali. Ezali mvula ya mopepe makasi ya mbangu makasi. Nalingi koloba bolingo mpe esengo na ngai na bango baoyo batelemi na bokasi likambo oyo ya bondimi mpe batikali solo na mitindo ya Nzambe!12 Kasi moto nyonso, na bonsomi na mikano mpe ba bondimi, akoki na boboto mpe bondimami na biso.13

Mobikisi ateyaki biso bolingo kaka mpona baninga na biso te kasi lisusu na baoyo tondimisami na bango te—mpe kutu baoyo babuaki biso. Ye alobaki: “Mpona soki bolingi baoyo balingi bino, litomba nini bokozua? … mpe soki opesi ndeko na yo kaka mbote, nini bosali lisusu ya koleka? ”14

Profeta Joseph Smith akebisaki biso na“bopangana na kosala bosembo bisomoko” mpe koyeyisa motema molai liboso ya mibali mpe basi nyonso tiii tokoyoka “kotia bango likolo na mapeka na biso.”15 Na nsango malamu ya Yesu Klisto, ezali na esika te mpona kotiola, boyokisi nsomo, to ki boeklezia.

Soki bozali na mituna na oyo etali toli kowuta na bakambi ya Eklezia, tosengi bosolola oyo etali bino na bosolo na baboti na bino mpe bakambi na bino. Bozali na bosenga ya bokasi oyo ekowuta na kolikiaka na ba profeta ya Nkolo. Mokambi Harold B. Lee alobaki: “Kimia kaka moko tozali na yango lokola bandimi ya Eklezia ezali ko … kotanga kopesa makanisi na maloba mpe mitindo oyo Nkolo asengeli kopesa na nzela ya profeta na Ye … Ekozala na biloko mingi oyo ekopesa kokitisa motema mpe bondimi. Bokoki kolinga te oyo ekoya. … ekoki kotelemela boteli na bino ya politiki … botali na bino ya mabota … etelemeli … bomoi na bino ya libota. Kasi soki bokoyokaka makambo wana, lokola soki ewuti na monoko ya Nkolo Yemoko, … ‘maninisa ya lifelo bino … mpe Nkolo Nzambe akopanza ba nguya ya molili liboso na yo …’ (D&C 21:6).”16

Kobatelama mususu ya nguya makasi na mbula ya mupepe makasi ya bomoi ezali Buku ya Mormon.

Ntango Mokambi Henry B. Eyring azalaki elenge, libota na ye ekendaki kofanda na mboka ya sika. Na yambo amonaki kolongua na bango mabe mpe azuaki baninga mingi te. Ayokaki lokola akokanaki na bayekoli mususu ya kelasi ya likolo te. Mvula ya mopepe makasi ezalaki kobaluka. Nini ye asalaki? Abuakaki bokasi na ye na kati ya Buku ya Mormon, kotangaka yango mbala mingi.17 Sima ya mibu, Mokambi Eyiring atatolaki: “Ngai [nalingi ko] zonga na Buku ya Mormon mpe komela na bozindo makasi mpe ntango mingi.”18 “[Yango] ezali litatoli ya makasi koleka oyo ekomama tozali na yango ete Yesu azali Klisto.”19

Nkolo apesaka bino nzela mususu ya kotelema ngui, likabo ya molimo ya nguya koleka ete mvula ya mopepe makasi ya monguna! Ye alobaki, “Botelema … na bisika bisantu, mpe bozala ya koningana te.”20

Ntango nazalaki elenge, ezalaki kaka na batempelo 13 na Eklezia. Sikawa bizali 142. Ntuku muambe na mitano ya pulusantaze ya bandimi ya Eklezia bafandi na 200 miles (320 kilometele) ya Tempelo. Nkolo apesaka nkola na bino nzela monene koleka na batempelo na Ye Bisantu mpe nkola nyonso na lisituale ya mokili.

Bino bosi botelema mokolo na tempelo, bolataki bilamba ya mpembe, kozelaka kosala ba libatisi ? boyokaki ndenge nini ? kuna ezali na boyoki moko makasi ya bonsatu na tempelo. Kimia ya Mobikisi ekokonza kobaluka ya mvula ya mupepe makasi ya mokili.

Lolenge bozali komiyoka na tempelo ezali ndakisa mpona lolenge bolingi koyoka na bomoi na bino.21

Boluka bankoko na bino ya mibali mpe bankoko na biso ya basi mpe bandeko na bino ya basi to ya mibali ya mosuka oyo bakenda liboso na yo. Bomema bankombo na bango na tempelo na bino.22 Lokola bozali koyekola oyo etali bankoko na bino, bokomona bandakisa ya bomoi, ya libala, ya bana; bandakisa ya bosembo; mpe mingimingi te bandakisa oyo bolingi kokoma.23

Nsima na kati ya tempelo bokoyekola mingi na oyo etali Bokeli ya mokili, oyo etali bandakisa na kati ya bomoi ya Adama na Ewa, mpe ya motuya koleka, oyo etali Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Bandeko na ngai bilenge mibali mpe basi, boni boni tolingi bino, tosepeli na bino, mpe tozali kosambela mpona bino. Botika te mvula ya mopepe makasi ekueyisa bino na nse. Oyo ezali mikolo na bino—kotelema makasi lokola bauekoli ya Nkolo Yesu Klisto. 24

Botonga na ngwui makasi moboko na bino likolo ya libanga ya Mosikoli na bino.

Bobomba lokola bomengo mobimba nyonso bomoi na Ye oyo ekokani na mosusu te mpe mateya na Ye.

Bolonda na etingia mingi ndakisa na Ye mpe mibeko na Ye.

Boyamba na bozindo makasi bolingo na Ye, mawa mpe ngolu na Ye, mpe makabo ya nguya koleka ya bomikabi na Ye.

Lokola bozali kosala, nalaki bino ete bokomona mvula ya mopepe makasi mpona oyo ezali—mimekano, masenginia, bobungisi makanisi, to mikakatano kosunga bino kokola. Mpe lokola bozali kobika na bosolo mvula nsima na mvula, nayebisi bino ete mayele na bino ekolakisa bino ya solo lisusu mpe lisusu ete Yesu azali Klisto. Libanga ya molimo na nse ya makolo na bino ekozala makasi mpe kimia. Bokosepela Nzambe atiaka bino awa kozala eteni ya mabongisi ya nsuka mpona bozongi na nkembo ya Klisto.

Mobikisi alobaki, “nakotika bino nakozanga libondisi te: nakoya epai na bino.” 25 Oyo ezali elaka na Ye mpona bino. Nayebi ete elaka oyo ezali ya solo. Nayebi ete Ye azali na bomoi, na nkombo ya Yesu Klisto, amen.

Show References

  1.  

    1. Doctrine & Alliances 88:91.

  2.  

    2. Mateya ya Brigham Young, sel. John A. Widtsoe (1954), 72.

  3.  

    3. Tala Dallin H. Oaks, “Preparation for the Second Coming,” Ensign toLiahona, nsanza ya mitano 2004, 7–10.

  4.  

    4. Tala A. Stokes, A. H. Fitter, mpe M. P. Coutts, “Responses of Young Trees to Wind and Shading: Effects on Root Architecture,” Journal of Experimental Botany, vol. 46, no. 290 (Sanza ya Libwa. 1995), 1139–46.

  5.  

    5. Helamane 5:12.

  6.  

    6. Thomas S. Monson, “Priesthood Power,” Ensign toLiahona, Sanza ya Mitano 2011, 66.

  7.  

    7. Mokanda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Misato. 6, 2014; tala lisusu David A. Bednar, “Tondima na Kozalaka Mpeto,” Ensign toLiahona, Sanza ya Mitano 2013, 41–44; Dallin H. Oaks, “Ba Nzambe Mosusu Te,” Ensign toLiahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 72–75; Mpona Bokasi ya Bilenge (booklet, 2011), 35–37

  8.  

    8. Thomas S. Monson,Ensign toLiahona, Sanza ya mitano 2011, 67.

  9.  

    9. Mpaka Russell M. Nelson alobaki: “Marriage is the foundry for social order. … That union is not merely between husband and wife; ; it embraces a partnership with God” (“Nurturing Marriage,” Ensign toLiahona, Sanza ya Mitano 2006, 36). Tala lisusu Matai 19:5–6.

  10.  

    10. 2 Bakolinti 4:18.

  11.  

    11. Mikanda mpe lisolo ya moto ye moko, nsanza ya Mitano. 17, 2014; tala lisusu Thomas S. Monson, “Bomeka Kotikala Bino Moko,” Ensign toLiahona, nsanza ya zomi na moko 2011, 60–67.

  12.  

    12 Tala Jeffrey R. Holland, “Helping Those Who Struggle with Same-Gender Attraction,” Ensign, Sanza ya zomi 2007, 42–45;Liahona, Sanza ya zomi 2007, 40–43.

  13.  

    13 Kutu ntango motelemeli Klisto Korihor alukaki kobebisa bondimi ya bato, mibeko ya Nzambe ebatelaki ye na etumbu: “Sikawa ezalaki na mobeko te mpona boyambi ya moto ; mpo ezalaki mpenza ekeseni na mitindo ya Nzambe ete ezala mobeko moko oyo ekokaki komema bato bisika bikokani te. … Sikawa soki moto moko azali na mposa ya kosalela Nzambe, ezalaki litomba na ye; … kasi soki andimaki ye te ekozala na mobeko te ya kopesa ye etumbu” (Alama 30:7, 9). eteni ya zomi na moko ya bondimi ekomami, “Tosengi litomba na biso ya kokumbamela Nzambe ya Bokasi nyonso engebene na masengami ya mayele ya motema na biso moko, mpe kopesaka nzeala ya litomba se moko wana na bato nyonso, ete tika bakumbamela na lolenge, na esika, mpe nini bakoki kopona.”

  14.  

    14. Matai 5:46–47.

  15.  

    15. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 427, 429.

  16.  

    16. Teachings of Presidents of the Church: Harold B. Lee (2000), 84–85; tala lisusu Robert D. Hales, “Likita linene: Strengthening Faith and Testimony,” Ensign toLiahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 6–8.

  17.  

    17. Tala Robert I. Eaton and Henry J. Eyring, I Will Lead You Along: The Life of Henry B. Eyring (2013), 40.

  18.  

    18. Henry B. Eyring, Choose Higher Ground (2013), 38.

  19.  

    19. Henry B. Eyring, To Draw Closer to God (1997), 118.

  20.  

    20. Doctrine et Alliances 87:8; tala lisusu Doctrine et Alliances 45:32.

  21.  

    21. Tala Doctrine et Alliancess 52:14.

  22.  

    22. Tala Neil L. Andersen, “Find Our Cousins!” (address given at RootsTech 2014 Family History Conference, Sanza ya mibale. 8, 2014); lds.org/prophets-and-apostles/unto-all-the-world/find-our-cousins.

  23.  

    23. Tala David A. Bednar, “The Hearts of the Children Shall Turn,” Ensign toLiahona, Sanza ya libwa. 2011, 24–27.

  24.  

    24. Tala Helamane 7:9.

  25.  

    25. Yoane 14:18.