Nkola Eponama


Boponamaka kozala na ya Ye mosala na ntango oyo mpo ete Ye alikii ete bokosala maponami ya sembo.

Bilenge mibali, mbele bosila koyoka ete bozali “nkola eponama,”elakisi ete Nzambe apona mpe alengela bino koya na mabele na ntango oyo mpo na ntina monene. Nayebi ete ezali solo. Kasi na mpokwa oyo nakosepela kolendisa bino lokola “nkola eponama,” mpo ete yambo na lisitwale bato bapambolama naino na maponami ya mingi boye te. Maponami mingi elimboli mabaku mingi, mabaku mingi elimboli makoki ya kosala bolamu mpe, kasi, mingi bazali kopona mabe. Nalikii ete Nzambe atindaki bino awa na ntango oyo mpo ete Atii motema na ye epai na bino mpo na komanyola maponami ya malamu mpe ya ndenge na ndenge.

Na 1974, Mokambi Spencer W. Kimball alobaki, “Nalikii ete Nkolo alingi na lombangu nyonso kotia kati ya maboko na biso bisalelo ya tekinoloji oyo biso bato mpamba tokokaki kokanisa te (“Ntango Mokili ekobongwama,” Ensign, Sanza ya zomi. 1974, 10).

Mpe asili kosala yango! Bozali kokola na moko ya bisalelo minene ya kosala bolamu kati ya lisitwale ya moto: Interneti. Maponami ya ndenge na ndenge ezali koyela. Ebele ya maponami oyo, ezali komemela biso, nzoka nde, boyanoli oyo ekokani na yango. Epesaka bino nzela ya kokota kati na nyonso mibale: bolamu ya likolo koleka mpe mabe ya makasi koleka oyo mokili ekoki kopesa. Na yango tokoki kokokisa biloko minene na ngonga moke, to kokweya na motambu ya makambo ezanga ntina mpe nsuka oyo ekobebisa ntango na yo mpe mpe ekokitisa bokasi na bino. Nakofinaka souris ya ordinatele na yo, bokoki kokota na nyonso oyo motema na bino elingi. Oyo ezali likambo ya motuya—Nini yango oyo mitema na bino elingi? Nini ezali kobenda bino? Mposa na bino ezali komema bino wapi?

Mikundola ete Nzambe “apesaka na bato engebene na mposa na bango” (Alma 29:4) mpe ete Akosambisa bato nionso engebene na misala na bango, kolandaka mposa ya mitema na bango” (D&A 137:9; tala lisusu Alma 41:3).

Mpaka Bruce R. Mc Conkie alobaki: “Na lolenge ya likanisi ebombama, buku ya bomoi ezali mabombami ya misala ya bato lokola mabombami oyo ekomami na nzoto na bango mei. … Na yango, likanisi nionso, liloba, mpe mosala azali na [eyano] likolo ya nzoto ya moto; nionso oyo etikaki bilembo na yango, bilembo oyo ekoki kotangama na Ye oyo azali Seko lolenge ya pete lokola maloba na buku ekoki kotangama” (Mormon Doctrine, bobimisi ya 2. [1966], 97).

Eteneti ezali kobomba bamposa na bino, na lombango na lolenge ya koluka mpe ya kofina. Ezali na bato ebele bazali kozela mpo ya kokokisa mposa yango. Lokola bozali kosalela na eteneti, bozali na bosolo ya esaleli eteneti na bino—maye bozali kosolola, wapi bozalaki, uta ntango boni bozalaki kuna, mpe biloko nini esepelisi bino. Na lolenge oyo, eteneti ezali kosala cyber profile mpo na bino—na lolenge, “buku ya cyber ya bomoi.”Lokola na bomoi, Eteneti ekopesa bino ebele mpe ebele ya maye bozali koluka. Soki bamposa na bino ezali peto, Eteneti ekoki kokolisa yango, kokomisaka yango pete na kokolisa na nzela malamu. Kasi na bokeseni ezali lisusu solo.

Mpaka Neal A. Maxwell alobaki na lolenge oyo:

“Nini tosengeli mpenza koleka, sima ya nionso, ezali nini biso tozali koluka kokoma mpe nini tokozwa na seko. …

“… Kaka na koteyaka mpe koyekolisaka bamposa na biso ekoki bongo kokoma moninga na biso koleka banguna biso!” (“According to the Desire of [Our] Hearts,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 1996, 21–22).

Bandeko na ngai bilenge mibali, soki bozali na nguya ya kokamba bamposa na bino te, mokili ekosala yango mpo na bino. Mikolo nionso, mokili ezali koluka kolakisa bino bamposa na yango, komekaka bino kosomba eloko moko, kofina na eloko moko na eteneti, kosakana na eloko moko, kotanga to kotala eloko moko. Na suka, maponami ezali ya bino mei. Bozali na bonsomi ya kopona. Ezali nguya kaka te mpo na kosalela na bamposa na bino kasi lisusu ya kuyungula, kopetola, mpe komatisa bamposa na bino. Bonsomi ya kopona ezali nguya na bino ya kokoma oyo boponi kozala. Maponami moko na moko ezali komema bino pembeni to uta na mingi esengeli bino kokoma; kofina moko na moko ezali na ntina. Bomituna mbala mingi bino mei, “Maponami oyo ekokumba wapi?” Bomanyola biyano ya misala na bino ekozala lolenge nini.

Satana alingi kokamba bonsomi na bino ya kopona na yango akoki kokamba oyo bino bokokoma. Ayebi ete moko ya banzela malamu kosala yango ezali ya kotiela bino motambu ya bizaleli ya bowumbu. Maponami na bino elakisami soki tekinoloji ekopesa bino ndingisa to kokanga bino na bowumbu

Ekoki Ngai kopesa mibeko minei kosunga bino, nkola eponama, esunga bamposa na bino mpe kokamba esaleli na bino ya tekinoloji.

Ya yambo: Koyebaka Banani Bino Bozali Solo Ezali kotia Mikano Pete.

Nazali na moninga moko oyo ayekolaki bosolo oyo na lolenge ya ye mei. Mwana na Ye ya mobali akolaki na lolenge ya nsango malamu, kasi amonisamaki neti kotungisamaka na molimo. Azalaki mbala mingi kokweyisama na koboya kosalela bonganganzambe. Baboti na Ye bayokaki motema mpasi ntango alobaki ete akokende misio te. Moninga na ngai asambelaki mingi na ntina ya mwana na ye ya mobali, na kolikiaka ete akoki kobongola motema. Bilikia oyo ebebaki ntago mwana na ye alobaki ete akomaki penepene ya kobala. Tata asengaki na mwana na ye ya mobali kozwa lipamboli ya bankoko. Mwana mobali andimaki na nsuka kasi akangamaki kaka akende komona nkoko ye moko.

Ntango azongelaki nsima ya mapamboli, azalaki na motema mopaswama makasi. Asimbaki moninga na ye ya mwasi amemaki ye libanda, wapi akokaki kosolola na ye na pembeni. Tata atalaki libanda ya lininisa mpo ya kotala elenge libota kopanguisaka mpinzoli na miso ya moko na mosusu.

Na sima ya ntango muana mobali akabolaki na tata na ye oyo ekomaki. Na motema epaswama makasi alimbolaki ete ntango lipamboli ebandaki kosalema, azalaki na limoni ya oyo ezalaki mokili ya yambo ya nkufa. Amonaki lolenge nini bokasi mpe bizaleli ya kondimisa basusu kolanda Klisto. Koyebaka oyo ye azalaki ya solo, boniboni ye esengelaki te kosala misio?

Bilenge mibali, bomikundola banani bino bozali ya solo. Bomikundola ete bozali na bonganzambe esantu. Oyo ekofula bino kosala maponami ya malamu lokola bozali kosalela eteneti mpe na nzela ya bomoi na bino.

Ya mibale: Bomitia Na kati na liziba ya Nguya

Bokoma kati ya maboko na bino bozali na buanya ya mibu—ya motuya koleka, maloba ya ba profeta, kowuta na Boyokani bwa Kala ya mikolo ya President Thomas S. Monson. Kasi soki bino bozali kotia moto tango nyonso na telefone na bino te, ezali na ntina te, mpe bokoyoka bobungi mpe bokabuani ya masolo na bato na yo. Bokoki kokanisa ata mokolo moko te kozangaka kotia charge na batterie na bino.

Ya motuya ezali kolongwa ndako mikolo nyonso elongo na charge na telephone na bino, ezali mosika koleka motuya kotondisama na nguya ya molimo. Ntango bokobanda kotia telefone charge, salela yango lokola ekaniselo komituna bino moko soki bomitie na oyo eleki motuya ya liziba ya molimo ya nguya—libondeli mpe kotangaka makomi, oyo ebongisi bino na lifuli na nzela ya Molimo Mosantu (talaD&A 11:12–14). Ekosunga bino koyeba likanisi mpe mposa ya Nkolo kosala ya moke kasi ya motuya maponami ya mokolo na mokolo oyo ekolakisa nzela. Ebele kati na biso etelema atako tozali komibongisa kotanga sms—kasi tosengeli kotia ntina koleka na sango kouta Nkolo ezala kutu motuya koleka. Esengeli na biso komona mbamba te kokota na liziba oyo ya nguya ya Nzambe. (tala2 Nefi 32:3).

Ya misato: Kozala na telefoni ya Ekoka na nyonso Ekopesa Bino mayele te, kasi Kosalelaka Yango na Bwanya ekokikopesa bino mayele.

Bilenge mibali, bosala makambo ya kobatama na batelefoni na bino te. Bino nyonso Boyebi oyo Nazali koloba. (talaMosiah 4:29). Ezali na molongo ebele ya bozangi kotanga oyo tekinoloji ekoki kolekisalela bino ntango uta na oyo ezali na ntina makasi. Landa lisese: “Zala esika ozali ntango ozali kuna.” Ntango ozali kokumba motuka, kumba. Ntango ozali na kelasi, tia makanisi na liteya. Ntango bozali na baninga bino, pesa bango likabo ya ntina na bino. Bongo nayo ekoki te kotia makanisi na biloko mibale na mbala moko. Kosalisaka ekomatisa na lombango ntina uta na eloko moko na mosusu. Lisese moko ya kala elobi, “Soki ozali kolanda balape mibale, okokanga ata moko te.”

Ya minei: Nkolo apesi tekinoloji mpo na Kokokisa Ba ntina na Ye.

Ntina ya bonzambe ya tekinoloji ezali kosala mosala ya lobiko na lombango. Lokola bandimi ya nkola eponama, bokolimbola tekinoloji. Bosalela yango mpo ete etambwisa bino na lombango na bobongi nye. Mpo ete bopesami mingi. Bino mpe bosengeli kopesa (tala “Seigneur, j‘ai tant reçu,” loyembo, no. 139). Nkolo azali kozela bino bosalela bisalelo minene oyo kozwa mosala na Ye na ndelo elandi, kokabola nsango malamu na banzela oyo ezali likolo ya makanisi ya sembo ya bolenge na ngai. Wapi bato ya pene pene to engumba balandaki bizaleli ya bilenge ya kala, bozali na nguya na nzela ya eteneti mpe ya lolaka ya bato nyonso ya koleka bandelo mpe kolakisa bizaleli na bino na mokili mobimba.

Natatoli ete oyo ezali Eklezia ya Nkolo. Boponamaki mpo na kozala na mosala na Ye na ntango oyo mpo ete atiaki motema na Ye pai na bino mpo na kosala maponami malamu. Bozali nkola eponama. Nankombo ya Yesu Klisto, amene.