2010–2019
Mokumba ya Esengo ya Boyekoli
Sánzá ya mínei 2014


Mokumba ya Esengo ya Boyekoli

Kosunga bakambi ezali litomba; ekoya elongo na mokumba ya moto na moko mmpo na kokabola mokumba na bango mpe kozala bayekoli ya Nkolo.

Na sanza ya mitano 20 ya mobu moleki ebakata ya ekumbaki moko ebetaki na bampembeni ya Oklahoma City, na katikati ya Amerika, kotimolaka nzela moko ya koleka 1,6 km mpe 27 km ya molai. Mvula monene oyo, bosopani ya ekumbaki ya kobebisa, ebongolaki mboka mpe bomoi ya bato na nzela na yango.

Kaka poso moko nsima ya kobeta oyo mvula oyo ya makasi, napesamaki mokumba ya kokende kotala esika wapi bandako mpe biloko epanzanaki na kati ya nzinganzinga oyo epatalalaki mpe ebebisamaki.

Yambo nalongwa nasololaki na profeta na biso ya bolingo, Mokambi Thomas S. Monson, oyo asepelaka na misala ya boye mpo na Nkolo. Na limemia oyo ememamaki kaka na mosala na ye te kasi lisusu na bloamu na ye, natunaki, “Nini olingi ngai nasala? Nini olinga ngai naloba?”

Asimbaki liboko na ngai na boboto, lokola elingaki ye kosala na moko na moko ya bazwi likama mpe moko na moko ya baye kosalisaka na bobebisi yango soki azalaka wana, mpe alobaki ete:

“Yambo, loba na bango ete nalingi bango.

“Ya mibale, loba na bango ete nazali kosambela mpo na bango.

“Ya misato, nasengi opesa matondi na baye banso bazali kosalisa.”

Lokola moko ya Bokambi ya Bantuku Nsambo, nakoki koyoka bozito na mapeka na ngai kati na maloba Nkolo alobaki na Mose ete:

“Yanganisa bato ntuku nsambo ya mikolo ya Yisalaele epai na ngai, baoyo eyebi yo ete bazali mikolo na bato mpe bato na liboso na bango; …

“Ngai mpe nakokita mpe nakosolola na yo wana. Nakokamata ndambo ya molimo mozali likolo na yo [Mose] mpe nakotia yango na likolo na bango, mpe bakomema mokumba na bato na yo elongo ete omema yango yo moko te.”1

Maye ezali maloba euti na bantango ya kala, kasi ndenge ya Nkolo ebongwani te.

Na mikolo oyo kati na Eklezia, Nkolo abiangi Bantuku Nsambo 317, kosalaka na masanga makoki 8, mpo na kosunga Bapostolo Zomi na Babale na komemaka mokumba etiami likolo ya Bokambi ya Yambo. Nazali koyoka na esengo mokumba wana kati na mizindo ya motema na ngai mpenza, lokola ezali koyoka baninga na ngai Bandeko Babali. Nzokande, tozali kaka biso moko te kosungaka na mosala ya nkembo oyo. Lokola bandimi ya Eklezia na mokili mobimba, tozali banso na libaku kitoko ya kopambolaka bomoi ya basusu.

Nayekolaka uta na profeta na biso ya bolingo nini bato oyo baniokwamaki na mvula makasi bazalaki na yango mposa—bolingo, nsambo, mpe botondi mpo na maboko mpo na kosalisa.

Na nsima ya nzanga oyo moko na moko na biso akotombola loboko na biso ya mobali na mbata semba mpe akosunga Bakambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Babale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Oyo ezali ekela ya mpamba te, to ebongisami mpo na baye babiangami na mosala monene te. Kosunga bakambi ezali litomba; ekoya elongo na mokumba ya moto na moko mmpo na kokabola mokumba na bango mpe kozala bayekoli ya Nkolo Yesu Klisto.

Mokambi Monson alobi ete:

“Tozingami na baye bazali na mposa ya bokebi na biso, bolendisi na biso, lisungi na biso, libondi na biso, boboto na biso—bazala baye libota, baninga, bayebani, to bampaya. Tozali maboko ya Nkolo awa na mabele, na etinda ya kosalisa mpe ya kotombola bana na Ye. Ye ayekami na moko na moko na biso. ...

“‘… lokola esalaki bino yango epai na moko ya oyo aleki moke na bango … , bosalelaki ngai yango’ [Matai 25:40].”2

Ekoyanola biso na bolingo ntango libaku ezali liboso na biso mpo na kokende kotala to kobenga na telephone, kokama mokanda, to kolekisa mokolo koyanolaka mposa ya moto mosusu? To ekozala biso lokola elenge mobali oyo andimaki kolanda mitindo nyonso ya Nzambe:

“Natosi oyo nyonso uta na bolenge na ngai tii sikoyo, Nini ezangi naino?

“Yesu alobi na ye ete, Soki olingi kobonga na malamu, kende kotekisa nyonso ezali na yo mpe pesa epai na babola mpe okozala na biloko ya motuya na Likolo, mpe yaka kobila ngai.”3

Elenge mobali azalaki kobiangema na mosala monene koleka penepene ya Nkolo ya kosala mosala ya bokonzi ya Nzambe na mabele, atako akimaki, “Zambi azalaki na biloko mingi.”4

Nini na ntina ya biloko na biso ya mokili? Tokoki komona maye ekumbaki ekoki kosala na yango na mwa miniti. Ezali ntina mpenza mpo na moko na moko na biso kobunda kokangisa mpe kobomba biloko na biso ya motuya ya molimo na lola—kosalelaka ntango, batalanta, mpe bonsomi ya kopona na biso na mosala ya Nzambe.

Yesu Klisto azali kokoba kosembola libiangi “Yaka kobila ngai.”5 Atambolaki na mboka ya mbotama na Ye na lolenge moko ya moyimi te. Azali kokoba kotambola elongo na biso, kotelema penepene na biso, mpe kokamba biso. Kolanda ndakisa na Ye ya malamu ezali koyeba lisusu mpe kokumisa Mobikisi, oyo amemi mikumba na biso nyonso na nzela ya Bomikabi na Ye ya bule mpe ya lobiko, ekela eluti ya lisalisi. Nini Ye azali kosenga na moko na moko na biso ezali kozali na makoki mpe na bolingi ya komema “mokumba” ya esengo ya moyekoli.

Wana ezalaki ngai na Oklahoma, nazwaki libaku ya kokutana na mwa mabota ebebisamaki na bikumbaki ya makasi. Lokola nakendeki kotala elongo na libota Sorrels, nasimbamaki mingimingi na lisolo ya mwana na bango ya mwasi, Tori, moyekoli ya kelasi ya mitano na a Eteyelo ya Bana mike ya Plaza Towers. Ye mpe mama na ye bazali awa na biso lelo.

Tori mpe ndambu moke ya baninga na ye babatamaki na nzongo enene mpo na kombombama wana ekumbaki ebebisaki eteyelo. Boyoka wana ezali ngai kotanga, na maloba ya Tori yemei, lisolo ya mokolo wana:

“Nayokaki eloko moko kobeta motondo. Nakanisaki ezalaki kaka mvula ya mabanga. Makelele ekomaki komata se komata. Nasambelaki ete Tata na Lola akobatela biso banso mpe akobomba biso na likama. Na mbala moko toyokaki makelele makasi ya mopepe makasi, mpe motondo elimwaki kaka likolo ya mito na biso. Ezalaki na mopepe ebele mpe biteni ya biloko kopumbwaka mpe kobeta biteni nyonso ya nzoto na ngai. Ezalaki molili libanda mpe ezalaki komonana lokola likolo ezalaki moyindo, kasi ezalaki moyindo te—ezalaki kati ya ekumbaki. Nakangaki kaka miso na ngai, kolikiaka mpe kosambelaka ete ekosila noki.

“Na mbala moko ekomaki kimia.

“Ntango nafungolaki miso na ngai, namonaki elembo ya kosila kaka liboso ya miso na ngai! Ezalaki penepene na kotuta zolo na ngai.”6

Tori, mama na ye, bandeko na ye misato, mpe baninga ebele oyo bazalaki mpe na eteyelo elongo na ye babikaki na kokamwa na ekumbaki wana; baninga na bango ya eteyelo nsambo babikaki te.

Nsuka ya poso wana bandeko ya bonganganzambe bapesaki mapamboli mingi na bandimi oyo bamonaki mpasi na ekumbaki. Namikitisaki mpo na kopesa Tori lipamboli. Lokola natiaki maboko na ngai na moto na ye, likomi moko nalingaka eyaka na motema: “Nakokende liboso ya elongi na yo. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe na loboko na bino ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala na mitema na bino, mpe banzelu na ngai nzinganzinga na bino, mpo na kosunga bino.”7

Napesaki Tori toli amikundola mokolo ntango mosali ya Nkolo atiaki maboko na ye na moto ye mpe alobaki ete abatelamaka na banzelu na ekumbaki.

Kosembola loboko mpo na kobikisana, na nse ya ezalela kani, ezali emekoli ya seko ya bolingo. Oyo ezali lisalisi oyo nazalaki nzeneneke na Oklahoma poso wana.

Mbala mingi topesami libaku ya kosalisa basusu na ntango ya bosenga. Lokola bandimi ya Eklezia, tozali moko na moko na mokumba ya bule “komema mikumba ya bino na bino, ete mikoka kozala pepele,”8 “kolela elongo na baye bakolela,”9 mpe “kotombola maboko ya botau, mpe kolendisa mabolongo oyo ezali kotepatepa.”10

Bandeko mibali mpe basi, botondi kani Nkolo azali mpo na moko na moko mpe moto nyonso kati na bino, mpo na bangonga mpe bikela ya lisalisi ezangi motango, atako minene to mike, bozali kopesa na bokabi mingi mpe na mawa mikolo nyonso.

Mokonzi Benyamina ateyaki na Buku ya Mormon ete, “Ntango bozali na mosala ya bazalani na bino bozali mpenza na mosala ya Nzambe na bino.”11

Na kobetaka nsete na oyo etali lisalisi bandeko na biso mibali mpe basi bakoki kokamba biso mpo na kozwa mikano ya bonzambe na bomoi na biso ya mikolo na mikolo mpe kolengela biso kotia motuya mpe kolinga maye Nkolo alingaka. Na kosalaka boye, tozali kotatola na nzela ya bomoi na biso mpenza ete tozali bayekoli na Ye. Ntango tomipesi na mosala na Ye, toyokaka Molimo na Ye kati na biso. Tokoli na litatoli, bondimi, elikia, mpe bolingo.

Nayebi ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, kutu Yesu Klisto, mpe ete alobaka epai ya mpe na nzela ya profeta na Ye, Mokambi ya bolingo Thomas S. Monson, na oyo, ya biso mokolo.

Tika biso banso tozwa esengo oyo eyaka uta na mosala ya bule ya komemanaka mikumba, atako wana ya minene mpe ya mike, ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.