2010–2019
Moto ya Bonganganzambe
Sánzá ya mínei 2014


Moto ya Bonganganzambe

Okoki kozala ndakisa monene, moko ya katikati, to ndakisa ya mabe. Okoki kokanisa ekosala yo eloko te, kasi ekosala eloko na Nkolo.

Banso tozali na bilombe, mingimingi, ntango tozali bilenge. Nabotamaki mpe nakolaki na Princeton, New Jersey, na Etazini. Bikipi minene mingi ya masano ya mpembeni ya bisika wapi nafandaki ezalaki na bilo na bango na Engumba ya New York. Ezalaki mboka ya bikipi misato ya basani minene ya baseball na mikolo wana ya kala: Ekipi ya Brooklyn Dodgers, ya New York Giants, mpe ya New York Yankees. Philadelphia ezalaki kutu mpembeni ya ndako na biso mpe ezalaki mboka ya bikipi ya baseball ya Athletics mpe ya Phillies. Ezalaki na bilombe ya baseball ya likoki mingi mpo na ngai na bikipi wana.

Joe DiMaggio, oyo azalaki kobeta mpo na ba New York Yankees, akomaki elombe na ngai ya baseball. Ntango bandeko na ngai ya mibali mpe baninga na ngai bazalaki kobeta baseball na libanda ya masano ya kelasi mpembeni ya ndako na biso, nazalaki komeka kobeta libaya lolenge nazalaki kokanisa Joe DiMaggio azalaki kosala yango. Wana ezalaki yambo ya mikolo ya televizio (oyo ezali lisolo ya kala), yango wana nazalaki bobele na bafoto ya bazulunale mpo na kosalela na ntina ya komekola ebeteli na ye.

Ntango nazalaki kokola, tata na ngai akumbaki ngai na Yankee Stadium. Wana ezalaki ngonga bobele moko oyo namonaki ebeteli ya Joe DiMaggio. Lokola soki nazali kaka kuna, na makanisi na ngai nakoki komona ye kobeta libaya mpe komona ndembo ya baseball ya mpembe kopumbwa liboso tii na kati ya bandelo na katikati ya libanda ya masano.

Sikoyo, makoki na ngai ya baseball mokolo moko te ekoma mpembeni na eye ya elombe na ngai ya bomwana. Kasi mwa bangonga oyo nazalaki kobeta ndembo ya baseball malamu, namekolaki ndelo ya ebeteli na ye ya makasi bo penepene lokola nakokaki.

Ntango toponi bilombe, tobandi komekola, na kansasa to na kansasa te, maye tolulaki kati na bango.

Na esengo, baboti na ngai ya bwania batiaki bilombe minene na nzela na ngai lokola elenge mobali. Papa na ngai amemaki ngai na Yankee Stadium bobele mbala moko mpo na kotala elombe na ngai kobeta, kasi eyenga nyonso azalaki kotika ngai kotala mobali moko ya bonganganzambe oyo akomaki elombe. Elombe wana epesaki lolenge ya bomoi na ngai. Tata na ngai azalaki mokambi ya etape moke oyo ezalaki kosangana na ndako na biso. Atako bongo, soki okokiti mpo na kokende na nse na mokolo ya eyenga, ozali na ndako ya nzambe. Etape na biso mokolo moko te ezalaki na bato 30 koyanganaka.

Ezalaki na elenge mobali moko oyo akumbaki mama na ye na ndako na biso mpo na makita, kasi akotaki mokolo moko te na ndako. Azalaki mondimi te. Ezalaki tata na ngai oyo alongaki na kobimaka mpo na kokende esika atelemisaki motuka mpe kobengisaka ye akota na ndako. Abatisamaki mpe akomaki moyangeli na ngai ya Bonganganzambe ya Alona ya yambo mpe se moko. Akomaki elombe na ngai ya bonganganza. Namikundola naino ekeko ya nzete apesaki ngai lokola lifuti nsima ya kosilisaka mosala moko ya kokata nkoni mpo na mokufeli mobali moko. Namekaki kozala lokola ye ntango nyonso napesi lisanzoli esengeli na mosali moko ya Nzambe.

Naponaki elombe mosusu na etape moke wana ya Eklezia. Azalaki soda ya mai ya Etazini moko oyo ayaki koya na makita na biso kolataka uniforme na ye ya mai ya mpondu ya mwindu. Ezalaki na ntango ya bitumba, boye wana yango moko esalaki ye elombe na ngai. Atindamaka na Universite ya Princeton na mampinga ya mai mpo ma kobakisa boyekoli na ye. Kasi mosika mingi koleka kolulaka uniforme na ye ya soda, nazalaki kotala ye kobeta na Palmer Stadium lokola kapiteni ya ekipi ya football ya Universite ya Princeton University. Nazalaki komona ye kobeta na ekipi ya basketball ya universite mpe lisusu nazalaki kotala ye kobeta lokola moyambi ayebana ya ekipi na bango ya baseball.

Kasi kutu mingi, azalaki koya na ndako na ngai na poso mpo na kolakisa ngai lolenge nini kobeta ndembo ya basketball na loboko ya mwasi mpe ya mobali lokola. Ayebisaki ngai ete nakozala na mposa ya likoki wana mpamba te mokolo mususu nakobeta basketball na bikipi malamu. Nasosolaki yango te na ntango wana, kasi azalaki na mibu mingi, mpo na ngai, ndakisa ya moto ya bonganganzambe ya solo.

Moko na moko na bino akozala ndakisa ya moto ya bonganganzambe olinga to olinga te. Okomaki buzi ya kopela ntango ondimaki bonganganzambe. Nkolo atiaki yo na nzete ya busi mpo na kongengisa nzela mpo na moto nyonso oyo azali nzinganzinga na yo. Wana ezali mingimingi solo mpo na baye bazali na lisanga likoki na yo ya bonganganzambe. Okoki kozala ndakisa monene, moko ya katikati, to ndakisa mabe. Okoki kokanisa ekozala eloko te mpo na yo, kasi ekozali eloko na Nkolo. Alobaki yango lolenge oyo:

“Bino bozali mwinda ya mokili, mboka oyo ezali likolo ya ngomba, yango ekoki kobombama te.

“Mpe bapelisaka mwinda te mpo na kotia yango na nse ya katini, kasi na likolo ya eloko oyo batielaka mwinda mpo engengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako.

“Yango wana, mwinda na yo esengeli engenga ndenge wana liboso ya bato, mpo bamona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na Likolo.” 1

Napambolami na bandakisa ya basimbi bonganganzambe minene na masanga makoki wapi nazalaki na libaku ya kosala. Okoki kosala maye basali mpo na ngai na kozalaka ndakisa mpo na basusu balanda.

Namoni bizalela ekokani misato ya basimbi bonganganzambe oyo bazali bilombe na ngai. Moko ezali ndakisa moko ya losambo, ya mibale ezali momesano ya mosala, mpe ya misato mokano moko makasi mpenza mpo na kozala sembo.

Tosambelaka banso, kasi mosimbi bonganganzambe olingi kozala asambeka mbala mingi mpe na mokano ya solo. Na mpokwa okofukama mpe okotondo Nzambe mpo na mapamboli ya mokolo yango. Okotondo Ye mpo na baboti, mpo na bateyi, mpe mpo na ndakisa monene ya kolanda. Okolimbola na nsambo na yo mingimingi nani apamboli bomoi na yo mpe lolenge nini, na mokolo wana. Wana ekozwa mingi koleka miniti moke mpe mingi koleka likanisi moke. Ekokamwisa yo mpe kobongwanisa yo.

Wana ezali yo kosambela mpo na bolimbisi, okomimona kolimbisaka basusu. Ntango opesi matondo na Nzambe mpo na boboto na ye, okokanisa basusu, ma nkombo, oyo bazali na mposa ya boboto na yo. Lisusu likambo wana ekokamwisa yo mikolo nyonso, mpe ntango nyonso ekobongola yo.

Nzela moko oyo okobongwana na losambo makasi ya boye ezali, nalaki bino, ete okomiyoka solo ete ozali mwana ya Nzambe. Ntango oyebi ete ozali mwana ya Nzambe, okoyeba lisusu ete Ye azali kozela mingi na yo. Lokola ozali mwana na Ye, Ye akozela yo olanda mateya na Ye mpe mateya ya Mwana Ye ya bolingo. Ye akozela yo ozala ya bokabi mpe boboto na basusu. Ye akoyoka motema mpasi soki ozali lofundo mpe moyimi. Ye akopambola yo ozala na mposa ya kotia matomba ya basusu likolo ya oyo ya yomei.

Boko na bino basili kozala bandakisa ya lisalisi ya bonganganzambe ezanga moyimi. Na batempelo na mokili mobimba, basimbi bonganganzambe bakomaka liboso moi ebima. Mpe basusu basalaka ntango molai nsima moi ekoti. Ezali na lifuti moko te to lokumu ya bato na mokili oyo mpo na libonza wana ya ntango mpe bokasi. Nasili kokende elongo na bato ya bilenge wana ezali bango kosalisa baye bazali na mokili ya molimo, oyo bazali na makoki te ya kosenga mapamboli ya tempelo bangomei.

Ntango nazali komona esengo na esika ya botau na bilongi ya baoyo bazali kosala kuna ntongo ntongo mpe na mpokwa, nayebi ete ezali na balifuti mingi na bomoi oyo mpo na lolenge ya mosala ya bonganganzambe ya moyimi te wana, kasi ezali bobele elembo ya bosepeli bakokabola elongo na baoyo bazalisaki na mokili ya molimo.

Namoni esengo wana kaka na bilongi ya baoyo balobaka na basusu na ntina ya mapamboli oyo eyaka uta na kozalaka na bokonzi ya Nzambe. Nayebi mokambi moko ya etape oyo pene mikolo nyonso amemaka bato epai ya bamisionele mpo ete bango bateya. Kaka mwa basanza eleki azalaki naino mondimi ya Eklezia te. Sikoyo ezali na bamisionele koteyaka mpe etape moko kokolaka na motango mpe bokasi mpo na ye. Kasi mingi koleka wana, azali mwinda na basusu oyo bakofungola minoko na bango mpe bongo komema mbangu bosangisi ya Nkolo ya bana ya Tata ya Lola.

Ntango osambelaka mpe okosalisaka basusu, boyebi na yo ete ozali mwana ya Nzambe mpe mayoki na yo etali Ye ekokola. Okoyeba malamu mingi ete Ye ayokisami mawa soki ozali sembo te na lolenge kani. Okomipesa mpo na kobatela liloba na yo epai ya Nzambe mpe na basusu. Okoyeba malamu mingi kozwa eloko moko te oyo ezali ya yo te. Okozala bosembo mingi na bakonzi na yo ya mosala. Okopesa mingi kozala na ngonga mpe kosilisa mosala nyonso opesami na Nkolo oyo ondimaki kosala.

Na esika ete omitunaka soki bateyi na bango na libota bakoya, bana kati na mabota oyo obiangami koteya bakotalela yambo visite na yo. Bana na ngai bazwi lipamboli wana. Wana ezalaki bango kokola, bazwaki bilombe ya bonganganzambe kosalisa bango kotia banzela ya bangomei na kosaleka Nkolo. Ndakisa epambolama wana ezali sikoyo koleka na nkola ya misato.

Etinda na ngai ezali lisusu moko ya botondi.

Natondi bino mpo na nsambu na bino. Natondi bino mpo na kofukamaka koyebaka likambo ete bozwaka biyano nyonso te. Bosambeli Nzambe ya lola mpo na koloba matondi na bino mpe kobondela mapamboli na Ye na bomoi na bino mpe mabota na bino. Natondi bino mpo na lisalisi na bino na basusu mpe mpo na bantango oyo bomiyokaki na mposa moko te ya botondi na ntina ya lisalisi na bino.

Tondimaki likebisi ya Nkolo ete soki toluki lokumu na mokili oyo mpo na lisalisi na biso, tokoki kobungisa mapamboli minene. Bokomikundola maloba oyo:

“Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato mpo ete bango bamona bino, soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombeli bino.

“Ntango ozali kopesa likabo na mobola, kobeta kelelo te liboso na yo ndenge bato ya lokuta basalaka na bandako ya mayangani mpe na babala-bala, mpo ete bato bakumisa bango. Ya solo nalobi; basi bazwi lifuti na bango.

“Ntango yo ozali kopesa eloko na mobola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba te likambo loboko na yo ya mobali ezali kosala;

“Mpo ete likabo na yo epesama na sekele; bongo Tata na yo oyo amonaka makambo oyo esalemaka na sekele akopesa yo lifuti.”2

Baoyo bazali bandakisa na ngai ya basimbi ya bonganganzambe minene bayebaka te na pete ete bazali na ndenge ya bilombe. Na boye, bazali komonana lokola kozala na kpokoso komonaka makambo wana oyo esepelisaka ngai mingi kati na basngo. Natangaki tata na ngai azalaki mokambi ya botongono ya mwa etape moko ya Eklezia na New Jersey. Nsima azalaki moko ya bakambi banene ya Kelasi ya Eyenga mpo na Eklezia. Nzokande nazali na bokebi lelo mpo na koloba na bomikitisi na ntina ya mosala ya bonganganzambe na ye, mpamba te azalaki ya komikitisa.

Yango ezali solo mpo na soda ya mai oyo azalaki elombe na ngai ya bomwana. Alobelaki ngai mosala ya bonganganzanbe na ye to ya makokisi na ye mokolo moko te. Apesaki kaka lisalisi. Nayekolaki na ntina ya botongono na ye uta na basusu. Soki kutu amonaki bizalela kati na yemei oyo nazalaki kosepela na yango, nalingaki koloba te.

Yango wana toli na ngai mpo na bino oyo bolingi kopambola basusu na bonganganzambe na bino etali bomoi na bino oyo ezali ya moto na moto mpo na banso longola se Nzambe.

Sambela Ye. Tonda Ye mpo na manso oyo ezali malamu na bomoi na yo. Senga Ye mpo na koyeba bato nini Ye atie na nzela na yo mpo ete osalisa. Bondela mpo ete okoka kolimbisa mpe mpo ete olimbisama. Nsima salisa bango, linga bango, mpe limbisa bango.

Likolo ya nyonso, mikundola ete kati na lisalisi nyonso okopesa, moko te ezali monene koleka kosalisa bato bapona bamikokisa mpo na bomoi ya seko. Nzambe apesi bokambi wana ya monene mpo na biso oyo etali lolenge ya kosalela bonganzambe na biso. Azali ndakisa malamu na yango. Oyo ezali ndakisa tomonaka na eteni moke ya basali na Ye na kufa ya malamu mingi:

“Mpe Nkolo Nzambe alobaki na Mose, kolobaka ete: Balola, ezali mingi, mpe ekoki kotangama na moto te; kasi ekoki kotangama na ngai, mpo ete ezali ya ngai.

“Mpe lokola mabele moko ekoleka, mpe balola na yango kutu bongo mosusu ekoya; mpe ezali na nsuka te na misala na ngai, mpe na maloba na ngai te.

“Mpo tala, oyo ezali mosala na ngai mpe nkembo na ngai—kosala bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”3

Tosengeli kosalisa na mosala wana. Moko na moko na biso akoki kosala bokeseni moko. Tolengelami mpo na ntango mpe esika na biso na mikolo ya nsuka ya mosala ya bule wana. Moko na moko na biso apambolami na bandakisa ya baoyo bakomisi mosala wana ntina ya motuya ya ntango na bango na mabele.

Nasambeli ete tokoka kosalisana mpo na kozwa litomba ya libaku wana.

Nzambe Tata azali mpe akoyanola nsambo na bino mpo na lisalisi oyo bozali na yango mposa mpo na kosalela Ye malamu. Yesu Klisto azali Nkolo mosekwi. Oyo ezali Eklezia na Ye. Bonganganzambe oyo bozali yango ezali nguya ya kosala na nkombo na Ye mosala na Ye ya kosalisa bana ya Nzambe. Ntango bopesi motema na bino mobimba na mosala oyo, Ye akokomisa bino monene. Nalaki boye na nkombo ya Yesu Klisto, Mobikisi na biso, amene.