Profeta Joseph Smith


Mamonisi esopanaki likolo ya Joseph Smith kondimisaka ete azalaki profeta ya Nzambe.

Limonisi ya Yambo

Elenge mobali atangi Biblia, mpe miso na ye etelemi na litangi ya makomi. Oyo ezali ngonga oyo ekobongola mokili.

Atungisami mpo na koyeba eklezia nini ekoki komema ye na bosolo mpe na lokiko. Amekaki penepene na biloko nionso mosusu, mpe sikawa abalukaki na Biblia mpe atangaki maloba maye: “soki moto moko kati na bino azangi bwania, asenga na Nzambe, mpe akopesa ye yango, mpamba te Nzambe apesaka na bato nionso na motema malamu mpe na kopamela te; mpe ekopesamela ye.” 1

Amaniolaki yango mbala na mbala. Mwa mwinda ya yambo ya pole eyingalaki na molili. Ezali eyano wana, nzela mpo na kobima uta na bobulungani mpe molili? Ekoki yango kozala pete? Tuna Nzambe mpe Ye akoyanola? Na nsuka azwaki mokano asengeli ya kotuna na Nzambe to kotikala na molili mpe na bobulungani.

Mpe atako azalaki kotungisama, akimaki mpo na kokende na esika ya kimia mpe na kosala libondeli moko ya nokinoki. Azalaki kaka na mibu 14, kasi na lombangu na ye mpo na koyeba, boweli ezalaki te. Oyo ezali losambo ya mpamba te. Azwaki mokano wapi akokenda mpe ntango nini akomeka yango. Amilengelaki mpo na koloba na Nzambe.

Mpe na nsima mokolo yango ekomaki. Ezali ntongo ya mokolo moko ya moyi kitoko, noki na eleko ya elanga ya [1820] 2Atambolaki ye moko na kimia ya banzete ya pembeni, na nse ya baoyo etelemi molayi likolo na ye. Akomaki na esika wapi yambo aponaki mpo na kokende. Afukamaki mpe asopaki bamposa ya motema na ye.

Mpo na kotalisa nini ekosalema liboso, alobaki:

“Namonaki likonzi ya pole kaka likolo ya moto na ngai, kongenga koleka moyi oyo ekitaki malembe malembe kino kokita likolo na ngai.

“…Ntango pole evandaki likolo na ngai namoni Bato mibale, oyo ya bango bongengi mpe nkembo ekoki kolimbolama te, kotelema likolo na ngai na mopepe. Moko na bango alobi na ngai, kobengeka ngai na nkombo na ngai mpe alobi, kolakisaka mosusu—[Joseph,] Tala mwana na ngai ya bolingo. Yokela ye! 3

Bobele mibu 24 nsima, Joseph Smith mpe ndeko na ye Hyrum bakufaki na ntina ya likambo oyo ebandaki awa.

Koboya

Joseph alobaki ete ntango azalaki na mibu 17, anzelu alobaki na ye ete “nkombo na ye ekoyebana na malamu mpe na mabe na mokili mobimba, … na bikolo binso.”4 Lisakoli oyo ya kokamwa ezali kokoba kokokisama lelo lokola Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansatu ba Mikolo mya Nsuka ezali kopanzana na mokili.

Koboya, kotonga, mpe kokesena ezali baninga ya bosolo. Ntango nionso bosolo ezali mpo na ntina mpe na maye ekoyela bato na nsuka emonisami, wana ekozala ntango inso bokasi mpo na koboya yango. Banda na Adama mpe Ewa na elanga ya Edene, kokita na mosala ya Klisto, mpe tii na mokolo na biso, ezali ntango inso mpe ekozala l;ibela makasi mpo na kokosa, bobungi nzela, koboya, mpe kopekisa ete moango ya bomoi ekokisama.

Luka Moko oyo asala mingi mpo na bosikoli ya bato koleka soki nani mosusu, Moko oyo akendaki na ntina ya kosala bolamu mingi koleka soki nani mosusu, mpe wana okozwa Moko kati na bato banso koleka batelemelaki na kozangaka bosembo mpe ntina, babundisaki mpe babwakaki, babetaki, basundolaki, mpe babakaki na ekulusu, Moko oyo akitaki na nse ya biloko binso. Kuna nde bokozwa bosolo, Mwana ya Nzambe, Mobikisi ya bato banso. Mpo na nini batikaki Ye te?

Ntina nini? Mpo Ye azali na bosolo, mpe bosolo eboyamaka ntango inso.

Mpe nsima luka moko oyo abimisaki litatoli mosusu ya Yesu Klisto mpe makomi mosusu, luka moko oyo azalaki esalelo oyo wapi litondi ya nsango malamu mpe Eklezia ya Yesu Klisto ezongisamaki na nse na mabele, luka ye mpe zela komona mbindo nyonso kolongwa. Mpo na nini batikaki ye te?

Mpo na nini? Mpamba te ateyaki bosolo, mpe bosolo eboyamaka kaka.

Mpela ya Bobimisi

Mabimisi esopanaki likolo ya Joseph Smith kondimisaka ete azalaki profeta ya Nzambe. Tika totala naino ndambu na yango—totala naino ndambu ya pole mpe bosolo oyo ebimisamaki na nzela na ye mpe oyo ezali kongenga kokesanaka makasi na boyambi ya bato banso na mikolo na ye mpe ya biso.

  • Nzambe azali moto, mozali ya konetolama, Tata ya Seko. Ye azali Tata na biso.

  • Nzambe Tata, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu bazali ya kokabwana solo.5

  • Ozali na mingi koleka moto. Ozali mwana ya Nzambe Tata ya Seko mpe okoki kokoma lokola Ye 6 soki okozala na bondimi na Mwana na Ye, okoyambola, okozwa makuli, kozwa Molimo Mosantu mpe kokoba kino na suka. 7

  • Eklezia ya Yesu Klisto lelo ezali na mpenza Eklezia wana kaka Ye abongisaki na mosala na ye ya kufa, na baprofeta mpe na bapostolo, Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe ya Lewitiko, bampaka, banganganzambe banene, badiakona, bateyi, baepisikopo, mpe bantuku sambo, nionso lokola elimbolami na Biblia.

  • Bokoki ya bonganganzambe elongolamaki na mabele kolandaka liwa ya Mobikisi mpe Bapostolo mpe ezongisamaki lisusu na mokolo na biso.

  • Limonisi esilai te, mpe lola ezalaki ya kokanga te. Nzambe azali koloba lelo na baprofeta, mpe akoloba na yo mpe ngai lokola.8

  • Ezali wana mingi nsima ya bomoyi oyo koleka kaka lola mpe lifelo. Ezali wana bolandani ya nkembo, mpe ezali likambo monene nini tokosala na bomoyi oyo.9

  • Mingi koleka kozalaka na kondima na Klisto ya mpamba, tosengeli kotala “epai na [Ye] na makanisi nionso,” 10 “tosala nionso [tokosala na] na nkombo ya Mwana mobali,” 11 “kokundola ye ntango nionso mpe kotosa mibeko na ye…ete [tokoka]ntango nionso kozala na molimo na ye elongo na [biso].” 12

  • Bamilio oyo bazali mpe bakufa na kozanga nsango malamu mpe makuli ya ntina mpo na libiki bazali ya kobungisama te. Na nzela ya Bomikabi ya Klisto, bato banso “bakoki kosikolama, na kotosaka mibeko mpe makuli ya nsango malamu,” 13 esalamaki mpo na baye bazali na bomoyi mpe bakufa. 14

  • Makambo nionso ebandaki te na mbotama. Ozalaki na bomoyi liboso pembeni na Nzambe lokola mwana na Ye ya mobali to ya mwasi mpe olengelamaki mpo na bomoyi ya kufa. 15

  • Libala mpe libota ezali se boyokani ya bato te kino bobele liwa ekokabola biso. Basengeli kozala ya seko na nzela ya mayokami basalaki na Nzambe . Libota ezali elongo na lola.16

Mpe eye ezali se mwa ndambo ya botondisi ya bobimisi esopanaki likolo ya Joseph Smith. Wapi yango nionso ewutaki mabimisi oyo epesi pole na molili, polele na ntembe, mpe oyo efuli, epamboli mpe ebongisi bamilio ya bato? Oyo ezali mingimingi, alotaki yango mobimba yemei to ete azwaki lisalisi ya lola? Makomi abimisaki ezali lokola mongongo ya maloba ya bato to maloba ya Nzambe?

Mpo na Kosukisa

Koswana ezali te mpo na oyo etali makambo Joseph Smith asalaki, bobele koluka koyeba lolenge nini asalaki nini asalaki mpe mpo na nini. Mpe ezali na maponi mingi te. Soki mpe lisusu azalaki mokosi to profeta. Soki mpe asalaki oyo asalaki ye moko, to azwaki lisalisi ya lola. Tala elembo ya bosolo nionso, tala bilembo nionso ya bomoi na ye, kasi eteni moko te. Ya motuya koleka, sala lokola elenge Joseph mpe “ tuna … Nzambe, oyo apesaka na bato nionso na mpamela te, mpe ekopesamela [yo] .”17 Oyo ezali bobele lolenge nini okoki koyekola bosolo na ntina ya Buku ya Mormon mpe Joseph Smith te, ezali lisusu ndakisa mpo na koyeba bosolo ya makambo nionso.18

Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe, lokola Thomas S. Monson lelo. Na nzela ya Joseph Smith, bafungola ya bokonzi ya Nzambe [lisusu] epesami lisusu “na bato na mabele, mpe …nsango malamu [ekokende] liboso… lokola libanga oyo elongwe na ngomba na kozanga lisalisi… , kino ekotondisa mokili mobimba.”19

Nzambe azali Tata na biso ya Libela , mpe Yesu azali Klisto. Tokumbamelaka Bango. Eloko moko te ekokani na bikelamo na bango, libongisi ya lobiki, mpe libonza ya bomikabi ya Mpate ya Nzambe. Na eleko oyo, tokokisi mwango ya Tata mpe tozali kokabola bambuma ya Bomikabi bobele na botosi ya mibeko na mpe makuli ya nsango malamu ezongisami na nzela ya Profeta Joseph Smith. Napesi litatoli na Bango, —Nzambe Tata ya Seko mpe Yesu Klisto Mobikisi ya mokili. Mpe nasali yango na nkombo esantu ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1.  Yakobo 1:5.

  2.  

    2.  Joseph Smith—History 1:14.

  3.  

    3.  Joseph Smith—History 1:16–17.

  4.  

    4.  Joseph Smith—History 1:33.

  5.  

    5. Tala Doctrine et Alliances 130:22.

  6.  

    6. Tala Doctrine et Alliances 50:24.

  7.  

    7. Tala 2 Nefi 31; 3 Nephi 27.

  8.  

    8. Tala Moroni 10:3–5.

  9.  

    9. Tala Doctrine et Alliances 76.

  10.  

    10.  Doctrine et Alliances 6:36.

  11.  

    11.  Mose 5:8.

  12.  

    12.  Doctrine et Alliances 20:77.

  13.  

    13.  Biteni ya Bondimi 1:3.

  14.  

    14. Tala Doctrine et Alliances 76; 128; 138.

  15.  

    15. Tala Doctrine et Alliances 49:17; 138; Moses 3:5 ; 6:36.

  16.  

    16. Tala Doctrine et Alliances 131:1–2; 132:5–33..

  17.  

    17.  Yakobo 1:5.

  18.  

    18. Tala Moroni 10:3–5.

  19.  

    19.  Doctrine et Alliances 65:2..