Lisekwa ya Yesu Klisto


Yesu Klisto ya Nazareti azali Mosikoli mosekwi, mpe natatoli manso oyo elandaki likambo uta mayeya Lisekwa na Ye.

Bayekoli ya Yesu bayokaki kopola ya kozanga elikya ezingaki mpe eniataki bango ntango Ye ayokaki mpasi mpe akufaki na ekulusu mpe nzoto na Ye ezanga bomoi etiamaki na lilita. Atako nini Mobikisi mbala na mbala alobaki mpo na liwa mpe bolamuki na Ye lisusu, basosolaka te. Nsima ya nzanga ya molili, nzokande, noki elandamaki ntongo ya esengo na Lisekwa na Ye. Kasi esengo eyaki kaka ntango bayekoli bakomaki banzeneneke ya komona na miso ya Lisekwa, mpo ata esakola ya banzelu ete alamukaki esosolamaki te yambo—ezalaki likambo moko esalema mpenza ata mokolo moko te.

Malia Magadala mpe moke ya basi ya bondimi bayaki na ntongontongo na lilita ya Mobikisi Eyenga wana na ntongo, komemaka mpimbo mpe mafuta mpo na kosilisa kopakola mafuta oyo ebandaki ntango nzoto ya Nkolo na lombango etiamaki na lilita yambo ya saba oyo ezalaki koya. Na ntongo oyo ya bantongo, bayambamaki na lilita moko ya kofungwana, elongolamaki libanga ya kozipa , mpe banzelu babale oyo basakolaki:

“Ntina nini bozali koluka oyo ya bomoi o ntei ya bawa?

“Azali awa te, kasi asekwi: bomikundola boniboni alobaka na bino ntango azalaki na Galilai,

“Kolobaka, Mwana ya moto asengeli kosundolama na maboko ya bato ya masumu, mpe kobakama na ekulusu, mpe mokolo ya misato akosekwa lisusu.”1

“Yaka, tala esika wapi Nkolo alali.

“Mpe bokende noki, mpe bolobela bayekoli ete asekwi uta na liwa.”2

Lokola etindamaki na anzelu, Malia Magadala atalaki na kati ya lilita, kasi emonani lokola nionso ekomamaki na mayele na ye ezalaki ete nzoto ya Nkolo elimwaki. Awelelaki koyebisa Bapostolo, mpe kokutaka Petelo mpe Yoane alobaki na bango, “Balongoli Nkolo na lilita, mpe toyebi te wapi batii ye.”3 Petelo mpe Yoane bakimaki na esika wana mpe basosolaki ete ya solo lilita ezalaki mpamba, komonaka “bilamba kozalaka wana … mpe dala, oyo ezalaki penepene ya moto na ye, … elingama elongo na esika na yango moko.”4 Yoane na kotala azalaki ya yambo na kososola nsango ya lisekwa. Akomi ete “amonaki, mpe andimaki,” ntango basusu na ngonga wana, “bayebaki te makomi, ete [Yesu] asengelaki kosekwa lisusu uta na liwa.”5

Petelo mpe Yoane balongwaki, kasi Malia atikalaki nsima kaka na kolela. Na kozela banzelu bazongaki mpe na boboto batunaki ye, “Mwasi, ntina nini ozali kolele? Ye alobaki na bango, Mpamba te bakamati Nkolo na ngai, mpe nayebi te wapi batii ye.”6 Na ntango wana Mobikisi mosekwi sikawa kotelamaka nsima na ye alobaki, “Mwasi, ntina nini ozali kolela? Nani ozali koluka? Ye, kokanisaka ye azalaki mokengeli, alobi na ye [na kosambaka], Tata, soki omemi ye esika mosusu, lobela ngai wapi botii ye, mpe nakokende kokamata ye.”7

Mpaka James E. Talmage akomaki: “Ezalaki Yesu na oyo ye azalaki koloba, Nkolo na ye ya bolingo, atako ayebaki yango te. Liloba ewutaki na bambebo na Ye ya bomoi ebongolaki bolozi na ye ya mokufi na esengo eluti. ‘Yesu alobaki na ye, Malia.’ Mongongo, lolaka, elobeli ya boboto, ayokaka mpe alobaka na mikolo milekaki ebakolaki ye na bozindo ya bozangi elikia na kati na yango ezindaki. Abalukaki, mpe amonaki Nkolo. Na botombwami ya esengo atandolaki maboko na ye mpo na koyamba Ye, kobimisaka kaka liloba ya bolingo mpe ya kokumbamela, ‘Labuni,’ kolingaka koloba Nkolo na Ngai ya Bolingo.”8

Mpe boye, mwasi oyo ya kopambwama akomaki mokufi ya yambo na komona mpe koloba na Klisto mosekwi. Nsima mokolo wana kaka Ye abimelaki Petelo na to penepene ya Yelusalema;9 na bayekoli babale na nzela ya Emmaus;10 mpe na mpokwa na Bapostolo mpe basusu, abimaki na kati kati na bango, kolobaka, “Tala maboko na ngai mpe makolo na ngai, ete ezali ngai mei: nsimba ngai, mpe mona; mpe molimo azali na mosuni mpe mikuwa te, lokola bomoni ngai nazali na yango.”11 Nsima mpo na kondimisa bango malamu “ntango bandimaki naino te mpo na esengo, mpe kokamwa,”12 Ye aliaki mbisi mpe mafuta ya nzoi.13 Nsima Ye ateyaki bango, “Bokozala banzeneneke na Yelusaleme, mpe na Juda mobimba, mpe na Samalia, mpe na eteni ya nsuka ya mabele.”14

Nsima ya banzeneneke oyo bandimama na Yelusalema, tozali na mosala ya kokamwa ya Nkolo mosekwi na bafandi ya kala na Mikili ya Westi. Na mabele ya Bountiful, Ye akitaki uta na lola mpe abengisaki ebele ya bato basanganaki, boko 2.500, mpo na koya liboso moko na moko kino banso bakendeki liboso, kokotisaka maboko na bango na kati ya mpanzi na Ye mpe koyokaka bilembo ya bansete na maboko na Ye mpe makolo na Ye.15

“Mpe ntango banso bakendeki liboso mpe bakomaki banzeneneke mpo na bangomei, bagangaki bongo na mongongo, kolobaka:

“Hozana! Mapamboli na nkolo Nzambe Oyo Aleki Likolo! Mpe bakweyaki na makolo ya Yesu, mpe bakumbamelaki ye.”16

Lisekwa ya Klisto elakisi ete bomoi na ye ezali ya bosomi mpe ya libela. “ Mpo lokola Tata azali na bomoi na yemei; boye apesi na Mwana kozala na bomoi na yemei.”17 Yesu alobaki:

“Yango wana Tata alingi ngai mpenza, mpamba te natiki bomoi na ngai, mpo ete nakoka kokamata yango lisusu.

“Moto moko te akokamata yango na ngai, kasi natiki bomoi yango na ngaimei. Nazali na nguya ya kotika yango, mpe nazali na nguya ya kokamata yango lisusu.”18

Mobikisi ayangelami te na bilei to mai to oxygene to eloko, nguya, to moto mosusu mpo na bomoi. Lokola Yehova mpe Masiya, azali Nazali ya Monene, Nzambe na bomoi na yemei.19 Azali kaka mpe akozala libela.

Na Bomikabi mpe Lisekwa na Ye, Yesu Klisto alongi ndenge nionso ya Bokwei. Liwa ya nzoto ekozala ya mwa ntango, mpe kutu liwa ya molimo ezali na nsuka, na yango banso bakozonga na miso na Nzambe, ata na mwa ntango, mpo na kosambisama. Tokoki na nsuka kolikia mpe kondima na nguya na Ye mpo na kolonga nionso mosusu mpe kopesa biso bomoi ya seko.

“Mpo uta liwa eyei moto, na moto eyei lisusu bosekwi ya liwa.

“Mpo lokola na Adama banso bakwei, kaka bongo na Klisto banso bakozonga na bomoi.”20

Na liloba ya Mpaka Neal A. Maxwell: Elonga ya Klisto likolo na liwa esukisaka na mpasi ya bato. Sikawa ezali kaka mpasi ya moto, mpe uta na yango lokola tobikisami na kolandaka mateya na ye oyo abikisaki biso na bolimwi ya banso.”21

Kokokisaka masengami ya boyengebene, Klisto akoki sikawa na esika ya boyengebene; to tokoki koloba, Ye azali boyengebene, kaka lokola Ye azali bolingo.22 Boye, na lolenge ya kozala “bongo nie, kaka Nzambe,” azali bongo nie, Nzambe malamu.23 na yango, Mobikisi asala makambo manso malamu. Bozangi boyengebene na bokufi ezali te ya libala, ata liwa, mpe Ye azongisi bomoi lisusu. Mpota te, botengoli te, boteki moninga te, to botuki te ekozanga lifuti na nsuka na ntina ya boyengebene ya nsuka mpe mawa na ye.

Na elembo wana kaka, tokoyanola banso liboso na Ye mpo na bomoi na biso, maponi na biso, mpe misala na biso, ata makanisi na biso. Esikolaki biso na Bokwei, bomoi na biso ezali na bosolo na Ye. Ye asakolaki ete:

“Tala napesi bino nsango malamu, mpe oyo ezali nsango malamu oyo napesi bino—ete nayaki na mokili mpo na kosala bolingi ya Tata na ngai, mpamba te Tata atindaki ngai.

“Mpe Tata atindaki ngai ete nakoka kotombolama likolo ya ekulusu; mpe esili ngai kotombolama likolo ya ekulusu, ete nabenda bato banso epai na ngai, ete lokola natombolami na bato lolenge moko bato basengeli kotombolama na Tata, mpo na kotelama liboso na ye, mpo na kosambisama mpo na misala na bango.”24

Maniola mwa ntango ntina ya Lisekwa na koyanolaka mbala moko mpe mpo na bango lolenge ya solo ya Yesu ya Nazareti mpe mimekano minene mpe mituna ya filosofi mpe ya bomoi. Soki Yesu na ntembe te asakwaki ya solo, esengeli elanda ete Ye azali na bonzambe. Moto ya mpamba moko te azali na nguya na yemei mpo na koya na bomoi lisusu nsima ya kokufa. Mpamba te Ye asekwaki, Yesu akoki te kozala kaka mokati mabaya, moteyi, labi, to profeta. Mpamba te Ye asekwaki, Yesu azali Nzambe, kutu Mwana Mobotami se Moko ya Tata.

Yango wana, oyo ye ateyaki ezali ya solo; Nzambe akoki kokosa te.25

Yango wana, Ye azali Mokeli ya mabele, lokola Ye alobaki.26

Yango wana, lola mpe lifelo ezali ya solo, lokola Ye ateyaki.27

Yango wana, ezali na mokili ya milimo oyo Ye abimelaki nsima ya liwa na Ye.28

Yango wana, Ye akoya lisusu, lokola banzelu balobaki, ,29 mpe “akokonza yemei likolo ya mabele.”30

Yango wana, ezali na Bosambisi ya nsuka mpe Lisekwa mpo na banso.31

Na ntina ya bosolo ya Lisekwa ya Klisto, ntembe etali bokasi bonso, bwania nionso, mpe bolamu ya Nzambe Tata—oyo apesaki Mwana Mobotami Se Moko na Ye mpo na lisiko ya mokili—ezangi ntina. Ntembe etali ntina mpe lotomo ya bomoi ezangi ntina. Yesu Klisto ezali ya solo nkombo to nzela kaka moko na yango lobiko ekoki koya na bato. Ngolu ya Klisto ezali ya solo, kopesaka bolimbisi mpe bopetoli na mosumuki oyo ayamboli. Mondimi ezali ya solo mingi koleka makanisi to bokeli ya bongo. Ezali na bosolo ya nsuka mpe mokili mobimba, mpe ezali na lotomo mpe mibeko ya bomoto oyo ekobongwana te lokola eteyamaki na Ye.

Boyamboli ya bobuki nionso ya mibeko na Ye ezali likambo ya lombangu. Makamwisi ya Mobikisi ezali ya solo, lokola elaka na Ye na bayekoli na Ye ete bakosala lolenge moko, mpe kutu misala minene.32 Bonganganzambe na Ye ezali na ntembe te nguya moko ya solo oyo “ekopesa nsango malamu mpe esimbi fungola ya mibombano ya bokonzi, kutu fungola ya boyebi ya Nzambe. Yango wana, na makuli na yango, nguya ya bonzambe emonani.”33 Na ntina ya bosolo ya Lisekwa ya Klisto, liwa ezali nsuka na biso te, mpe atako misopi ya mposo ebomi banzoto, kasi na mosuni na biso tokomona Nzambe.”34

Mokambi Thomas S. Monson alobeli Robert Blatchford, oyo mibu 100 mileki “na buku na ye God and My Neighbor, abundisaki na makasi bondimi ya Baklisto bandima, lokola Nzambe, Klisto, mpe losambo, mpe bozangi kokufa. Na mpiko mpenza akomaki, ‘nalobaki nalakisi na ntembe te likambo nionso nalakisaki na mobimba mpenza mpe na makasi ete Moklisto moko te, nzokande ya monene to ya bokoki akoki kozala, akoki koyanola na mituna na ngai to koningisa likambo na ngai.’ Amizingaki yemei na efelo ya ntembe. Nsima likambo moko ya kokamwa ekomaki. Efelo na ye na mbalakaka ebukanaki na mputulu. … Na malembe abandaki komeka na nzela ya kozonga na bondimi asekaki mpe atiolaki. Nini esalaki mbongwana wana ya mozindo na bomoni na ye? Mwasi na ye akufaka. Na motema ya kobukana, akendeki na kati ya kisuku wapi ezalaki nionso oyo azalaki ya kufa na ye.Atalaki lisusu elongi alingaki mingi mpenza. Kobimaka, alobaki na moninga moko: ‘Ezali ye, mpe kasi ezali ye te. Biloko nionso ebongwani. Eloko moko oyo ezalaki wana liboso elongwe. Azali lisusu te ye kaka. Nini ekoki kokende soki molimo te? ’”35

Nkolo akufaki mpe asekwaki lisusu ya solo? Iyo, “Mabongisi ya ntina ya eyamba na biso ezalaki litatoli ya Bapostolo mpe Baprofeta, mpo na oyo etali Yesu Klisto, ete Ye akufaki, akundamaki, mpe asekwaki mokolo ya misato, mpe amataki na lola; mpe makambo manso oyo etali eyamba na biso ezali kaka eteni ya ndako se moko na yango.”36

Lokola mbotama esakolamaki ya Yesu, ebelemi, ezali na baye o ntei ya bato ya Banefi mpe Balamani ya kala oyo bandimaki, atako mingi koleka batiaki ntembe. Na ntango esengelaki, elembo ya mbotama na Ye ekomaki—moi moko mpe butu moko ezanga molili—mpe banso bayebaki. .37 Atako lelo, boko bandimi na Lisekwa mpenza ya Klisto, mpe mingi batii ntembe to bandimi te. Kasi boko bayebi. Na ntango esengeli, banso bakomona mpe bakoyeba; ya solo, “libolongo nionso ekobukana, mpe monoko nionso ekotatola liboso na ye.”38

Kino ntango wana, nandimi banzeneneke mingi ya Lisekwa ya Mobikisi oyo ya ye makambo mpe matatoli ezwami na Boyokani ya Sika—Petelo mpe baninga na ye ya Bazomi na Babele mpe ya bolingo mpe bopeto Malia ya Magadala, o ntei ya basusu. Nandimi matatoli ezwami na Buku ya Mormon—ya Nefi Apostolo na bato ebele bazanga nkombo na mokili ya Bountiful, o ntei ya basusu. Mpe nandimi na litatoli ya Joseph Smith mpe Sidney Rigdon oyo, nsima ya matatoli misusu mingi basakolaki litatoli linene ya eleko oyo ya nsuka “ete azali na bomoi! Mpo tomonaki ye.”39 Na nse ya botali ya miye na Ye emonaka nionso, natelemi ngaimei lokola nzeneneke ete Yesu Klisto ya Nazareti azali Mosikoli mosekwi, mpe natatoli manso oyo elandaki likambo uta mayeya Lisekwa na Ye. Ekoka biso kozwa bondimi mpe bolendisi ya litatoli wana kaka, nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

  1.  

    1. Luka 24:5–7.

  2.  

    2. Matai 28:6–7.

  3.  

    3. Yoane 20:2.

  4.  

    4. Yoane20:5, 7.

  5.  

    5. Yoane 20:8, 9.

  6.  

    6. Yoane 20:13.

  7.  

    7. Yoane 20:15.

  8.  

    8. James E. Talmage, Jesus the Christ, 3rd ed. (1916), 681.

  9.  

    9. Tala Luka 24:34; 1 Bakolenti 15:5.

  10.  

    10. Tala Malako 16:12; Luka 24:13–35.

  11.  

    11. Luka 24:39.

  12.  

    12. Luka 24:41.

  13.  

    13. Tala Luka 24:42–43.

  14.  

    14. Misala 1:8.

  15.  

    15. Tala 3 Nefi 11:14–15.

  16.  

    16. 3 Nefi 11:16–17.

  17.  

    17. Yoane 5:26.

  18.  

    18. Yoane 10:17–18.

  19.  

    19. Tala Exode 3:14.

  20.  

    20. 1 Bakolinti 15:21–22.

  21.  

    21. The Neal A. Maxwell Quote Book, ed. Cory H. Maxwell (1997), 287.

  22.  

    22. Tala 1 Yoane 4:8.

  23.  

    23. Alma 42:15; tala lisusu Moziya 15:8–9.

  24.  

    24. 3 Nefi 27:13–14.

  25.  

    25. Tala Enos 1:6.

  26.  

    26. Tala, ndakisa, 3 Nefi 9:15.

  27.  

    27. Tala, ndakisa, Doctrine & Alliances 76.

  28.  

    28. Tala Doctrine & Alliances 138.

  29.  

    29. Tala Misala 1:10–11.

  30.  

    30. Biteni ya Bondimi 1:10; tala lisusu Topical Guide, “Jesus Christ, Millennial Reign.”

  31.  

    31. Tala, ndakisa, 2 Nefi 9:15.

  32.  

    32. See Yoane 14:12.

  33.  

    33. Doctrine & Alliances 84:19–20.

  34.  

    34. Yobo 19:26.

  35.  

    35. Thomas S. Monson, “I Know That My Redeemer Lives!” Ensign toLiahona, May 2007, 23.

  36.  

    36. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 49.

  37.  

    37. Tala 3 Nefi 1:15–20.

  38.  

    38. Moziya 27:31.

  39.  

    39. Doctrine & Alliances 76:22–23.