2010–2019
Nzeneneke
Sánzá ya mínei 2014


Nzeneneke

Nalingi kokabola elongo na bino bosolo oyo ezali motuya mingi koyeba.

Ntango ya bitumba to ya mobulu ezali na lolenge ya kobongisela bokebi na biso na makambo oyo ezali ntina mingi.

Bitumba ya Mokili ya Mbala II ezalaki ntango moko ya mobulu makasi ya molimo mpo na ngai. Natikaki libota na ngai na Brigham City, Utah, na mwa ndambo ya litatoli, mpe nayokaki mposa ya eloko moko ya motuya. Na polele kelasi na biso mobimba ya bakolo na kaka baposo ezalaki na nzela ya kokende na bisika ya bitumba. Ntango totelemaki na esanga ya Ie Shima, na nordi ya Okinawa, Japon, namitungisamaki na ntembe mpe bozangi kondima. Nazalaki na mposa ya litatoli ya moto se moko ya nsango mlamu. Nalingakikoyeba!

Na ntago ya bozangi makoki ya mpongi na butu moko, natikaki hema na ngai mpe nakotaki na ndako moko ya nse ya mabele oyo etongamaki na 190 litre ya mazuti etonda na zelo mpe batiaki moko likolo ya mosusu mpo na kosala efelo, ezalaki na manzanza ya likolo te, nangulumaki nakati, natalaki likolo na lola etonda na minzoto, mpe nafukamaki mpo na kosambela.

Na katikati ya losambo na ngai eloko moko esalemaki. Nakokaki te kolimbolela bino oyo esalemaki soki nazalaki na mokano ya kolimbola. Ezali likolo ya nguya na ngai ya maloba, kasi ezali lokola polele lelo lokola ezalaki na butu wana koleka sima ya mibu 65 mileki. Nayebaki yango kozala likambo ya nse ya motema, likambo ya moto se ye moko mpenza. Na suka nayebaki ngaimei. Ngai nayebaki solo, mpo na yango epesamelaki ngai. Na nsima ya ntago moke, nangulumaki uta na ndako wana ya nse ya mabele mpe natambolaki to natepaki kozongaka na mbeto na ngai. Nalekisa ntango ya butu etikalaki nakoyokaka esengo mpe bosepeli makasi.

Mosika na kokanisaka ete nazalaki moto ya kafukafu, nakanisaki ete soki likambo ya boye ekomelaki ngai ekokaki kokomela moto nionso. Natikalaki na makanisi wana. Na mibu miye milekaki, nayaki kososola ete likambo lokola wana ezali yambo mwinda ya kolanda mpe mokumba ya komema.

Nalingi kokabola elongo na bino bosolo oyo ezali motuya mingi koyeba, makambo oyo nayekoli mpe na moni penepene ya mibu 90 ya bomoi mpe likolo ya mibu 50 lokola Mokambi Monene. Ebele ya maye naye koyeba ekoti kati ya makambo oyo ekoki kotangisama te kasi ekoki koyekolama.

Lokola makambo mingi ya motuya mingi, boyebi, oyo ezali ya ntina eyaka bobele na nzela ya losambo ya moto yemei mpe komanionola. Oyo, kosangisa bokili bilei mpe boyekoli makomi, ekobengisa mayoki mpe mabimisi mpe banungunungu ya Molimo Mosantu. Oyo ezali kopesa biso lilako ya kowuta na Lola wana ezali biso koyekola mosise likolo ya mosise.

Mabimisi elaki ete “mibeko ya mayele tozali kozwa kati ya bomoi oyo, ekotombwama elongo na biso na bosekwa” mpe ete “boyebi mpe mayele [ezwami] na nzela ya … etingia mpe botosi” (D&A 130:18–19).

Bosolo moko ya seko oyo nayaki koyeba ezali ete Nzambe azali na bomoi. Azali Tata na biso. Tozali bana na Ye. “Tondimi Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu” (Biteni ya Bondimi 1:1).

Na ntina ya bankombo nyonso oyo Ye akokaki kosalela, Aponaki kobengama “Tata.” Mobikisi apesaki motindo ete, “Nsima ya lolenge oyo, yango wana, bosambela: Tata na biso oyo azali na lola” (3 Nefi 13: 9; tala lisusu Matai 6:9). Ebengeli na Ye ya nkombo “Tata” ezali liteya mpo na bato nyonso lokola tosili kososola nini ezali na ntina koleka na bomoi oyo.

Botata ezali litomba ya bule, mpe eyekami na botongono, ekoki kozala lipamboli ya seko. Nsuka ya milulu nionso ya Eklezia ezali ete mobali mpe mwasi na ye mpe bana na bango bakoki kozala na esengo na libota.

Baoyo babali te to baoyo bakoki kobota bana te balongolami uta na mapamboli ya seko bazali koluka kasi oyo, mpo na sikoyo, etikali mosika na bango. Toyebaka te mbala mingi boniboni to ntango nini mapamboli ekomilakisa, kasi elaka ya kobakisa ya seko ekopimelama te na moto nyonso ya botongono oyo azali kosala mpe kobatela mayokani ya bule.

Mposa na yo ya sekele mpe ya mabondeli ya mpinzoli ekosimba mitema na bango mibale Tata mpe Mwana. Okopesama bondimi ya yomei uta na Bango ete bomoi na yo ekotondisama mpe ete lipamboli moko te oyo ezali ntina ekobungama mpo na yo.

Lokola mowumbu ya Nkolo, kosalaka na mosala epai wapi nakulisami, napesi baye na makambo ya boye elaka ete kuna ekozala na eloko moko te ya ntina mpo na lobiko na yo mpe bonetoli oyo ekopesamela yo na ntango esengelami te. Maboko oyo ezali mpamba sikoyo ekotondisama, mpe mitema oyo etukama sikoyo uta na ndoto ebukana mpe mposa ekobikisama.

Bosolo mosusu nasili koyeba ezali ete Molimo Mosantu ezali solo. Azali moto ya misato na Bonzambe. Misio na Ye ezali ya kotatola bosolo mpe bolamu. Ye Amilakisaka na ndenge ebele, ndakisa na mayoki ya kimia mpe na lilendisi. Akoki lisusu komema lilendisi, toli, mpe malamu ntango esengelami. Bozalani ya Molimo Mosantu ezali enganzami na nzela ya bomoi na biso na kozalaka na bomoi malamu.

Likabo ya Molimo Mosantu ekulisami na nzela ya bokuli moko ya nsango malamu. Moto oyo azali na likoki akotiya maboko na ye na moto ya mondimi ya sika ya Eklezia mpe alobi maloba lokola oyo: “Zwa Molimo Mosantu.”

Bokuli oyo yangomei ekobongola biso te na lolenge ya polele, kasi soki toyoki mpe tolandi babotindiki, tokozwa lipamboli ya Molimo Mosantu. Mawana mobali to mwana mwasi moko na moko ya Tata na biso ya Lola akoki koyeba bosolo ya elaka ya Moroni: “Na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu bokoki koyeba bosolo ya makambo nionso” (Moroni 10:5; sete ebetami).

Bosolo ya bonzambe oyo nazwaki na bomoi na ngai ezali litatoli na ngai ya Nkolo Yesu.

Ya monene mingi mpe ya kosunga nionso oyo tosalaka, efandisami na nzela ya mabimisi, ezali nkombo ya Nkolo, oyo ezali likoki na nzela na yango tozali kosala na Eklezia. Losambo nionso oyo epesami, ata kutu na bana mike, esukaka na nkombo ya Yesu Klistu. Libamboli nionso, likuli nionso, mosala nionso eyebani esalami na nkombo ya Yesu Klisto. Ezali Eklezia na Ye, mpe ebengami mpo na Ye—Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka (tala D&A115:4).

Ezali na likama monene wana kati na Buku ya Mormon wapi Banefite “bazalaki kosambela Tata na nkombo ya Nkolo.” Nkolo abimaki mpe atunaki ete:

“Nionso bokosenga nakopesa bino?

“Mpe balobaki na ye ete: Nkolo, tokosenge ete oyebisa biso nkombo nini tokobenga eklezia oyo; mpo ete boswani ezali kati ya bandimi na ntina na yango.

“Mpe Nkolo alobaki na bango: Ya solo, ya solo, nayebisi bino, mpo na nini bato basengeli koyimayima mpe koswana na ntina ya eloko eye?

“Batangaki makomi te, maye malobi bosengeli kozwa likolo na bino nkombo ya Klisto, eye ezali nkombo na ngai? Na ntina ya nkombo oyo bokobengama na mokolo ya nsuka;

“Mpe ye oyo akozwa likolo na ye nkombo na ngai, mpe akobi tii na nsuka, ye nde akobikisama. …

“Na yango, oyo nionso bino bokosala, bokosala yango na nkombo na ngai; na yango bokobenga eklezia na nkombo na ngai; mpe bokobenga likolo ya nkombo ya Tata na nkombo na ngai mpe akopambola eklezia mpo na litomba na ngai.” (3 Nefi 27:2–7).

Ezali nkombo na Ye, Yesu Klisto, “mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango ” ( (Misala 4:12().

Na kati ya Eklezia toyebi oyo Ye azali: Yesu Klisto Mwana ya Nzambe. Azali Mwana se Moko ya Tata. Azali Moko oyo akufaki mpe Ye oyo aazali lisusu na bomoi. Azali molobeli na biso epai ya Tata. “Tomikundola ete ezali likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana ya Nzambe, nde [to]sengeli kotonga moboko na [biso]” (Helaman 5:12). Azali longo oyo esimbi biso mpe ebateli biso mpe mabota na biso na nzela ya mimekano ya bomoi.

Eyenga moko na moko na mokili mobimba wapi esika masanga esangisami ya ekolo to lokota kani, elambo epambolami na maloba moko. Tozwaka likolo na bisomei nkombo ya Klisto mpe ntango nionso tomikundolaka Ye. Wana ekomami likolo na biso.

Profeta Nefi alobaki ete, “Tolobaka na ntina ya Klisto, tosepelaka na Klisto, toteyaka Klisto, tosakolaka na ntina ya Klisto, mpe tokomaka engebene na masakoli na biso, mpo ete bana na biso bakoka koyeba na liziba nini bakokeli koluka bolimbisi ya masumu na bango” (2 Nefi 25:26).

Moko na moko na biso tosengeli kozwa litatoli ya moto se moko ya bisomei ya Nkolo Yesu Klisto. Nde tokaboli litatoli wana na libota na biso mpe basusu.

Na oyo nionso, tika tomikundola ete ezali na monguna moko oyo alukaka na yemei kobebisa mosala ya Nkolo. Tosengeli kopona nani kolanda. Bobateli na biso ezali lokola pete lokola kokanaka na moto na moto kolanda Mobikisi, kondimaka ete tokotikala na botongono na ngambo na Ye.

Kati na Boyokani ya Sika, Yoane akomi ete ezalaki basusu oyo bazalaki na makoki te ya komipesa na Mobikisi mpe mateya na Ye, mpe “uta na ntango wana ebele ya bayekoli na ye bazongaki, mpe batambolaki lisusu elongo na ye te.

“Nsima Yesu aloki na bazomi na babale, Ekokende bino lisusu mosika?

“Nsima Simona Petelo ayanolaki ye, Nkolo, epai ya nani tokokende? Ozali na maloba ya bomoi ya seko.

“Mpe tondimeli mpe tososoli ete ozali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi” (Yoane 6:66–69).

Petelo azwaki maye oyo ekoki koyekolama na molandi moko na moko ya Mobikisi. Komipesa na botongono na Yesu Klisto, tondimeli Ye lokola Mosikoli na biso mpe tosali nyonso na nguya na biso mpo na kosalela na mateya na Ye.

Nsima ya mibu nyonso oyo nazali na bomoi mpe nateyi mpe nasali, nsima ya bamilio ya bakilometele natamboli na mokili mobimba, na nionso oyo namoni, ezali na bosolo moko monene oyo nakolinga kokabola. Wana ezali litatoli na ngai ya Mobikisi Yesu Klisto.

Joseph Smith mpe Sidney Rigdon bakomaki oyo elandi nsima ya likambo moko ya bule:

“Mpe sika awa, nsima ya matatoli ebele oyo epesamaka na ye, oyo ezali litatoli, nsuka ya nyonso, oyo topesi mpo na ye: Ete azali na bomoi!

“Mpo tomonaki ye” (D&A 76:22–23).

Maloba na bango ezali maloba na ngai.

Ngainandimeli mpe ngai nazali na kondima ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe mpe ete Azali na bomoi. Azali Mwana se Moko ya Tata, mpe “na ye, mpe na nzela na ye, mpe mpo na ye, mikili ezali mpe ekelamaki, mpe bato na yango bazali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe” (D&A 76:24).

Napesi litatoli na ngai ete Mobikisi azali na bomoi ngai nayebi Nkolo. Nazali nzeneneke na Ye. Nayebi na ntina ya likabo monene mpe bolingo na Ye ya seko mpo na bana nioso ya Tata na Lola. Napesi litatoli na ngai ya kafukafu na bomikitisi nionso kasi na bondimi mobimba, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.