2010–2019
Kino Tokutani Lisusu
Sánzá ya mínei 2014


Kino Tokutani Lisusu

Tika ete molimo toyokaki na mikolo mibale miye mileki mpe kozala na biso lokola tozali kokende na ntina ya makambo maye tokosala mikolo mokolo na mokolo.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, oyo likita kitoko ewuti kozala. Toleisamaki na molimo wana toyokaki maloba efulami na mibali mpe basi oyo balobelaki biso. Banzembo ezalaki kitoko, bansango ebongisamaki mpe epesammi na nse ya bofuli ya Molimo Monsantu, mpe basambeli babendaki biso mpembeni ya Lola. Totombolamaki na balolenge ebele lokola tosanganaki elongo

Nalikii ete tokozua ntango ya kotanga bansango ya likita ntango ekomami na numero ekoya na Ensign mpeLiahona, mpo ete yango ebongi kotalama na bokebi na biso nionso mpe etangama.

Nayebi bosangani na ngai na kolakisaka botondi ya solo na bandeko basi mpe mibali wana, baoyo bakangolami na katikati ya likita oyo. Basungaki malamu mpe basalaki kobakisa ya ntina na mosala ya Nkolo. Komipesa na bango ezalaki mobimba.

Tosungaki lisusu, na kotombola maboko likolo, bandeko mibali oyo babengamaki na mikumba ya sika. Totombeli bango boyei bolamu mpe tolingi bango bayeba ete tozali kotala liboso kosungaka elongo na bango na mosala ya Mokonzi.

Lokola tokomaniola bansango toyokaki, tika ete tokoka koluka motindo ya kosala malamu muke koleka oyo tosalaki na kala. Tika ete tozala bato ya boboto mpe ya bolingo na baoyo bazali kokabola bondimi na biso mpe makambo na biso te. Mobikisi amemaki na mokili oyo nsango ya bolingo mpe motema malamu na mibali nionso mpe basi. Tika ete tolanda ndakisa na Ye libela na libela.

Tozali kokutana na mimekano ebele ya ntina makasi na mokili ya lelo, kasi nalaki bino ete Tata na Biso ya Lola ayebi ntina na biso. Ye akotambwisa biso mpe akopambola biso soki totie bondimi mpe elikya na Ye mpe akosunga biso na mikakatano ya lolenge nionso tokokutana na yango.

Tika ete mapamboli ya lola ezala na moko na moko na biso. Tika ete bandako na biso etondisama na bolingo mpe bonkonde mpe elongo na Molimo na Nkolo. Tika ete ntango nionso tokolisa matatoli na biso ya nsango malamu, oyo ekozala bobatelami mpo na biso mpo na kotelemela mitungisi ya monguna. Tika molimo toyokaki na kati na mikolo mibale eleki ezala mpe evanda na kati na biso lokola tozali kokende na makambo oyo biso tozali kosala mokolo na mokolo, mpe tika ete libela na libela tosalaka mosala ya Nkolo.

Natatoli ete mosala oyo ezali ya solo, ete Mobikisi na biso azali na bomoyi, mpe ete Ye azali kolakisa nzela mpe kotambwisa Eklezia na Ye awa likolo ya mokili. Natikii elongo na bino kotatola mpe litatoli na ngai ete Nzambe Tata na biso ya Seko azali na bomoyi mpe alingi biso. Azali ya solo Tata na biso, mpe Ye azali na bomoto mpe ya solo mpenza. Tika ete tososola lolenge nini akangani na biso Ye akomi pene ya koya, boniboni mosika nini boyei na Ye ekoya kosunga biso, mpe monene boni Ye alingi biso.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, tika Nzambe apambola bino. Tika ete kimia na Ye alakaki ezala na bino sikoyo mpe ntango nionso.

Botikala malamu kino tokutani lisusu na sima ya sanza motoba, mpe Nasali bongo na nkombo ya Yesu Klisto, Mokonzi mpe mobikisi na biso, amene