2010–2019
Tozali Koluka: Maboko mpe Mitema mpo na Kotambwisa Mosala Mbangu
Sánzá ya mínei 2014


Tozali Koluka: Maboko mpe Mitema mpo na Kotambwisa Mosala Mbangu

Tokoki kopesa maboko mpo na kosalisa mpe motema mpo na kowelisa mosala ya kokamwa ya Tata ya Lola.

Bandeko basi, boniboni nalingi bino! Ntango natali video wana ya kitoko, emonaki bino loboko na binomei kotandolamaka mpo na kosalisa moto moko na nzela wana ya liyokani ? Nazalaki kokanisa na elenge mwasi moko ya Eteyelo ya Bana na nkombo ya Brynn oyo azalaki kaka na loboko moko mpe asalelaki loboko wana mpo na kokende kopambola libota na ye mpe baninga na ye—Basantu ba mikolo mya Nsuka mpe baye ya biyamba misusu. Bandeko basi, tokoki kopesa maboko mpe mitema mpo na kowelisa Mosala ya Kokamwa Tata ya Lola.

Kaka lokola bandeko ba busi ya basi na makomi, lokola Ewa, Sala, Malia, mpe mingi misusu, bayebaki lolenge mpe ntina na bango, Brynn ayebaki azali mwana mwasi ya Nzambe. 1 Ezali kitoko te? Mpe bongo bozali! Biso lokola toyebi lisango na bisomei ya bozambe lokola bana basi ya Nzambe mpe mosala ya motuya mpenza Ye asalaki mpo na biso.

Mobisiki ateyaki, “Soki moto alingi kosala bolingi na ye, akoyeba malongi na ye.” 2 Nini tosengeli koyeba mpe kosala mpenza “kozala elongo na ye mokolo moko”? 3 Tokoki koyekola uta na lisolo ya elenge mobali oyo atunaki Yesu nini asengelaki kosala mpo na kozwa bomoi ya seko.

Yesu ayanolaki ye, “Soki olingi kokota na kati ya bomoi, batela mitindo.”

Elenge mobali atunaki Ye nini oyo asengelaki kobatela. Yesu nde akundolisaki ye sambo ya mibeko zomi tomesani na yango banso.

Elenge mobali ayanolaki, “Makambo oyo nionso nabatelaki uta na bomwana na ngai: Nini nazangi lisusu?”

Yesu alobaki, “Soki olingi kobonga mpenza, kende mpe teka oyo ozali na yango, mpe pesa na babola, mpe okozala na bomengo na lola: mpe yaka mpe landa ngai.” 4

Yesu abiangaki ye mpo na kokoma eteni moko ya mosala na Ye—mosala ya moyekoli. Mosala na biso ezali yango kaka. Tosengeli “kotia mpembeni makambo ya mokili, ... kokangama na mayokani,” 5 mpe koya epai na Klisto mpe kolanda Ye. Wana ezali nini moyekoli akosala!

Sikawa, bandeko basi, tobanda te komibetabeta mpamba te Mobikisa alobaki na elenge mobali ya bomengo etali kobonga mpenza. Liloba kobonga mpenza na lisolo oyo ebongolamaki uta na liloba moko ya grec oyo elingi koloba “mobimba”. Ntango tomeki malamu mingi koleka kokenda liboso na nzela ya liyokani, tokomi mobimba mingi mpe tobongi na bomoi na biso.

Lokola elenge mobali ya bomengo na ntango ya Yesu, ntango mosusu tosenginiami mpo na kosundola to kozonga na nsima mpamba ten tango mosusu tokanisi tokoki te kosala yango biso moko. Mpe tozali na bosolo! Tokoki te kosala makambo ya mpasi tosengemi kosala na lisalisi te. Lisalisi ekoya na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, na bokambi ya Molimo Mosantu mpe na nzela ya maboko ya kosalisa ya basusu.

Ndeko mwasi moko ya monzemba kala te atatolaki ete na nzela ya Bomikabi, azwaki bokasi ya kosalela maboko ya lisalisi mpe motema na ye ya bolingi mpo na kobokola bana minei ndeko na ye ya mwasi atikaki ntango akufaki na cancer. Yango ekundolisi ngai likambo moko Mpaka Neal A. Maxwell alobaki: “Makambo manso ya pete oyo Eklezia asengelaki kosala esalemaki. Uta sikawa tii nsima, ezali libaki monene, mpe balandi bakomekama na ndenge moko ya kitoko.” 6 Botindamaki na mabele na eleko oyo ya ntango na ntina ya nani bozali mpe nini bolengelamaki mpo na kosala! Kotala te nini Satana alingi komeka kondimisa biso kokanisa etali nini tozali, lolenge na biso ya solo ezali oyo ya bayekoli ya Yesu Klisto!

Mormon azalaki moyekoli moko ya solo oyo azalaki na mokolo moko ntango “motema ninso ekomisamaki makasi, … mpe ezalaki mokolo moko te nkuna ya makasi boye o ntei ya bana ya Lehi.” 7 Boniboni elingaki yo kozala na mokolo wana? Mpe lisusu Mormon na mpiko mpenza asakolaki, “Tala, nazali moyekoki ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe.” 8

Elingi yo Mormon? Ayebaki nani azalaki mpe nini ezalaki etinda na ye mpe abulanganisamaki te na mabe oyo ezingaki ye. Ya soko, akanisaki libiangi na ye ezalaki likabo.9

Kanisa lipamboli kani ezali kobiangama mpo na kopesa likabo na biso ya boyekoli ya mokolo na mokola na Nkolo, kosakolaka na liloba mpe mosala, “Tala, nazali moyekoli ya Yesu Klisto!”

Nalingaka lisolo ya Mokambi Boyd K. Packer alobalaki ya molingami ndeko mwasi moko oyo atiolamaki mpo na kolanda toli ya profeta mpo na kobomba bilei. Moto oyo atongaki apesaki likanisi ete soki ntango ekomi ya kozanga elikia, bilei na ye ekokamatama mpe kopesama na basusu. Eyeno na ye ya pete mpe sikisiki lokola moyekoli moko ya solo, “Nakozala ata na eloko ya komema.” 10

Nalingaki basi ya Eklezia. Bomonaka bokasi na bango. Nakomonaka bondimi na bango. Bazali na eloko ya kopesa, mpe balingi kopesa yango. Basalaka yango na kozanga makelele to kopanza nsango, kobendaka bokabi na Nzambe bakumbameli, bangomei te, mpe na kokanisa te nini bakozwa.11 Wana eza nini moyekoli akosala!

Kala te nakutanaki na elenge mwasi na Philippine oya ya bango libota ekomkaki na botau na misala ya Eklezia ntango azalaki na mibu 7, kotikaka ye moko kotambola nzela moko ya likama kokende na Eklezia poso na poso. Alobelaki boniboni na mibu 14 akanaki ete akotikaka solo na mayokani na ye mpo akoka kolongobana mpo na kokolisa libota na ekoya na ndako moko “epambolami na bokasi ya nguya ya bonganganzambe.” 12 Nzela malamu mingi koleka ya kokolisa ndako moko, ya sikawa to ekoya, ezali kobatela mayokani, bilaki tosalaki moko na mosusu, mpe na Nzambe.

Yango oyo nde bayekoli basalaka!

Ndeko mwasi moko ya bondimi na Japon mpe na molongani na ye batalaki Misio na biso na Corée. Akokaki te koloba lokota ya Corée mpe azalaki na makoki mokuse na koloba lokota ya Anglais, kasi azalaki na motema ebongisama mpo na kosalela likabo moko na ye mpe maboko ya lisalisi mpo na mosala ya Nkolo. Wana eza nini moyekoli akosala! Ateyaki bamisionele na biso boni kosala mwa eteni ya pete ya boyemi biloko na bogumbi nkasa—sanza moko ete bakokaki kofungola mpe kokanga. Lisusu akokaki kosalela mwa maloba ya Anglaisayebaki mpo na koteya Bamisionele “kofungola minoko na bango” mpo na kokabola Nsango Malamu—liteya bakoki kobosana soki moke te.

Kanisa na makanisi mwa miniti yo mpe ngai kotelamaka elongo na bamilio ya bandeko basi misusu mpe bandeko babali na Eklezia na Ye, kokendeke na mpiko mpenza, kosalaka nini bayekoli basalaka—kosalisaka mpe kolingaka lokola Mobikisi. Nini elingi koloba mpo na yo kozala moyekoli ya Yesu Klisto?

Maboko ya lisalisi ya Bamormon bakazaka mpe basimisi ezalaki basalela na bankama ya milio ya bayekoli ya moyimi te ya Yesu Klisto oyo bandimaki libaku ya kozwa ntango ya mosala. Mingi ya makoki ya molimo “lisalisi elukaki” bilembo elakisami mpo na mosala ya lobiko:

  • Lisalisi toluki: baboti mpo na kobokola bana na bango kati na pole mpe bosolo

  • Lisalisi toluki: bana basi mpe bana babali, bandeko ya basi mpe bandeko ya mibali, batata mwasi to bandeko ya mama mpe banoko to bandeko ya mama ya basi, bandeko mpe bankoko ya basi to ya mibeli, mpe baninga ya solo mpo na kosalisa lokola molakisi mpe kopesa liboko ya lisalisi na nzela ya liyokani

  • Lisalisi tolingi: baye bayekemeli botindiki ya Molimo Mosantu mpe basila na mayoki bazwi

  • Lisalisi tolingi: baye basaleli nsango malamu mokolo na mokolo na nzela ya mike mpe ya pete

  • Lisalisi toluki: mambi ya kala mpe misala ya tempelo mpo na kolinga mabotota libela

  • Lisalisi toluki: bamisionele mpo na kopanza “liloba malamu”—nsango malamu ya Yesu Klisto

  • Lisalisi toluki: basungi kozwa baoyo babungisi nzela na bango

  • Balukaki lisalisi: babombi liyokani mpo na kotelema na bosolo mpe na bosembo

  • Balukaki lisalisi: bayekoli ya solo ya Nkolo Yesu Klisto

Mibu mileki, Mpaka M. Russell Ballard na motuna ya bandeko basi ya Eklezia mpo na kokokisa maye alobaki:

“Na kati sikawa mpe na mikolo ya Nkolo akoya lisusu, Alingi basi na kati ya libota, na kati ya paloasi, na kati ya masanga, na kati ya bikolo oyo akotelema liboso na bosembo mpe koloba na maloba na bango mpe na misala, Iyo,tinda ngai.’

“Motuna ngai ezali, ‘ Ekoki yo kozala moko ya basi wana?’” 13

Nakanisi moko kati na biso akoki koyanola elongo na kosimba “Iyo!” Nasukisi na maloba ya loyembo ya Eteyelo ya Bana:

Tozali [bandeko basi] ya liyobani elongo na likabo ya kopesa.

Tokoteya nsango malamu na lolenge tozaleli.

Elongo na maloba mpe misala, tokotatola:

Tondimi, mpe kosalela Yesu Klisto. 14

Lokola bayekoli ya solo, ekoka biso kopesa mitema na biso ya bolingi mpe maboko na biso ya lisalisi mpo na kowelisa mosala na Ye. Ezali mpasi te soki, lokola Brynn, tozali se loboko moko. Ezali mpasi te soki, tozali naino babongi nie te mpe ya kokoka te. Tozali bayekoli komikabi oyo batandi loboko mpe basungi basusu na nzela. Bondeko na biso ekutani na bankola mpo baoyo bandeko basi ya bondimi oyo batambolaki liboso. Lisanga, lokola bandeko mpe kati na bomoko elongo na Barofeta ya bomoyi, Bamoni, mpe Babimisi, elongo na bafungola ya Bonganaganzambe ezongisama, tokoki kotambola lokola moto moko,lokola bayekoli, lokola basali elongo na mitema mibongisama mpe maboko mpo na kosala mpo na kowelisa mosala ya lobiko. Soki tosali bongo, tokokoma lokola Mobikisi. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala “Brynn,” lds.org/media-library/video/2011–01–007-brynn.

  2. Yoane 7:17.

  3. “ Nazali mwana ya Nzambe,” Hymns, no. 301; to Children’s Songbook, 2–3.

  4. Tala Matai 19:16–22.

  5. Makuli mpe Mayokani 25:10, 13.

  6. Neal A. Maxwell, “The Old Testament: Relevancy within Antiquity” (address to Church Educational System religious educators, Sanza ya Mwambe. 16, 1979), 4; si.lds.org.

  7. Mormon 4:11–12.

  8. 3 Nefi 5:13.

  9. Tala Moloni 7:2.

  10. Na Boyd K. Packer, “The Circle of Sisters,” Ensign, Sanza ya Zomi na moko. 1980, 111.

  11. Tala 2 Nefi 26:29–30.

  12. “Love Is Spoken Here,” Children’s Songbook, 190–91.

  13. M. Russell Ballard, “Women of Righteousness,” Ensign, Sanza ya Minei. 2002, 70; Liahona, Sanza ya Zomi na mibale. 2002, 39.

  14. “Kosimbana maboko kati na mokili,” Friend, Sanza ya Sambo 2002, 44–45; Liahona, Sanza ya Zomi. 2003, F12–13.