2010–2019
Boyei bolamu na Likita
Sánzá ya mínei 2014


Boyei bolamu na Likita

Tozali … ya kosangana na bondimi na biso mpe na mposa na biso ya koyoka oyo mpe koyekola bitinda oyo bakolakisa biso.

Bandeko balingami na ngai ya mibali mpe basi, boni boni esengo nazali na yango ya koyamba bino na likita oyo ya mokili mobimba ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Tokutanaki lokola libota monene, ebele koleka 15 milio makasi, tosanganaki na bondimi na biso mpe na mposa na biso ya koyoka oyo mpe koyekola etinda oyo bakolakisa na biso.

Nsanza motoba eleki ekeyi mbango lokola mosala ya Eklezia ezali kokende liboso na mpasi te. Ezalaki litomba mpona ngai kaka na nsanza moko eleki kobulisa tempelo ya Gilbert Arizona, etonga ebulisama. Na mpokwa yambo ya libulisi, milulu moko ya ntoki ezalaki mpembeni ya Discovery Park. Nkoto zomi na mibale ya bilenge basalaki pologalame ya 90 miniti. Kobinaka, koyembaka, mpe kobeta miziki ezalaki kafukafu.

Etuka oyo eyebanaki mingi mingi mpona elanga, mpe nandimisami mabondeli ebele etindamaki na likolo ba mposo ebele eleki mpo ebele bazalaki na mposa ya mvula. Na mawa eyaki kaka na ebandeli ya milulu mpe etikalaki mpona milulu mobimba! Atako bilenge banokelaki mvula mpe bayokaki malili na ngonga ya malili moke, biso nyonso toyokaki Molimo na Nkolo. Mama ya likambo ya pologalame “Kozala na bomoi na Bosolo ya Bondimi”—bokanisa na oyo etali yango: “Kozala na bomoi na Bosolo ya Bondimi”—esalamaki kitoko na nzela ya koseka muke ya bilenge mibali mpe basi ya kosepela. Atako malili mpe mvula, yango ezalaki bondimi ya kotonda mpe mayele efulama oyo bilenge wana basengeli kobomba libela na libela mpe bakobetela bana na bango masolo mpe bankoko na bango na mibu ekoya.

Mokolo oyo elandi, bobulisami ya Tempelo ya Gilbert Arizona ezuaki esika. Yango ekomaki tempelo ya mbala 142 ekosalaka na Eklezia. Na bokesene na mpokwa ya liboso, mokolo ezalaki kitoko mpe etondisamaki na engengeli ya moyi. Mayangani efulisamaki ya solo. Basanganaki na ngai bazalaki Mokambi Henry B. Eyring, Mpaka mpe Ndeko mwasi Tad R. Callister, Mpaka mpe Ndeko muasi William R. Walker, and Mpaka mpe ndeko muasi Kent F. Richards.

Na nsanza ya mitano Tempelo ya Fort Lauderdale Florida ekobulisama. Manaka ya ba tempelo mosusu ekobakisama mpe ekobulisama mikolo ekoya na mobu oyo. Na 2015 tozali kobongisa bosilisi mpe bobulisi ya batempelo ya sika na bisika ebele na mokili. Mosala oyo ekokoba. Ntango batempelo eyebisami liboso ekosila, tokozala na 170 tempelo ekosalaka nzinga nzinga na mokili.

Atako tozali sikoyo kosangisa makasi na biso na kokokisaka batempelo elobami liboso mpe tokolobela batempelo moko ya sika te mikolo oyo ekoya pembeni, tokokoba botamboli ya koyebaka bosenga mpe komonaka lisusu bisika mpo na batempelo ekoya. Bansango ekopesama na makita minene ekoya nsima. Tozali batongi tempelo mpe baoyo bakendeke na tempelo.

Sikoyo, bandeko mibali mpe basi, tozali na motema likolo koyoka bitinda oyo bakolakisa biso lelo mpe lobi. Baoyo nyonso bakolobela biso balukaki lisungi mpe nzela ya lola lolenge bazalaki kobongisaka baetinda na bango.

Tika biso—banso, awa mpe bisika nyonso—totondisama na Molimo ya Nkolo mpe totombolama mpe tofulama ndenge toyoki mpe toyekoli. Na nkombo ya Yesu Klisto, Mobikisi na biso, amene.