2010–2019
Miniti na Yo Minei
Sánzá ya mínei 2014


Miniti na Bino Minei

Olengelamaki na ntina ya Nkoto moko ya mibu oyo. Oyo ezali ngonga na yo ya kosala.

Masano ya Olimpiki ewuti koleka ebendaki bokebi ya mokili lokola basani bazali bantoma ya bikolo 89 basakanaki na masano 98 makeseni. Eloko ya kokamwa, 10 na kati na bango bazalaki bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka, 3 kati na bango balongaki ba medayi abetamelaki nsete kala te na zulunale ya Eklezia: Christopher Fogt, Noelle Pikus-Pace, mpe Torah Bright1 Tokumisaki bango mpe basani banso oyo bamekamaki. Kitoko mpenza!

Nazali kolobela masano wana na ntongo ya lelo kokanisaka bilenge mibali, bilenge basi, mpe bilenge mikolo banzemba—bino oyo bozali na mikolo na bino ya koluka-luka nzela ya bomoi na bino. Nayoki mposa makasi ya koloba na bino.

Mpo na oyo etali Tora, snowbord ebalukaki ndambo, mosani abalukaki lisusu ndambo monene oyo etondaki na mbula mpembe na kosalaka nzela moko liboke ya manevele na mupepe, ebiangami mayele mabe. Mbano epesami na makambi ya masano na kotalaka motindo nini kobaluka wana ezali makasi mpe bolayi na yango, oyo ezali kosala bokoli to bolayi likolo ya pembeni pembeni ya kobaluka ndambo.

Na bokamwi nionso, mpo na basani, ngonga ebele ya komekaka mpe motindo esengeli emonana lokola kolonga to bosisoi esalemi na oyo ekoya na katikati ya ntango mibale ya 30 sekonde ya eleko ntango ya bosani.

Ndoto ya Noelle yambo ya masano ya Olympiki ya 2006 ekatanaki ntango akweyaki na likama mpe abukanaki lokolo. Na masano ya Olympic ya 2010 ndoto na ye ekweyaki lisusu ntango se likolo na miniti moko ya zomi kokangaka ye uta na etando ya medaye.2

Okoki kokanisa motema likolo lokola abandaki kozela abanda lisano ya yambo ya masano ya Olimpiki 2014? Mibu ebele ya kobongamaka mpo na miniti minei wana, mpe asengeli kolekisa ntango mingi mpe kokanisaka yango.

Nsuka ya lisano ya Noelle ezalaki pembeni kozalana mbindo te! Tokoki kobosana bopumbwi kati na etando koyamba libota na ye nsima ya kokatisa molongo ya nsuka,kogangaka “Tosali yango!” mibu ya kobongama efuti. Tomoni mama na ye elenge mwasi na medaye na kingo lokola medaye ya palata etiamaki wana pembeni na ye. 3

Ntango mosusu emonani lokola bosembo te ete ndoto mobimba ya Tora mpo na Olympics epesama mbano kaka na miniti ya mokuse minei. Kasi ayebaki yango, mpe tala tina nini amibongisaki na bokasi nionso. Ayokaki bonene, kosala nokinoki ya miniti minei na ye, mpe nini ekolakisaka na bomoyi na ye etikali.

Tokundoli lisusu Christopher Fogt, mondimi mosusu ya lisanga liye elongaki medaye ya motako na lisano ya mibali minei na bobselede. Ntango atikaki nsima ya likama makasi na masano ya Olympic ya 2010, aponaki mpo na kokoba. Nsima kitoko, bosani kitoko, alongaki mbano azalaki na etingia mpenza alukaki. 4

Sikawa, mona boniboni nzela na yo ya bomoyi ya seko ekokani na yango. Bino bozali bato ya libela. Yambo bino bobotama, bozalaki lokola molimo. Na elongi ya Tata ya Lola ya bolingo, boyekolaki mpe bomibongisaki mpo na libaku na bino ya koya mokili mpo na ntango muke, kozua nzoto ya mosuni, mpe etongami, malamu. Bomoyi oyo ezali miniti na yo minei. Ntango bino bozali awa, misala na bino ekolakisa soki bokolonga mbano ya bomoyi ya seko. Profeta Amulek amaniolaki, “Bomoyi oyo ezali ntango … komilengela mpo ya kokutana na Nzambe; iyo, tala mokolo ya bomoyi oyo ezali mokolo … kosala [ya bino]misala.” 5

Na ndenge esengeli, miniti na bino minei esi ebandi ya solo. Montele monene ezali kobeta. Maloba ya Apostolo Polo emonani lokola boye momesano: Bopota mbango mpo bozua mbano. 6

Lolenge moko biteni mosusu bizali mpenza na ntina ya bokasi ya mokuse mingi ya mosani ya Olympic, kopumbuka to manevele mpo na ba basani ya ski to snowboard, kosamba na bobuki ya matambi ya bobsleigh, to kokataka na nzela ya ebimeli ya kokitaka na esika yabokimi, boye ezali mpe na bomoyi na biso makambo misusu mingi ezali mpenza na ntina—tala bilembo oyo ememaka biso na nzela ya bokoki na biso ya molimo na mokili. Bilembo wana ezali na ntina Nzambe apesaka mabongisi ya nsango malamu: libatisi, koyambaka likabo ya Molimo Mosantu, ba bokulisi ya bonganganzambe, ba bokuli na tempelo, mpe kokabolaka elambo mposo nionso.

“Na ba bokuli [oyo] … , nguya ya bonzambe ezali emonisami.” 7

Mpe lolenge moko lokola botosi ya komekaka ebongisi mpe epesi nzela na mosani ya kosala makambo ya lisano na bango na motindo ya likolo koleka, kobombaka mitindo ekopesa yo nzela ya kobongisa mpe kozala na ba bokuli

Opesi ntina na kosalaka nokinoki?

Baninga na nga ya bilenge, atako mosali na miniti na bino minei ya bokasi, Nasengi na lombango kobanza, “Nini nasengeli kosala na sima mpo na kobomba palata na ngai?” Ntango mosusu na kati ya likita, Molimo efulaka yo nini yango ekoki kozala: kobongisa ba makanisi ebele na mikolo ekoya to kozua likuli oyo osengelaki kozua ngonga ebele eleka. Nini nionso etape na yo elandi ekoki kozala, samba yango. Sala yango sikoyo. Kozela te. Miniti na yo minei ezali kokende mbangombango, pe okotikali na ndambo ya bomoyi ya libela kokanisa nini osalaki na bomoyi oyo. 8

Komikonza esengami. Losambo ya mokolo na mokolo, koyekola makomi, mpe kozala na Eklezia ebongi ezala moboko ya komekaka na yo. Lolenge malamu ya kotosaka mitindo, kobombaka mayokani oyo osi osala, mpe kolandaka masengeli ya Nkolo ezwami naJeunes Soyez Fort ezali kosenga.

Ntango oyokaki lokola ete makambo na bomoi na yo ezali kotambolaka malembe to etelemisi kokenda na y o liboso ya molimo. Soki bongo, landa toli ya Polo: “Tobuaka mikumba nyonso mpe masumu oyo ezingi biso bipai na bipai, mpe tokima mbangu na molende nionso na momekano ya mbangu oyo ezali liboso na biso” 9

Ntango eleki te mpo na koyambola. Kasi ekoki koleka kala te, mpo ete moko te ayebi mpenza ntango miniti na biso minei ekosila.

Sikoyo okoki komikanisaka yo moko, “Nasi nafula yango. Miniti na ngai minei ezali kaka mikakatano. Nakoki na ngai mpe kotika.” Soki boye, tika kokanisaka yango, mpe ata mokolo moko kokanisa yango lisusu te. Likamuisi ya bomikabi ekoki kosala mpo na kozanga bokoki nakati ya bokoki na biso. Lokola Mpaka Holland ateyaka:

“Mpo na baye kati na bino  … baoyo bakoki kozala kaka na sima, … natatoli na nguya ya sika ya bolingo ya Nzambe mpe likamuisi ya ngolu na Ye. …

“… ngonga eleki te ata lokola Mokambi … alobi ntango yango oyo. … kowumela te.” 10

Kundola, bozali bino moko te. Mobikisi alakaka ete akotika bino kozanga mosungi te. Bozali mpe lisusu na bandeko ya libota, baninga, mpe bakambi baoyo bazali kolendisa bino. 11

Atako mateya na ngai ezali kokende mingi koleka epai ya billenge ya Eklezia, mpo na baboti mpe bankoko, napesi oyo elandi:

Kala te, Mpaka Bednar alakisa na lolenge ya pete komema kotuya ya libota kokende liboso na nzela ya liyokani na ba bokuli esengeli. Nionso oyo esengeli ezali lokasa ya papie oyo ezali na milongo mibale: “nkombo” mpe “libongisi mpo na oyo elandi to likuli esengelami.” Nasalaki yango kala te, kokoma bayi libota na ngai. Na kati na bango, nakomaki koko moko ya mobali, apambolamaki kala mingi te, koko ya mukolo ya mibu motoba, oyo kobongisama na ye mpo na libatisi ezalaki motuya; mpe muana mobali kobanda mibu 18, oyo kobongama na bonganganzambe mpe dotasio na tempelo ezalaki na ntina. Ngalasisi oyo ya mpete esungaki Lisa mpe ngai nakotombolaka mokumba na biso ya kosungaka bandimi nionso ya libota na biso molongo nzela ya liyokani, na muango ya mosala mpo na moko moko kati na bango. Ntango mosusu oyo ezali likanisi mpo na na yo, oyo ekotambuisama na masolo ya libota, mateya ya FHE, libongisi, mpe kutu mabiangi mpo na ba bokuli ya ntina na kati ya libota na yo. 12

Bokoki ya Torah Bright kolonga palata na kobaluka moke ezalaki kokamuisa. Kutu kokamuisa makasi ezalaki nzela ye alendisaki basani mosusu motema na likambo wana. Asosolaki ete mosani ya Snowboard ya mboka America Kelly Clark, oyo azalaki mokimi ya mabe na suka ya eteni na ye, amonanaki lokola asiliki na ntina ya kokima na ye ya mbala mibale. “Ayambaki ngai” Clark alobaki. “Asimbi ngai loboko kino nakitaki moke, mpe nalembisaki kopema na ngai. Ezalaki esengo ya koyambama moninga.” Kelly Clark ayaki kosangana sima na Tora Bright na esika ya balongi lokola mozui ya palata ya motako.

Ntango batunaki ntina ya mosala oyo esalamata ya bolingo na mosani mosusu, oyo ekokaki kotia palata na ye ya libende ya mpembe na kaka, Torah alobaki na mpete nionso, nazali mosani—nalingi nasala nionso nakoki—kasi nalingi bazalani na ngai basani basala nionso bango mpe bakoki, lokola.” 13

Na oyo nionso na makasi, ezali na motomoko oyo azali na mposa ya malendisi na yo? Ndeko moko ya libota? Moninga moko? Moninga na kelasi moko? To mosalani mondimi ya lisanga likoki? Lolenge okoki kosunga bango na miniti na bango misatu?

Balingami baninga, bozali na kati kati ya mobembo enetolami. Na banzela mosusu, bozali kokima na nse ya kobaluka ndambo, mpe ekoki kozala mpasiya kosala eloko mokomoko na molongo ya nzela. Kasi kundola, obongisama mpo na ekeke oyo. Oyo ezali ntango na yo kokoka. Oyo ezali miniti na yo minei. Ntango yango oyo!

Napesi kondimisama na ngai na makoki na bino. Bozali na Mobikisi ya mokili na ngambo na bino. Soki bozali koluka lisungi na Ye mpe bolandi bokambemi na Ye, lolenge nini bokoki kokweya?

Nasukisi na litatoli ya lipamboli tozali na profeta ya bomoyi, Président Thomas S. Monson, Yesu Klisto mpe mosala na Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli, na nkombo na Ye mosantu, Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Christine Rappleye, “Mormons in the Olympics: 3 Medals for LDS Athletes at the Winter Games,” deseretnews.com/article/865597546/Mormons-in-the-Olympics-3-medals-for-LDS-athletes-at-the-Winter-Games.html.

  2. Tala Christine Rappleye, “Mormons in the Olympics.”

  3. Tala Sarah Petersen, “Noelle Pikus-Pace Wears LDS Young Women Necklace throughout Olympics,” deseretnews.com/article/865596771/Noelle-Pikus-Pace-wears-LDS-Young-Women-necklace-throughout-Olympics.html.

  4. Tala Amy Donaldson, “Army, Faith Helped Push Mormon Bobsledder Chris Fogt to Olympic Success,” deseretnews.com/article/865597390/Army-faith-helped-push-Mormon-bobsledder-Chris-Fogt-to-Olympic-success.html.

  5. Alma 34:32.

  6. See 1 Bakolinti 9:24.

  7. Doctrine et Alliances 84:20.

  8. Tala Alma 34:31–33.

  9. Baebele 12:1.

  10. Jeffrey R. Holland, “The Laborers in the Vineyard,” Ensign to Liahona, May 2012, 33.

  11. Tala Yoane 14:18.

  12. David A. Bednar, masolo elongo na mokomi.

  13. Vidya Rao, “Snowboarder Kelly Clark: Hug from Competitor Helped Me Win Bronze,” today.com/sochi/snowboarder-kelly-clark-hug-competitor-helped-me-win-bronze-2D12108132.