2010–2019
Yaka mpe Mona
sánzá ya zómi 2014


Yaka mpe Mona

Eklezia ya Yesu Klisto ezali ntango nionso mpe ntango nionso ekozala eklezia ya misio.

Etinda na ngai etindami mingimingi na bato oyo bazali bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu Ba Mikolo mya Nsuka te. Nakolobela motuna ya ntina mingi na bino bokoki kotuna: “Ntina nini Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazali na mposa makasi ya kolobela ngai nini bandimelaka mpe kobengisa ngai mpo na koyekola oyo etali Eklezia na bango?”

Nasambeli Molimo ya Nkolo ete asalisa ngai mpo na kosolola malamu, mpe bino mpo na kososola na polele, eyano na ngai na motuna oyo ya motuya.

Botindami na Nzambe

Bayekoli bamipesa ya Yesu Klisto ntango nionso bazali mpe ntango nionso bakozala bamisionele ya mpiko. Misionele azali molandi ya Klisto oyo atatolaka Ye lokola Mosikoli mpe asakolaka bosolo ya nsango malamu na Ye.

Eklezia ya Yesu Klisto ezali ntango nionso mpe ntango nionso ekozala eklezia ya misio. Bandimi moko na moko ya Eklezia ya Mobikisi bazali na lotomo ya lokumu mpo na kosalisa na kokokisa botindami epesama na Nkolo na Bapostolo ya Ye, lokola ekomami na Boyokani ya Sika:

“Boye bokende kozalisa bayekoli na mabota nionso, kobatisaka bango na nkombo ya Tata mpe Mwana mpe Molimo Mosantu:

“Kolakisaka bango ete batosa nionso esili ngai kotinda bino: mpe tala, ngai nazali na bino elongo ntango nionso kino nsuka ya mokili. Amene ( Matai 28:19–20).

Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazwi mokumba oyo na lokengo mpo na koteya bato banso na bikolo nionso etali Nkolo Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezongisami. Tondimaka Eklezia wana kaka esalemaki na Mobikisi kala ezongisami na Ye na mabele na mikolo ya nsuka. Malongo, mabongisi, likoki ya bonganganzambe, makuli mpe mayokani ya nsango malamu na Ye ezwami lelo na Eklezia na Ye.

Ntango tobengisi bino mpo na koya na eklezia elongo na biso mpo na koyekola elongo na bamisionele ya ntango mobimba, tozali te komeka kotekela bino eloko. Lokola bandimi ya Eklezia, tozali te kozwa lifuta to bilembo ya malamu na etumba ya lola. Tozali koluka kaka te kobakisa bonene ya motango ya Eklezia. Mpe mingimingi, tozali te komeka kokanga bino na makasi mpo na kondima lokola biso. Tozali kobengisa bino mpo na koyoka bosolo ezongisami ya nsango malamu ya Yesu Klisto boye bokoka koyekola, komaniola, kosambela, mpe koya koyeba na binomei soki makambo tozali kokabola elongo na bino ezali ya solo.

Basusu kati na bino bakoki koyanola, “Kasi nasili kondimela Yesu Klisto mpe kolanda mateya na Ye,” to “Nayebi te soki ya solo Nzambe azali mpenza.” Libengisi na biso na bino ezali te komeka kokitisa momesano ya eyamba to mayele ya bomoi na bino. Bomema nionso oyo boyebi ezali ya solo, ya malamu, mpe esengeli na lokumu—mpe bomeka nsango na biso. Kaka lokola Yesu abengaki bayekoli na ye mibale mpo na “koya mpe komona” (Yoane 1:39), bongo tosengi bino mpo na koya mpe komona soki nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto ekotandola mpe ekofulukisa oyo bosili kondima ezali ya solo.

Ya solo, toyoki mokumba ya lokumu mpo na komema nsango oyo na ekolo, libota, monoko mpe mabota nionso. Mpe yango ezali mpenza nini tozali kosala elongo na makasi lelo ya koleka 88.000 misionele ntango mobimba oyo bazali kosala na koleka 150 bikolo ya bonsomi na mokili mobimba. Mibali mpe basi ya kitoko bazali kosalisa bandimi ya Eklezia kokokisa mokumba ya moto na moto mpe epesami na Nzambe oyo moko na moko na biso azali na yango mpo na kosakola nsango malamu ya seko ya Yesu Klisto (tala D&C 68:1).

Mokumba moko Koleka ya Molimo

Kasi mposa na biso ya makasi mpo na kosakola nsango oyo ezali kaka te mbano ya koyoka mokumba ya molimo. Kasi, mposa na biso mpo na kokabola nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto elongo na bino ezali kolakisa boniboni ya motuya bosolo oyo ezali mpo na biso.Nakanisi nakoki malamu mingi kolimbola ntina nini tozali direki na kolukaka kolimbolele bino bondimi na biso na nzela ya likambo mwasi na ngai mpe ngai tozwaki mibu mingi mileki elongo na bana na biso ya mibali mibale.

Mpokwa moko Susan mpe ngai totelemaki penepene ya lininisa na ndako na biso mpe tozalaki kotala mibale ya bana na biso ya mibali ya mike kosakana libanda. Na kati ya lisano na bango, ya elenge mingi koleka na bana mibali wana mibale azokaki moke na mwa likama moko. Na mbangu tomonaki ete azwaki mpasi ya makasi te, mpe tozwaki mokano ya kopesa lisalisi mbala moko te. Tolingaki kotala mpe komona soki moko ya masolo na biso na libota etali boboto ya bondeko ekokataki. Oyo esalemaki nsima ezalaki ya solo ya elengi mpe ya kolendisa.

Ndeko mobali ya nkulutu asungaki mpe asalisaki ndeko mobali ya leki mpo na kozonga na kati ya ndako. Susan mpe ngai tomitiaki penepene ya kikuku boye tokokaki kotala nini eyaki nsima, mpe tomilengelaki mpo na kosalisa mbala moko soki mpasi mosusu ya nzoto esalemaki to likama moko ya makasi ezalaki penepene.

Ndeko mobali ya nkulutu abendaki kiti moko na esokoleli ya kikuku. Amataki likolo ya kiti, asalisaka ndeko na ye ya mobali komata likolo ya kiti, afungolaki mai, mpe abandaki kosopa ebele ya sabuni ya kosukolela basani likolo ya loboko ekwaniamaki ya ndeko na ye ya mobali ya leki. Asalaki malamu mingi akokaki mpo na kosokula na malembe bosoto. Likambo ya ndeko mobali ya leki azongisaki na ezaleli ekoki kaka kolimbolama malamu na kosalelaka elobeli ewuti na makomi masantu: “Mpe bakozala na ntina ya koganga, mpe kolela, mpe komilela, mpe kolia mino na bango” (Moziya 16:2). Mpe bana ya mibali wana bagangaki!

Nsima ya kosilisa konguluta, loboko ekapangusamaki malamu na sume. Na nsuka kolela etikaki. Ndeko mobali ya nkulutu nsima amataki likolo na armoir ya kikuku, afungolaki sanduku moko, mpe akutaki mwa engongolo ya nkisi ya kopakola. Atako bokwaniami na ndeko na ye ya mobali ezalaki monene mpe ye kopanzana, ndeko ya mobali ya nkulutu apakolaki penepene na kisi nionso ya kopakola na tube na loboko mobimba ezokaki. Kolela ebandelaki te, lokola ndeko mobali ya leki na polele alingaki mosala ya kolembisa ya mafuta mingi koleka alulaki mosala ya kosukola ya sabuni ya kosukola basani.

Ndeko mobali ya nkulutu azongaki lisusu na sanduku wapi akutaki nkisi ya kopakola mpe amonaki esika ya sanduku moko ya sika ya bandi ya peto. Nde afungolaki mpe atiaki bandi nionso likolo mpe na nse ya loboko ya ndeko na ye ya bobali—uta na ebandeli ya loboko ti na lipeka. Na eyano oyo ya mbalakaka, mpe na fulu ya sabuni, nkisi ya kopakola mpe bandi na kikuku mobimba, bana ya mibali wana mibale bapumbwaki na nse uta na kiti na nwa koseka ya esengo mpe bilongi ya esengo.

Oyo eyaki nsima eleki na motuya. Ndeko ya mobali ya kozoka asangisaki babandi etikalaki nionso mpe mwa engongolo ya nkisi ya kopakola ya penepene na kosila, mpe azongaki libanda. Alukaki nokinoki baninga na ye libanda mpe abandaki kotia nkisi ya kopakola mpe bandi na maboko na bango. Susan mpe ngai biso mibale tokamwaki na bosolo, esengo, mpe lobango ya eyano na ye.

Ntina nini mwana wana ya mobali ya moke asalaki oyo asalaki? Nasengi bososola ete na mbalakaka mpe na kozanga kokanisa alingaki kopesa na baninga na ye kaka eloko oyo esalisaka ye ntango azwaki mpasi. Mwana mobali wana ya leki asengelaki kotindama, kotelemelama, mpe kotindikama, to kosukumama mpo na kosala. Mposa na ye mpo na kokabola ezalaki mbano ya kobotama na yango ya mayele ya kosalisa ya litomba ya moto.

Mingi na biso lokola bankulutu tosalaka na lolenge kaka wana ntango tomoni lisalisa to nkisi oyo elembisi mpasi oyo eniokoli biso tango molai, to tozwi toli oyo epesi biso likoki ya kotelemela mimekano na mpiko mpe mobulu na bompikiliki. Kokabola elongo na bato mosusu makambo oyo eleki na ntina mpo na biso to oyo esalisaki biso ezali mpenza ya momesano te.

Ndakisa kaka wana ezali ya solo mingimingi na makambo ya motuya monene ya molimo mpe ya mbano. Ndakisa, nsango moko na liboke ya makomi ya Buku ya Mormon elakisi na polele nkoto moko ezwamaki na profeta mokambi moko ya kala na nkombo ya Lehi. Mama ya likambo na ndoto ya Lehi ezali nzete ya bomoi—oyo ezali elembo ya “ bolingo ya Nzambe” oyo ezali “esengelami mingi likolo ya biloko nionso” mpe “eleki na esengo mpo na molimo” (1 Nefi 11:22–23; tala lisusu 1 Nefi 8:12, 15).

Lehi alimboli:

“Mpe esalaki ete nakendeki mpe naliaki mbuma na yango; mpe namonaki ete ezalaki sukali mingi, likolo ya nionso oyo namekaka naino liboso. Iyo, mpe namonaki ete mbuma na yango ezalaki ya mpembe, koleka mpembe nionso oyo naino namona.

Mpe lokola eliaki ngai mbuma na yango, etondisaki molimo na ngai na esengo monene mpenza; yango wana, nabandaki kozala na mposa ete libota na ngai esengela kolia yango lokola ” (1 Nefi 8:11–12; nsete ebakisami).

Bolakisi monene ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye ezali mosala ya bokufi, libonza ya bomikabi, mpe Bosekwi ya Nkolo Yesu Klisto. Mbuma na nzete ekoki komonana lokola elembo mpo na mapamboli ya Bomikundoli ya Mobikisi.

Eyano ya sikisiki ya Lehi mpo na kokabola mbuma ya nzete mpe komona esengo monene ezalaki mposa ya kobakisa mpo na kokabola elongo na mpe kosalisa libota na ye. Boye, ntango tobaluki na Klisto, ye lisusu akobaluka epai na biso na bolingo mpe lisalisi.

Likambo mosusu ya motuya na Buku ya Mormon elimboli oyo ekomelaki moto moko nkombo na ye Enosa nsima ya losambo na ye ya makasi mpe ya kobondela eyokanaki mpe eyanolamaki na Nzambe.

Alobaki ete:

“Mpe molimo na ngai eyokaki nzala; mpe nafukamaki na nse liboso ya Mozalisi na ngai, mpe nabelelaki epai na ye na losambo mpe libondeli makasi mpo na molimo na ngaimei; mpe bolai ya mokolo mobimba nabelelaki epai na ye; iyo, mpe ekomaki butu natombolaki lisusu mongongo na ngai likolo ete ekomaki na lola.

“Mpe eyaki mongongo moko epai na ngai, kolobaka: Enosa, masumu na yo elimbisami, mpe opakopambolama.

“Mpe ngai, Enosa, nayebaki ete Nzambe akokaki te kokosa; yango wana, elindo na ngai esukwamaki nie.

“Mpe nalobaki: Nkolo, boniboni esalemi?

“Mpe alobaki epai na ngai: Na ntina ya bondimi na yo na Klisto, oyo mokolo moko te omona to oyoka … yango wana, kende, bondimi na yo ebikisi yo.

“Sikawa, esalemaki ete eyokaki ngai maloba oyo nabandaki koyoka mposa mpo na bolamu ya bandeko na ngai, Banefi; yango wana, nasopaki molimo na ngai mobimba epai ya Nzambe mpo na bango ” (Enosa 1:4–9; nsete ebakisami).

Ntango Enosa abalukaki na Nkolo “na mokano etonda ya motema” (2 Nefi 31:13), Motungisi na ye mpo na bolamu ya libota, baninga, mpe basangani na ye ebakisamaki na mbala moko.

Liteya ya kowumela toyekoli na makambo oyo mibale ezali motuya ya koyoka na bomoi ya moto na moto mapamboli ya Bomikabi ya Yesu Klisto lokola lisengeli ya liboso mpo na lisalisi uta na motema mpe ya solo oyo etandolami mosika koleka kaka “kosala makambo bongo na bongo.” Mingi lokola Lehi, Enosa, mpe mwana na biso ya mobali ya leki na lisolo nasololaki, biso lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka toyokaki nsomo esangani na bozangi bosolo ya molimo mpe lisumu. Biso lokola toyokaki bopetoli, kimia ya kansasa, libiki mpe bosusu ya molimo, mpe bokambami oyo ezwami kaka na koyekolaka mpe kosalelaka na bomoi mabongisi ya nsango malamu ya Mobikisi.

Bomikabi ya Yesu Klisto epesi bopetoli esengeli mpo na kopetola mpe kosukola, mofuta ya kolembisa mpo na kobikisa bampota ya molimo mpe kolongola elindo, mpe bobateli oyo ekopesa biso likoki ya kozala botongono na ntango ya malamu mpe mabe.

Bosolo Eluti Ezali

Na bino baye libota mpe baninga oyo bazali bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka te, namekaki kolimbola bantina monene nini tozali bamisionele.

Bosolo eluti ezali na mokili oyo mingimingi ekotiola mpe ekobengana babosolo. Na mikolo ekoya, “mabolongo nionso” mpe mpe minoko nionso ekotatola Yesu Klisto azali Nkolo, mpo na Nkembo ya Nzambe Tata” (Bafilipi 2:10–11). Yesu Klisto na ntembe te azeli Mwana Se Moko Mobotama ya Tata ya Seko. Lokola bandimi ya Eklezia na Ye, totatoli Ye azali na bomoi mpe Eklezia na Ye ezongisami na litondi na mikolo oyo ya nsuka.

Libengisi topesi na bino mpo boyekola oyo etali mpe bomeka nsango na biso oyo ezali mbano ya mosala ya malamu nsango malamu ya Yesu Klisto esali na bomoi na biso. Ntango mosusu tokoki kozala ya kokamwisa to ya loma to kutu na mawa te na komeka na biso. Mposa na biso ya pete ezali kaka mpo na kokabola elongo na biso bosolo oyo elongobani mingi koleka mpo na biso.

Lokola moko ya Bapostolo ya Nkolo, mpe na bokasi nionso ya molimo na ngai, natatoli bonzambe mpe bosolo na Ye. Mpe nabengisi bino mpo na “koya mpe komona” (Yoane 1:39), na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.