2010–2019
Bomoi ya Seko—Koyeba Tata na Biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto
sánzá ya zómi 2014


Bomoi ya Seko—Koyeba Tata na Biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto

Nzambe mpe Klisto bazali solo Tata mpe Mwana bakesani, moko na moko azali mpeza kosangana na nttina na bango.

Mibu mingi eleki nazwaki libaku ya koyekola matatoli ya nsuka ya baprofeta ya na bileko moko na moko. Moko na moko na bango azali na litatoli ya nguya na Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Ntango natangi matatoli oyo—mpe mingi mosusu lokola yango mibu mileki—esimbi ngai ntango nionso motema na ngai mpo na koyeba boniboni Tata ya Lola alingi Mwana na Ye ya kuluntu mpe boniboni Yesu alakisaka bolingo na Ye na nzelaya botosi epai ya bolingi ya Tata na Ye. Natatoli ete ntango tosali oyo ezali ntina mpo na koyeba Bango mpe koyeba bolingo na Bango mpo na moko mpe mosusus, tokozwa “ya monene koleka mingi kati na makabo manso ya Nzambe”—ekutu bomoi ya seko.1 Mpo ete “oyo ezali bomoi ya seko ete bayeba yo Nzambe moko ya solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”2

Lolenge nini likabo oyo ekoki kozala ya biso? Eyaka na nzele ya likambo ya bokundoli ya moto. Oyo elobamaki na mpe eteyamaki na ntongo oyo.

Emikundoli yo mbala ya yambo oyebaki ete ezalaki na Nzambe moko mpe okokaki koyoka bolingo na Ye? Ntango nazalaki elenge mobali, namesanaki kotala likolo etonda na minzoto mpe kokanisa mpe koyoka bozali na Ye. Nazalaki kosepela kotala malamu kitoko ya limpombo ya babokeli ya Nzambe.—uta na mwa baniama mike tii na banzete milai mpenza. Ntango nayebi lisusu kitoko ya mabele oyo, nayebaki ete Tata ya Lola alingaki ngai. Nazalaki ete nazalaki mwana na Ye ya nzoto ya molimo, ete tozali banso bana mibali mpe bana basi ya nzambe.

Lolengi nini nayebelaki yango? Okoki kotuna. Makomi eteyi, “Na basusu epesemeli bango na nzela ya Molimo Mosantu koyeba ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe, mpe  … na basusu epesemeli bango bandimela maloba na bango, ete bakoki lisusu kozala na bomoi ya seko soki bakoki kozala botongono.”3 Na emoneli na ngai, oyo elingi koloba te ete bato mosusu bakoyekama libela na matatoli ya basusu.

Litatoli na ngaimei ekolaki ntango nayekolaki oyo etali Tata ya Lola mpe Mobikisi uta mateya mpe litatoli ya baboti ,ya balakisi, ya makomi maye Natangaki na etingia, mpe mingimingi ya Molimo mosantu. Lokola nazalaki kosalela bondimi mpe kotosa mitindo, Molimo Mosantu etatolaki ete maye nazalaki koyekola ezalaki solo. Oyo ezali lolenge nayaki koyeba na ngaimei

Na nzela oyo, kolukaka mpo na bokunoli ya moto ezali fungula. Nephi abengi moko na moko na biso: “kokila bilei mpo na maloba ya Klisto mpo ete tala maloba ya Klisto ekoyebisa bino makambo nionso nini bino bosengeli kosala.”4

Liboso ya bokundoli mibu mwambe na ngai, nalukaki koyeba mingi na ntina ya libatisi. Natangaki makomi mpe nasambelaki. Nayekolaki ete nakozwa likabo ya Molimo Mosantu ntango nakulaki kotisa. Nabandaki lisusu kososola ete Nzambe na Klisto bazali na nzoto Tata mpe Mwana—bato ya kokabwana, ya kokesana, ya moko moko oyo bakomisami na mobimba moko na ntina na Bango. “Biso tokolingaka [Bango], mpo ete [Bango] balingaki biso libo.”5 Mpe mbala na mbala lisusu namonaki lolenge nini Balinganaka mpe bazali kosala elongo mpo na bolamu na biso. Boyoka mwa mingi ya makomi oyo ezali koteya bosolo oyo:

Koteya oyo etali bomoi na biso ya yambo ya kufa, Tata ya Lola alobeli Yesu Klisto lokola “Mwana na ngai ya Bolingo, oyo azalaki Molingami mpe Moponami uta na ebandeli.”6 Ntango Tata akelaki mabele, Ye akelaki yango “na Mwana [na Ye] Mobotami se Moko”.7

Mama ya Yesu, Maria, alobelamaki ete akobota “Mwana ya Oyo-Aleki-Likolo.”8 mpe ntango Yesu azalaki elenge mobali, Ayebisaki mama na Ye ete Ye asengeli “azala na mosala ya Tata [na Ye].”9 Mibu mingi nsima, ntango Mobikisi abatisamaki, Tata ya Lola na mongongo uta na likolo, alobaki, “Oyo Mwana na ngai ya Bolingo na sepeli na ye mingi.”10

Mpo na koteya bayekoli na Ye kosambela, yesu alobaki maloba oyo:

“Tata na bino oyo azali na Likolo, Nkombo na yo ezali mosantu.

“Tika Bokonzi na yo eya. Tika mokano na yo esalama na nse mpelamoko na Likolo.”11

Ateyaki Nikodeme, “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye.”12 mpe Ye alimbolaki makamwisi na Ye na kolobaka, “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye Tata azali kosala, mpo ete yango ekosalaka [Tata], Mwana akosalaka yango lokola.”13

Ntango ngonga ya Bomikabi ekomaki mpembeni, Yesu asambelaki, kolobaka: “Tata, ntango esili kokoka. … Ngai nasili kokumisa yo na mokili: nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.”14 Nsima, lokola bozito ya masumu na biso ekweisaki Ye, Abondelaki ete, “O Tata na ngai, soki ekoki, tika ete kopo oyo elongwa na ngai: kasi lokola elingi ngai ten de lokola elingi yo.”15 Na bangonga na Ye ya nsuka na ekulusu, Yesu asambelaki, “Tata, limbisa bango, mpo ete bayebi yango ezali bango kosala te” mpe nsima agangaki, “Tata, nazali kotika molimo na ngai na maboko na yo.”16

Nsima Asengaki milimo ya baye bakufaki, na mokili ya milimo kopesa bango “nguya ya kozonga na bomoi sima lisekwa uta na kufa mpo na kokota na bokonzi ya Tata na ye.” 17Sima ya bosekwi ya Mobikisi, Amonanaki na Maria Magadala, kolobaka, “Nazali kobuta epayi ya Tata na ngai mpe [epayi ya] Tata na bino.” 18

Ntango Ye ayaki epai ya bato ya mokili ya Amerika, Tata na Ye elakisaki Ye kolobaka, “Tala Mwana molingami na ngai, na ye nasepeli mingi, na ye nakembeli nkombo na ngai.”19 Ntango Yesu akitaki na katikati ya bato na tempelo, Ye amilakisaki Yemei kolobaka: “Tala, nazali Yesu Klisto. … na … kembeli Tata na kokamataka likolo na ngai masumu ya mokili.”20 Ntango Ateyaki malongi na Ye, Alimbolaki:

“Mpe ezali malongi maye Tata apesi epai na ngai; mpe napesi litatoli ya Tata, mpe Tata apesi litatoli na ngai.”21

“Solo …Tata mpe ngai tozali moko.”22

Ekoki biso komona ndakisa kati na makomi oyo ezali kotatola Tata mpe Mwana lokola bato ya kokesena mpe ya moko se moko? Lolenge nini, nde, ezaleli Bango “moko”? Te mpo Bazali moto kaka moko kasi mpo Basangisami na ntina, bamipesi na ngenge moko na “kosala[ka] bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”23

Yesu azali Nzambe, nzokande Ye akobi komikesenisa Yemei lokola moto ya kokabwana, ya moko moko na kosambelaka Tata na Ye mpe na kolobaka ete Ye azala kosala bolingi ya Tata na Ye. Na mosala na Ye katikati ya Banefi, Ye abondelaki ete, “Tata, nasambeli te mpo na mokili, kasi mpo na bango oyo opesi ngai libanda ya mokili, … ete bakoka kopetolama na ngai, ete tokoka kozala na bango lokola yo, Tata, ozali na ngai, ete tokoka kozala moko, ete nakoka kokembelama na bango.”24

Komikundolaka oyo, tokokamwa te ete Bozangisi ya nsango malamu ebandaki elongo na bomonani ya moko te kasi bato mibale bakembelama. Na ntina ya Limoni ya Yambo na ye, Profeta Joseph Smith atatolaki ete, “Moko na bango alobaki na ngai, kobiangaka ngai na nkombo mpe alobaki, kolakisaka mosapi epai ya—Oyo azali Mwana na Ngai ya Bolingo. Yokela Ye.25

Elenge Profeta, oyo akendaki na zamba wana mpo na koyeba eklezia nini oyo nasengeli kokota, akendaki na bondimi ezanga ntembe, mpe abimaki na boyebi mpe litatoli ya Nzambe moko ya Solo mpe Yesu Klisto, oyo Nzambe atindaki. Joseph, lokola baprofeta liboso na ye, azalaki nde esalelo mpo na kozongisa na mokili boyebi oyo ekambaka na bomoi ya seko.

Yo mpe okoki koluka Tata na biso ya Lola mpe “Yesu oyo baprofeta mpe bapostolo basili [kotatola],”26 na makomi mpe na likita linene oyo. Wana ezali yo koluka, okomona nzeneke ya yo moko—bokundoli na yo ya moto—okoki komona ete Tata ya Lola apesi nzela ya ndenge mpo ete yo oyeba bosolo na yomei: na nzela ya moto ya misato ya Bonzambe, moto ya molimo oyo toyebi lokola Molimo Mosantu.

“Mpe ekozwa bino makambo maye”—kobakisaka maye naskaboli lelo—“Nalingi kolendisa bino ete bosenge Nzambe, Tata ya Seko, na nkombo ya Klisto, soki makambo maye mazali ya solo te; mpe soki bokosenga na motema ya bosembo, na mokano ya solo, kozalaka na bondimi na Klisto, akomonisa bosolo na yango epai na bino, na nguya ya Molimo Mosantu.

Mpe na Nguya ya Molimo Mosantu bokoki koyeba bosolo ya makambo nionso.”27

Bandeko mibali mpe basi, natatoli ete Tata na biso ya Lola alingi biso toluka boyebi sikoyo. Maloba ya profeta Elamani ezali konganga uta na putulu: “Bomikundola bomikundola ete ezali na likolo ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana ya Nzambe, ete bosengeli kotonga moboko na bino  … , moboko moko na wapi soki bato batongi bakoki te kokweya.”28Na yango tokoki kokweya te.

Moboko ya solo wana ezali Yesu Klisto, Azali “Libanga ya Likolo.”29 Ntango totongi ndako na biso likolo na Ye, mibu ya mikolo ya nsuka ekoki kokita, bampela ekoki koya, mpe mipepe ekoki kofula, kasi tokokweya te, tokokweya te, mpo ete ndako na biso mpe libota na biso ekofandisama likolo ya Klisto.30

Natatoli ete ndako ya boye ezali “ndako ya nkembo.”31 Kuna tosanganaka elongo mpo na kosambela Tat na biso ya Lola na nkombo ya Yesu Klisto, Mwana na Ye ya Bolingo. Kuna tokembelaka mpe topesaka matondi epai na Bango. Kuna tozaka molimo Mosantu mpe “elaka oyo [Apesi] na [ biso] ya bomoi ya seko, kutu nkembo ya bokonzi ya selestiale.”32

Napesi litatoli na ngai ya ndege ete Mobikisi na biso, ezali Yesu Klisto ete Azali na bomoi. Ete Tata na biso ya Lola alingi biso mpe abatelaka biso, ete tozali na profeta na eleko oyo—Mokambi Thomas S.Monson—mpo na kokamba biso. Molimo Mosantu atatoli erte oyo ezali solo mpo na moko na moko oyo akeyi mpe koluka boyebi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.